Lolenge ya kolónga mposa ya kozonga na mboka kati na mosala ya Nzambe
YESU KLISTO apesaki na bayekoli na ye etindá ete: “Bokɛnda kojalisa bayekoli na mabota yɔnsɔ.” (Matai 28:19) Mpo na baklisto mingi, kokokisa mokumba oyo elimbolaki kondima bomoi ya mpasi mosika na mboka na bango. Bakɛngɛli-batambóli, basi na bango mpe basusu bazali kotika biloko mingi na nsima mpo na matomba ya mosala ya Nzambe. Mposa ya kozonga na mboka na bango ekoki kozala mokakatano monene mpo na Batatoli ya Yehova wana nyonso.
Mposa ya kozonga na mboka eyaka ntango makanisi na yo mazongi kokanisa na bomoi ya kala na ntina na libateli mpe bolingo oyo bazalaki komonisela yo. Yango ekoki kopesa mayoki makasi na boye ete okoki kobulungana na makanisi mpe kozanga makoki ya koyika mpiko. Ya solo, nsima ya koteka biloko na bango mpe kofuta mosolo mingi mpo na kokende na mokili ya bapaya, basusu basundolaki mikano na bango mpe bazongaki na mboka. Mposa ya kozonga na mboka elóngaki bango.
Mobulungano motindo wana kati na mayoki mobimaka mbala mingi nsima ya mobembo ya liboso, kasi epai na basusu elandanaka na boumeli ya bomoi na bango mobimba. Nsima ya kotika mboka na boumeli ya mibu 20, Yakobo ‘ajalaki na mposa monɛnɛ na ndako na tata na ye.’ (Genese 31:30) Nani akoki kokutana na mikakatano ya mposa ya kozonga na mboka? Nini ebandisaka yango? Lolenge nini moto akoki kolónga mayoki motindo yango?
Nini ebandisaka mayoki ya mawa?
Mposa ya kozonga na mboka ekoki kokómela moto nyonso. Amytis, mwana mwasi ya Astyage, mokonzi ya Mède, azalaki mpenza na bantina nyonso ya kozala na esengo: bozwi, nkembo, ndako moko kitoko. Nzokande, ayokaki mposa makasi ya bangomba ya Mède na boye ete mobali na ye, mokonzi Nebukadenesala abongiselaki ye bilanga bikakisami ya Babilone mpo na kobondisa ye.
Mposa ya kozonga na mboka ekoki mpenza kozala makasi mingi soki bomoi ezali mpasi koleka ndenge yango ezalaki na ntango oyo moto asalaki mobembo. Wana Bayuda bazalaki na boombo, bamilelaki ete: “Pɛmbɛni na bibale na Babɛlɛ, kuna tofandaki mpe tolelaki wana ebanjaki biso mpɔ na Siona. Kasi tokoki koyemba njembo na [Yehova] awa na mokili na bapakano boni?”—Njembo 137:1, 4.
Makambo mingi makoki kobimisa mawa oyo eutaka na mposa ya kozonga na mboka. Terri, oyo atikaki Canada, alobi ete: “Mokolo mosusu, fɔtɔ́ ya libota na biso ekweaki longwa na búku moko. Ntango nalɔkɔtaki yango, mbala moko mposa makasi ya kozonga na mboka eyelaki ngai, mpe nalelaki.” Chris, oyo autaki na Angleterre mpo na kokende na mokili moko ya bobólá mingi, andimaki ete: “Bobele koyoka loyembo moko ya kala to nsolo ya biloko oyo nalingaki mingi ekokaki mpo na kopesa ngai mposa makasi ya biloko oyo natikaki kuna.”—Kokanisá na Mituya 11:5.
Bikangiseli makasi ya libota ezali mpe moko na bantina oyo epesaka yango nzela. Roseli, mwasi ya ekólo Brésil oyo azali sikawa na mboka mosusu ya penepene, alobi ete: “Nalembaka ntango nazwaka nsango mabe euti na mboka mpe likoki ezali te ya kozala kuna mpo na kopesa lisungi. Mbala mosusu ezalaka mabe mingi soki nazwi nsango moko te mpe nabandaka kokanisa makambo mingi.” Janice alongwaki na Amerika ya nɔ́rdi mpo na kokende na engumba moko ya mikili ya molungé ya Amazonie. Alobi ete: “Nazwaka mposa ya kozonga na mboka ntango nayokaka nsango malamu euti na mboka. Soki nayoki lolenge libota na ngai mpe baninga na biso bazali kosepela elongo, nakobanda kokanisa ete ebongaki nazala kuna elongo na bango.”
Ezali te bobele likambo ya kotika bato mosusu nde ezali kobimisa mposa ya kozonga na mboka. Linda alimboli ete: “Nazalaki na mawa wana nayebaki te epai wapi nakoki kosomba biloko oyo nazalaki na yango mposa. Nayebaki ntalo ya biloko te to lolenge nini nakoki kokakola biloko. Kobongisa motuka ezalaki kosɛnga mosolo mingi, mpe bato mosusu bazalaki kotindikatindika ngai ntango nyonso oyo nazalaki komata na mituka mpo na bato nyonso oyo etondaki na bato. Yango ezalaki kopesa ngai mposa ya kozonga na mboka.” Wana azalaki kolobela bokeseni kati na mimeseno mpe makambo ya nkita, Janet amonisaki ete: “Bobólá nde ezalaki kobulunganisa ngai. Namonaki naino te bato bazali kosɛnga limpa, to mabota oyo mazali na bato mingi kofanda bango nyonso kati na eteni bobele moko ya ndako oyo ezali na mai te. . . . Makambo motindo yango mazalaki kobulunganisa ngai mpe namonaki ete nakokaki lisusu kofanda kuna mpo na ntango molai te.”
Lolenge ya kolónga mayoki na yo
Tosengeli kobulungana te soki tokómi na mayoki makasi mpo na bato oyo tolingaka to mpo na bisika epai tokólaki. Yehova Nzambe apesaki biso mayoki mpo ete tókoka kozala na boyokani ya penepene elongo na bazalani. Bakɛngɛli baklisto ya lisangá ya Efese bazalaki mibali oyo bateli kati na mayoki. Kasi likambo nini likómaki ntango Paulo akómaki pene ya kotika bango? Ya solo, “bango yɔnsɔ baleli mingi, mpe bakwei na nkingo na Paulo kopwɛpwa ye”! (Misala 20:37) Ezali solo ete, likambo oyo litalaki mposa ya kozonga na mboka te. Nzokande, ezali kotinda biso na kokanisa. Ebongi mpenza ete tózala na mayoki, kasi yango esengeli te kotambwisa biso. Na bongo, lolenge nini okoki mpenza kolónga mposa ya kozonga na mboka?
Koyeba koloba lokótá ya mboka bofandi ezali moko na myango mpo na komesana na esika oyo ozali. Mposa makasi ya kozonga na mboka ekoki kokóla wana kosolola ezali mpasi na ntina na lokótá ya mboka mopaya. Na yango, soki ekoki, yekolá kotánga mpe koloba lokótá ya etúká moko liboso ete okende kuna. Soki bongo te, osengeli komipesa na boyekoli ya lokótá na boumeli ya baposo ya liboso oyo elandi bokómi na yo. Ezali mpenza ntango yango nde ozali na mposa makasi, yango ekopesa yo nzela na koyekola lokótá yango. Soki okamati baposo wana mpenza mpo na koyekola lokótá, nokinoki okobanda kosolola elongo na bato, mpe ekosalisa yo na kolóngola mposa ya kozonga na mboka.
Salá nokinoki boninga ya sika elongo na bato, mpamba te yango ekosala ete omiyoka lokola ozali na mboka na yo. Lisangá ya Batatoli ya Yehova lizali esika eleki kitoko mpo na kozwa baninga ya malamu. Zwá likanisi ya kosala yango mpe monisá ete ozali kosepela na bato mosusu. Salá milende mpo na koyeba makambo matali bomoi na bango, mabota na bango mpe mikakatano na bango, mpe makambo oyo basepelaka na yango. Byangá baninga bandimi epai na yo na ndako. Okomona ete, bango mpe bakosepela mingi na yo.
Kati na libota ya Nzambe, boninga ekoki kozala makasi lokola bikangiseli ya libota. Yesu alobaki ete: “Moto nani akosalaka mokano na Njambe ajali ndeko mobali na ngai mpe ndeko mwasi mpe mama.” (Malako 3:35) Klisto andimisaki lisusu bayekoli na ye ete: “Sɔkɔ moto nani atiki ndako sɔkɔ bandeko mibali sɔkɔ bandeko basi sɔkɔ mama sɔkɔ tata sɔkɔ bana sɔkɔ bilanga mpɔ na ngai mpe mpɔ na nsango malamu, moto yango akojua na ntango oyo ndako mpe bandeko mibali mpe bandeko basi mpe bamama mpe bana mpe bilanga mbala mokama na minyɔkɔ lokola, mpe na ekeke ekoya akojua bomɔi na seko.” (Malako 10:29, 30) Kati na boninga kitoko wana ya bandeko ya elimo, tozali biso moko te, ata soki tozali na mboka mopaya.
Kobatela boninga elongo na baoyo batikali na mboka ekosalisa yo lisusu na kolónga mposa ya kozonga na mboka. Okokamwa na komona ete sikawa nsima ya kolongwa na yo, boyokani na nzela ya kotindelana mikanda ezali mpenza na ntina mingi, mpamba te ozali kotya likebi mingi na maloba oyo ozali kosalela. Ekoki kozala na makambo ya kosepelisa oyo okoki koloba. Janet, oyo tolobelaki liboso, apesi toli oyo ete: “Kosolola na telefone na ntáká molai ezali kosɛnga mosolo mingi, kasi kotinda kasete na nzela ya pósita ezali ntalo mingi te. Na ebandeli, kosolola na masini ekoki mpenza kosɛkisa. Nzokande, soki ozali kosolola elongo na moto moko na mikro, ezali likambo ya pɛtɛɛ mpe ya kosepelisa.” Okoki mpe kosɛnga ete bátindela yo eyano kati na kasete.
Shirley, oyo atikaki Etats-unis mpo na kokende na Amérique Latine esili koleka mibu 25, alobi ete: “Nakomaka mingimingi makambo ya kolendisa oyo nakutanaki na yango na esika ya kolobela mikakatano. Yango ezali kolendisa basusu na kokóba kokomela ngai mikanda.” Nzokande, zalá na bokɛngi. Kokomana mikanda mingi ekoki kopekisa yo na komizwela baninga ya sika. Del, oyo atikaki Canada mpo na kokende na mokili mosusu alobi ete: “Ebongi te kotikala na ndako mpe kokanisa likoló na biloko oyo ozali kozanga. Na esika ya kosala bongo, bimá mpe sepelá na bisika kitoko ya mboka oyo ofandi.”
Yekolá mimeseno, lisoló ya mboka, bizaleli ya bato mpe bisika ya ntina mpe ya kitoko ya mboka oyo ozali. Yango ekosalisa yo na kotya makanisi te na makambo mabe. Mpe soki okani kotikala epai okei, ezali malamu mingi kozonga na mboka na yo nokinoki te to mbala na mbala te. Komizwela baninga ya sika mpe komesena na bisika ya sika esɛngaka ntango molai. Kozonga mbala na mbala na mboka na yo ezali kopekisa yo ete omimesenisa. Nsima ya komesana na mboka na yo ya sika, okoki kozonga na mboka na yo ya kala bobele mpo na kosala mobembo—mpe na nsima kozonga. Bobele na ntango yango, kotika te kosala bokangami makasi elongo na mboka na yo ya sika.
Landá kotala liboso
Yehova asili kopesa biso mabelé mobimba lokola efandelo na biso. (Nzembo 115:16) Soki tomonisi elimo ya esengo ya boklisto, tokoki kosepela kofanda bipai binso. Soki osali mobembo na mokano ya kotombola matomba ya Bokonzi mpe kosakola nsango malamu na mboka mopaya to na esika mosusu na mboka na yo, kanisá mpo na yango na esengo mingi. Landá kotala liboso mpo na komisalela baninga ya sika, koyekola mimeseno ya sika, kozalisa bayekoli to kosala makambo oyo mazali kopesa matomba kati na mosala ya Nzambe.
Yehova Nzambe azali Moninga oyo azali ntango nyonso elongo na yo, ata okei epai wapi. (Nzembo 94:14; 145:14, 18) Mpo na yango bɛlɛmá na ye kati na libondeli. (Baloma 12:12) Yango ekosalisa yo na kobatela kati na makanisi ete mokano na yo kati na bomoi ezali bongo kosalela Nzambe. Abalayama mpe Sala babatelaki mokano na bango na makanisi ntango batikaki ndako na bango ya bozwi mingi na engumba Ulu. Mpo na kotosa etindá ya Yehova, batikaki baninga mpe bandeko na bango. (Misala 7:2-4) Soki bazalaki ntango nyonso kokanisa mpe koyoka mposa ya esika bautaki, mbɛlɛ bazwaki libaku ya kozonga kuna. Kasi bazalaki na mposa ya esika eleki malamu—bomoi boleki malamu kati na paladiso na mabelé na nsé ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló .—Baebele 11:15, 16.
Kosakola na bateritware ya mboka mopaya to esika mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene kati na mboka na yo moko ezali mpenza ntembe. Kasi ezali lisusu mosala moko oyo ebotaka mbuma mpe epesaka matomba. (Yoane 15:8) Mpe atako makanisi ya kozanga kolónga makoki mbala mosusu kokómela yo, okoki kolónga yango na kobateláká mokano na yo kati na makanisi mpe na kotaláká ntango nyonso liboso. Ndeko mwasi moko misionere oyo azali monzemba alobaki ete: “Wana nabandi koyoka ete makanisi ya mawa makómi koyela ngai, namekaka kokanisa na ntina na mokili ya sika mpe na lolenge bato banso bakozala bobele libota moko.” Makanisi ya kosepelisa motindo oyo makoki mpe kosalisa yo na kobatela esengo na yo mpe na kolónga mposa ya kozonga na mboka.
[Elilingi na lokasa 29]
Mposa ya kozonga na mboka esengeli te kopekisa mosala na yo ya boklisto