Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/10 nk. 23-26
  • Okoki kokende kosakola na mboka mopaya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kokende kosakola na mboka mopaya?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Zalá na mokano malamu
  • Omilɛngɛlɛ malamu
  • Mokakatano oyo eleki makasi
  • Bongo soki oyoki mposa ya kozonga mboka na bino?
  • Bongo soki bozali na bana?
  • Matomba ya kokende na mboka mopaya
  • Ezali boni mpo na yo?
  • Okoki ‘koleka na Masedonia’?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Équateur
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Okoki koleka na Masedonia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/10 nk. 23-26

Okoki kokende kosakola na mboka mopaya?

“BANDA kala nazalaka na mposa ya kosala mosala ya misionere. Ntango nazalaki monzemba, nazalaki kosakola na Texas, na États-Unis, na teritware oyo ezalaki na mposa ya basakoli mingi. Nsima ya libala na biso, mwasi na ngai alandaki ngai kuna. Ntango mwana na biso ya mwasi abotamaki, nakanisaki, ‘Boye, nakokokisa lisusu te mokano na ngai ya kokóma misionere.’ Kasi Yehova ayebi kokokisa mposa ya moto, mingi mpenza soki mposa yango eyokani na mokano na ye.”—Jesse, azali sikawa kosakola na ekólo Équateur elongo na mwasi na ye na bana na bango misato.

“Nakanisaki soko moke te ete nakokoka kosala mosala ya mobongisi-nzela na mboka mopaya lokola nakɔtaki na kelasi ya Gileadi te, Eteyelo ya bamisionere. Ntango nazalaki komona moto oyo nayekolaki na ye Biblia azali kosala lisukulu to azali kosakola, yango ezalaki kopesa ngai esengo mingi, mpe napesaki Yehova botɔndi mpo na libaku oyo apesaki ngai.”—Karen, mwasi moko monzemba oyo asalaki mbula mwambe lokola mobongisi-nzela na Amerika ya Sudi.

“Nsima ya kosala mibu 13 na mosala ya ntango nyonso na États-Unis, ngai na mwasi na ngai tokómaki koluka teritware ya sika. Naino toyoká esengo bongo te na bomoi na biso; oyo ezali solo bomoi ya kosepelisa mpenza.”—Tom, azali kosala mosala ya mobongisi-nzela elongo na mwasi na ye Linda, na Amazonie.

Maloba wana ya botɔndi euti na bato oyo bazwaki libaku te ya kokɔta na kelasi ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower mpo na kokóma bamisionere. Atako bongo, bisengo ezalaki, mikakatano mpe ezalaki na mosala ya kosakola na mboka mopaya. Ndenge nini likanisi yango eyelaki bango? Yo mpe okoki kosala mosala yango?

Zalá na mokano malamu

Mpo na kolonga na mosala ya kosakola na mboka mopaya, esengeli te kozala bobele na mposa ya komona makambo ya sika na mboka mopaya. Bato oyo bayikaki mpiko na mosala yango balongaki mpamba te bazalaki na mokano malamu. Lokola ntoma Paulo, bazali komitalela lokola bazali na nyongo, bobele epai na Nzambe te kasi lisusu epai na bato. (Baloma 1:14) Bakokaki kotosa etinda ya Nzambe ya kosakola ata na mboka na bango. (Matai 24:14) Kasi bamimonaki ete bazali na nyongo, yango wana bamonisaki mposa ya kokende kosalisa baoyo bazalaka na libaku mingi te ya koyoka nsango malamu.

Mbala mingi mposa ya kosakola na teritware oyo ezali kobota mbuma ezalaka mpe mokano oyo bato mosusu bazalaka na yango—mpe yango ezali mokano oyo ebongi. Nani kati na babomi mbisi, soki amoni moninga kokanga mbisi mingi na etima moko akolinga te kokende koluka mbisi kuna? Bobele bongo, balapolo kitoko etali ndenge mosala ya kosakola ezali kotambola na bikólo mosusu elendisaki basakoli mingi bákende na mikili mosusu oyo ezali na “ebele na mbisi.”—Luka 5:4-10.

Omilɛngɛlɛ malamu

Na bikólo mingi bapesaka nzela te na bapaya oyo bamipesi na mosala ya Nzambe ete básala mosala ya mosuni. Na yango baoyo balingi kokende kosakola na mboka mopaya basengeli kozala na mosolo ya kobikela. Lolenge nini kolonga mokakatano yango oyo etali mosolo? Basakoli mosusu batekaki ndako to batyaki bato mpo na kofutela ndako na bango mpo bázwa mosolo oyo basengelaki na yango. Ezali na basusu oyo batekaki biloko na bango ya mombongo. Basusu babombaki mosolo mpo na kosalela yango ntango bakokende na mboka mopaya. Nzokande, basusu bakendeke kosala na mboka mopaya mbula moko to mbula mibale, na nsima bakozonga na mboka na bango koluka mosolo mpe bakozongela lisusu mosala na bango na mboka mopaya.

Kokende kosala na mboka ya bobola eleki malamu mpamba te ntalo ya biloko ya kobikela ezalaka makasi te lokola na mikili ya bozwi. Yango esalisi basakoli mosusu bábika na mosolo moke ya epaso na bango. Ezali solo ete mosolo oyo moto akosalela etali ndenge aponi kozala na bomoi na ye. Ata na mikili ya bobola, okoki kozwa bandako ya kitoko oyo ekozala mpe ntalo makasi koleka.

Na ntembe te, osengeli liboso koyeba, okozala na mposa ya mbongo motuya boni liboso ya kokende. Nzokande, esengeli te komilɛngɛlɛ bobele na likambo ya mbongo. Mbala mosusu maloba ya bato oyo bakendeki kosakola na Amerika ya Sudi ekoki kosalisa yo.

Mokakatano oyo eleki makasi

Markku, ye azali moto ya ekólo Finlande, akanisi ebandeli ya mosala na ye na kolobáká boye: “Koyekola lokota ya Espagnol ezalaki etumba monene mpo na ngai. Nazalaki kokanisa ete lokola nayebaki naino lokota yango te, ekoumela mwa moke liboso bápona ngai lokola mosaleli na misala. Nakamwaki mpenza ntango basɛngaki ngai natambwisa boyekoli ya mokanda bobele nsima ya sanza mibale! Ezali solo ete mikakatano ezalaki mingi. Mbala mingi kobenga nkombo ya bato nde ezalaki kopesa ngai mpasi. Mokolo moko nabengaki Ndeko Sancho ‘Ndeko Chancho, (elimboli ngulu),’ lisusu nakobosana soko moke te ete nabengaki Ndeko Salamea ‘Malasea (elimboli moto mabe).’ Lokola bandeko bazalaki mpenza na motema molai, elendisaki ngai.” Na nsima Markku asalaki na mboka yango mbula mwambe lokola mokɛngɛli ya zongazonga elongo na mwasi na ye Celine.

Chris, mwasi ya Jesse oyo tolobeli maloba na ye na ebandeli, ayebisi ete: “Nazali kokanisa mbala ya liboso oyo mokɛngɛli ya zongazonga ayaki kotala lisangá na biso, bobele sanza misato nsima ya kokóma na biso awa. Nayebaki ete mokɛngɛli ya zongazonga azalaki kosalela bandakisa mpe azalaki koloba makambo kitoko mpo na kosimba mitema na biso, kasi nazalaki koyeba makambo nyonso te. Nabandaki kolela bobele wana na makita. Ezalaki mpisoli mpamba te; nazalaki kokimela. Nsima ya makita, nayebisaki mokɛngɛli ya zongazonga mpo na nini nalelaki. Amoniselaki ngai boboto mingi mpe ayebisaki ngai likambo oyo bandeko mosusu batikaki te koyebisa ngai, ete, ‘Ten paciencia, hermana’ (‘Ndeko mwasi, kitisá motema’). Nsima ya mbula soki mibale to misato, tokutanaki lisusu mpe tosololaki na boumeli ya miniti 45. Tozalaki bongo na esengo ya kokoka kolobana.”

Ndeko mosusu amonisi ete: “Koyekola ezali na ntina mingi. Soki tosali mpenza milende mpo na koyekola lokota, tokokoka kosolola malamu na bato.”

Bango nyonso bazali kondima ete milende motindo yango epesaka matomba. Moto akómaka na komikitisa mingi, na motema molai, mpe kolendendela ntango azali kobunda mpo na koyekola lokota ya sika. Yango ekopesa libaku malamu ya kosakola nsango malamu epai na basusu. Na ndakisa, koyekola lokota ya Espagnol ekopesa moto likoki ya kosolola na bato koleka milio 400 na mokili mobimba. Mingi kati na baoyo basengelaki kozonga na mboka na bango bazali naino kosalela lokota ya Espagnol oyo bayekolaki mpo na kosalisa bato oyo balobaka monɔkɔ yango.

Bongo soki oyoki mposa ya kozonga mboka na bino?

Deborah, asakolaki na Amazonie elongo na mobali na ye Gary, alobeli ntango ya kala ete: “Ntango toyaki mpo na mbala ya liboso na ekólo Équateur na 1989, nazalaki mpenza koyoka mposa ya kozonga na mboka na biso. Nasalaki makasi mpo na komeka komipesa mpenza na bandeko kati na lisangá. Bakómaki lokola libota na ngai.”

Karen, oyo tolobelaki na ebandeli, amonisi makanisi na ye na maloba oyo: “Namipesaki mingi na mosala ya kosakola mikolo nyonso mpo nalongola mposa ya kozonga na mboka na biso. Na lolenge yango nazalaki kofanda te mokolo mobimba kokanisáká mboka na biso. Lisusu nazalaki kobosanaka te ete baboti na ngai, lokola batikali kuna na mboka na biso, bazali kosepela mingi na mosala na ngai na mboka mopaya. Mama azalaki kolendisa ngai ntango nyonso na maloba lokola oyo: ‘Yehova akoki kobatela yo malamu koleka ngai.’”

Makiko, auti na Japon, alobi na mwa lisɛki ete: “Nsima ya kolekisa mokolo mobimba na mosala ya kosakola, nayokaka ete nalɛmbi. Na bongo, ntango nakómaka na ndako, soki nabandi koyoka mposa ya mboka na biso, mbala mingi nalalaka mpɔngi. Na ndenge wana, mposa yango eumelaka ntango molai te.”

Bongo soki bozali na bana?

Soki bozali na bana, bosengeli kotalela nini basengeli na yango, lokola kokɔta kelasi. Na likambo yango, basusu baponaki kotángisa bana na bango na ndako, nzokande basusu bakɔtisaki bango na kelasi.

Al akendaki na Amerika ya Sudi elongo na mwasi na ye, bana mibale mpe mama na ye. Alobi boye: “Tomonaki ete kokɔtisa bana na kelasi esalisaki bango báyeba koloba lokota nokinoki. Nsima ya sanza misato bakómaki koloba yango malamu.” Nzokande, bana ya Mike mpe Carrie, oyo bazali bilenge mibali, bazali koyekola na kelasi oyo eteyaka bana oyo bazali na mboka mosusu na kotindeláká bango mateya na nzela ya posita. Baboti na bango bamonisi makanisi oyo: “Tomonaki ete tosengeli te kotika bana bábunda bango moko na kelasi ya lolenge wana. Tosengelaki kosalisa bango mpe kosala ete bana bálanda mateya yango malamu.”

David mpe Janita, bato ya Australie, bayebisi makanisi na bango mpo na bana na bango ya mibali mibale, balobi ete: “Tolingaki bana na biso bámona bango moko lolenge nini bato mosusu bazalaka na mboka na bango. Ezalaka mpasi te kokanisa ete ndenge biso tobɔkwamaki nde ezali malamu, kasi bato mingi te bazali na bomoi ya ndenge yango. Bamonaki lisusu ete mitinda ya Teokrasi esalelamaka bisika nyonso na mokili, ezala na mboka nini to na bonkɔkɔ nini.”

Ken azalaki kokanisa ntango ya kala na kolobáká ete: “Nazalaki bobele na mbula minei ntango libota na biso etikaki Angleterre na 1969. Atako nasepelaki te mpo ndako na biso etongamaki na pɔtɔpɔ́tɔ mpe na matiti te, ndenge nazalaki kokanisa, namonaki ete baboti na ngai babɔkɔlaki ngai na lolenge ya malamu mpenza. Nazalaki ntango nyonso koyoka mawa mpo na bana mosusu oyo bazwaki libaku wana lokola ngai te. Nabandaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi wana nazalaki bobele na mbula libwa, mpamba te nazalaki elongo na bamisionere mpe babongisi-nzela minene.” Lelo oyo, Ken azali mokɛngɛli-motamboli.

Gabriella, mwana mwasi ya Jesse, alobi boye: “Sikoyo, ekólo Équateur ekómi mpenza mboka na biso. Nazali kosepela mingi na ekateli baboti na ngai bazwaki ya koya awa.”

Nzokande, mpo na bantina ndenge na ndenge bana mosusu bamesanaki te, mpe mpo na yango baboti na bango bazongaki na mboka na bango. Yango wana ekozala malamu kosala naino mobembo na mboka yango liboso ya kokende kofanda kuna. Na lolenge yango bokozwa ekateli nsima ya makambo oyo bokomona.

Matomba ya kokende na mboka mopaya

Ya solo, kofanda na mboka mopaya ebendaka mikakatano mingi mpe esɛngaka milende mpenza. Kasi, yango ebimisaka matomba epai na baoyo bazwaka ekateli ya kosala mobembo yango? Tóyoka maloba na bango moko.

Jesse alobi boye: “Mbula zomi oyo tolekisi na engumba Ambato, tomoni masangá mibale mpamba oyo ezalaki ekómi zomi na moko. Tozwaki libaku ya kofungola masangá mitano mpe na kati ya masangá yango, tosanganaki na botongi ya Bandako ya Bokonzi mibale. Tozwaki mpe esengo ya kosalisa mbula na mbula bayekoli ya Biblia soko mibale kino na batisimo. Nazali na mawa bobele na likambo moko—soki toyaki mbula zomi liboso!”

Maloba ya Linda: “Lokola bato bazali kosepela na nsango malamu mpe milende oyo tozali kosala elendisaka biso. Na ndakisa, na mboka moko moke ya zamba, moyekoli moko ya Biblia na nkombo Alfonso amonaki ete ekozala malamu kosala masukulu ya bato nyonso epai azali. Autaki kokɔta na ndako na ye ya sika oyo etongami na mabaya, mpe ezali moko ya mwa bandako ya kitoko na mboka na bango. Ntango amonaki ete na mboka na bango mobimba bobele ndako na ye nde ebongaki mpo na losambo ya Yehova, azongaki lisusu na ndako na ye ya kala oyo esalemi na matiti mpe apesaki ndako na ye ya sika, ya kitoko mpo bandeko básalela yango lokola Ndako ya Bokonzi.”

Jim alobi ete: “Ntango oyo tolekisaka mpo na kosolola na bato na mosala ya kosakola eleki ntango oyo tozalaki kolekisa na États-Unis mbala zomi. Lisusu, bomoi ya bato awa ezali ya mindɔndɔ te. Ntembe ezali te, tozali na ntango mingi mpo na boyekoli mpe mosala ya kosakola.”

Talá maloba ya Sandra: “Komona ndenge solo ya Biblia ekoki kobongola bomoi ya bato epesaka ngai esengo mingi. Nayekolaki Biblia elongo na Amada, mwasi ya mibu 69 mpe mokóló magazini moko ya moke ya bilei. Azalaki na momeseno ya kosangisa mai na miliki oyo azalaki kotɛka. Azalaki bongo koyiba bato na kotɛkiseláká bango miliki wana ya maimai na kɔpɔ oyo etondi mpenza te. Kasi nsima ya koyekola lisolo na motó ya likambo moke ete ‘Kolongobana epesaka esengo’ na mokapo 13 ya buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, Amada atikaki misala ya mabe wana. Ezalaki esengo monene komona ye kozwa batisimo mwa ntango moke na nsima.”

Karen alobi ete: “Naino natyelá Yehova motema mingi lokola sikoyo te, mpe naino namitiká te ete Yehova asalela ngai mingi lokola sikoyo. Boninga na ngai na Yehova ezali kokóma ntango nyonso mozindo mpe makasi.”

Ezali boni mpo na yo?

Na boumeli ya bambula ebele oyo eleki Batatoli basali mibembo mpo na kosakola na mboka mopaya. Ezali na baoyo bafandaka kuna mbula moko to mbula mibale, nzokande basusu bakendá mpo na libela. Bazali komema mayele na bango ya mosuni mpe ya elimo, mpe bozwi na bango, nyonso wana mpo na kokolisa matomba ya Bokonzi na mboka mopaya. Bakómi kosala na bisika oyo basakoli ya ekólo yango bakoki kokende te mpamba te ezali mpasi kozwa mosala kuna. Mingi kati na bango basombaki mituka ya makasi mpo na kokende na bisika oyo banzela ezali mabe mpenza, bisika oyo mituka mosusu ekoki kokóma te. Basakoli mosusu oyo balingi kofanda na bingumba, bazali lokola makonzi oyo esimbi makasi masangá minene epai kuna bankulutu bazali mingi te. Ɛɛ, longola moto moko te, bango nyonso bazali koloba na komindimisa nyonso ete basili kozwa matomba ya elimo mingi koleka oyo bango bapesi.

Okoki kondima libaku malamu ya kosakola na mboka mopaya? Soki ezalela na yo epesi yo nzela, mpo na nini okomeka te kosala mobembo yango? Likambo ya liboso mpe ya ntina mingi ezali bongo kokomela filiale ya mboka epai olingi kokende kosakola. Bakoyebisa yo nini osengeli mpenza kosala mpo na koyeba soki okokoka to soki okokoka te. Lisusu, toli mingi ya ntina ezali na lisolo oyo elobi ete “Longwá na mokili na yo mpe na bandeko na yo,” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1988, ebimeli ya Lifalanse. Soki omibongisi malamu, Yehova akoki kopambola yo mpo okoka koyoka mpe esengo ya kosakola na mboka mopaya.

[Elilingi na lokasa 24]

TOM NA LINDA BAZALI KOKENDE NA MBOKA MOKE YA ZAMBA MOSIKA EPAI YA BA INDIENS YA ETÚKÁ YA SHUAR

[Elilingi na lokasa 25]

MINGI BAZALI KOSAKOLA NA QUITO, MBOKA-MOKONZI YA EKÓLO ÉQUATEUR

[Elilingi na lokasa 25]

MAKIKO AZALI KOSAKOLA NA BANGOMBA OYO EBENGAMI LES ANDES

[Elilingi na lokasa 26]

LIBOTA YA HILBIG EZALI KOSAKOLA NA EKÓLO ÉQUATEUR UTA MBULA MITANO.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto