Elikya nini ezali mpo na bakufi-miso?
JOHN MILTON, atako azalaki mpenza mokufi-miso, akomaki babúku na ye ya ntɔ́ki oyo ete, Paradise Lost (Paladiso ebungá) mpe Paradise Regained (Paladiso ezwami). Kokufa-miso mpe kokufa-matoi epekisaki Helen Keller te na koteya mpe na kosalisa bibosono. Ee, bakufi-miso mingi bazali kolónga malamu mikakatano na bango wana. Kasi oyo nde esengo monene elingaki kozala soki moto nyonso akokaki komona malamu! Okoki mpenza kondima likambo yango soki molingami to moninga na yo moko azali mokufi-miso to amonaka malamu te.
Ezali solo ete, na bisika mosusu bibongiseli ya kopesa lisalisi bizali koteya baoyo bamonaka malamu te mwa misala mpo na kokokisa bamposa na bango ya mokolo na mokolo. Ekomeli ya bakufi-miso mpe bambwa oyo ebongisami mpo na kokamba bakufi-miso ezali kosalisa bango na kokokisa bamposa mingi na bango. Nzokande, bato mingi bamonaka kokufa-miso lokola bokɔnɔ moko ya mpasi mingi. Mokomi moko andimaki ete: “Kozala mokufi-miso ezali komema moto na kobungisa boyokani elongo na eteni monene ya mokili oyo tofandi kati na yango.” Na ntango yango, bakufi-miso mingi basengeli kotalela mpenza bato mosusu mpo na kosunga bango.
Okoki komituna, mpo na nini kokufa-miso epalangani mingi boye? Osilá koyoka nsango ya bokɔnɔ ya miso oyo ebéngami trachome? Yango eyeisaka kokufa-miso ya bato soko milió libwa. Búku monene The New Encyclopædia Britannica elobi na ntina na yango ete: “Bokɔnɔ yango bokopalanganaka mpe eyaka mingi mpenza epai ebele na bato batondani esika moko mpe wana bopeto bozali te. Kozanga mai ya kosukola, mpe ebele ya banzinzi oyo bazali kolanda na bosoto ya bato, ezali kopesa nzela na kopalangana ya bokɔnɔ oyo. Na makambo mosusu trachome ezali libosoliboso likambo litali bopeto kasi, monganga te; soki ezalela ya bato ebongi, kotondona esika moko ezali te, banzinzi bakimi, mpe mai mapesami mingi, likámá ya trachome ekokita nokinoki.” Milió mosusu moko ya bato to penepene na yango bazali konyokwama na onchocercose, to kokufa-miso oyo euti na mingálá. To ezali boni mpo na bokɔnɔ ebéngami xérophtalmie? Atako nkombo yango ezali makasi, esengeli koyeba ete yango ezali moko na bantina minene ya kokufa-miso. Diabète (maladi ya sukali), diphtérie, kintútu, scarlatine, mpe bokɔnɔ oyo bokopalanganaka na nzela ya kosangisa nzoto ekoki lisusu komema na kokufa-miso.
Wana tozali konuna, miso na biso makoki kolɛmba, mpo na kobeba ya biteni na yango ya kati mpe ya glaucome (komona malamu te), tokoki mpe te kobosana cataracte. Búku monene The New Encyclopædia Britannica emonisi ete: “Cataracte ezali naino moko na bantina minene ya kokufa-miso na bamboka mingi kati na mokili, mpe likambo yango lizali kopesa mpenza mawa mpamba te ekoki kosila kozanga nkaká na nzela ya lipaso.”
Atako bokundoli ya sika na zébi ya kobikisa miso, kosila ya kokufa-miso ezali mpenza mpo na sikawa te. Búku bobele moko oyo totángaki wana elobaki ete: “Bokóli kati na mwango ya kopengola kokufa-miso, kosalisa yango na nkísi mpe na lipaso ekoki kopesa litomba bobele na bato moke oyo bazali na makoki ya komisalisa na lopitalo. Kino ntango oyo bilei mpe bopɛto ekobonga mpo na eteni monene ya bato na mokili, kokufa-miso oyo ekokaki kopengolama ekotikala bobele lokola yango ezali sikawa.”
Atako nkísi ebéngami antibiotique mpe lipaso ezali na ntina mpo na kobundisa kokufa-miso, elikya mpo na kosilisa libela kokufa-miso ekangisami na likambo moko oyo lisalemaki esili koleka soko mibu nkóto mibale.
Kobikisa bakufi-miso na mikolo na Yesu
Kanisá mobali moko ya mibu 30 oyo azali kotambola na nzela moko ya mputulu mingi. Wana bayokaki ete azali koleka penepene wana, mibali mibale oyo bazalaki penepene na nzela yango bangangaki makasi ete: “Nkolo yokela biso mawa!” Atako bato oyo bazalaki wana bapamelaki bango ete bázala nyee, bakufi-miso wana bangangaki lisusu makasi ete: “Yokela biso mawa!” Moto yango atunaki na boboto nyonso: “Bolingi ete nasalela bino nini?” Na mposa monene bayanoli ete: “Miso na biso mafungwama.” Kanisá sikawa: Mobali yango asimbi miso na bango, nokinoki bamoni lisusu!—Matai 20:29-34.
Oyo nde esengo mpo na mibali wana oyo bazalaki bakufi-miso! Nzokande, kokufa-miso epalangani mpenza mingi. Oyo ezalaki bobele likambo moko mpamba oyo esalemaki. Mpo na nini esengeli kosimba likebi na yo? Mpamba te ezalaki Yesu ya Nazalɛtɛ nde afungolaki miso na mibali wana bakufi-miso. Ya solo, longola likambo oyo ete ‘apakolamaki mpo na kosakola na babólá nsango malamu,’ Yesu ‘atindamaki mpo na kopesa komona na bango bakufi miso.’—Luka 4:18.
Bato bakamwaki na kobikisama ya likamwisi oyo esalemaki na nguya ya elimo santu ya Nzambe. Tozali kotánga: “Bongo ebele bakamwi wana emɔni bango bimimi bajali koloba mpe bibɔsɔnɔ bajali na njoto makasi mpe mikatatali bajali kotambola mpe bakufi miso bajali komɔna. Bakumisi mpe Njambe na Yisalaele.” (Matai 15:31) Kozanga kosɛnga lifuti to kolakisa makoki na ye moko to koluka lokumu na ye moko kati na kobikisama wana, Yesu amonisaki polele bolingo mpe motema mawa ya Yehova Nzambe. Nzokande, Yesu azalaki lisusu koyoka mawa mpo na bato bakufi miso na elimo mpe bazangi lisalisi, oyo “balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bajali na mobateli tɛ.”—Matai 9:36.
Atako masoló motindo oyo makoki solo kosepelisa, okoki komituna ete, ‘Ezali boni lelo oyo?’ Lokola lelo oyo moto moko te azali na makoki ya kobikisa bato lokola Yesu asalaki yango, kobikisama wana ezali na ndimbola mpo na biso? Ezali solo na elikya mpo na bakufi-miso? Tolendisi yo na kotánga lisoló oyo lilandi.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
“Kino ntango oyo bilei mpe bopɛto ekobonga mpo na eteni monene ya bato na mokili, kokufa-miso oyo ekokaki kopengolama ekotikala bobele lokola yango ezali sikawa.”—The New Encyclopædia Britannica