Tóbundisa bopusi ya lisumu likoló na nzoto oyo ebebá
“Kokanisa makambo ya nzoto elimboli kufa, kasi kokanisa makambo ya elimo elimboli bomoi mpe kimya.”—BALOMA 8:6, NW.
1. Bato bazalisamaki mpo na mokano nini?
“BONGO Njambe ajalisaki moto na elilingi na ye mpenja, na elilingi na Njambe ajalisaki ye; ajalisaki bango mobali mpe mwasi.” (Genese 1:27) Elilingi ezali komonisama ya eloko moko to ya moto moko. Na yango, bato bazalisamaki mpo ete bámonisa nkembo na Nzambe. Na komonisáká bizaleli ya Nzambe—lokola bolingo, malamu, boyengebene mpe bizaleli ya elimo—na milende nyonso oyo bazali kosala, bazali kokumisa Mozalisi mpe bazali kopesa ye masanzoli, mpe bango moko bazali kozwa bolamu mpe bosepeli.—1 Bakolinti 11:7; 1 Petelo 2:12.
2. Lolenge nini babalani ya liboso bazangaki mokano?
2 Babalani ya liboso, oyo bazalisamaki na kokoka, babongisamaki malamu mpo na kokokisa mokumba wana. Lokola talatálá oyo eyeisami sɛ́lisɛ́li na kokoka mpenza, bazalaki na makoki ya komonisa nkembo ya Nzambe na kongɛnga mingi mpe na bosembo nyonso. Nzokande, batikaki ete, sɛ́lisɛ́li wana ya kokoka ebeba ntango baponaki na nkó nyonso kozanga botosi epai na Mozalisi mpe Nzambe na bango. (Genese 3:6) Na nsima, bakokaki lisusu te komonisa nkembo ya Nzambe na lolenge ya kokoka. Bakómaki na nkembo na Nzambe te, awa bazangaki kokokisa mokano oyo mpo na yango bazalisamaki na elilingi ya Nzambe. Na maloba mosusu, basalaki lisumu.a
3. Lisumu ezali mpenza nini?
3 Likambo yango lizali kosalisa biso na kososola lolenge mpenza ya lisumu, oyo ezali kobebisa komonisama ya elilingi mpe ya nkembo ya Nzambe epai na moto. Lisumu lizali kosala ete moto azala mosantu te, elingi koloba ete, moto akómi mbindo mpe abebi na elimo mpe na bizaleli. Bato nyonso, lokola bazali bakitani ya Adama na Eva, babotami kati na ezalela wana ya kobeba mpe ya mbindo, bazangi bongo kokokisa oyo Nzambe azali kozela epai na bango, bana na ye. Mpe yango ebimisi nini? Biblia elimboli ete: “Na bongo, mabe ekɔtaki na mokili mpɔ na moto mɔkɔ, mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato yɔnsɔ mpɔ ete bato yɔnsɔ basali mabe.”—Baloma 5:12; kokanisá na Yisaya 64:6.
Bopusi ya lisumu likoló ya nzoto oyo ebebá
4-6. (a) Lolenge nini bato mingi bazali kotalela lisumu lelo oyo? (b) Wapi mbuma oyo ebimisami na lolenge bato bazali kotalela lisumu na mikolo na biso?
4 Ntalo monene ya bato na mikolo na biso bazali kokanisa te ete bazali mbindo, babebi, to bazali bato na masumu. Ya solo, liloba lisumu, lisili mpenza kolimwa na elobeli ya bato. Bakoki mbala mosusu kolobela mabungá, kozanga likebi, kozanga kokanisa malamu. Kasi bazali kolobela lisumu? Soko moke te! Ata na miso na baoyo bazali koloba ete bazali kondima Nzambe, Alan Wolfe, molakisi moko ya sociologie amonisi ete “mateya na ye [Nzambe] mazali bobele molɔngɔ́ ya bindimeli bitali bizaleli malamu na esika ete mázala mibeko ya bizaleli malamu, bazali kotalela yango lokola ‘batoli 10’ na esika ete ezala mibeko 10.”
5 Motindo wana ya kokanisa mozali kobimisa mbuma nini? Bato bazali koangana, to kozanga koyeba bosolo ya lisumu. Yango ebimisi libota ya bato oyo ndimbola na bango ya malamu mpe mabe esili kobebisama, baoyo bazali komimona nsomi na kotya mitinda na bango moko ya etamboli mpe bazali kooka ete bazali na likambo epai na moto moko te kati na makambo nyonso oyo balingi kosala. Mpo na bato motindo yango, kozanga kotungisama kati na lisosoli ezali mwango bobele moko ya koyeba soki etamboli boye ebongi to ezali mabe.—Masese 30:12, 13; kokanisá na Deteronome 32:5, 20.
6 Na ndakisa, kati na lisoló moko na televizyó, basɛngaki na bilenge ete bámonisa makanisi na bango na ntina na oyo ebéngami ete masumu nsambo ya kufa.b Mosangani moko alobaki ete “Lolendo ezali lisumu te. Ozali na lotómo ya kokanisa malamu na ntina na yo moko.” Na ntina na goigoi, mosusu alobaki: “Ebongi mbala mosusu kozala bongo. . . . Na bantango mosusu ebongi kofanda mpe kozwa mopepe.” Ata molimboli apesaki likanisi oyo mokuse: ‘Masumu nsambo ya kufa mazali makambo mabe te, kasi, na kokesena, mazali mposa makasi oyo ezali epai na bato banso oyo ekoki kotungisa mpe ekoki kosepelisa mingi.’ Ee, kotungisama kati na lisosoli esili kolimwa elongo na lisumu, mpamba te, kotungisama kati na lisosoli ezali mpenza kokesena na kooka malamu.—Baefese 4:17-19.
7. Engebene Biblia, lolenge nini lisumu lizali na bopusi likoló na bato?
7 Na bokeseni monene na nyonso wana, Biblia eyebisi polele ete: “Bato yɔnsɔ babungi mpe bajangi nkɛmbo na Njambe.” (Baloma 3:23) Ata ntoma Paulo andimaki ete: “Jambi nayebi ete elɔkɔ mɔkɔ malamu efandi na ngai, kati na njoto na ngai, tɛ. Mpɔ ete, ata najali kokana malamu, nayebi kosala yango tɛ. Malamu oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango tɛ. Kasi mabe oyo elingi ngai tɛ, nakosalaka bobɛlɛ yango.” (Baloma 7:18, 19) Awa Paulo azalaki te komitika na bolɛmbu na ye. Kasi, mpo ete ayebaki malamu lolenge bato nyonso bazangi nkembo ya Nzambe, aokaki mawa mingi mpenza mpo na bopusi ya lisumu likoló na nzoto oyo ebeba. Alobaki ete: “Ngai moto na mawa mingi! Nani akolongola ngai na njoto oyo na kufa?”—Baloma 7:24.
8. Mituna nini tosengeli komituna? Mpo na nini?
8 Likanisi na yo ezali nini na likambo yango? Okoki kondima ete lokola ozali mokitani ya Adama, ozangi kokoka lokola bato nyonso. Kasi lolenge nini boyebi wana ezali kopusa makanisi na yo mpe lolenge ya bomoi na yo? Ondimaka yango bobele lokola eloko esengeli te kobosana, kasi olandaka kosala bobele oyo mposa na yo etindi yo? To osalaka milende mpenza mpo na kobundisa bopusi ya lisumu likoló ya nzoto oyo ebebá, kosaláká nyonso mpo na kongɛngisa makasi nkembo ya Nzambe kati na makambo nyonso oyo ozali kosala? Yango esengeli kozala lobanzo ya moko na moko na biso na kotalela oyo Paulo alobaki ete: “Baoyo bazali na boyokani na nzoto batyaka makanisi na bango na makambo ya mosuni, kasi baoyo bazali na boyokani na elimo, na makambo ya elimo. Mpo ete kokanisa makambo ya mosuni elimboli kufa, kasi kokanisa makambo ya elimo elimboli bomoi mpe kimya.”—Baloma 8:5, 6, NW.
Kokanisa makambo ya mosuni
9. Mpo na nini “kokanisa makambo ya mosuni elimboli kufa”?
9 Paulo alingaki kolimbola nini wana alobaki ete “kokanisa makambo ya mosuni elimboli kufa”? Liloba “mosuni” esalelami mbala mingi kati na Biblia mpo na kolobela moto kati na ezalela na ye ya kozanga kokoka, ‘abandisamaki na zemi kati na lisumu’ lokola mokitani ya motomboki Adama. (Nzembo 51:5; Yobo 14:4) Na yango, Paulo azalaki kokebisa baklisto na kotya makanisi na bango te likoló na mimeseno, na bopusi mpe na bamposa ya mosuni ezangi kokoka, oyo esili kobeba. Kasi mpo na nini kosala bongo te? Na mokapo mosusu Paulo ayebisi biso oyo ezali misala ya mosuni mpe abakisi likebisi oyo: “Baoyo bakosalaka makambo yango bakosangola Bokonji na Njambe tɛ.”—Bagalatia 5:19-21.
10. “Kokanisa” elimboli nini?
10 Kasi ezali nde na bokeseni monene kati na kokanisa eloko moko mpe kosala yango? Ezali solo ete, kokanisa na ntina na likambo moko ememaka ntango nyonso te na kosala yango. Nzokande, awa ezali te likambo ya likanisi oyo eyeli moto mpe eleki na yango. Liloba oyo Paulo asaleli lizali phroʹne·ma na Greke, mpe ezali komonisa lolenge ya kokanisa, (momeseno ya) makanisi, . . . mokano, mposa, komonisa etingya.” Na bongo, “kokanisa makambo ya mosuni” elimboli kotambwisama, koyangelama, kokambama, mpe kopusama na bamposa ya mosuni oyo ebebá.—1 Yoane 2:16.
11. Lolenge nini Kaina azalaki kokanisa makambo ya mosuni, mpe ebimisaki mbuma nini?
11 Likambo yango limonisami malamu na etamboli oyo Kaina azalaki na yango. Ntango zuwa mpe nkanda epelaki na motema ya Kaina, Yehova Nzambe akebisaki ye ete: “Mpɔ na nini ojali kosilika mpe elongi na yɔ ejali na nkanda? Sɔkɔ osali malamu okondimama tɛ? Mpe sɔkɔ osali malamu tɛ mbɛ lisumu ejali kolala na ekuke na yɔ. Mposa na yango [ezali epai na yo; mpe yo nde okolónga yango?, NW]” (Genese 4:6, 7) Liponi lizalaki liboso na Kaina. Alingaki “kosala malamu,” to kotya makanisi, mokano, mpe mposa na ye likoló na likambo oyo ezali malamu? To alingaki kolanda kokanisa makambo ya mosuni mpe kotɛlɛmisa makanisi likoló na bizaleli mabe oyo ebombami kati na motema na ye? Lokola Yehova alimbolaki, lisumu lizalaki “kolala na ekuke,” kozela mpo na kopumbwa likoló na Kaina mpe kolya ye soki akotikela yango nzela. Na esika ya kobundisa mpe ‘kolónga likoló’ na mposa na ye ya mosuni, Kaina atikaki yango ekamba ye—kino na libebi.
12. Tosengeli kosala nini mpo na kotambola te “kati na nzela ya Kaina”?
12 Ezali boni mpo na biso lelo oyo? Ezali polele ete tokolinga te kolanda “nzela ya Kaina,” lokola Yuda alobelaki yango na mawa nyonso na ntina na basusu oyo bazalaki kati na baklisto ya ekeke ya liboso. (Yuda 11) Tosengeli soko moke te koluka kolóngisa to kokanisa ete kosepelisa bamposa na biso mwa moke to kokamata mwa bonsomi na bantango mosusu ezali mabe te. Nzokande, tosengeli kokeba mpo na kososola bopusi nyonso ya ezalela ya kotyola Nzambe mpe ya kobebisa oyo ekoki kokɔta na motema na biso mpe kolongola yango noki liboso ete ekɔtisa misisa na yango. Kobundisa bopusi ya lisumu likoló na nzoto oyo ebebá ebandaka na kati.—Malako 7:21.
13. Lolenge nini moto akoki “kobendama na bamposa na ye moko”?
13 Na ndakisa, ekoki kozala ete omoni likambo moko ya mabe to ya nsɔmɔ to elilingi moko ya makambo ya nsɔni to ya mbindo. Ekoki kozala elilingi kati na búku moko, kati na zulunalo moko, likambo moko oyo elakisami na filime to na televizyó, piblisité moko likoló na etandá, to ata likambo oyo lisalami mpenza kati na bomoi. Makambo wana yango moko masengeli te kobangisa, mpo ete ekoki kokóma—mpe ekómaka. Nzokande, elilingi to likambo wana, atako eumelaki bobele mwa ba secondes mpamba, ekoki koluka kotikala na makanisi na yo mpe kobima na bantango mosusu. Osalaka nini ntango yango ebimi? Osalaka nokinoki mpo na kobundisa likanisi yango mpe kolongola yango na elimo na yo? To opesaka yango nzela ete eumela na motó na yo, mbala mosusu kozongela likambo yango ntango nyonso oyo likanisi wana lizali koyela yo? Kosala bongo ezali komitya na likámá ya kobandisa molɔngɔ́ ya makambo oyo Yakobo alobeli ete: “Moto na moto akomekamaka mpɔ na kobendama mpe kolengolama na mposa mabe na ye mɔkɔ. Na nsima, esili mposa kojua jemi, eboti lisumu, mpe esili lisumu yango kokola eboti kufa.” Ezali mpo na yango nde Paulo alobaki ete: “Kokanisa makambo ya mosuni elimboli kufa.”—Yakobo 1:14, 15; Baloma 8:6.
14. Tozali kokutana na makambo nini mokolo na mokolo, mpe tosengeli kosala nini?
14 Awa ezali biso kobika na mokili oyo kati na yango pite, mobulu, mpe mposa ya bozwi ekumisami mingi— oyo emonisami polele mpe na bonsomi nyonso kati na babúku, na bazulunalo, na bafilime, na televizyó, mpe na miziki oyo bato mingi balingaka—tozingami mikolo nyonso na makanisi mpe na mateya ya mabe. Osalaka nini? Oyokaka ete nyonso wana esepelisi yo mpe ominanoli nzoto? To oyokaka lokola esalaki yango moyengebene Lota, “oyo ajalaki komitumola mpɔ na lofundo na bijaleli na bato kati na mobulu . . . amɔni mpe ayoki misala na bango na kilikili mokɔlɔ na mokɔlɔ mpe anyɔkɔlami na molimo na ye sembo”? (2 Pɛtɛlɔ 2:7, 8) Mpo na kolónga na kobundisa bopusi ya lisumu likoló na mosuni oyo ebebá, tosengeli kozala na ekateli lokola mokomi na Nzembo asalaki yango: “Nakotia elɔkɔ na nsɔni liboso na miso na ngai tɛ; mosala na bapɛngwi, ngai naboyi; ekojala na ngai sɔkɔ mokɛ tɛ.”—Njembo 101:3.
Kokanisa makambo ya elimo
15. Lisalisi nini tozali na yango mpo na kobundisa bopusi ya lisumu likoló na biso?
15 Eloko oyo ekoki kosalisa biso na kobundisa bopusi ya lisumu likoló na nzoto oyo ebebá ezali oyo Paulo alandi koloba ete: “Kokanisa makambo ya elimo elimboli bomoi mpe kimya.” (Baloma 8:6) Na yango, na esika ya koyangelama na mosuni, tosengeli nde kotika ete makanisi na biso mázala na nsé ya bopusi ya elimo mpe kokóma makasi kati na makambo ya elimo. Makambo yango ezali nini? Na Bafilipi 4:8, Paulo atandi yango na molɔngɔ́ oyo: “Na nsuka, bandeko, mpɔ na makambo yɔnsɔ na sɔlɔ, na makambo yɔnsɔ na lokumu, na makambo yɔnsɔ na sembo, na makambo yɔnsɔ na mpɛtɔ, na makambo yɔnsɔ na boboto, na makambo yɔnsɔ na ngɔlu, sɔkɔ malamu ejali mpe sɔkɔ lisanjoli ejali, bokanisa makambo yango.” Tiká tótalela yango sikisiki mpe tósosola malamu oyo tosengeli kokanisa na ntina na yango.
16. Bizaleli nini Paulo azali kolendisa biso na “kokanisa” yango, mpe mokomoko na yango elimboli nini?
16 Libosoliboso, Paulo atandi molɔngɔ́ ya bizaleli mwambe mpe abandisi mokomoko na yango na liloba “nyonso.” Liloba oyo lizali komonisa ete baklisto basengisami te na kokanisa ntango nyonso bobele na ntina na makambo matali Makomami to bindimeli. Ezali na makambo mingi to masoló mingi oyo tokoki kotya makanisi na biso likoló na yango. Kasi likambo oyo lileki ntina lizali ete yango esengeli koyokana na bizaleli ya elimo oyo Paulo amonisi. Mitindo nyonso ya “makambo” oyo Paulo atángi misengeli kobenda likebi na biso. Tiká tótalela yango moko na moko.
◻ “Solo” ezali na makambo mingi koleka kozala bobele solo to lokuta. Elimboli kozala ya likambo ya solo, ya sembo, mpe ya kotyela motema, eloko oyo ezali mpenza, kasi te oyo ezali komonana ete ezali bongo—1 Timoté 6:20.
◻ “Ya lokumu” ezali kotinda na makambo oyo mabongi kokumisama mpe mazali ya limemya. Ezali kopesa likanisi ya kosambela, eloko oyo etombwami, ya lokumu, mpe ya motuya na bokeseni na makambo ya nsɔni mpe ya mbindo.
◻ “Sembo” elimboli ete ezali na boyokani na mitindá ya Nzambe, kasi na oyo ya bato te. Bato ya mokili bazali kotondisa makanisi na bango na myango mizangi sembo, kasi biso tosengeli kokanisa mpe kosepela na makambo oyo mazali sembo na miso ya Nzambe.—Kokanisá Nzembo 26:4; Amosa 8:4-6.
◻ “Mpɛtɔ” elimboli oyo ezangi mbindo mpe ezali bulɛɛ bobele na makambo (ya kosangisa nzoto to mosusu) te, kasi lisusu na makanisi mpe na mikano. Yakobo alobaki ete “Nde mayɛlɛ mauti na likolo ejali liboso mpɛtɔ.” Yesu, oyo azali “na mbindo te,” azali Ndakisa ya kokoka mpo na biso.—Yakobo 3:17; 1 Yoane 3:3.
◻ “Boboto” ezali eloko oyo ezali kopusa mpe kotinda na kolinga basusu. Tosengeli “kotala ete topɛsana simbisi mɔkɔ na mɔkɔ mpɔ na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu,” na esika ya kotya makanisi na biso likoló na makambo oyo makobimisa koyinana, nkanda, mpe koswana.—Baebele 10:24.
◻ “Ngɔlu” elimboli te kozala bobele na “lokumu malamu” to kozala eloko oyo “elobelami malamu” kasi lisusu, na ndimbola ya kosala likambo, oyo ezali kolendisa mpe kokumisa. Tosengeli kotya makanisi na biso likoló na makambo ya mpɛtɔ mpe ya kolendisa na esika ya kotya yango na makambo oyo mazali kotyola mpe kozokisa.—Baefese 4:29.
◻ “Bizaleli malamu” elimboli mingimingi “malamu” to “bizaleli kitoko,” kasi ekoki mpe kolimbola malamu na makambo nyonso. Na yango, tokoki kosepela mingi na bizaleli ya motuya mingi, na matomba, mpe na misala ya basusu oyo ezali na boyokani na mitindá ya Nzambe.
◻ “Ebongi na lisanzoli” ezali makambo oyo mazali solo bongo soki lisanzoli yango liuti na Nzambe to na bato oyo Nzambe apesi bango bokonzi.—1 Bakolinti 4:5; 1 Petelo 2:14.
Elaka ya bomoi mpe ya kimya
17. Mapamboli nini mazali kozwama na “kokanisa makambo ya elimo”?
17 Soki tolandi toli ya Paulo mpe “tokanisi likoló na makambo yango,” tokolónga na “kokanisa makambo ya elimo.” Mbano ezali te bobele mapamboli ya bomoi, to bomoi ya seko kati na mokili ya sika, kasi lisusu kimya. (Baloma 8:6) Mpo na nini? Mpo ete makanisi na biso mabatelami na bopusi mabe ya makambo ya mosuni, mpe totungisami lisusu mpenza te na etumba makasi oyo ezali kati na mosuni mpe elimo lokola Paulo amonisaki yango. Na kotɛlɛmɛláká bopusi ya mosuni, tozali lisusu kozwa kimya elongo na Nzambe “mpo ete kokanisa makambo ya mosuni elimboli bonguna elongo na Nzambe.”—Baloma 7:21-24; 8:7.
18. Etumba nini ebimisami na Satana, mpe lolenge nini tokoki kozala balóngi?
18 Satana mpe bato na ye bazali kosala nyonso mpo na kobebisa kongɛngisama na biso ya nkembo na Nzambe. Bazali koluka koyangela makanisi na biso na kozingeláká biso na bamposa ya mosuni, awa eyebi bango ete na nsima, yango ekomema na bonguna elongo na Nzambe. Kasi tokoki kozala balóngi kati na etumba oyo. Lokola Paulo, biso mpe tozali kosakola ete: “Matɔndi na Nzambe na nzela na Yesu Klisto Nkolo na biso” mpo apesi biso mwango ya kobundisa bopusi ya lisumu likoló na nzoto oyo ebebá.—Baloma 7:25.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mbala mingi Biblia ezali kosalela likelelo ya Liebele cha·taʼʹ mpe likelelo ya Greke ha·mar·taʹno mpo na kolobela “lisumu.” Maloba nyonso wana mibale malimboli “kozanga,” na ndimbola ya kozanga to kokóma te na mokano, na elembo, to na eloko ozali koluka.
b Na kala, masumu nsambo ya kufa mazalaki lolendo, lokoso, bosɔ́ni, bilulela, kolunda, nkanda, mpe goigoi.
Okoki kolimbola?
◻ Lisumu ezali nini, mpe lolenge nini ekoki kokólisa bopusi likoló na nzoto oyo esilá kobeba?
◻ Lolenge nini tokoki kobundisa “kokanisa makambo ya mosuni”?
◻ Tokoki kosala nini mpo na kolendisa “kokanisa makambo ya elimo”?
◻ Lolenge nini “kokanisa makambo ya elimo” ezali kopesa bomoi mpe kimya?
[Elilingi na lokasa 15]
Kaina atikaki bizaleli ya mosuni eyangela ye mpo na libebi na ye moko
[Bililingi na lokasa 16]
Kokanisa makambo ya elimo elimboli bomoi mpe kimya