Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/6 lok. 32
  • Mpo na nini osengeli kozala wana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini osengeli kozala wana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Mateya mauti na Nzambe mpo na ntango na biso oyo ya mpasi mingi
    Lamuká!—1993
  • “Basanzoli na esengo”: Liyangani ya Etúká ya Batatoli ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Yaká na Liyangani ya Etúká “Kondima kati na Liloba ya Nzambe”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Yaka na liyangani ya etúká “Bobangi Nzambe”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/6 lok. 32

Mpo na nini osengeli kozala wana

TOKOZWA litomba ya kolakisama ya elimo na boumeli ya mikolo minei na assemblée de district “Mateya mauti na Nzambe,” oyo ekosalema na mokili mobimba na eleko ya elanga ya mbula oyo. Bobele na Etats-Unis, ba assemblées koleka 150 ekosalema na sanza ya Juin, Juillet, mpe Août. Programme ekobanda mingimingi mokolo ya Jeudi na 13h20 mpe ekosila mokolo ya Dimanche na 16h15. Makambo ya ntina ya ba assemblées wana ekozala ba rapports ya bamisionere oyo basalisaki bango na kozonga na mikili epai bautaki mpo na kosangana na libaku wana ya esengo.

Biso nyonso, tozala elenge to mikóló, mobali oyo abali, mwasi ya libala, tata, mama, elenge to mwana, tokozwa mateya ya litomba mingi oyo makolakisama na lolenge ya polele mpe na esengo. Na ndakisa, lelo oyo bato mingi bazali komituna soki ntina ya bomoi ezali nini. Mokolo ya Vendredi na ntongo tokozala na esengo ya koyoka botaleli ya likambo yango mpe tokosepela na oyo tokozwa mpo na kosalisa bazalani na biso na kososola likambo wana.

Vendredi na nsima ya nzanga ekozala na biteni oyo: “Solo ete libala na bino ezala bokangami ya koumela,” “Sala makasi mpo na lobiko na bato na ndako no yo,” mpe “Baboti​—bana na bino bazali na mposa ya likebi ya sikisiki.” Nokinoki nsima na yango, likebi ya ntina ekotyama likoló na mikakatano oyo bilenge bakutanaka na yango mpe lolenge ya kobongisa yango. Bokolendisama na drame ya ntango na biso na motó ya likambo Bilenge oyo bazali kokanisa Mozalisi na bango uta sikawa.

Mokolo ya Samedi, bakolobela mingi bisakweli na Yesu na ntina na mikolo ya nsuka mpe mingi mpenza maloba na ye oyo ete: “Nokinoki nsima na mpasi na mikolo yango, moi ekoyinda.” (Matai 24:29) Tokolinga koyoka lisoló oyo ekolimbola ntango nini mpasi wana ekoya. Mokolo wana, tokomona mpe lisoló ya ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso mpe makambo oyo basili kosala.

Mokolo ya Dimanche, drame mosusu oyo ezali na motó na likambo Bomizimbisa te mpe boseka Nzambe te, ekomonisa likámá ya bakasete video mpe miziki oyo eyebani mingi lelo likoló na bosembo na moklisto. Diskur ya bato nyonso na nsima na nzanga ekozala na motó na likambo: “Kolakisama ya ntina mpo na ntango na biso oyo ya mpasi.” Programme ekosila na likebisi “Bokangama ntango nyonso na mateya mauti na Nzambe.”

Na ntembe te, kozala na likita wana na boumeli ya mikolo minei ekozanga te kopesa yo matomba! Na motema mobimba tozali kobyanga yo ete ozala wana. Mpo na koyeba esika ya assemblée oyo ekozala penepene na yo, luka ba Témoins de Jéhovah na quartier na bino, komela biso mokanda to tanga Réveillez-vous! ya 8 Juin, oyo ekozala na bisika nyonso ya ba assemblées na monoko ya Lifalanse oyo ebongisami na Mpótó.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto