MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YIRIMIA 22-24
Ozali na “motema mpo na koyeba” Yehova?
Yehova akokanisaki bato na figi
Bato ya sembo kati na Bayuda oyo bautaki na boombo na Babilone bazalaki lokola figi ya malamu
Mokonzi Zidikiya oyo azalaki sembo te ná bato mosusu oyo bazalaki kosala mabe bazalaki lokola figi ya mabe
Ndenge nini tokoki kozwa “motema mpo na koyeba” Yehova?
Yehova akopesa biso “motema mpo na koyeba” ye soki tozali koyekola Liloba na ye mpe kosalela yango
Tosengeli kotalela motema na biso na bosembo mpe kolongola makanisi mpe mposa nyonso oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova