Okoki kolonga mawa ya kozanga molongani
NANI akoki koloba ete ayoka naino mawa te mpo azali kaka ye moko? Makambo mingi esalaka ete tómiyoka ete tozali biso moko. Kasi, mpo na basi oyo babali naino te to basi oyo bakufelá mibali to baoyo mabala na bango ekufá, mawa ya kozanga molongani ezalaka makasi koleka.
Na ndakisa, elenge mwasi moko moklisto nkombo na ye Frances, alobi boye: “Na ntango nakokisaki mbula 23, baninga na ngai nyonso babalaki, mpe natikalaki kaka ngai moko.”a Mawa ya kozanga molongani ekoki kobanda kokóma makasi ntango bambula ezali koleka mpe libala ezali koya kaka te. Sandra akómi na mbula pene na 50, ye alobi boye: “Nakanaki te ete natikala monzemba, mpe ata sikoyo soki moto alingi kobala ngai, nakondima.” Angela azali na mbula 50 na ndambo, ye alobi boye: “Nazwaki ekateli te ete nakotikala monzemba, kasi makambo esalemaki ete natikala bongo. Esika oyo batindaki ngai nakende kosala lokola mobongisi-nzela monene, bandeko mibali minzemba bazalaki mingi te.”
Tozali kopesa longonya na baklisto mingi ya basi oyo bazali naino minzemba mpo balingaka kolanda toli ya Yehova ya kobala kaka “kati na Nkolo.” (1 Bakolinti 7:39) Basusu bamesanaka malamu na bomoi ya monzemba, kasi mpo na basusu, mposa ya kobala mpe kobota bana eyaka makasi ntango bambula ezali koleka. Sandra alobi boye: “Nayokaka ntango nyonso ete eloko moko ezali kozanga ngai mpo nazali na mobali te.”
Makambo mosusu, lokola kobatela baboti oyo bakómi mibange, ekoki kobakisela moto mawa mpo azali na molongani te. Sandra alobi boye: “Lokola nabalá te, libota na biso mobimba bazalaki kotya na makanisi ete ngai nde nabongaki kobatelaka baboti na biso oyo bakómaki mibange. Namemaki mokumba yango ngai moko mbula 20, atako nazali na bandeko motoba. Soki nazalaka na mobali mpo na kosunga ngai, mbɛlɛ bomoi na ngai elingaki kozala mwa pɛpɛlɛ.”
Frances alobeli eloko mosusu oyo ebakiselaka moto mawa ntango azali ye moko. Alobi boye: “Mbala mosusu bato batunaka ngai polele ete, ‘Mpo na nini obalá te?’ Motuna ya ndenge wana etindaka ngai namona lokola nde, soki natikalá monzemba, ezali foti na ngai. Na bafɛti nyonso ya mabala oyo nakendaka, bato batunaka ngai motuna oyo nalingaka koyoka te, ‘Okobala mokolo nini?’ Etindaka ngai namituna, ‘Soki bandeko mibali oyo bazali makasi na elimo bazali kosepela na ngai te, ntango mosusu ezali mpo nazangi bizaleli malamu ya moklisto to ntango mosusu nazali kitoko te.’ ”
Ndenge nini okoki kosala mpo ozinda te na mawa mpo ozali yo moko mpe ozangi molongani? Ndenge nini bato mosusu bakoki kosalisa yo?
Tyelá Yehova motema
Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Kitisá mokumba na yo epai na [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.” (Nzembo 55:22) Liloba “mokumba” na Liebele elimboli mpenzampenza “ndambo,” mpe ezali kolobela mobulungano mpe mitungisi oyo makambo ya bomoi ebimisaka. Yehova ayebi malamu mpasi wana mpe akoki kopesa biso makasi mpo na kolonga yango. Kotyela Yehova Nzambe motema esalisaki Angela ete azinda te na mawa mpo azangi molongani. Alobaki boye: “Ntango nabandi mosala ya mobongisi-nzela, ngai na moninga na ngai tozalaki kofanda mosika na lisangá. Toyekolaki kotyela Yehova motema mobimba, mpe ezaleli yango esalisi ngai bomoi na ngai mobimba. Soki makanisi ya mabe eyeli ngai, nasololaka na Yehova mpe ye asungaka ngai. Nzembo 23 ebɔndisaka ngai mingi mpenza, mpe natángaka yango mbala na mbala.”
Ntoma Paulo azalaki na mokakatano moko monene. Soki mbala misato, ‘abondelaki Nkolo ete nzube kati na nzoto elongwa na ye.’ Nzambe asalaki likamwisi te mpo na kosalisa Paulo, kasi alakaki ye ete ngɔlu na ye ekosunga ye. (2 Bakolinti 12:7-9) Paulo azwaki mayele ya kosepela na oyo azali na yango. Akomaki boye na nsima: “Nayebi mpenza kozanga biloko, nayebi mpenza kozala na biloko mingi. Na eloko nyonso mpe na makambo nyonso nasili koyekola sɛkɛlɛ ya kotonda mpe ya kozala na nzala; ya kozala na biloko mingi mpe ya kokelela. Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”—Bafilipi 4:12, 13, NW.
Ntango moto alɛmbi nzoto to azali koyoka mawa mpo azali na molongani te, ndenge nini akoki kozwa makasi oyo Nzambe apesaka? Paulo akomaki boye: “Bómitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tiká ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso, ekosɛnzɛla mitema na bino mpe [makoki na bino ya kokanisa na nzela ya, NW] Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Sandra asalelaka toli yango. Alobi boye: “Lokola nazali monzemba, nalekisaka ntango mingi ngai moko. Yango epesaka ngai ntango mingi ya kobondela Yehova. Namonaka ete Yehova azali moninga na ngai ya motema mpe nakoki koyebisa ye polele mikakatano na makambo oyo epesaka ngai esengo.” Frances alobi boye: “Mokolo na mokolo nabundaka etumba ya kobengana makanisi mabe. Kasi koyebisa Yehova polele ndenge nazali koyoka esungaka ngai mingi. Nandimi mpenza ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bolamu na ngai ya elimo na ya makanisi.”—1 Timote 5:5.
“Bókoba komemelana kilo”
Na kati ya baklisto, esengeli te tómemaka kilo na biso biso moko. Ntoma Paulo alendisaki ete: “Bókoba komemelana kilo bino na bino, mpe na ndenge yango bókokisa mobeko ya Klisto.” (Bagalatia 6:2, NW) Baninga na biso baklisto bakoki kozala na “liloba malamu” ya kolendisa oyo ekoki kokómisa pɛpɛlɛ mokakatano na biso ya kozanga molongani.—Masese 12:25.
Tókanisa mpe oyo Makomami elobi mpo na mwana mwasi ya Yefeta, mosambisi moko ya Yisalaele. Liboso alonga Baamona, Yefeta alapaki ndai na nkombo ya Yehova ete akopesa ye moto ya liboso ya ndako na ye oyo akobima mpo na koyamba ye. Mwana mwasi na ye nde abimaki. (Basambisi 11:30, 31, 34-36) Atako esɛngaki ete atikala monzemba mpe abosana mposa na ye ya kobota bana, mwana mwasi ya Yefeta andimaki kotosa ndai yango mpe asalelaki Yehova na hema na Silo bomoi na ye mobimba. Bato batyolaki nde ye mpo amipesaki bongo? Te, mpamba te ‘bana basi ya Yisalaele bazalaki kokende mbula na mbula kolela mwana mwasi ya Yefeta Mogilada mikolo minei na kati na mbula.’ (Basambisi 11:40) Ya solo, kopesa moto longonya ekoki kolendisa ye. Yango wana, tóbosanaka te kopesa longonya na baoyo babongi kozwa yango.
Lisusu, ekozala malamu tótalela ndakisa ya Yesu. Atako Bayuda bazalaki na momeseno ya kosolola na basi te, Yesu alekisaki ntango na Malia mpe Malata. Ekoki kozala ete basi yango bazalaki basi oyo bakufelá mibali to ntango mosusu babalaki te. Yesu asepelaki kozala moninga na bango mpo bázwa bolamu ya elimo. (Luka 10:38-42) Tokoki kolanda ndakisa ya Yesu. Soki tozali kosala mwa fɛti, tokoki kobengisa mpe bandeko basi oyo bazali na mibali te; to mpe tokoki ntango mosusu koyokana na bango mpo na kobima na bango na mosala ya kosakola. (Baloma 12:13) Basi yango basepelaka soki batyeli bango likebi bongo? Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Nayebi ete bandeko balingaka ngai mpe basepelaka na ngai, kasi nazalaka na botɔndi mingi soki bazali mpenza komibanzabanza mpo na ngai.”
Sandra alobi boye: “Lokola tozangi molongani, tozalaka na mposa mingi ete bálinga biso, tómiyoka mpenza ete tozali na kati ya libota ya bandeko basi mpe mibali ya elimo.” Na ntembe te, Yehova amibanzabanzaka mpo na bato ya lolenge wana, mpe tosalaka na ye elongo ntango tozali komonisa ete tosepelaka mpe tolingaka bandeko basi yango. (1 Petelo 5:6, 7) Soki tozali kosala bongo, Yehova akomona yango, mpamba te “ye oyo akoyokela babola mawa azali kodefisela [Yehova]; akozongisela ye lisungi malamu na ye lisusu.”—Masese 19:17.
“Moto na moto akomema mokumba na ye”
Atako bato mosusu bakoki mpe kosalisa, mpe lisungi na bango ekoki mpenza kolendisa, “moto na moto akomema mokumba na ye moko.” (Bagalatia 6:5, NW) Kasi, na ntango tozali komema mokumba mpo tozali na molongani te, esengeli tókeba na makama mosusu. Na ndakisa, mawa ya komiyoka biso moko ekoki kokóma makasi soki tozali kobomba makambo na biso na motema. Nzokande, tokoki kosilisa mawa yango soki tozali na bolingo. (1 Bakolinti 13:7, 8) Kokaba mpe kopesa ntango na biso mpo na basusu epesaka esengo mingi, ata soki bomoi na biso ezali ndenge nini. (Misala 20:35) Ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela ya molende, alobi boye: “Nazalaka mpenza na ntango mingi te ya kokanisa ete nazalaka ngai moko. Ntango nazali kosalisa bato mpe nazali na makambo mingi ya kosala, nayokaka mawa te mpo nazali ngai moko.”
Lisusu, tosengeli kokeba ete lokola tozali koyoka mawa mpo tozali biso moko, yango etinda biso te na kokangama na baninga ya mabe. Na ndakisa, ekozala mawa mingi soki, mpo na mposa ya kobala, tobosani ete kobalana na moto oyo azali mondimi te ememaka mikakatano mingi; to ekozala mawa koleka soki toboyi kolanda toli ya Makomami ya koboya libala ya ndenge wana. (2 Bakolinti 6:14) Mwasi moko oyo libala na ye ekufá, alobaki boye: “Ezali na likambo moko ya mabe koleka kozala na molongani te: kobalana na moto oyo abongi na yo te.”
Mokakatano oyo ekoki kosila te, esɛngaka ete moto ayikela yango mpiko na ntango wana. Na lisalisi ya Nzambe, tokoki koyika mpiko mpo na mawa ya kozanga molongani. Wana tozali kokoba kosalela Yehova, tózalaka na elikya ete mokolo mosusu bamposa na biso nyonso ekokokisama na ndenge oyo eleki malamu.—Nzembo 145:16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
[Bililingi na lokasa 28]
Kokaba mpe kopesa ntango mpo na basusu ekoki kosalisa