Tiká te ete mayoki ya kozala yo moko ebebisa bomoi na yo
MAYOKI ya kozala bobɛlɛ yo moko ekoki kobebisa bomoi ezala ya mikóló to ya bilenge. Mwasi moko mokomi, Judith Viorst, akomaki kati na zulunalo Redbook ete: “Mayoki ya kozala yo moko etungisaka motema. . . . Mayoki ya kozala yo moko epesaka biso mayoki ya kozanga eloko mpe ya kozanga elikya. Kozala yo moko esalaka ete omiyoka lokola mwana oyo azangi mama, lokola mpate oyo abungi, okomiyoka moke mpenza mpe ete osili kobunga kati na mokili moko monene mpe ezangi bolingo.”—Sɛtɛ́mbɛ 1991.
Kokabwana na baninga, kozala esika oyo omeseni na yango te, koboma libala, kufa ya molingami to—kozanga kosolola, makambo ndenge na ndenge makoki kosala ete omiyoka ete ozali yo moko. Ata wana bafandi elongo na bato mosusu, ezali na bato oyo bazali komiyoka mpenza bango moko.
Okoki kosala nini?
Soki otungisami mpo ete ozali yo moko, osengeli bobele kotikala lokola moto oyo azangi lisalisi? Ezali na eloko oyo okoki kosala mpo na kopekisa ete kozala yo moko ebebisa bomoi na yo mokemoke to elongwela yo mposa ya kozala na bomoi? Ya solo, okoki kosala yango. Batoli ya kitoko ezali mingi. Mpe batoli mingi ya kitoko esili kopesama kati na Biblia, Liloba lipemami ya Nzambe. Bilendiseli yango bikoki mpenza kozala oyo ozali na yango mposa mpo na kolónga mayoki ya kozala yo moko.—Matai 11:28, 29.
Na ndakisa, okoki kozwa elendiseli na kotángáká lisoló ya Luta, elenge mwasi oyo azalaki na Moyen-Orient esili koleka soko mibu 3 000. Azalaki mpenza moto oyo asengelaki konyokwama na mayoki ya kozala ye moko. Ntango mobali na ye akufaki, akendeki elongo na bokilo na ye ya mwasi na Yisraele, esika oyo amesenaki na yango te. (Luta 2:11) Atako akabwanaki na libota na ye mpe na baninga na ye, mpe azalaki mopaya kati na mokili oyo ayebaki yango te, esika moko te kati na Biblia emonisi ete atikaki mayoki ya kozala ye moko ebulunganisa ye. Okoki kotánga lisoló na ye kati na Biblia na mokanda ya Luta.
Lokola Luta, osengeli kobatela elimo ya kolónga. Motindo na yo ya kotalela makambo mpe mitungisi ya bomoi ekoki kokólisa mayoki ya kozala yo moko. Ann, oyo asalisaki tata na ye na boumeli ya mibu minei wana azalaki na bokɔnɔ makasi, amonaki bosolo ya likambo yango. Ntango tata na ye akufaki, ye amiyokaki mpenza ye moko. Alobi ete: “Nayokaki lokola ete nazalaki epai moko te, nazalaki mpe na ntina moko te—nayokaki lokola ete moto moko te azalaki na mposa na ngai. Kasi nandimaki likambo oyo ete bomoi na ngai esili sikawa kobongwana, mpe nasosolaki ete mpo na kolónga mayoki ya kozala ngai moko nasengelaki kosepela na ezalela na ngai ya sikawa.” Mbala mosusu okoki te kobongola ezalela ya makambo oyo ozali kati na yango, kasi mbala mingi okoki nde kobongola lolenge na yo ya kotalela yango.
Atako yango ekoki kosalisa, komipesa na mosala moko ya kolendisa ekoki te kopesa eyano nyonso mpo na kobundisa mayoki ya kozala yo moko. Irene, oyo akufelaki mobali bobele sanza motoba nsima ya libala na bango, amonaki ete ezalaki bongo mpo na ye. Alobi ete: “Namonaki ete kozala ngai moko ezalaki kopesa mpasi mingi wana nazalaki na misala mingi te, yango wana namipesaki mingi mpo na kosunga basusu mpe kosalisa bango na kolónga mikakatano na bango.” Kosalisa basusu epesaka esengo, mpe baklisto oyo bazali bango moko bakoki kosala misala mingi kati na mosala ya Nkolo.—Misala 20:35; 1 Bakolinti 15:58.
Pesá nzela na baninga na yo ete básalisa yo
Zulunalo The New York Times Magazine emonisaki bana oyo bazali bango moko lokola bazoki “mpotá ya kozanga baninga.” (Apríli 28, 1991) Bato mingi oyo bazali bango moko, bázala bilenge to mikóló, bayokaka ete bazangi baninga. Na yango, ezali mpenza litomba monene kozala na boninga ya solosolo oyo lisangá ya boklisto ezali kopesa. Salá milende mpo na kozala na baninga kati na lisangá, mpe pesá bango nzela ete básalisá yo na mitindo nyonso oyo bakoki kosala yango. Yango ezali moko na bantina ya kozala na baninga—kosunga yo na bantango ya mikakatano.—Masese 17:17; 18:24.
Nzokande, kebá ete, okoka te mpo na mpasi na yo ya mayoki kopekisa baninga na yo na kosalisa yo. Lolenge nini? Mokomi Jeffrey Young alimboli ete: “Bato mosusu oyo bazali bango moko . . . babenganaka baoyo bakoki kokóma baninga na bango, na kopesáká basusu nzela te ya koloba to na kolobáká makambo ya kozokisa to oyo malongobani te. Na lolenge moko to mosusu, bato oyo bazalaka ntango nyonso komitangola na basusu babebisaka boyokani kitoko oyo bazalaki na yango elongo na baninga na bango.”—U.S.News & World Report, Sɛtɛ́mbɛ 17, 1984.
Mbala mosusu, okoki koyeisa makambo mabe mingi soki omitangoli na bato mosusu. Peter, mobali moko ya mibu soko 50, asalaki bongo. Nsima na kufa ya mwasi na ye, amitangolaki na bato mosusu, atako kati na motema na ye azalaki na mposa ya kozwa lisalisi na bango. Alobi ete: “Na mikolo misusu, nakokaki mpenza te kozala elongo na basusu, mpe na nsima namonaki ete namitangoli na bato mosusu.” Yango ekoki kozala na likámá monene. Atako kozala ntango mosusu yo moko epesaka matomba malamu, komitangola ekoki komema makámá. (Masese 18:1) Peter asosolaki yango. Alobi ete: “Na nsima nalóngaki yango, nandimaki ezalela na ngai, mpe na lisalisi ya baninga, nabongisaki bomoi na ngai.”
Nzokande, kokanisa te ete basusu basɛngisami na kopesa yo lisalisi. Koluka te kozala na makambo makasimakasi. Ndimá na esengo bilembo nyonso ya boboto bamoniseli yo, mpe monisá botɔ́ndi mpo na yango. Kasi kobosana te toli kitoko oyo ezwami na Masese 25:17 ete: “Lokolo na yɔ ejala mingi na ndako na mojalani na yɔ tɛ ete alɛmba yɔ tɛ mpe boye ayinana na yɔ tɛ.” Frances, oyo akutanaki na mayoki mozindo ya kozala ye moko ntango mobali na ye akufaki nsima na mibu 35 ya libala, amoni ete bokɛngi ezali na ntina mingi. Alobaki ete: “Zalá na bokatikati na oyo ozali kozela ete basusu básalela yo, mpe kosɛnga na basusu mingi koleka te. Kokende ntango nyonso te epai na basusu mpo na kosɛnga lisalisi.”
Yehova abatelaka
Atako mbala mosusu baninga na biso bazangaka kosalisa biso, nzokande Yehova Nzambe akoki kozala lokola moninga na yo. Zalá na elikya ete amibanzabanzaka mpo na yo. Tyá motema mpenza epai na ye, mpe luká ntango nyonso ekimelo kati na libateli na ye. (Nzembo 27:10; 91:1, 2; Masese 3:5, 6) Luta, mwasi Moaba, asalaki bongo mpe azwaki mapamboli mingi. Ya solo, akómaki nkutu nkɔ́kɔ na Yesu Klisto!—Luta 2:12; 4:17; Matai 1:5, 16.
Bondelá ntango nyonso Yehova. (Nzembo 34:4; 62:7, 8) Margaret amonaki ete libondeli ezali liziba ya nguya monene mpo na kolónga mayoki ya kozala yo moko. Asalaki mosala ya ntango nyonso elongo na mobali na ye kino ntango mobali yango akufaki wana azalaki naino elenge. Alobi ete: “Namonaki ntango nyonso ete ezali malamu kobondela na mongongo makasi mpe koyebisa Yehova makambo nyonso, bobangi mpe mitungisi na ngai nyonso. Yango esalisaki ngai na kotalela makambo lokola mazali wana nakómi komiyoka ete nazali sé ngai moko. Mpe komona lolenge Yehova ayanolaki na mabondeli wana epesaki ngai elikya monene.” Azwaki litomba monene na kolanda toli oyo ya ntoma Petelo: “Na bongo bomisɔkisa na lobɔkɔ na Njambe makasi, ete atombola bino na elaka epɔni ye. Bobwaka epai na ye makambo majali kotungisa bino, jambi [azali komibanzabanza mpo na bino, NW].”—1 Pɛtɛlɔ 5:6, 7; Nzembo 55:22.
Boyokani malamu elongo na Yehova ekosalisa yo na kobatela eloko oyo mbala mingi bato oyo bazali komiyoka bango moko babungisaka—limemya ya yo moko. Ntango mobali na ye akufaki na kanser, Jeannette Kupfermann, oyo azali mopanzi-nsango, akomaki na ntina na “mayoki moke ya limemya ya yo moko mpe mayoki ya kozala na ntina te.” Alobaki ete: “Ezali mayoki wana ya komimona ete ozali na ntina te nde ememaka basi mingi oyo bakufeli-mibali na komitika na mpasi makasi ya konyokwama na makanisi.”
Omikundola ete Yehova azali kotala yo na motuya mingi. Akanisaka te ete ozali moto oyo azangi ntina. (Yoane 3:16) Nzambe akosunga yo lokola asungaki libota na ye Yisraele ya ntango ya kala. Alobaki na bango ete: “Nabwaki yɔ tɛ, banga tɛ, jambi ngai najali na yɔ; yoka nsɔmɔ tɛ mpɔ ete ngai najali Njambe na yɔ. Nakokembisa yɔ, nakosunga yɔ, nakotombola mpe yɔ na lobɔkɔ na ngai na boyɛngɛbɛnɛ.”—Yisaya 41:9, 10.
Kopamela Nzambe te
Likambo lileki ntina, kopamela Nzambe te mpo ete ozali komiyoka yo moko. Yehova azali mobandisi ya mayoki wana te. Mokano na ye mozali ntango nyonso ete yo, mpe bato mosusu nyonso, bósepela na boninga malamu mpe ya esengo. Ntango Nzambe azalisaki Adama, alobaki ete: “Ejali malamu tɛ ete moto ajala ye mɔkɔ. Nakosalela ye mosungi mobɔngi na ye.” (Genese 2:18) Mpe ezali yango nde Nzambe asalaki wana azalisaki Eva, mwasi ya liboso. Soki mpo na botomboki ya Satana te, mbɛlɛ mobali mpe mwasi, elongo na mabota oyo mauti na bango balingaki te kokutana na mpasi ya mayoki ya kozala yo moko.
Ya solo, ndingisa ya ntango mokuse oyo Yehova apesaki ete mabe mázala epesaki mpe nzela ete motuya na bato oyo bazali na mayoki ya kozala bango moko ekóla mpe bányokwama na mpasi mosusu. Nzokande, osengeli koyeba malamu ete yango ezali bobele mpo na ntango mokuse. Mikakatano ya kozala yo moko emonani mpenza moke na kokokanisa yango na oyo Nzambe akosala mpo na yo kati na mokili na ye ya sika. Wana tozali kozela yango akosunga yo mpe akobɔndisa yo.—Nzembo 18:2; Bafilipi 4:6, 7.
Koyeba likambo yango ekoki kopesa yo nguya. Ntango Frances (oyo tolobelaki na ebandeli) akufelaki mobali na ye, azwaki libɔndisi monene kati na maloba oyo ya Njembo 4:8, mingimingi na butu: “Nakolala, ɛɛ nakolala mpɔngi na kimia, jambi bobɛlɛ yɔ [Yehova] okobatela ngai na esika na ngai.” Manyolá likoló ya mayoki lokola oyo mazwami kati na mokanda ya Nzembo. Kanisá na motindo oyo Yehova azali komibanzabanza mpo na yo, lokola emonisami na Nzembo 23:1-3.
Lolenge nini kosalisa bato oyo bazali komiyoka ete bazali bango moko?
Mwango ya ntina mingi mpo na kosalisa bato oyo bazali komiyoka ete bazali bango moko ezali ya komonisela bango bolingo. Mbala na mbala Biblia ezali kolendisa libota ya Nzambe na komonisa bolingo bamoko epai na basusu, mingimingi na ntango ya mpasi. Ntoma Paulo akomaki ete, “Mpɔ na [bolingo ya motema mpo na bandeko, NW] bolinganaka.” (Baloma 12:10) Ya solo, Liloba ya Nzambe lipemami lilobi ete: “Bolingo ekosuka tɛ.” (1 Bakɔlinti 13:8) Lolenge nini okoki komonisa bolingo epai na baoyo bazali komiyoka ete bazali bango moko?
Na esika ete bábwaka to bábosana bato oyo bazali komiyoka ete bazali bango moko, bato oyo bazali na komibanzabanza mpo na basusu bakoki komonisa bolingo ya motema na kosalisáká bango na motema pɛtɛɛ ntango nyonso oyo bazali na makoki ya kosala bongo. Bakoki kozala lokola Yobo, oyo alobaki ete: “Jambi nabikisaki mobola oyo alelaki, mpe etike na tata oyo ajalaki na mosungi na ye tɛ. . . . Nayembisaki motema na mwasi mokufeli-mobali na esɛngɔ.” (Yobo 29:12, 13) Bankulutu oyo batyami kati na lisangá ya boklisto mpe baninga ya bolingo bakoki komonisa limemya motindo moko, na kokokisáká bamposa ya ntina lokola komonisa bososoli, esengo mpe libɔndisi. Bakoki komonisa boboto, mpe na bantango mosusu bakoki kosolola elongo na bango makambo oyo mazali kosimba motema na bango.—1 Petelo 3:8.
Mbala mingi, makambo mike oyo baninga basalaka mpo na bato oyo bazali bango moko nde mazalaka na ntina mingi. Na ndakisa, wana moninga moko mondimi akufeli molingami na ye, boboto oyo baninga ya solosolo bazali komonisela ye ekoki kosala malamu mingi. Kobosana te komonisa mwa elembo ya boboto, lokola kobyanga bango mpo na kolya, komitya na esika na bango wana bazali kosolola, to kosala masoló ya kolendisa. Makambo wana mazali na ntina mingi mpo na kosalisa bango na kolónga mayoki ya kozala bango moko.—Baebele 13:16.
Ya solo, biso banso tokokutana mbala na mbala na bantango oyo tokozala sé biso moko. Nzokande, kozala biso moko esengeli te kokóma bolózi. Tondisá bomoi na yo na makambo ya ntina, oyo mazali kosepelisa. Pesá nzela na baninga ete básalisa yo soki bazali na makoki ya kosala yango. Tyá motema epai na Yehova Nzambe. Batelá makasi kati na makanisi elikya ya kolendisa oyo ezwami kati na Njembo 34:19: “Moyɛngɛbɛni ajali na makambo mingi na mpasi nde [Yehova] akobikisa ye kati na yango yɔnsɔ.” Omibalola epai na Yehova mpo na kozwa lisalisi, mpe kotika te ete mayoki ya kozala yo moko ebebisa bomoi na yo.
[Etanda na lokasa 24]
MYANGO MPO NA KOBUNDISA MAYOKI YA KOZALA YO MOKO
▪ Zalá penepene na Yehova
▪ Luká libɔndisi na kotángáká Biblia
▪ Batelá elimo malamu ya moklisto
▪ Omipesa na mosala oyo ezali kolendisa
▪ Bakisá motuya ya baninga na yo
▪ Pesá nzela na baninga ete básalisa yo
▪ Komitangola te, kasi kólisá bolingo oyo elingi kolimwa
▪ Tyá motema ete Yehova azali komibanzabanza mpo na yo
[Etanda na lokasa 24]
LOLENGE NINI OKOKI KOSALISA BATO OYO BAZALI KOMIYOKA ETE BAZALI BANGO MOKO
▪ Monisá bososoli, esengo mpe libɔndisi
▪ Sololá elongo na bango makambo oyo mazali kosimba motema na bango
▪ Lendendelá na kosala makambo ya mike oyo makoki kosalisa
[Elilingi na lokasa 23]
Atako azalaki kati na ezalela ya mpasi, esika moko te emonisi ete Luta atikaki mayoki ya kozala ye moko ebebisa bomoi na ye