Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/3 nk. 15-19
  • Kanisáká makambo ya elimo mpo ozala na bomoi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kanisáká makambo ya elimo mpo ozala na bomoi!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Kokanisa makambo ya elimo”
  • Mbongwana monene
  • Liloba ya Nzambe ezali na ntina mingi
  • ‘Nalingi mibeko na yo na bolingo mingi’
  • Tóbondela Yehova asalisa biso
  • Tóyokisa elimo mawa te
  • Tókanisaka ntango nyonso makambo ya elimo
  • Tóbundisa bopusi ya lisumu likoló na nzoto oyo ebebá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Tótambola na kolanda elimo mpo tózwa bomoi mpe kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Tókima “elimo ya mokili”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Elimo na Jéhovah ezali kokamba libota na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/3 nk. 15-19

Kanisáká makambo ya elimo mpo ozala na bomoi!

“Kokanisa makambo ya elimo elimboli bomoi.”​—BALOMA 8:6, NW.

1, 2. Bokeseni nini Biblia esali kati na “nzoto” mpe “elimo”?

KOZALA na etamboli ya pɛto na miso ya Nzambe na mokili oyo bato bazali kokumisa bamposa ya nzoto ezali likambo moke te. Nzokande, Makomami ekesenisi “nzoto” na “elimo,” mpe emonisi polele mbuma mabe oyo moto abukaka ntango atambwisami na nzoto ya masumu mpe mapamboli oyo moto azwaka soki atiki ete elimo santu ya Nzambe etambwisa ye.

2 Na ndakisa, Yesu Klisto alobaki boye: “Elimo nde epesaka bomoi; mosuni ezali na ntina moko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali elimo mpe bomoi.” (Yoane 6:63, NW) Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Galatia ete: “Mposa ya nzoto ekobunanaka na mposa ya [elimo, NW] mpe mposa ya [elimo, NW] ekobunanaka na mposa ya nzoto; nyonso mibale ikotɛmanaka.” (Bagalatia 5:17) Paulo alobaki lisusu boye: “Soko akokona kati na nzoto, akobuka libebi kati na nzoto, nde ye oyo akokona kati na [elimo, NW] akobuka bomoi ya seko na nzela ya [elimo, NW].”​—Bagalatia 6:8.

3. Tozali na mposa ya nini mpo na kolongwa na bamposa mpe na makanisi ya mabe?

3 Elimo santu ya Yehova, to nguya na ye oyo esalaka mosala, ekoki mpenza kolongola “mposa mabe ya nzoto” mpe bokonzi mabe ya nzoto na biso ya masumu. (1 Petelo 2:11) Mpo na kolongwa na boombo ya bamposa mabe, ezali na ntina mingi ete elimo ya Nzambe esalisa biso, mpamba te Paulo akomaki boye: “Kokanisa makambo ya nzoto elimboli liwa, kasi kokanisa makambo ya elimo elimboli bomoi mpe kimya.” (Baloma 8:6, NW) Kokanisa makambo ya elimo elimboli nini?

“Kokanisa makambo ya elimo”

4. “Kokanisa makambo ya elimo” elimboli nini?

4 Ntango Paulo akomaki “kokanisa makambo ya elimo,” asalelaki liloba ya Grɛki oyo ezali kopesa likanisi ya “ndenge ya kokanisa, makanisi, . . . mokano, mposa, makaneli.” Verbe oyo euti na liloba yango elimboli “kotya makanisi, kokanisa na lolenge moko boye.” Na yango, kotya makanisi na makambo ya elimo elimboli kotambwisama, koyangelama to kopusana na nguya ya Yehova. Elimboli kondima ete elimo santu ya Nzambe etambwisa makanisi, mikano mpe bamposa na biso.

5. Na meko nini tosengeli kondima ete elimo santu etambwisa biso?

5 Paulo amonisaki na meko nini tosengeli kondima ete elimo santu etambwisa biso ntango alobelaki kozala ‘baombo ya elimo.’ (Baloma 7:6) Baklisto balongwi na boombo ya masumu mpo na kondima na bango na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola bato mpe na ndenge yango, ‘bakufi’ na ezaleli na bango ya kala lokola baombo ya masumu. (Baloma 6:2, 11) Baoyo, na maloba ya elilingi, bakufi na ndenge yango, bazali naino na bomoi na nzoto mpe bakoki sikoyo kolanda Klisto lokola “baombo ya boyengebene.”​—Baloma 6:18-20.

Mbongwana monene

6. Bato oyo bazali kokóma “baombo ya boyengebene” bazali kosala mbongwana nini?

6 Kotika kozala “baombo ya masumu” mpo na kokóma kosalela Nzambe lokola “baombo ya boyengebene” ezali mbongwana monene mpenza. Mpo na bato mosusu oyo babongwanaki ndenge yango, Paulo akomaki boye: “Bosili kosukwa, bosili kobulisama, bosili kozwa boyengebene na nkombo ya Nkolo Yesu Klisto mpe na [elimo, NW] ya Nzambe na biso.”​—Baloma 6:17, 18; 1 Bakolinti 6:11.

7. Mpo na nini ezali na ntina tóyeba ndenge oyo Yehova atalelaka makambo?

7 Mpo na kobongwana ndenge yango, tosengeli liboso koyekola ndenge oyo Yehova atalelaka makambo. Eleki bankama ya bambula, Davidi, mokomi ya nzembo abondelaki Nzambe na molende mpenza ete: “Ɛ [Yehova], yebisá ngai nzela na yo . . . Tambolisá ngai kati na solo na yo mpe lakisá ngai.” (Nzembo 25:4, 5) Lokola Yehova ayokaki libondeli ya Davidi, lelo oyo mpe ndenge moko, ayokaka mabondeli motindo wana ya basaleli na ye. Lokola banzela ya Nzambe mpe solo na ye ezali pɛto mpe bosantu, soki tozali komanyola yango ekosalisa biso soki tomekami mpo na kokokisa bamposa mabe ya nzoto.

Liloba ya Nzambe ezali na ntina mingi

8. Mpo na nini tosengeli mpenza koyekola Biblia?

8 Biblia, Liloba ya Nzambe, ekomamaki na lisalisi ya elimo na ye. Yango wana, lolenge moko ya malamu oyo tokoki kotika elimo yango esala mosala kati na biso ezali ya kotánga mpe koyekola Biblia; mpe soki likoki ezali, tosengeli kosalaka yango mokolo na mokolo. (1 Bakolinti 2:10, 11; Baefese 5:18) Soki tozali kokɔtisa mateya ya solo mpe mibeko ya Biblia na makanisi mpe na mitema na biso, ekosalisa biso tótikala ngwi ntango elimo na biso emekami. Ntango tomekami ete tósala makambo ya mbindo, elimo ya Nzambe ekoki kolamusa, na makanisi na biso, mateya ya Biblia mpe mibeko oyo ezali kotambwisa biso mpe ekoki kolendisa ekateli na biso ya kosala mokano ya Nzambe. (Nzembo 119:1, 2, 99; Yoane 14:26) Na ndenge yango, tokokosama te ete tólanda nzela ya mabe.​—2 Bakolinti 11:3.

9. Ndenge nini koyekola Biblia elendisaka ekateli na biso ya kobatela boyokani na biso na Yehova?

9 Soki tozali mpenza koyekola Makomami na etingya mpe ntango nyonso na lisalisi ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, elimo ya Nzambe ekobongola makanisi mpe motema na biso, tokokóma na limemya mingi mpo na mibeko ya Yehova. Boyokani na biso na Nzambe ekokóma likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. Ntango tomekami, tokotika te ete tóbanda kokanisa mingi esengo oyo tokoki koyoka na kosala oyo ezali mabe. Nzokande, mposa na biso ya libosoliboso ekozala ya kotikala sembo epai ya Yehova. Soki boyokani na biso na ye ezali likambo ya ntina mingi na miso na biso, yango ekotinda biso tólonga mposa nyonso oyo ekoki kobebisa boyokani yango.

‘Nalingi mibeko na yo na bolingo mingi’

10. Mpo na nini kotosa mibeko ya Yehova ezali na ntina mpo na kokanisa makambo ya elimo?

10 Mpo tókanisaka makambo ya elimo, esengeli kaka te tóyeba Liloba ya Nzambe. Mokonzi Salomo ayebaki mibeko ya Yehova malamu mpenza, kasi atikaki kotosa yango na nsuka ya bomoi na ye. (1 Mikonzi 4:29, 30; 11:1-6) Soki tozali bato ya elimo, tokomona ete longola mposa ya koyeba oyo Biblia elobi, tosengeli mpe kotosa mibeko ya Nzambe na motema na biso mobimba. Yango elingi koloba kotalela mibeko ya Yehova malamumalamu mpe kosala makasi mpo na kotosa yango. Mokomi ya nzembo azalaki kokanisa ndenge yango. Ayembaki boye: “Nalingi Mobeko na yo na bolingo [mingi]! Nakobanzaka yango mokolo mobimba.” (Nzembo 119:97) Soki tozali mpenza na mposa ya kotosa mibeko ya Nzambe, tokobanda komonisa bizaleli malamu. (Baefese 5:1, 2) Na esika tóbendama ntango nyonso mpo na kosala makambo ya mabe, tokomonisa mbuma ya elimo, mpe mposa ya kosepelisa Yehova ekoboyisa biso “misala ya nzoto.”​—Bagalatia 5:16, 19-23; Nzembo 15:1, 2. 

11. Monisá ete mobeko ya Yehova oyo epekisi kosala pite ebatelaka biso.

11 Ndenge nini tokoki komemya mpe kolinga mibeko ya Yehova mingi? Lolenge moko ezali na kokanisa malamumalamu motuya na yango. Tókamata na ndakisa mobeko ya Nzambe oyo elobi ete kaka bato oyo babalani nde bakoki kosangisa nzoto mpe epekisi pite na ekobo. (Baebele 13:4) Kotosa mobeko yango ezangisaka biso eloko moko ya malamu? Tata ya likoló oyo azali na bolingo akoki kopesa biso mobeko oyo ekopimela biso eloko moko ya malamu? Te! Kanisá makambo oyo ezali kokómela ebele ya bato oyo bazali kotosa mibeko ya Yehova te. Mingi bazali kolongola bazemi ya balabala to bazali kokɔta mabala nokinoki mpe bazali na esengo te na mabala yango. Mingi bazali kobɔkɔla bana bango moko. Longola yango, bato oyo bazali kosala pite bazali na likama ya kozwa bamaladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto. (1 Bakolinti 6:18) Mpe soki mosaleli ya Yehova asali pite, kotungisama na makanisi ekoki kosala ye mpasi mingi. Ntango azali kosala nyonso abosana, lisosoli ekotungisa ye; akoki kozanga mpɔngi na butu mpe ekoki kopesa ye mpasi na makanisi. (Nzembo 32:3, 4; 51:3) Na nyonso wana, tomoni te ete mobeko ya Yehova oyo ezali kopekisa pite ezali mpo na kobatela biso? Ya solo, kozala ntango nyonso na etamboli ya pɛto ezali na litomba monene!

Tóbondela Yehova asalisa biso

12, 13. Mpo na nini ebongi mpenza tóbondelaka ntango bamposa ya kosala masumu eyeli biso?

12 Kokanisa makambo ya elimo ezali kosɛnga kobondela makasi. Ebongi mpenza tósɛngaka elimo ya Nzambe mpo esalisa biso, mpamba te Yesu alobaki boye: “Soko bino . . . boyebi kopesa bana na bino makabo malamu, Tata na bino ya Likoló akoleka kopesa [elimo santu, NW] na bango balɔmbi ye te?” (Luka 11:13) Na kati ya libondeli, tokoki komonisa ete tozali kotyela elimo yango motema mpo esalisa biso mpo na bolɛmbu na biso. (Baloma 8:26, 27) Ntango tomoni ete bamposa to makanisi ya kosala lisumu ezali koyela biso, to soki moninga na biso mondimi akebisi biso, ekozala malamu tólobela mpenzampenza likambo yango na mabondeli na biso mpe tósɛnga Nzambe asalisa biso tólonga bamposa yango.

13 Yehova akoki kosalisa biso tótya makanisi na biso na makambo ya sembo, ya pɛto, ya malamu, mpe oyo ekoki kosanzolama. Ebongi mpe ete tóbondela ye na etingya mpo ete “kimya ya Nzambe” ebatela mitema mpe makanisi na biso! (Bafilipi 4:6-8) Yango wana, tóbondelaka Yehova asalisa biso ‘tólanda bosembo, kosalela Nzambe, kondima, bolingo, etingya, bopɔlɔ.’ (1 Timote 6:11-14) Na lisalisi ya Tata na biso ya likoló, mitungisi mpe komekama ekolonga biso te. Nzokande, na bomoi na biso, tokozala na kimya oyo Nzambe apesaka.

Tóyokisa elimo mawa te

14. Mpo na nini elimo ya Nzambe ezali nguya oyo esalisaka biso tózala na ezaleli ya bopɛto?

14 Basaleli ya Yehova oyo bakɔmeli balandaka toli ya Paulo oyo elobi ete: “Bóboma mɔ́tɔ ya elimo te.” (1 Batesaloniki 5:19, NW) Lokola elimo ya Nzambe ezali “elimo ya bosantu,” ezali pɛto mpe ezali bulɛɛ. (Baloma 1:4, NW) Ntango elimo yango ezali kosala kati na biso, ezalaka nguya oyo etindaka biso tózala na ezaleli ya bosantu, to na bopɛto. Esalisaka biso tótikala na bomoi ya pɛto oyo emonanaka na kotosa Nzambe. (1 Petelo 1:2) Mosala nyonso ya mbindo etyolaka elimo yango, mpe yango ekoki kozala likama. Na ndenge nini?

15, 16. (a) Ndenge nini tokoki koyokisa elimo ya Nzambe mawa? (b) Ndenge nini koboya koyokisa elimo ya Yehova mawa?

15 Paulo akomaki boye: “Bóyokisa [elimo santu, NW] ya Nzambe mawa te; botyami elembo kati na ye mpo na mokolo ya lisiko.” (Baefese 4:30) Makomami elobi ete elimo ya Yehova ezali elembo to ‘ndanga ya makambo oyo esengelaki koya,’ mpo na baklisto ya sembo bapakolami na elimo. Mpe makambo yango ezali bomoi oyo ekoki kosuka te na likoló. (2 Bakolinti 1:22; 1 Bakolinti 15:50-57; Emoniseli 2:10) Elimo ya Nzambe ekoki kotambwisa bapakolami mpe baninga na bango oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele na kozala sembo na bomoi na bango mpe ekoki kosalisa bango báboya masumu.

16 Ntoma Paulo akebisaki biso na elimo ya kobuka lokuta, ya moyibi, ya makambo ya nsɔni, mpe bongo na bongo. Soki tomitiki ete makambo yango ebenda biso, wana tolandi te toli ya Liloba ya Nzambe te oyo epemamaki na elimo. (Baefese 4:17-29; 5:1-5) Tokoloba mpe ete tozali koyokisa elimo ya Nzambe mawa, mpe tosengeli mpenza koboya likambo ya ndenge wana. Yango wana, soki moto moko kati na biso abandi kokangela toli ya Liloba ya Nzambe matoi, akoki kobanda kozwa elimo mpe makanisi oyo ekomema ye na kosala lisumu na nko mpe Nzambe akopesa ye mpenza mokɔngɔ. (Baebele 6:4-6) Ata soki tozali kosala masumu te sikoyo, ekoki kozala ete totii makolo na nzela oyo ekomema biso na kosala yango. Soki toboyi kolanda nzela oyo elimo ezali kolakisa biso, tokoyokisa yango mawa. Ekomonisa mpe ete toboyi koyokela Yehova, Mopesi ya elimo santu mpe tozali koyokisa ye mawa. Na ntembe te, lokola tolingaka Nzambe, tozali na mposa ya kosala bongo te. Nzokande, tokoki kobondela Yehova asalisa biso mpo tóyokisa elimo na ye mawa te kasi tóyeba kokumisa nkombo na ye mosantu mpe kokanisa ntango nyonso makambo ya elimo.

Tókanisaka ntango nyonso makambo ya elimo

17. Tángá mikano mosusu ya elimo oyo tokoki komityela, mpe mpo na nini kosala bongo ezali malamu?

17 Lolenge moko malamu mpenza oyo tokoki kokanisa ntango nyonso makambo ya elimo ezali ya komityela mikano ya elimo mpe kosala makasi mpo na kokokisa yango. Soki makambo na biso ezali kopesa biso nzela, tokoki komityela mokano ya kobongisa lisusu programɛ na biso ya koyekola, kosala mingi na mosala ya kosakola, to kozala na mposa ya mokumba moko na mosala ya Nzambe, lokola kokóma mobongisi-nzela, kosala na Betele, to kosala lokola misionɛrɛ. Makanisi na biso ekozala ntango nyonso na makambo ya elimo mpe ekosalisa biso tóbunda mpo tókwea te na bolɛmbu ya nzoto na biso to tólanda te mikano ya koluka biloko ya mokili mpe bamposa ya mabe oyo ezali na bato ya mokili oyo. Na ntembe te, yango nde nzela ya mayele, mpamba te Yesu alobaki boye: “Bómibombela biloko ya motuya na nse te, awa lopomboli mpe mabanga ikolyaka mpe awa bayibi bakokɔtaka mpe bakobɔtɔla. Bómibombela biloko ya motuya kuna na Likoló, wana lopomboli mpe mabanga ikolyaka te mpe wana bayibi bakokɔtaka te mpe bakobɔtɔla te. Zambi na esika ezali biloko na yo ya motuya, motema na yo ekozala wana lokola.”​—Matai 6:19-21.

18. Mpo na nini ezali na ntina tókanisaka ntango nyonso makambo ya elimo na mikolo oyo ya nsuka?

18 Kokanisa makambo ya elimo mpe koboya bamposa ya mokili ezali nzela ya malamu oyo tosengeli kolanda na “mikolo” oyo “ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5) “Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano ya Nzambe akoumelaka seko.” (1 Yoane 2:15-17) Soki elenge moklisto amityeli mokano, na ndakisa ya kosala mosala ya ntango nyonso, yango ekoki kozala lokola mwinda oyo ekotambwisa ye na bolenge to ntango akómi mwa mokóló, mpamba te bambula yango ezalaka na mikakatano mingi. Soki amekami ete asala mabe, moto ya ndenge yango akomona malamu oyo alingi kosala na mosala ya Yehova. Moto yango ya elimo akomona ete kotyola mikano ya elimo mpo na biloko ya mokili to esengo oyo lisumu ekoki kopesa ye ezali mpenza bozoba to mpe ligboma. Tóbosana te ete Mose, moto oyo alingaki makambo ya elimo, ‘aponaki [konyokwama, NW] esika moko na bato ya Nzambe liboso ya kosepela na bisengo ya masumu bikoumela bobele mwa ntango moke.’ (Baebele 11:24, 25) Ezala ete tozali bilenge to mikóló, tokoki kopona kosala ndenge yango soki tozali ntango nyonso kokanisa makambo ya elimo na esika ya kokanisa makambo ya nzoto ya masumu.

19. Tokozwa matomba nini soki tozali ntango nyonso kokanisa makambo ya elimo?

19 “Kokanisa makambo ya nzoto elimboli bonguna na Nzambe,” nzokande “kokanisa makambo ya elimo elimboli bomoi mpe kimya.” (Baloma 8:6, 7, NW) Soki tozali kokanisa ntango nyonso makambo ya elimo, tokozala na kimya mingi. Ekobatela mitema mpe makanisi na biso mpo tókwea te na bamposa ya nzoto na biso ya masumu. Tokozala na makasi mingi mpo na kolonga komekama mpo na kosala mabe. Mpe Nzambe akosalisa biso tólonga etumba oyo ezali kati na nzoto mpe elimo.

20. Mpo na nini tokoki kolikya ete tokoki kolonga etumba oyo ezali kati na nzoto mpe elimo?

20 Soki tozali ntango nyonso kokanisa makambo ya elimo, tokobatela boninga na biso na Yehova, Ye oyo apesaka bomoi mpe elimo santu. (Nzembo 36:9; 51:11) Satana Zabolo na bato na ye bazali kosala nyonso oyo bakoki mpo na kobebisa boyokani na biso na Yehova Nzambe. Bazali koluka kozala na bokonzi likoló na makanisi na biso, mpo bayebi ete soki tokwei, na nsuka tokokóma banguna ya Nzambe mpe tokokufa. Kasi, tokoki kolonga etumba oyo ezali kati na nzoto mpe elimo. Paulo alongaki, mpamba te ntango akomaki mpo na etumba na ye, atunaki liboso boye: “Nani akolongola ngai na nzoto oyo ya kufa?” Na nsima, mpo na komonisa ete akoki kolonga, alobaki boye: “Bobele Nzambe mpo na Yesu Klisto, Nkolo na biso. Matɔndi na ye!” (Baloma 7:21-25) Biso mpe tokoki kotɔnda Nzambe na nzela ya Klisto na ndenge apesi biso mayele ya kolonga bolɛmbu ya nzoto mpe kokanisa ntango nyonso makambo ya elimo na elikya kitoko ya bomoi ya seko.​—Baloma 6:23.

Ozali koyeba lisusu?

• Kokanisa makambo ya elimo elimboli nini?

• Ndenge nini tokoki kotika elimo ya Yehova esala kati na biso?

• Limbola mpo na nini, ntango tozali kobundisa masumu, ezali na ntina mingi tóyekolaka Biblia, tótosa mibeko ya Yehova, mpe tóbondelaka ye.

• Ndenge nini komityela mikano ya elimo esalisaka biso tótikala na nzela ya bomoi?

[Elilingi na lokasa 16]

Koyekola Biblia esalisaka biso tókwea te ntango elimo na biso emekami

[Elilingi na lokasa 17]

Ebongi kobondela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi ya kolonga bamposa ya masumu

[Bililingi na lokasa 18]

Mikano ya elimo ekoki kosalisa biso tókanisaka ntango nyonso makambo ya elimo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto