Okoki koleka na Masedonia?
NA TROASE, engumba moko ya Azia Moke oyo ezalaki na libongo, ntoma Paulo azwaki emonaneli moko. Mobali moko ya Masedonia abondelaki ye ete: “Leká na Masedonia kosalisa biso.” Ntango kaka Paulo azwaki emonaneli yango, ye ná baninga na ye ya mobembo ‘bamonaki ete Nzambe abengi [bango] mpo na kosakwela [bato ya Masedonia] nsango malamu.’ Yango ebotaki mbuma nini? Na Filipi, engumba monene na etúká ya Masedonia, Lidia mpe libota na ye bakómaki bandimi. Na nsima, bato mosusu ya etúká ya Masedonia mpe bakómaki bandimi.—Mis. 16:9-15.
Molende ya ndenge wana ezali mpe komonana epai ya Batatoli ya Yehova lelo oyo. Mingi kati na bango bandimi kofuta tike na mbongo na bango moko mpo na kokende na bisika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi. Na ndakisa, Lisa alingaki komipesa mingi koleka na mosala ya kosakola. Alongwaki Canada mpe akendaki na Kenya. Trevor ná Emily, oyo bazali mpe bato ya Canada, bakendaki na Malawi na mokano ya komipesa mingi koleka na mosala ya kosakola. Paul ná Maggie, bato ya Angleterre, bamonaki ete lokola bazwi pansiɔ, ezali libaku malamu ya kosala lisusu mingi koleka na mosala ya Yehova mpe bakendaki na Afrika ya ɛsti. Ozalaka na elimo ya komipimela? Okanisaka kokende kosakola na mboka mosusu? Soki ezali bongo, mitinda nini ya Biblia mpe batoli nini ekoki kosalisa yo osala yango malamu?
Omitala yo moko
Osengeli liboso kotalela ntina oyo olingi kokende kosakola na mboka mosusu. Yesu alobaki ete mobeko oyo eleki monene ezali: “Kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” Bolingo mpo na Nzambe mpe mposa ya kokokisa etinda ya kokómisa bato bayekoli nde esengeli kotinda moto akende kosakola na teritware ya mboka mopaya. Yesu abakisaki ete: “Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’” Moto amonisaka ete alingaka bazalani na ye soki azali na mposa makasi ya kosalisa bango. (Mat. 22:36-39; 28:19, 20) Mbala mingi, kosakola na mboka mopaya esɛngaka kosala mingi mpe kozala na elimo ya komipimela. Ezali likambo ya lisɛki te. Bolingo nde esengeli kotinda yo. Remco ná Suzanne, bato ya Pays-Bas oyo bazali lelo kosala na Namibie, bamonisaki yango na maloba oyo: “Bolingo nde esali ete tózala awa.”
Willie, oyo azali mokɛngɛli ya zongazonga na Namibie, alobi boye: “Baoyo baumelaka na teritware ya mboka mopaya ezali baoyo bayaka te na likanisi ete bandeko ya mboka bakosunga bango. Bayaka na likanisi ya kosala elongo na bandeko ya mboka, kosalisa bango na mosala ya kosakola.”
Nsima ya kotalela ntina oyo olingi kokende na mboka mosusu, omituna boye: ‘Makambo nini oyo nayebi ekoki kosalisa na teritware ya mboka mopaya? Nazali mosakoli ya malamu? Minɔkɔ nini nalobaka? Nakondima koyekola monɔkɔ ya sika?’ Sololá makambo yango polele na libota na yo. Tuná mwa makanisi epai ya bankulutu ya lisangá na bino. Mpe bondeláká Yehova mpo na likambo yango. Komitala ndenge wana esengeli kosalisa yo oyeba soki okoki mpenza mpe ozali na mposa ya kokende kosakola na mboka mopaya.—Talá etanda “Omiyeba yo moko.”
Epai wapi okokende?
Paulo abengamaki na Masedonia na emonaneli. Lelo oyo, Yehova alakisaka biso na ndenge ya likamwisi te bisika ya kokende kosakola. Kasi na nzela ya zulunalo oyo mpe mikanda mosusu, basaleli ya Nzambe bayebaka bateritware mingi oyo mposa ezali makasi. Yango wana, luká naino koyeba bateritware yango. Soki okoki te koyekola monɔkɔ ya sika to koumela na mboka mopaya, mbala mosusu okoki kokanisa kokende na mboka oyo bato mingi balobaka monɔkɔ oyo yo oyebi. Na nsima, luká koyeba ndenge ya kozwa viza, ndenge ya kokóma kuna, soki mobulu ezali te na mboka yango, soki biloko ezali ntalo mingi to te, mpe soki ezali mboka ya malili to ya molunge. Kotuna bandeko oyo basalá mibembo ya ndenge wana ekoki kosalisa yo. Ntango ozali kosala nyonso wana, bondeláká Yehova. Kobosana te ete “elimo santu epekisaki [Paulo ná baninga na ye] báloba liloba na etúká ya Azia.” Atako bamekaki kokende na Bitinia, “elimo ya Yesu epesaki bango nzela te” ya kokóma kuna. Ndenge moko mpe, ekoki kozwa mwa ntango liboso oyeba esika oyo lisalisi na yo ekoki mpenza kozala na ntina soki okei kosakola kuna.—Mis. 16:6-10.
Sikoyo, ekoki kozala ete oyebi mwa bamboka oyo okoki kokende kosakola. Soki omoni ete okoki kokende kosakola na mboka mopaya, komelá babiro ya Batatoli ya Yehova ya bamboka oyo ozali kokanisa. Na kati ya mokanda yango, lobelá makambo oyo osalá na lisangá mpe mikumba oyo ozali na yango sikoyo mpe tuná makambo mosusu ya ntina, na ndakisa soki bomoi ezali mpasi to te, lolenge ya ndako oyo okoki kozwa, soki balopitalo ezali, mpe soki misala ezali. Na nsima, pesá mokanda to mikanda na yo na Komite ya mosala ya lisangá na bino. Bankulutu oyo bazali na komite yango bakokoma mokanda na bango mpo na kolobela makambo na yo mpe bakotinda yango mbala moko na babiro ya filiale oyo oponaki. Biyano ya bafiliale yango ekosalisa yo oyeba esika nini okoki kosakola malamu soki okei kuna.
Willie, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Bandeko mingi oyo basalaki malamu ezali baoyo bakendaki naino kotala mboka oyo balingi, balukaki bisika oyo bakoki kozala na bomoi ya esengo. Mwasi moko ná mobali na ye bamonaki ete kofanda na bamboka oyo ezali mosika mingi na engumba ekozala mpasi mpo na bango. Yango wana, bakendaki kofanda na mwa engumba moko ya moke, epai mposa ezalaki makasi mpe bakokaki kozala na bomoi oyo ekopesa bango esengo.”
Mikakatano mosusu
Kolongwa epai na bino mpe kokende kofanda na mboka oyo omesani na yango ata moke te ekozanga mikakatano te. Lisa, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Kozala kaka yo moko ekoki kosala mpasi mingi.” Nini esalisaka ye? Kozala elongo na bandeko ya lisangá na mboka oyo afandi. Amityelaki mokano ya koyeba nkombo ya ndeko mokomoko. Mpo na kosala yango, akómaka mwa miniti liboso makita ebanda mpe atikalaka mwa moke na nsima mpo na kosolola na bandeko basi mpe mibali. Lisa azalaki kobima na mosala ya kosakola ná bandeko, kobengisa mosusu epai na ye, mpe kozwa baninga ya sika. Alobi boye: “Nayokaka mawa te mpo na makambo oyo namipimelá. Yehova apamboli ngai mingi.”
Nsima ya kokolisa bana, Paul ná Maggie balongwaki na ndako na bango epai bafandaki mbula 30. Paul alobi boye: “Ezalaki pɛtɛɛ te kotika biloko na biso. Kokabwana na libota ezalaki mpasi mingi koleka ndenge oyo tokanisaki. Tolelaki mingi na kati ya aviɔ. Ezalaki mpasi te tókanisa ete: ‘Tokoki kosala boye te.’ Kasi, totyelaki Yehova motema. Kozwa baninga ya sika ezali kosalisa biso tókoba kosala likambo oyo tokanaki.”
Greg ná Crystal basepelaki kolongwa na Canada mpo na kokende na Namibie, mpo bayebaki Lingelesi, monɔkɔ oyo Leta ya ekólo yango esalelaka. Kasi, na nsima, bamonaki ete ezali malamu báyekola monɔkɔ moko ya mboka. Balobi boye: “Tokómaki kolɛmba nzoto. Nzokande, kaka ntango toyekolaki monɔkɔ ya mboka nde toyebaki malamu mimeseno ya mboka yango. Kozala mingi elongo na bandeko ya mboka esalisaki biso tómesana na mboka na biso ya sika.”
Komikitisa mpe komipesa ndenge wana ekoki kolendisa bandeko ya mboka yango. Jenny abosanaka te mabota oyo ekendaki kofanda na Irlande, esika oyo akolá. Alobi boye: “Bazalaki na ezaleli ya koyamba bapaya. Bayaki mpenza mpo na kosalela basusu, kasi te mpo basusu básalela bango. Bazalaki mpenza na molende mpe na esengo, yango wana ngai mpe nalingaki kosala lokola bango.” Lelo oyo, Jenny ná mobali na ye bazali bamisionɛrɛ na ekólo Gambie.
Lipamboli ya Yehova “ekómisaka moto mozwi”
Paulo azwaki ebele ya mapamboli na Masedonia! Mbula soki zomi na nsima, akomelaki bandeko ya Filipi boye: “Ntango nyonso natɔndaka Nzambe na ngai, mbala nyonso oyo nakanisaka bino.”—Flp. 1:3.
Trevor ná Emily, oyo basakolaki na Malawi liboso bábengisa bango na Gileade, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia, bayokaka ndenge wana. Balobi boye: “Na bantango mosusu, tozalaki komituna soki tozwaki mpenza ekateli ya malamu, kasi tozalaki na esengo. Tokómaki na boyokani makasi mpe tozalaki komona ete Yehova azali kopambola biso.” Greg ná Crystal, oyo tolobelaki liboso, balobi boye: “Ezali te na likambo mosusu ya malamu koleka oyo tokokaki kosala.”
Ya solo, moto nyonso te nde akoki kokende kosakola na mboka mopaya. Bandeko mosusu bakoki kosala malamu soki bakei na bisika mosusu oyo mposa ezali makasi na kati ya ekólo na bango. Bamosusu bakoki komityela mokano ya kopesa mabɔkɔ na masangá mosusu oyo ezali pembeni na bango. Likambo eleki ntina ezali ya kosala nyonso oyo okoki mpo na kosalela Yehova. (Kol. 3:23) Soki osali bongo, maloba oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu ekokokisama epai na yo: “Lipamboli ya Yehova—yango nde ekómisaka moto mozwi, mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.”—Mas. 10:22.
[Etanda/Elilingi na lokasa 5]
Omiyeba yo moko
Mpo na koyeba soki okoki kokende kosakola na mboka mopaya, talelá mituna oyo elandi mpe omitala na bosembo mpe na kati ya libondeli soki okoki mpenza kosala mobembo ya ndenge wana. Makanisi yango oyo euti na banimero ya kala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekoki kosalisa yo.
• Nazali na boyokani makasi na Nzambe?—“Masɛngami mpo na kozwa bolamu” (15 Ɔkɔtɔbɛ 1997, lokasa 6)
• Nazali mosakoli ya malamu?—“Ndenge ya kolonga na mosala ya mobongisi-nzela” (15 Mai 1989, lokasa 21, na Lifalanse)
• Nakokoka kofanda mosika na libota mpe baninga na ngai?—“Lolenge ya kolónga mposa ya kozonga na mboka kati na mosala ya Nzambe” (15 Mai 1994, lokasa 28)
• Nakoki koyekola monɔkɔ ya sika?—“Kosala na lisangá oyo esalelaka monɔkɔ ya bapaya” (15 Marsi 2006, lokasa 17)
• Nazali na mbongo oyo ekoki mpo na kosala mobembo yango?—“Okoki kokende kosakola na mboka mopaya?” (15 Ɔkɔtɔbɛ 1999, lokasa 23)
[Elilingi na lokasa 6]
Komikitisa mpe komipesa ekoki kolendisa bandeko ya mboka yango
[Elilingi na lokasa 7]
Baoyo bayaka mpenza mpo na kosalela basusu nde balongaka