Mpo na nini Batatoli balɛmbaka te kozongela bato?
‘BANGO wana lisusu! Kasi bazalaki awa esili koleka bobele mwa baposo!’ Yango ezalaka likanisi na yo wana Motatoli ya Yehova moko ayei kotala yo? Lelo oyo Batatoli ya Yehova bakendaka kotala bamilió ya bato. Okoki komituna ete, ‘Mpo na nini balendendelaka wana bayebi malamu ete ntalo monene ya bato bazali na lingomba na bango to bamonisaka bosepeli te?’ Motuna oyo mobongi kozwa eyano.
Mokumba liboso ya Nzambe
Batatoli ya Yehova basili koyekola kati na Makomami ete uta 1914, mobu oyo Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki, makambo mazali koleka na mokili mazali kokokisa bisakweli ya Biblia bitali nsuka ya ebongiseli ya ntango oyo mpe bitali koya ya Boyangeli ya Nzambe na mabelé. Emonani ete, ezali ekeke moko ya mobulu, ya kosopa makila, ya koyinana oyo esili kopɛngwisa bato mosika mpenza na kobongisamama ya makambo na bango na nzela ya politiki. Bitumba mpe mobulu oyo ezali naino konyokola bato ezali bilembeteli ete boyangeli ya bato elóngi te kobongola mitema, makanisi mpe bizaleli ya bato. Kokanga nkanda makasi na ntina na makambo oyo masalemaki kala ezali naino kobebisa boyokani ya bato na bikólo, na mposo, mpe na mangomba makeseni. Yango ezali kosalema na bisika bitangwi na ntáká molai lokola Afghanistan, Afrique du Sud, Inde, Irlande ya nɔ́rdi, Moyen-orient, mpe oyo ebéngamaki kala ete Yougoslavie. Bongo, nini ezali nzela bobele moko ya koumela mpo na kosilisa makambo wana?
Nini ezali kopusa Batatoli?
Batatoli ya Yehova bayebi ete mwango ya Nzambe—Bokonzi na ye oyo ekambami na Klisto Yesu—nde ezali nzela bobele moko ya solo-solo. Nkutu Yesu akɔtisaki malɔmbɔ mpo na Bokonzi yango kati na libondeli na ye ya ntina mingi: “Tata na biso oyo ajali na Likolo, Nkombo na yɔ ejala mosanto. Tika Bokonji na yɔ eya, tika mokano na yɔ esalama na nse pelamɔkɔ na likolo.’” Batatoli bandimaka ete libondeli oyo ezali solo kosɛnga ete Nzambe akɔtela makambo na bato.—Matai 6:9, 10.
Bongo mpo na nini Batatoli ya Yehova bazalaka na mposa ya kokende ntango nyonso ndako na ndako mpo na kopesa nsango wana? Na ntina na mibeko mibale oyo Yesu alendisaki makasi: “‘Okolinga [Yehova] Njambe na yɔ na motema na yɔ mobimba’ mpe na molimo na yɔ mobimba mpe na makanisi na yɔ mobimba. Oyo ejali mobeko moleki monɛnɛ mpe oyo na liboso. Mosusu na mibale ejali mpe lokola yango ete, ‘Okolinga mojalani na yɔ lokola yɔ mɔkɔ.’”—Matai 22:37-39.
Batatoli balingi kozwa mapamboli ya Nzambe, mpe lokola balingaka bazalani na bango, balingi lisusu ete mapamboli wana mapesamela bazalani na bango. Na yango, kolandáká ndakisa ya Yesu, bapusami na bolingo bozangi moimi mpo na kokenda epai na bazalani na bango. Balingi kopesa bango libaku ya koyeba oyo “Nzambe ya esengo” asili kolakela bato na botosi oyo bakozala na mabelé mapetolami.—1 Timoté 1:11; 2 Petelo 3:13.
Misionere moklisto Paulo andimaki bilaká ya Nzambe mpe na yango akomaki ete: “Ngai Paulo, najali moombo na Njambe mpe ntoma na Yesu Klisto mpɔ na kondima na Bapɔnami na Njambe mpe bosɔsɔli na makambo na sɔlɔ majali kobila losambo na sembo; najali mpe na elikia na bomɔi na seko. Yango elakami na Njambe na bilaka na kala. Ye Njambe akobukaka lokuta tɛ.” Ee, Nzambe, “oyo akoki kobuka lokuta te,” “alakaki” bomoi ya seko mpo na baoyo na komikitisa nyonso bazali koluka koyeba ye mpe kosalela ye.—Tito 1:1, 2; Sofoni 2:3.
Batatoli Bafutamaka?
Mbala mosusu mwa bato balobaki ete Batatoli bafutamaka mpo na mosala na bango. Likanisi oyo lizali mpenza lokuta. [Batatoli] bazali kosimba na motema maloba oyo ya Paulo epai na lisangá ya Kolinti: “Mpɔ biso tokɛsɛni na bato mingi baoyo bakotɛkisaka Liloba na Njambe; nde lokola batindami na Njambe, tokolobaka na sembo na miso na Njambe kati na Klisto.”
Bakonzi mosusu ya mangomba bateyaka mpo na mbongo, ezala mpo na lifuti na mateya na bango na bandakonzambe to oyo epesami na bateyi ya mangomba oyo balendisaka na televizyó misala ya mombongo. Ntalo monene ya mangomba efutaka bakonzi na bango.—2 Bakɔlinti 2:17.
Nzokande, Batatoli bazali na bakonzi te oyo bazwaka lifuti, mpe mbala mingi na mikili mosusu bakataka motuya ya mosolo te mpo na mikanda mikolimbolaka Biblia oyo batikelaka bato ya motema sembo oyo bazali koluka solo, atako mingi kati na bato yango bamonaka ete basengeli kopesa makabo ya bolingo malamu. Mosolo wana mosalelamaka mpo na kosunga mosala ya kopalanganisa nsango malamu na mokili mobimba. Na boyokani na toli oyo ya Yesu, ete: “Bojui na lisombi tɛ, bopɛsa na lifuti tɛ,” Batatoli bandimi na motema moko kosalela mosolo, nguya mpe ntango na bango, na kopesáká bamilió ya ngonga mbula na mbula na mosala ya Nzambe. Na yango, bateyaka bato oyo basepeli na mosala ya ndako na ndako mpe na nzela ya boyekoli ya Biblia na ndako.—Matai 10:8; 28:19, 20; Misala 20:19, 20.
Makambo mazali kondimisa ete mokano ya Batatoli ya Yehova ezali te ya koluka mosolo, ezala mpo na mokomoko na bango, ezala mpo na masangá na bango to mpo na la Société Watch Tower. Moto moko te azwaka lifuti mpo ete akendaka ndako na ndako. Bongo bazwaka mosolo lolenge nini mpo na kotambwisa mosala na bango? Na nzela ya makabo ya bolingo malamu oyo bato ya botɔ́ndi na mokili mobimba bazali kopesa. Bakɔngɔlaka mbongo te na ntango ya makita.
Bopusi ya litatoli na bango
Mosala ya kosakola na ndako na ndako mpe litatoli ya libaku malamu ya Batatoli eyebani malamu na bato nyonso? Bilembeteli oyo bimonisami kati na bopanzi nsango biyanoli makasi ete, ezali bongo. Batatoli ya Yehova balobelamaka na televizyó mpe na bafilime ntango balakisaka moto moko oyo azali kobɛta na ekuke ya ndako moko. Bazulunalo ya bililingi ya kosɛkisa ezali kolobela Batatoli. Mosala ya molende oyo basalaka eyebani mpenza malamu na bakomi ya bazunalo ya bililingi ya kosɛkisa na boye ete basalaka bililingi mosusu oyo bimonisaka Batatoli ya Yehova. Bililingi yango bikoki mbala mosusu kosɛkisa, kasi mbala mingi yango emonisaka likambo malamu oyo ya ntina mingi—ete Batatoli bayebani mpo na kolendendela na bango kati na mosala ya kosakola ndako na ndako.—Misala 20:20.
Zulunalo moko ya bililingi ya kosɛkisa emonisaki mobali moko oyo azalaki kobuta ngomba mpo na kotuna na “momoni-makambo.” Alobaki: “Yebisá ngai makambo minene oyo makobima nsima!” Eyano ya “momoni-makambo” ezalaki nini? “Tótala . . . Nzala ekozala, maladi mabe, mpe koningana ya mabelé. Moi mokoyinda, mpe sanza ekokóma makila.” Moto yango atunaki: “Nsango malamu ezali nini?” “Momoni-makambo” ayanolaki ete: “Nzambe akolongola mpisoli nyonso . . . mpe kufa ekozala lisusu te na mawa mpe na mpasi!” Moto yango atunaki ete: “Lolenge nini oyebaki makambo motindo oyo?” Eyano na ye ezalaki nini? “Moto moko te akoki kokima Batatoli ya Yehova!” Ya solo, likambo yango liyebani malamu na mokomi ya zulunalo ya bililingi ya kosɛkisa ye moko!
Likambo ya ntina kati na lisoló oyo mpe masoló mosusu ya lolenge yango lizali ete yango ezali komonisa te bobele bompikiliki ya Batatoli mpo na kozongela bato, kasi yango ezali komonisa lisusu bomoko ya mateya na bango. Na mwa maloba moke, mokomi amonisaki likambo ya ntina ya mosala na bango ya ndako na ndako mpe atángaki maloba ya Makomami.—Kokanisá na Matai 24:7, 29; Emoniseli 21:3, 4.
Likambo oyo ete ntalo monene ya bato bazali koboya nsango na bango ezali kolɛmbisa Batatoli te to mpe ezali kokitisa molende na bango te. Ntoma Petelo akebisaki ete: “Na mikɔlɔ na nsuka basɛki bakoya mpe bakosɛka, bakotambola pelamɔkɔ na mposa mabe na bango mpenja, bakoloba ete, ‘Wapi elaka na [Kozala, NW] na ye? Jambi longwa na ntango na kufa na bankɔkɔ, makambo yɔnsɔ maumeli bobɛlɛ bongo lokola ejalaki yango na ebandeli na kojalisama.’” Atako bongo, bolingo ezali kopusa Batatoli na kokóba kokende epai na bazalani na bango mpe na kolanda kosala bongo kino Nzambe akotya nsuka na ebongiseli mabe ya ntango oyo.—2 Pɛtɛlɔ 3:3, 4.
Yesu alobaki ete na mikolo ya nsuka, nsango malamu esengelaki liboso kosakolama. Mpo na koyeba malamu mpo na nini mpe lolenge nini, talá masoló mibale oyo malandi.—Malako 13:10.
[Bililingi na lokasa 9]
Batatoli ya Yehova bazalaka te na kelasi ya bakonzi ya lingomba oyo bazwaka lifuti—bango banso bazali basáli na bolingo malamu