Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 27
  • Mpo na nini nazalaka na baninga te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini nazalaka na baninga te?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komiyoka lokola mwana etike
  • Makambo etali boninga mpe komiyoka lokola mwana etike
  • Ndenge ya kolonga etumba yango
  • Tiká te ete mayoki ya kozala yo moko ebebisa bomoi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Ndenge ya kosala ntango ozali komiyoka lokola ozangá baninga
    Lamuká!—2015
  • Okoki kolonga mawa ya kozanga molongani
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Kozala na baninga; solisyo mpo na kotika komiyoka yo moko​—Ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa yo
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 27
Elenge mwasi moko azali komiyoka lokola mwana etike

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini nazalaka na baninga te?

Kanisá ete okɔti na Internet, ozali kotala bafɔtɔ ya fɛti moko oyo euti kosalema kala mingi te. Na kati omoni baninga na yo bazali kolekisa ntango moko malamu. Kasi eloko moko ezali kozanga. Ezali moto moko nde azali kozanga, moto yango nde yo!

Omituni boye: ‘Mpo na nini babengaki ngai te?’

Mposa ya kotala bafɔtɔ ebongwani mawa. Omoni lokola basundoli yo! Omoni lokola boninga na yo ebukani lokola mwa ndako oyo batongi na zɛlo. Omiyoki mpenza lokola mwana etike mpe omituni boye: ‘Mpo na nini nazalaka na baninga te?’

  • Komiyoka lokola mwana etike

  • Makambo etali boninga mpe komiyoka lokola mwana etike

  • Ndenge ya kolonga etumba yango

  • Makambo bilenge mosusu balobi

  • Ndenge ya kolongola kobanga na likambo etali kozwa baninga

Komiyoka lokola mwana etike

Solo to lokuta

  1. Soki ozali na baninga ebele, okomiyoka ata moke te lokola mwana etike.

  2. Soki ozali kozwa baninga na Internet, okomiyoka ata moke te lokola mwana etike.

  3. Soki ozali kotinda bamesaje mingi, okomiyoka ata moke te lokola mwana etike.

  4. Soki ozali kosalisa basusu, okomiyoka ata moke te lokola mwana etike.

Makambo nyonso minei wana ezali lokuta.

Mpo na nini?

Makambo etali boninga mpe komiyoka lokola mwana etike

  • Kozala na baninga ebele elakisi te ete okomiyoka ata moke te lokola mwana etike.

    “Nakipaka baninga na ngai, kasi na bantango mosusu namonaka ete bango bakipaka ngai te. Okoki komiyoka mpenza lokola mwana etike ntango ozali na baninga ebele kasi balingaka yo te to bazalaka na mposa na yo te.”​—Anne.

  • Kozwa baninga na Internet elakisi te ete okomiyoka ata moke te lokola mwana etike.

    “Bato mosusu bazwaka baninga kaka ndenge bato batondisaka bana-popi na ndako. Kasi kotondisa biloko nyonso wana, ekosala te ete moto amiyoka ete alingami. Soki ozali na baninga ya solosolo te, baoyo okozwa na Internet bakozala na ntina te lokola mwa bikeko oyo moto atondisi na ndako.”​—Elaine.

  • Kotinda bamesaje mingi elakisi te ete okomiyoka ata moke te lokola mwana etike.

    “Na bantango mosusu, ntango ozali komiyoka ete ozali yo moko, ofinafinaka telefone mpo na kotala soki moninga moko atindeli yo mesaje. Soki omoni ete ata moto moko te atindeli yo mesaje, yango ekoki kobakisela yo lisusu mawa!”​—Serena.

  • Kosalisa basusu elakisi te ete okomiyoka ata moke te lokola mwana etike.

    “Ntango nyonso nasalaka makasi nakabelaka baninga na ngai, kasi namonaka ete bango basalaka bongo te epai na ngai. Nayokaka mawa te ndenge nakabelaka bango, kasi ekamwisaka mwa moke ndenge bamoniselaka ngai ata moke te boboto.”​—Richard.

Na mokuse: Komiyoka lokola mwana etike ezali likambo ya makanisi. Elenge mwasi moko na nkombo Jeanette alobi boye: “Eutaka na kati ya moto, kasi na libándá te.”

Okosala nini soki omoni ete ozalaka na baninga te mpe omiyokaka lokola mwana etike?

Ndenge ya kolonga etumba yango

Elenge mwasi moko azali komimona moto mpamba

Yebá ete ozali na valɛrɛ.

“Komiyoka lokola mwana etike eutaka na kobangabanga. Ezalaka mpasi kofungwama mpe kosala boninga soki ozali komona ete moto yango atyelaka yo likebi te.”​—Jeanette.

Biblia elobi ete: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Bagalatia 5:14) Mpo tózala na baninga ya malamu, tosengeli komipesa nzoto kilo; kasi yango elingi koloba te ete tókóma lolendo.​—Bagalatia 6:3, 4.

Elenge mobali moko azali komimona moto ya mawa

Komimona te ete ozali moto ya mawa.

“Komiyoka lokola mwana etike ezali lokola kotambola likoló ya zɛlo. Mbala nyonso oyo lokolo ezali kozinda na zɛlo, ekómaka mpasi mpo obimisa yango. Ndenge moko mpe, soki omimonaka ete ozali moto ya mawa, bato mosusu bakobanda kokima yo. Na ntango wana nde okomiyoka mpenza lokola mwana etike.”​—Erin.

Biblia elobi ete: “Bolingo . . . elukaka matomba na yango moko te.” (1 Bakorinti 13:4, 5) Soki totyaka likebi mingi kaka epai na biso moko, tokoyokela basusu mawa te, mpe ekozala mpasi basusu bándima kozala baninga na biso. (2 Bakorinti 12:15) Yebá ete soki omonaka ete esengo na yo etaleli kaka makambo oyo basusu basalaka, okokende mosika te! Na ndakisa, maloba lokola “Moto moko te abengaka ngai na telefone” mpe “Moto moko te abengisaka ngai epai na ye,” emonisaka ete ozali kopesa esengo na yo na mabɔkɔ ya basusu. Omoni te ete kosala bongo ezali lokola kopesa bango nguya mingi koleka?

Elenge mobali moko aboyi likaya

Kopona baninga biponela te.

“Bato oyo bamiyokaka lokola bana etike bazalaka na mposa bátyela bango likebi, ata soki likebi yango euti epai ya nani. Balukaka kaka ete moto alinga bango. Kasi, bato mosusu bakoki kolakisa yo ete balingi yo, nzokande ezali kaka mpo bályela yo. Wana okomiyoka mpenza lokola mwana etike.”​—Brianne.

Biblia elobi ete: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.” (Masese 13:20) Moto oyo azali na nzala makasi akoki kolya ata eloko nini. Ndenge moko mpe, moto oyo azali na mposa makasi ya kozwa baninga, akokipe lisusu te esika ya kozwa baninga. Akoki ata kokosama na bato mabe, mpe kokanisa ete boninga ya ndenge wana ezali mabe te mpe ete likama moko te ekoki kokómela ye.

Mpo na kosukisa: Ekómaka ete moto amiyoka ete azali ye moko; kasi moto na moto azali na ndenge oyo atalelaka yango. Komiyoka lokola mwana etike ekoki kopesa moto mpasi, kasi tóyeba ete ezali kaka makanisi. Mbala mingi, ndenge oyo tomiyokaka eutaka na makanisi, mpe tokoki kopona kobatela makanisi ya malamu mpe kobengana oyo ya mabe.

Kolekisa mpe ndelo te na makambo oyo ozali kozela epai ya basusu. Jeanette, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Moto nyonso te nde akozala moninga na yo ya motema mpo na libela; kasi ekozala kaka na bato oyo bakobanda kotyela yo likebi. Soki bazali kotyela yo likebi, ekoki na yango. Yango nde ekosalisa yo otika komiyoka ete ozali yo moko.”

Ozali na mposa ya batoli mosusu? Tángá “Ndenge ya kolongola kobanga na likambo etali kozwa baninga.” Zwá mpe lisolo ya PDF oyo elobi “Nakosala nini soki namiyokaka lokola mwana etike?.”

MAKAMBO BILENGE MOSUSU BALOBI

Vanessa

“Yebisá moto mosusu ete omiyokaka lokola mwana etike. Kobomba te ndenge ozali komiyoka. Na ntembe te, okomona ete ezali mpe na bato mosusu oyo bamiyokaka ete bazali bango moko lokola yo. Mbala mosusu, ozali kaka na mposa ya moninga moko oyo akoki kosalisa yo ozala malamu.”​—Vanessa.

Taylor

“Okoki te kopesa ntango nyonso basusu foti soki omiyokaka lokola mwana etike. Mbala mosusu, yo moko moto okimaka basusu. Soki ezali bongo, salá oyo okoki kosala mpo ozongela baninga na yo. Soki esimbi te, luká baninga mosusu​—na ndakisa na bato oyo osalá naino na bango boninga te.”​—Taylor.

Ndenge ya kolongola kobanga na likambo etali kozwa baninga

“Moninga na ngai moko amiyokaka ntango nyonso lokola mwana etike. Atako azali na bato oyo batyelaka ye likebi, amimonaka kaka ete bakipaka ye te mpe balingaka ye te. Alukaka komonisa ete azali malamu, nzokande anyokwamaka mingi. Namoni ete lokola asalaka makasi amonisa ete azali malamu, ezalaka mpasi azwa baninga. Bato oyo akutanaka na bango bamonaka ete azali malilimalili, mpe baoyo bazalaka motema molai te babangaka kopusana pene na ye.

“Abangaka mpe ete ayoka mpasi na motema, yango wana ntango bato basalaka makasi báyeba ye malamu, akómaka kokanisela bango mabe to amonaka ete boninga yango ekokatana. Amiyokaka lokola mwana etike mpo bato mingi bamityaka na esika na ye te, kasi aboyaka koyebisa bango ndenge amiyokaka.

“Moninga na ngai asengeli koyeba ete koyebisa basusu mwa makambo oyo ozali na yango ekómisaka boninga makasi, mpe esalisaka basusu báyeba yo malamu. Yango ekosalisa bango básala na yo boninga oyo ozali na yango mposa. Nazali na elikya ete nsukansuka moninga na ngai akomiyoka malamu mpe akolongola kobanga na likambo etali kozwa baninga.”​—Elaine.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto