Mbuma malamu mpe mbuma mabe
“[Yehova] amɔnisaki ngai, mpe tala, bikɔlɔ mibale na mbuma na mosuke . . . Ekɔlɔ mɔkɔ ejalaki na mbuma malamu mingi lokola mbuma oyo ikotelaka liboso; mpe ekɔlɔ oyo mosusu ejalaki na mbuma mabe mingi oyo ikokaki koliama tɛ mpɔ ete ijalaki mabe.”—YILIMIA 24:1, 2.
1. Lolenge nini Yehova amonisaki motema mawa epai na libota na ye, Yisraele, kasi lolenge nini libota yango liyanolaki?
TOZALI na mobu 617 L.T.B. Ezalaki bobele mibu zomi liboso na kokokisama ya etumbu ya Yehova likoló na Yelusaleme mpe bafandi na yango. Esili bongo koleka mibu 30 uta Yilimia azali kosakola na molende nyonso. Talá lolenge oyo Esdrase alimboli yango kati na 2 Ntango 36:15: “[Yehova], Njambe na batata na bango atindaki lisusu mpe lisusu na njela na bantoma na ye, mpɔ ete ayokelaki bato na ye mpe efandelo na ye mawa.” Milende wana nyonso mibimisaki matomba nini? Na mawa nyonso, Esdrase alandi koloba na molɔngɔ́ 16 ete: “Kasi bajalaki kosɛka bantoma na Njambe mpe kotiola maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye; nkanda na [Yehova] epelisami liboso na bato na ye, kino akokaki kotika lisusu tɛ.”
2, 3. Lobela emonaneli ya kobenda likebi oyo Yehova amonisaki na Yilimia.
2 Yango elimbolaki ete libota ya Yuda lisengelaki kosilisama nyonso nyee? Mpo na koyanola na yango, totalela emonaneli moko ya ntina oyo Yilimia amonaki mpe akomaki yango kati na Yil mokapo 24 ya mokanda oyo ezali na nkombo na ye. Kati na emonaneli yango, Nzambe asalelaki bikɔlɔ́ mibale ya mbuma na mosuke mpo na kolimbola etamboli oyo azalaki komona kati na libota oyo ye asalaki kondimana elongo na bango. Etamboli yango ekomonisama na lolenge mibale ya mbuma: ya malamu mpe ya mabe.
3 Yilimia mokapo 24, na molɔngɔ́ 1 mpe molɔngɔ́ 2, elobeli makambo oyo mosakoli ya Nzambe amonaki: “[Yehova] amɔnisaki ngai, mpe tala, bikɔlɔ mibale na mbuma na mosuke itiami liboso na Tempelo na [Yehova], nsima wana Nebukadalɛsala mokonji na Babɛlɛ asili kobɔtɔla Yekonia, mwana na Yoyakimi, mokonji na Yuda mpe mikolo na Yuda mpe bato bameseni na misala mpe batuli longwa na Yelusaleme mpe ayeisi bango na Babɛlɛ. Ekɔlɔ mɔkɔ ejalaki na mbuma malamu mingi lokola mbuma oyo ikotelaka liboso; mpe ekɔlɔ oyo mosusu ejalaki na mbuma mabe mingi oyo ikokaki koliama tɛ mpɔ ete ejalaki mabe.”
Emonaneli ya mbuma malamu ya mosuke
4. Emonaneli ya mbuma na mosuke ememaki nsango nini ya kobondisa epai na Bayisraele ya sembo?
4 Nsima na kotuna Yilimia na ntina na oyo azalaki komona, Yehova alobaki na ye na Yil 24 molɔngɔ́ 5 kino molɔngɔ́ 7, ete: “Lokola mbuma oyo malamu, nakotanga bakangami na Yuda bongo baoyo natindaki bango longwa na esika oyo kino mokili na Kaladi mpɔ na malamu. Mpɔ ete nakotia miso na ngai likolo na bango mpɔ na kosalela bango malamu; nakobutwisa bango na mokili oyo mpe nakotɛlɛmisa bango, nakokitisa bango tɛ; nakokona bango mpe nakobikola bango tɛ. Nakopɛsa bango mpe motema mpɔ na koyeba ngai ete najali [Yehova]; mpe bakojala bato na ngai mpe ngai nakojala Nzambe na bango; mpɔ ete bakobutwa epai na ngai na motema na bango mobimba.”
5, 6. (a) Motindo nini Bayisraele mosusu ‘batindamaki mpo na malamu’ na mokili na Bakaladi? (b) Lolenge nini Yehova ‘atyaki miso na ye mpo na malamu’ likoló na Bayisraele ya sembo oyo bakendaki na boombo?
5 Engebene maloba wana ya Yehova, emonani ete bileko ya kitoko bisengelaki koya, ete libota ya Yuda lisengelaki te kosilisama nyonso nyee. Kasi ndimbola ya ekɔlɔ oyo ya mbuma malamu ya mosuke ezali nini?.
6 Yekonia, to Yoyakini, azalaki mokonzi likoló na Yuda bobele kobanda sanza misato na mikolo zomi wana andimaki kopesa Yelusaleme na maboko na mokonzi Nebukadenesala. Kati na baoyo bakendaki na boombo elongo na ye, ezalaki Danyele mpe Baebele mosusu misato Hanania, Misaele mpe Azalia, bakisa mpe Ezekiele. Mokonzi ya Babilone abatelaki bomoi ya bakangami wana, na yango tokoki koloba ete Yehova atalelaki bango lokola batindami na mokili ya Kaladi mpo na malamu. Osili komona ete Yehova apesaki mpe elaká ya ‘kotya miso na ye likoló na bango mpo na kosalela bango malamu’? Lolenge nini likambo yango likokisamaki? Na mobu 537 L.T.B., mbula 80 na nsima, Yehova apusaki mokonzi Siruse na kobimisa mobeko oyo mosengelaki kopesa nzela na batikali ya bakitani na bango ete bazonga na mboka Yuda. Bayuda wana ya sembo batongaki lisusu engumba ya Yelusaleme; batongaki tempelo ya sika mpo na losambo ya Yehova, Nzambe na bango; mpe bazongaki epai na ye na motema na bango mobimba. Bongo, na nyonso wana, mpo na Yehova bakangami wana mpe bakitani na bango bazalaki lokola mbuma ya liboso ya mosuke malamu mingi.
7. Ntango nini mpe lolenge nini liso ya Yehova lizalaki likoló na kelasi ya Yilimia ya ntango na biso “mpo na malamu”?
7 Okoki komikundola ete na lisoló ya liboso oyo litalelaki maloba ya esakweli ya Yilimia, tomonaki ete esakweli yango ezali mpe kokokisama na ekeke oyo ya ntuku mibale. Yil Mokapo 24 molobeli mpe ekeke ya ntuku mibale. Na boumeli ya bambula ya nsɔmɔ ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mingi na basaleli ya Yehova oyo basilaki komipesa bazalaki, na lolenge moko to mosusu, na nsé na bopusi ya Babilone Monene. Kasi Yehova ‘atyaki miso na ye likoló na bango mpo na kosalela bango malamu.’ Ezali na lolenge yango nde, na nzela ya Siruse Monene, Yesu Klisto, Yehova alongolaki nguya oyo Babilone Monene ezalaki na yango likoló na bango mpe akotisaki bango mokemoke kati na paladiso ya elimo. Bayisraele wana ya elimo bayanolaki mpe bazongaki epai na Yehova na motema na bango mobimba. Na nsima, na 1931, bandimaki nkombo Batatoli ya Yehova na esengo nyonso. Ya solo, tokoki koloba sikawa ete bakómaki lokola ekɔlɔ́ ya mbuma malamu ya mosuke na miso na Yehova.
8. Na lolenge nini Batatoli ya Yehova basakolaki nsango ya Bokonzi oyo ezali elengi lokola mbuma ya mosuke?
8 Mpe Batatoli ya Yehova bazangaki te kozwa ngolu oyo Nzambe amoniselaki bango na kosikoláká bango na Babilone Monene. Babombaki te nsango ya Bokonzi oyo ezali elengi lokola mbuma na mosuke, kasi basakolaki yango na boyokani na maloba na Yesu oyo mazwami na Matai 24:14, ete: “Nsango malamu oyo na Bokonji ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota yɔnsɔ.” Ebimisi matomba nini? Bato koleka 4 700 000 oyo bakokani na bampate, baoyo bazali Bayisraele ya elimo te, basili kobima na Babilone Monene!
Emonaneli ya mbuma mabe ya mosuke
9. Banani bamonisamaki na mbuma mabe ya mosuke ya emonaneli ya Yilimia, mpe nini ekómelaki bango?
9 Kasi tokoloba boni mpo na ekɔlɔ ya mbuma mabe ya mosuke oyo elobelami na emonaneli ya Yilimia? Sikawa, Yilimia atii likebi na ye na maloba ya Yehova oyo mazwami na Yilimia mokapo 24, na molɔngɔ́ 8 kino molɔngɔ́ 10, ete: “Mpɔ na mbuma mabe na mosuke oyo ekoki koliama tɛ; yango ejali mabe mpenja; sɔlɔ [Yehova] alobi boye ete, Bongo nakokaba Sidikiya mokonji na Yuda mpe mikolo na ye mpe litika na Yelusaleme baoyo bakotikala na mokili mpe bango bajali kofanda na mokili na Ejipito; nakopɛsa bango ete babwakama epai na epai na makonji yɔnsɔ na mokili mpɔ na mabe, ete bajala elɔkɔ na nsɔni mpe lokola lisese, kotukama mpe kolakelama mabe kati na bisika yɔnsɔ wana nakobengana bango. Nakotinda mpe kati na bango mopanga mpe njala mpe malali kino bakosilisama longwa na mokili mopɛsi ngai epai na bango mpe epai na batata na bango.”
10. Mpo na nini Yehova atalelaki Sidikiya lokola ‘mbuma mabe ya mosuke’?
10 Na bongo, Sidikiya akómaki solo ‘mbuma mabe’ na mosuke na miso na Yehova. Asukaki te bobele na kotombokela mokonzi Nebukadenesala na kobukáká ndai ya bosembo oyo alapaki liboso na mokonzi yango na nkombo ya Yehova, kasi atyolaki lisusu motema mawa oyo Yehova amoniselaki ye na nzela ya Yilimia. Akómaki kino kotya Yilimia kati na bolɔ́kɔ! Ezali likambo ya kokamwa te soki Esdrase alobelaki na mokuse ezaleli ya mokonzi yango na lolenge oyo amonisi yango kati na 2 Ntango 36:12 ete: “Asalaki mabe na miso na [Yehova], Njambe na ye; amisɔkisaki te.” Liboso na Yehova, Sidikiya mpe baoyo batikalaki na Yelusaleme, bazalaki lokola ekɔlɔ́ ya mbuma mabe ya mosuke, mbuma ya kopola.
Mbuma ya mosuke ya kopola na mikolo na biso
11, 12. Lelo oyo, banani bamonani lokola mbuma mabe ya mosuke, mpe nini ekokómela bango?
11 Sikawa talá mokili oyo mozingi biso. Okanisi te ete tokoki kokuta ekɔlɔ́ ya elilingi ya mbuma mabe ya mosuke? Na yango, tótalela naino makambo na kokokanisáká eleko na biso na oyo ya Yilimia. Na ekeke oyo ya ntuku mibale, Yehova azali kosalela kelasi ya Yilimia, batikali bapakolami, mpo na kolanda kokebisa mabota na ntina na kobɛlɛma ya nkanda na ye na bolozi monene. Azali kosenga na mabota ete bapesa ye nkembo oyo ebongi na nkombo na ye, ete basambela ye na elimo mpe na solo, mpe bandima Klisto Yesu, Mwana na ye oyo azali koyangela lokola ye oyo azali na lotómo ya kozala Moyangeli ya mabelé. Nini ezali komonana? Bobele ezaleli motindo moko na oyo ezalaki na eleko ya Yilimia. Mabota mazali kolanda kosala oyo ezali mabe na miso na Yehova.
12 Kasi banani bazali kolendisa elimo wana ya botomboki? Nani azali kotyola batindami wana ya Nzambe, baoyo bakokani na Yilimia na koboyáká kondima ete bazali ba ministres ya Nzambe te? Nani azali ntango nyonso kotyola Liloba na Nzambe? Nani oyo azali mobandisi ya minyoko nyonso oyo Batatoli ya Yehova bazali kokutana na yango na eleko na biso? Eyano ezali polele mpo na biso nyonso: ezali boklisto ya lokuta, mingi mpenza bakonzi ya mangomba! Kanisá naino mbuma nyonso ya boklisto ya lokuta, oyo ya kopola, ya mabe, oyo toutaki kolobela na lisoló lileki! Ya solo, ezali mpenza na ekɔlɔ́ ya elilingi ya mbuma mabe ya mosuke na mabelé na mikolo na biso! Ya solo, Yehova alobi ete ‘mbuma wana ekokaki kolyama te, mpo ete ezalaki mabe.’ Maloba ya Yehova oyo apesaki na Yilimia mazali kokokisama na eleko na biso, ete: ‘Bakolimwa!’ Nkanda ya Yehova likoló na boklisto ya lokuta ekokoka kopekisama te.
Likebisi mpo na biso
13. Engebene maloba ya Paulo oyo mazwami na 1 Bakɔlinti 10:11, motindo nini tosengeli kotalela emonaneli ya bikɔlɔ́ mibale ya mbuma na mosuke?
13 Wana tozali kotalela bopusi ya nsango ya likebisi epemami na Nzambe, oyo epesamaki na nsima na Yilimia, maloba ya ntoma Paulo oyo mazwami na 1 Bakɔlinti 10:11 mayeli biso na makanisi: “Makambo oyo eyeli bango lokola bikebiseli, ikomami mpɔ na kolakisa biso mpɔ ete nsuka na bikeke eyei na biso.” Biso tozali mpenza kosimba likebisi oyo lipesameli biso na nzela ya emonaneli ya bikɔlɔ́ mibale ya mbuma na mosuke? Oyo touti kolobela awa ezali eteni moko ya ntina monene ya makambo oyo makómelaki Yisraele lokola ndakisa mpe likebisi mpo na biso.
14. Lolenge nini Bayisraele bayanolaki na libateli ya bolingo ya Yehova?
14 Na nsuka, tómikundola maloba ya Yehova epai na mokonzi Davidi na ntina na Yisraele, lokola ezwami na 2 Samwele 7:10, ete: “Nakobɔngisa mpe esika mpɔ na bato na ngai Yisalaele, nakokona bango.” Kati na makambo nyonso, Yehova abatelaki Yisraele, libota na ye na bolingo mingi. Bayisraele bazalaki na bantina mingi ya kobota mbuma malamu kati na bomoi na bango. Basengelaki bobele koyoka mateya ya Yehova mpe kotosa mibeko na ye. Kasi bobele mwa ndambo na bango nde basalaki yango. Mingi kati na bango bazalaki motó makasi mpe batomboki na boye ete babotaki mbuma mabe, mbuma ya kopola.
15. Lolenge nini Yisraele ya elimo mpe baninga na bango oyo bakokani na bampate bazali koyanola na motema mawa ya Yehova na mikolo na biso?
15 Bongo, ezali boni mpo na mikolo na biso? Yehova azali komonisa motema mawa epai na batikali ya Yisraele ya elimo mpe baninga na bango oyo bakokani na bampate. Liso na ye lizali ntango nyonso likoló na bango uta kosikwama na bango ya elimo na 1919. Lokola asakolaki yango na Yisaya, mokolo na mokolo bazali kozwa mateya mauti na Yehova Nzambe Molakisi Monene ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. (Yisaya 54:13) Mateya wana mauti na Nzambe oyo mapesami na nzela ya Yesu Klisto, Mwana na ye ya bolingo, masili kobimisa kimya ya solo kati na bango mpe mazali ntango nyonso kolendisa boyokani na bango elongo na Yehova. Likambo yango lizali kopesa biso nyonso ezalela kitoko na elimo mpo na koyeba Yehova, mpo na koyoka ye, mpe mpo na kolanda kobota mbuma malamu kati na bomoi na biso—mbuma mpo na lokumu ya Yehova! Yango elimboli bomoi mpo na biso!
16. Lolenge nini moko na moko na biso akoki kosalela emonaneli ya bikɔlɔ́ mibale ya mbuma na mosuke kati na bomoi na ye?
16 Kasi atako ngolu nyonso oyo Nzambe azali komonisa, bamoko bazali kokóma batomboki mpe mitema na bango miyeisami makasi, lokola ezalaki mpo na mingi kati na bokonzi ya kala ya Yuda, mpe bazali kobota mbuma mabe, mbuma ya kopola kati na bomoi na bango. Oyo nde mawa! Tika ete moko te kati na biso abosana likebisi oyo lipesameli biso na nzela na bikɔlɔ́ mibale ya mbuma na mosuke, moko ezali na mbuma malamu mpe mosusu na mbuma mabe. Lokola kokokisama ya bikateli ya Yehova oyo bibongi mpo na boklisto ya lokuta oyo esili kopengwa ezali mpenza kobɛlɛma na lombango, tósimba toli oyo ya Paulo, ete: “Botambola na motindo mobongi na Yehova mpo na kosepelisa ye na makambo nyonso, wana ezali bino kolanda kobota mbuma na misala nyonso malamu.” —Bakolose 1:10, NW
Bozongeli “Mbuma malamu mpe mbuma mabe” mpe paragrafe 1 kino paragrafe 4 ya “Yehova azali na likambo epai na mabota”
◻ Ekɔlɔ́ ya mbuma malamu ya mosuke ezali komonisa nini?
◻ Lolenge nini ekɔlɔ́ ya mbuma mabe ya mosuke emonanaki polele?
◻ Nsango oyo epesamaki na Yilimia ezali na likebisi nini mpo na biso?
◻ Likambo nini ya ntina mingi litalelaki mobu 607 L.T.B.? mpe 1914 T.B.?
[Elilingi na lokasa 15]
Lokola mbuma na mosuke malamu, libota na Nzambe lisili kobota mbuma kitoko ya Bokonzi
[Elilingi na lokasa 15]
Boklisto ya lokuta ezali lokola ekɔlɔ́ ya mbuma mabe ya mosuke