William Whiston—Moto na mayele mopɛngwi to moto na mayele na sembo?
OKOBEBISA nde mosala na yo ya bomoi mobimba mpo na kolóngisa bindimeli na yo? William Whiston asalaki yango.
Akómaki ntina ya ntembe monene na mangomba na ebandeli ya ekeke ya zomi na mwambe, ntango aboyaki kondima lingomba ya Anglican mpo na mateya oyo mazalaki libandá ya Biblia. Yango esalaki ete atalelama lokola mopɛngwi. Ezaleli na ye esalaki ete atyolama, kasi epesaki mpe ye limemya.
William Whiston azalaki nani? Mpe makambo nini asalaki?
Molimboli na Biblia
William Whiston azalaki moninga monene ya Sir Isaac Newton na Eteyelo monene ya Cambridge. Soki otali ebimeli ya Lingelesi ya mikanda ya Flavius Josèphe, Moyuda mokomi na makambo ya kala na ekeke ya liboso, emonani mpenza ete ezali libongoli oyo Whiston asalaki yango na 1736. Atako mabongoli mosusu mazali, libongoli na ye ya mayele, elongo na banoti mpe na lolenge yango ekomami, eleki mpenza mpe ezali konyatama kino sikawa. Mingi bazali kotalela búku yango lokola moboko ya mikanda ya Whiston.
Nzokande, tokoki te kobosana Primitive New Testament, libongoli ya Whiston ya Makomami ya Greke na boklisto. Ebimisamaki na mobu 1745, wana Whiston akómaki na mibu ntuku nsambo na mwambe. Whiston abongolaki Baevanzile minei mpe Misala ya bantoma longwa na Codex Bezae, abongolaki mikanda ya Paulo longwa na Codex ya Clermont, mpe ndambo etikali, kati na yango mokanda ya Emoniseli, abongolaki longwa na Makomi ya Alexandrie. Asalaki nyonso mpo na kolongola liteya ya lokuta oyo lizali na 1 Yoane 5:7. Whiston aponaki mikanda ya kala misato ya Greke oyo ezalaki malamu mingi na eleko wana.
Bolingo mpo na Biblia nde epusaki mpenza Whiston na kosala bongo. Oyo ezalaki kolobelama mingi na mikolo na ye ezalaki likambo litali banzambe, liteya oyo lilobeli bobele yango ezali moboko mobongi mpo na kozala na kondima epai na Nzambe. Engebene búku William Whiston—Honest Newtonian, Whiston azalaki kolóngisa “likanisi oyo ya ebandeli ete Biblia ezali liziba bobele moko ya solo na makambo ya kala.” Awa, liloba “Moyekoli ya Newton” elobeli Isaac Newton, oyo ayebani mingi mpo na búku na ye oyo ebéngami principia, kati na yango amonisaki mibeko ya bozelinginya ya molɔ́ngɔ́. Makanisi ya Newton mazalaki na bopusi makasi likoló ya William Whiston. Lolenge nini?
Bizaleli bikeseni
William Whiston abotamaki na mobu 1667, ye mwana na mokonzi moko na lingomba ya Anglican. Nsima na kokóma sángó na 1693, azongaki na Eteyelo monene ya Cambridge mpo na koyekola Matematiki mpe akómaki molakisi molandi ya Newton. Bakómaki na boyokani makasi. Ntango Newton asundolaki etelemelo na ye ya molakisi ya Matematiki soko mibu misato na nsima, andimisamaki ete Whiston aponamaki na esika na ye. Kolandáká mosala na ye, Whiston azalaki kolakisa makambo matali zebi ya minzoto (astronomie) mpe matematiki, kasi bopusi ya Newton bozalaki lisusu makasi likoló na ye mpo na kotya likebi mingi na molɔngɔ́ na masoló ya Biblia mpe mateya na yango.
Newton azalaki mondimi. Lokola azalaki moto oyo andimaki Mbula Nkóto oyo elobelami na Biblia, akomaki mikanda mingi likoló na bisakweli ya Danyele mpe Emoniseli. Kasi, ata moko te na mikanda yango ebimisamaki na boumeli ya bomoi na ye. Aboyaki liteya ya Bosato. Kasi, wana ntango ekokaki mpo na kobimisa bilembeteli na ye mpo na kokweisa Bosato, búku The New Encyclopædia Britannica elobi ete, “Newton atikaki na kobangáká ete makanisi na ye ya kotɛmɛla Bosato makoyebana.” F. E. Manuel alobelaki likambo yango kati na mokanda Isaac Newton, Historian, ete: “Etuluku ya Newton mpe babombaki makanisi na nkuku, to babungisaki molende na bango . . . Esika oyo Newton abombaki, Whiston alobelaki yango polele.” Mibali mibale wana bazalaki na bizaleli bikeseni.
Abimisami
Na Yulí 1708, Whiston akomaki mokanda epai na episkópo wa lokumu wa mboka Canterbéry mpe epai na episkópo wa lokumu wa mboka York, kosɛngáká mbongwana na mateya ya lingomba ya Anglican na lolenge ya kotalela liteya oyo ya lokuta ete Bosato lokola yango emonisami kati na Endimeli ya Athanase. Na yango, apesamaki toli ya kozala na bokɛngi. Atako bongo, Whiston atikaki te. Alobaki ete: “Nasili koyekola makambo nyonso wana na bozindo, mpe nasili kondima na motema mobimba ete uta kala, baklisto nyonso basili mpenza kokosama na makambo yango; mpe soki batambwisamaki na ngai, na lipamboli ya Nzambe, mbɛlɛ bakokosama lisusu te.”
Newton abangaki mpo na etelemelo na ye ya lokumu mpe molakisi na Eteyelo monene. Nzokande, Whiston asalaki bongo te. Wana abongisaki lolenge ya kolobela bindimeli na ye mpo na kotɛmɛla Bosato, akomaki mwa-búku (brochure) oyo emonisaki makanisi na ye. Kasi na Augústo 1708, Eteyelo monene ya Cambridge eboyaki kopesa Whiston lotómo ya konyata mokanda na ye, mpamba te etalelamaki lokola eyokani te na mateya ya lingomba.
Na 1710, Whiston afundamaki ete azalaki koteya makambo makeseni na bindimeli ya lingomba ya Anglican. Akweisamaki, alongolamaki lokola molakisi na Eteyelo monene, mpe babenganaki ye na Cambridge. Nzokande, atako asambisamaki mbala na mbala na Leta, kosambisama oyo ekobaki na boumeli ya mibu mitano oyo milandaki, Whiston andimisamaki te ete azalaki mopɛngwi.
Atako makanisi na ye ya kotɛmɛla Bosato ezali lolenge moko na oyo ya Whiston, Newton alobaki eloko te mpo na kolóngisa moninga na ye, mpe na nsima aanganaki ye mpenza. Na 1754, mikanda ya Newton oyo milimbolaki Biblia oyo milobelaki Bosato miyaki kobimisama na nsima—mibu 27 nsima ya liwa na ye. Kasi, ebimisamaki na nsima mpenza, boye esungaki Whiston soko moke te, ye oyo akufaki mibu mibale liboso.
Newton atalelami lisusu lokola ye oyo alongolisaki Whiston na ebongiseli na lokumu ebéngami Royal Society of London. Kasi Whiston alembaki te. Ye mpe libota na ye bakendaki kofanda na Londres, epai asalaki lisangá oyo lizalaki kotombola boklisto ya ebandeli. Atyaki milende na ye nyonso mpo na kokoma mikanda; búku na ye oyo elekaki na ntina mingi na eleko wana, ezalaki bavolimi minei ya Primitive Christianity Revived.
Atɛmɛlami kino nsuka
Lokola moto na zebi, Whiston ayekolaki makambo ndenge na ndenge na ntina na bakumbi masuwa mpo na koyeba bonene mpe molai ya mai monene. Atako makanisi na ye mandimamaki te, kolendendela na ye ememaki mpenza na kokólisa makoki ya masini oyo makolakisa ntango sikisiki mpe ekosalelamaka mpo na koyeba epai ebongi na kokamba masuwa na mai monene. Atako makanisi mingi ya Whiston likoló na bisakweli ya Biblia, lokola oyo ya bato ya eleko na ye, emonanaki ete ezalaki ya sikisiki te, kasi asalelaki myango nyonso oyo azalaki na yango mpo na bolukiluki na ye likoló na solo. Batrakte na ye likoló na kotambola na minzoto minene mpe makanisi na ye na ntina na bopusi ya Mpela na mikolo ya Noa ezali kati na mikanda mingi oyo akomaki mpo na kolóngisa solo na makambo na zebi mpe solo ya Biblia. Nzokande, oyo eleki mpenza mikanda na ye mosusu, oyo mizali bongo komonisa ete liteya ya Bosato liuti na Makomami te.
Na lolenge amesenaki kosala yango, Whiston atikaki lingomba ya Anglican na 1747. Asalaki yango mpenzampenza, wana atikaki kotambola lokola mokonzi ya lingomba, abandaki kotanga endimeli ya Athanase. Búku A Religious Encyclopædia elobi na ntina na Whiston, ete: “Moto na moto asengelaki kondima molende monene mpe bosolo ya ezaleli na ye, kozanga bongolábongola ya etamboli na ye, mpe bosembo ya etamboli na ye.”
Mpo na William Whiston, solo ekokaki te kobebisama, kasi bindimeli na ye bizalaki na motuya mingi koleka lokumu louti na bato. Atako atɛmɛlamaki, Whiston azalaki moto na mayele na sembo oyo alóngisaki Biblia lokola Liloba ya Nzambe na kozanga kobanga.—2 Timoté 3:16, 17.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Lotómo ezali na British Museum