Amosa azalaki mosali ya bilanga ya figi to mopɛtoli ya nzete na yango?
TOZALI na ekeke ya libwa liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Amasia, nganga moko ya mabe, mosambeli ya mwana-ngɔmbɛ apekisi mosakoli Amosa atika kosakola na Yisalaele. Amosa aboyi mpe alobi boye: “Nazalaki mobateli na bibwɛlɛ mpe mopɛtoli ya nzete ya [figi]. [Yehova] akamataki ngai nsima na bitonga, mpe [Yehova] alobaki na ngai ete, Kendá, sakwelá bato na ngai Yisalaele.” (Amosa 7:14, 15) Ɛɛ, Amosa amikómisaki mosakoli ye moko te, kasi Yehova nde atindaki ye. Kasi, Amosa alingaki mpenza koloba nini ntango alobaki ete azalaki “mopɛtoli” ya mbuma ya nzete ya figi?
Maloba oyo ebongolami na mopɛtoli ya nzete ya figi ezali na esika moko kaka na Biblia haut fleuve. Na esika ya mopɛtoli ya mbuma ya figi, Biblia liloba lya Nzambe esaleli maloba “mosali wa elanga wa figi.” Nzokande, zulunalo moko ya makambo etali milona (Economic Botany) elobi ete liloba oyo ebongi mpenza ezali “motɔbɔli,” mpamba te yango emonisi mpenza likambo moko oyo mosali bilanga ya figi asalaka.
Mosala ya kotɔbɔlatɔbɔla mbuma ya figi ezalaki kosalema mingi na Ezipito mpe na Sipele na ntango ya kala. Na Yisalaele lelo oyo, batɔbɔlatɔbɔlaka lisusu te mbuma ya figi mpamba te bakómá kolona bafigi ya ndenge mosusu kuna. Nzokande, Bayisalaele ya ntango ya Amosa bazalaki kotɔbɔlatɔbɔla bambuma ya figi, mpamba te banzete ya figi oyo bazalaki kolona kuna na ntango wana eutaki na Ezipito.
Lisusu, kotɔbɔlatɔbɔla mbuma ya figi ezalaki kosalisa yango emɛla mai mingi mpe ekóma na mai mingi. Yango ezalaki mpe kosala ete mbuma ekóma na gaz ethylène mingi, eya monene mpe ekóma elengi makasi. Lisusu, banyama ekokaki kobebisa yango te mpo ezalaki kotela nokinoki.
Atako azalaki mobɔkɔli ya bibwɛlɛ mpe mopɛtoli ya figi, Amosa azalaki kobanga banguna na ye te. Azalaki nde kosakola na mpiko mpenza bitumbu oyo Yehova akanaki kopesa Yisalaele. Oyo nde ndakisa malamu mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo, oyo basengeli kosakola nsango moko oyo ezali kosepelisa bato te!—Matai 5:11, 12; 10:22.