Nayokaki “Lobɔkɔ ya Yehova” kati na bomoi na ngai
LISOLÓ YA LAWRENCE THOMPSON
NA BUTU moko ya mobu 1946, ngai mpe tata na ngai tofandaki kati na motuka wana tozalaki kotala lolenge myoto ya Nɔ́rdi mizali kongenga kati na makoló. Tosololaki na ntina na bonene ya Yehova mpe kosokema na biso. Tomikundwelaki bambula wana mosala ya Batatoli ya Yehova mopekisamaki na Canada. Papa akɔ́tisaki na makanisi na ngai lolenge oyo Yehova asungaki mpe atambwisaki
libota na ye na boumeli ya bambula wana.
ATAKO nazalaki bobele na mibu 13, nakangaki ntina ya bosolo na makambo oyo papa azalaki koyebisa ngai. Akɔ́tisaki mpe na makanisi na ngai mosala oyo mosɛngeli kosalema nokinoki mpe bonene ya mosala ya kosakola oyo mosɛngeli naino kokokisama. Papa atangaki Mituya 11:23 mpe alimbwelaki ngai polele ete, solo lobɔ́kɔ na Yehova lozali mokuse te. Bobele kozanga kondima na biso mpe kozanga kotyela ye motema nde ezali kopekisa oyo akoki kosala mpo na biso. Ezalaki lisoló moko kitoko kati na tata mpe mwana, oyo nakoki kobosana yango soko moke te.
Boyekoli ya mikanda ya Watch Tower, mingi mpenza búku Salvation, oyo ebimisamaki na 1939, esalaki lisusu bopusi makasi likoló na bolenge na ngai. Nakobosana soko moke te elilingi ya kokamwa oyo ezali na ebandeli ya búku yango: “Engbunduka ya kopota makasi oyo etóndi na bato meke, ezali kokima mbangu ya bakilomɛtɛlɛ 160 na ngonga moko. Esengeli kokatisa ebale moko likoló na gbabga na libúnu ya mbata ya motuya 180, na boye ete bato oyo bazali kati na engbunduka na nsima bakoki komona mikadó . . . Mibali mibale oyo bazalaki kati na engbunduka na nsima . . . batalaki wana eteni moko na nsuka ya gbagba ezalaki kozika mpe ekweaki na ebale. Basosolaki likámá monene oyo lizalaki kozela bango. Yango ezalaki mpenza likambo ya kosala noki. Engbunduka ekotelema noki mpo na kobikisa bomoi ya ebele na bato oyo bazali kati na yango?”
Ntango epesaki ndimbola ya elilingi oyo, búku yango esukisaki ete: “Bobele bongo lelo oyo, mabota nyonso mpe bato nyonso ya mabelé bazali liboso ya likámá monene. Bazali kokebisama engebene mitinda ya Nzambe, ete likámá monene ya Armagedon lizali mpenza liboso. . . . Lokola tosili kokebisama, moto na moto asɛngeli bongo kopona nzela na ye.”
Kopota makasi ya engbunduka, gbagba oyo ezali kozika, mpe ntina ya kosakola nokinoki ekangamaki makasi kati na makanisi na ngai.
Nabandi mosala ya kosakola
Nabandaki kosangana na mosala ya kosakola na 1938, wana nazalaki na mibu mitano. Henry mpe Alice Tweed, babongisi-nzela mibale (basáli ya ntango nyonso) bazalaki kokamata ngai, mpe tozalaki kolekisa ngonga 10 kino 12 na mokolo mpo na kosolola elongo na bato. Nasepelaki mingi kolekisa mikolo wana nyonso kati na mosala ya Yehova. Mpo na yango, natondaki na esengo wana na mbula oyo elandaki papa mpe mama bapesaki ngai nzela ya kokóma mosakoli mpe kopesa lapoló ya mosala na ngai.
Na mikolo wana ya ebandeli, tozalaki kosala lifili ya kopanza nsango, na kotamboláká na balabála monene ya bingumba elongo na mabaya makomami na maloba ya kokweisa mangomba ya lokuta mpe ya kokumisa Bokonzi ya Nzambe. Tozalaki lisusu kosalela bafono oyo tozalaki komema mpe koyokisa bato bansango ya Biblia na bikuke ya bandako na bango. Tozalaki koyokisa masukúlu ya J. F. Rutherford, prezidá ya la Société Watch Tower, oyo nakangaki na motó. Nazali naino koyoka ye koloba ete: “Mbala mingi elobamaka ete, Mangomba mazali motambo mpe bobubi bato!”
Mosala na biso mopekisami na Canada
Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mosala ya Batatoli ya Yehova mopekisamaki na Canada, lokola esalamaki na Allemagne ya Nazi mpe na mikili misusu. Mpo na yango, kosaleláká bobele Biblia tolandaki kokokisa mosala oyo mopesameli nzela na Nzambe, mpo na kotosa malako ya Biblia. (Matai 28:19, 20; Misala 5:29) Tomesenaki na komona boyei ya pwasa ya bapolisi kati na makita mpe na bandako na biso. Tomesenaki mpe na kopesa litatoli liboso na basambisi mpe koyanola na ebele ya mituna.
Ngai mpe yaya na ngai ya mobali Jim tomesenaki mingi mpenza na mosala ya kobwaka mwa babúku uta mituka na biso oyo mizali kopota kino na bikuke mpe mbalasáni ya bandako. Lisusu, tosalaki lokola bapesi nsango, mpe mbala mosusu lokola basinzɛli mpo na baoyo bazalaki kokatisa ndelo ya ekólo mpo na kokende na Etats-Unis na mokano ya koyangana na mayangani.
Ndako na biso ezalaki na nsuka ya Port Arthur (lelo oyo Thunder Bay), na Ontario, kati na mabelé soko ya hectare moko oyo ezingelamaki na nzeté mpe matiti. Tozalaki na ngombe moko, mwana ya ngombe moko, bangulu mpe bansósó—nyonso wana ezalaki ezipeli kitoko oyo epesaki biso nzela na kobomba mosala na biso ya kosunga bilenge baklisto oyo balukamaki ete bakangama mpo na mosala na biso ya kosakola Bokonzi ya Nzambe.
Na butu, bavuatire, mituka minene mpe makalo oyo ememi bilenge baklisto ezalaki kokɔ́ta mpe kobima na lopango na biso oyo etangolamaki. Tosengelaki kopesa ndako ya kolala, ekimelo, ebombamelo mpe koleisa bilenge wana mpe kotinda bango epai bazalaki kokende. Tata na ngai mpe mama na ngai, elongo na basáli mosusu ya ntango wana ya ebandeli bazalaki basaleli bamipesi na molimo na bango mobimba oyo basalaki bopusi monene likoló na motema na ngai ya elenge mpo na kosalela mpe kolinga Yehova Nzambe.
Na Augústo 1941, napesaki bomoi na ngai epai na Yehova mpe nazwaki batisimo kati na mwa libéké moko mozindo kati na zámba. Toyanganaki mwa ndambo na bato mpo na libaku yango na butu kati na ndako moke oyo engengisamaki na mwinda ya pitɔlɔ́. Lokola bazalaki mpenza kokanela biso, bapolisi bazalaki kotambola, na boumeli mobimba ya ntango yango bazalaki kolukaluka na bisúngi, kasi bamonaki biso te.
Mitindo mikeseni ya mosala ya ntango nyonso
Na mobu 1951, nasilisaki kelasi na ngai mpe nasalaki mobembo ya bakilomɛtɛlɛ soko 1 600 kino na esika nasɛngelaki kosala lokola mobongisi-nzela na engumba ya Cobourg, na etúká ya Ontario. Lisangá lizalaki moke, mpe nazalaki na moninga te oyo azalaki mobongisi-nzela. Kasi wana namikundwelaki ete lobɔkɔ ya Yehova lozali mokuse te, nafutelaki ndako na ngai moko, nazalaki kolamba bilei ngai moko, mpe nazalaki na esengo ya kosalela Yehova. Na mobu oyo molandaki, babyangaki ngai na biro ya filiale ya la Société Watch Tower na Toronto. Kuna nayekolaki makambo mingi ya ntina oyo mabongisaki ngai mpo na mosala ya Bokonzi na mikolo oyo mizalaki koya.
Nsima ya kosala lokola mobongisi-nzela na Toronto koleka mobu moko, ngai mpe Lucy Trudeau tobalanaki, mpe na eleko ya mpiɔ ya mobu 1954, totindamaki lokola babongisi-nzela na Levis, na etúká ya Québec. Mpiɔ ezalaki makasi mingi; minyoko miuti na bituluku na bato mpe na bapolisi mizalaki kobangisa; mpe koyekola lifalansé ezalaki ntembe monene. Kati na nyonso wana lobɔkɔ ya Yehova lozalaki mokuse te, mpo na yango atako tokutanaki na bantango ya mikakatano, tozwaki mapamboli mingi lokola.
Na ndakisa, basengaki biso ete tótala masúwa mibale (Arosa Star mpe Arosa Kulm) oyo la Société akanaki kosalela mpo na komema bato na liyangani monene ya mikili mingi oyo esalemaki na Mpótó na 1955. Lokola bazalaki na motema likoló mpo na boyokani elongo na la Société, bakambi ya kompanyi wana ya masúwa bayambaki biso malamu na mabaku mosusu, yango epemisaki biso mwa moke na mikakatano ya mosala ya kosakola na Québec na ntango wana.
Na ebandeli ya eleko na mpiɔ ya mobu 1955, naponamaki lokola mokɛngɛli-motamboli, mpe tolekisaki eleko wana ya mpiɔ na kotaláká masangá mosika na Nɔ́rdi ya Ontario. Na mobu oyo molandaki tokotaki na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower na Etats-Unis, mpe na nsima totindamaki lokola bamisionere na Brésil, na Súdi ya Amerika.
Totyaki motema mpe molimo na biso kati na mosala na biso mpe kozanga koumela tokómaki na makoki ya kosakola mpe koteya na lokóta ya Portuguais. Nokinoki na ebandeli ya mobu 1957, naponamaki lisusu mpo na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Sikawa, na esika ezala mpiɔ ya mikili ya Nɔ́rdi, tosengelaki nde kobundisa molungé makasi. Mbala na mbala tosengelaki kotelema mpo na kolongola zelo ya mɔ́tɔ kati na sapato na biso to kolya mwa nkokó mpo na kozwa lisusu makasi. Kasi mapamboli mazalaki mingi.
Na engumba ya Regente Feijo, nasololaki na mokonzi moko ya bapolisi, mpe apesaki etinda ete bakanga magazini nyonso mpe bato bakende na esika ya koyangana ya engumba. Na malili ya banzeté ya fololo oyo ezali na nkasa minene, nasalaki lisoló moko ya Biblia liboso na bato nyonso ya engumba. Lelo oyo lisangá moko ya Batatoli [ya Yehova] lizali wana.
Tobokoli bana na biso na Brésil
Ntango Lucy akómaki na zemi na 1958, tokendeki kofanda na Juiz de Fora mpe tosalaki lokola babongisi-nzela monene. Na boumeli ya bambula mibale oyo elandaki, bana na biso mibale ya basi, Susan mpe Kim babotamaki. Bazalaki solo lipamboli kati na mosala ya kosakola, mpamba te bakómaki likambo ya kobenda likebi na bato kati na engumba. Wana tozalaki kotambwisa pusupúsu na bango na banzela ya gudro, bato bazalaki kobɛlɛma pene na biso mpo na kotala bango. Lokola mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki monene na engumba ya Recife, mwa moke na Súdi ya ekwatɛ́lɛ, tokendeki kofanda na esika wana ya molungé makasi.
Na mobu 1961, nazwaki bobele libaku te ya kosala bibongiseli ya kokamata mpepo mpo na mobembo ya Batatoli na liyangani ya etúká na São Paulo, kasi ngai moko mpe nakendeki koyangana na liyangani monene ya etúká oyo etikala na makanisi na ngai. Nsima na miniti 20 ya kopombwa, mpepo ekitaki pwasa, epanzaki bato epai na epai kati na yango. Kati ya mpepo etikalaki mpamba; bakiti mingi elongwaki na bisika na yango, mpe bato batutanaki mpe bazalaki kobima makila. Ezali esengo ete, mokumbi mpepo alóngaki lisusu kokúkola mpepo, mpe tokitaki kozanga likámá. Moko te kati na biso azokaki mpenza mpota monene na boye ete yango epekisaki ye mpo na kokende na São Paulo na mpepo mosusu. Tosepelaki na liyangani ya etúká kitoko, kasi nalobaki ete nakosala lisusu mobembo na mpepo soko moke te!
Nzokande, ntango nazongaki na ndako nsima ya liyangani ya etúká, mokumba mosusu mozalaki kozela ngai. Nasengelaki kokamba liyangani ya etúká mosika na zámba ya Teresina, na etúká ya Piauí. Nasengelaki kokende kuna na mpepo. Atako nazalaki na nsɔmɔ, nandimaki mokumba yango, kotyáká bongo motema mobimba na lobɔkɔ makasi ya Yehova.
Na mobu 1962 mwana na biso ya mobali, Greg, abotamaki na Recife. Atako nakokaki lisusu te kosala lokola mobongisi-nzela mpo ete sikawa nakómaki na libota monene, nakokaki kosala bopusi ya malamu likoló na lisangá moke wana. Bana bazalaki ntango nyonso na mposa makasi ya kokende elongo na biso na mosala ya kosakola, mpo ete tokómisaki yango kitoko mpo na bango. Bango nyonso, kobanda na mbula misato, bazalaki na makoki ya kosala masoló na bandako ya bato. Tokómisaki yango momeseno ete tozangisaka makita to mosala ya kosakola soko moke te. Atako wana mosangani moko ya libota azalaki na bokɔnɔ mpe mosangani mosusu asengelaki kotikala na ndako mpo na kokɛngɛla ye, basangani mosusu ya libota basengelaki koyangana na makita to kosangana na mosala ya kosakola.
Na boumeli ya bambula, mbala na mbala tozalaki kolobela kati na libota na ntina na makambo oyo bana bazalaki koyekola na kelasi mpe na mikano oyo bakomityela kati na bomoi, kobongisáká bango mpo na kosala elongo na lisangá ya Yehova. Tozalaki na bokɛngi ete totika bango te na bopusi oyo ekoki kolembisi bango, lokola televizyó. Tozalaki na televizyó na ndako te kino ntango bana na biso bakómaki bilenge. Mpe atako tozalaki na makoki ya kosala yango, topesaki bango biloko mingi ya mosuni te. Na ndakisa, tosombaki bobele veló moko, mpo na bango nyonso misato.
Na meko nyonso oyo ekokaki, tozalaki kosala makambo na bomoko, kobeta basketball, kokata mai, kosala mibembo na libota. Mibembo na biso mikangisamaki na mayangani ya boklisto to na kokende kotala bandako ya Betele na mikili mikeseni. Mibembo wana mipesaki biso makoki ya kosala masoló ya motema mpo ete Lucy mpe ngai tokoka koyeba oyo ezalaki na mitema ya bana na biso. Tozali na botɔ́ndi mingi epai na Yehova mpo na mibu nyonso wana ya bosepeli!
Na nsima, mibu zomi oyo tolekisaki na bisika ya molungé penepene ya ekwatɛ́lɛ esalaki bopusi ya mabe likoló na kɔ́lɔngɔnɔ ya Lucy. Mpo na yango tosepelaki mingi na esika ya sika ya mosala oyo ezali na mwa malili epai na Súdi, na Curitiba, na etúká ya Paraná.
Bozongi na Canada
Na mobu 1977, nsima ya kolekisa mibu soko 20 na Brésil, Lucy mpe ngai tozongaki na Canada elongo na bana na biso mpo na kosunga tata na ngai oyo azalaki kobela. Oyo nde bokeseni ya bizaleli mpo na libota na biso! Kasi na elimo bokeseni bozalaki te, mpo ete tobatelaki bizaleli kitoko ya boninga elongo na bandeko baklisto ya bolingo mingi.
Na Canada mosala ya ntango nyonso ekómaki likambo oyo libota mobimba emipesaki na yango wana bana na biso ya basi babandaki moko nsima na mosusu mosala ya babongisi-nzela. Biso banso topesanaki mabɔkɔ mpo na bomoko ya libota na biso. Mosolo nyonso oyo tozalaki kozwa na mosala ya ndambo na mokolo mozalaki kosalelama mpo na kofutela ndako mpe kobatela mituka misato oyo tozalaki kosalela mpo na kosakola na teritware na biso oyo bandako na yango ekabwani na bantáká milai. Poso na poso, nsima ya boyekoli ya Biblia kati na libota, tozalaki kosolola na ntina na mikano ya libota. Masoló wana mazalaki kosalisa biso moto na moto na koyebisa epai wapi tosengelaki kokende mpe oyo tosɛngelaki kosala na bomoi na biso.
Lokola bayaya na ye ya basi, mwana na biso ya mobali, Greg, azalaki mpe na mokano ya mosala ya ntango nyonso. Kobanda azalaki na mibu mitano, amonisaki mposa ya kosala na biro ya filiale ya la Société, oyo ebéngami ete Betele. Abosanaki mokano yango ata mokolo moko te, mpe nsima ya kosilisa eteyelo na ye ya kati atunaki mama na ye mpe ngai ete: “Bokanisi ete nakoki kosenga mosala na Betele?”
Atako tookaki mpasi mpo na kotika mwana na biso ya mobali kokende, toyanolaki kozanga kokakatana ete: “Okoki kooka mpenza malamu lobɔ́kɔ ya Yehova bobele na Betele—ntéi ya ebongiseli ya Yehova.” Nsima na sanza mibale akendeki na Betele ya Canada. Ezalaki na 1980, mpe azali naino kosala kuna.
Bambula oyo ebandaki na 1980 etyaki Lucy mpe ngai liboso na mikakatano ya sika. Tokómaki lokola tozalaki na ebandeli—bobele biso mibale. Na liboso, Susan abalaki mpe azali kosala lokola mobongisi-nzela elongo na mobali na ye, mpe Kim elongo na Greg bakómaki kosala na Betele. Tolingaki kosala nini? Motuna wana mozwaki eyano nokinoki na 1981 ntango tobyangamaki na mosala ya zongazonga mpo na kotala masangá ya lokóta Portuguais, oyo mapalangani soko na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 2 000 kati na Canada mobimba. Tozali naino kosepela na mosala ya mokɛngɛli-motamboli.
Kim asilaki kobala mpe akɔ́taki na Galadi, mpe azali sikawa kosala elongo na mobali na ye oyo azali mokɛngɛli ya zongazonga na Brésil. Susan mpe mobali na ye bazali naino na Canada, bazali kobokola bana na bango mibale, mpe mobali ya Susan azali na molɔngɔ́ ya babongisi-nzela. Atako, na bambula oyo eleki libota na biso likabwanaki na mosuni mpo na mikumba mikeseni ya mosala ya ntango nyonso, kasi tozali se na bomoko makasi ya elimo mpe ya mayoki.
Lucy mpe ngai tozali kotala liboso mpo na mikolo kitoko mizali koya elongo na libota na biso kati na mabelé mapetolami. (2 Petelo 3:13) Lokola Moize na ntango ya kala, tomoni bosolo ya eyano na motuna oyo motunami na maloba kitoko kati na Mituya 11:23: “Lobɔkɔ na [Yehova, NW] ekomi mokuse? Sikawa okomɔna sɔkɔ monɔkɔ na ngai ekojala sɔlɔ mpɔ na yɔ to ekojala sɔlɔ tɛ.” Ya solo, eloko moko te ekoki kopekisa Yehova na kopambola basaleli na ye mpo na mosala na bango ya motema mobimba.
[Elilingi na lokasa 25]
Elongo na mwasi na ngai, Lucy