Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/10 nk. 4-7
  • Ezalela ya bakufi ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezalela ya bakufi ezali nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kufa ekanamaki te mpo na bato
  • Elaka nini?
  • Nsango euti na mokili ya bilimu
  • Yehova, Nzambe ya solo mpe ya bolingo
  • Nini ekómelaka balingami na biso oyo bazali kokufa?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Osengeli kobanga bakufi?
    Lamuká!—2009
  • Bomoi nsima ya kufa​—⁠Lolenge nini, epai wapi mpe ntango nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Ozali na elimo oyo ekufaka te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/10 nk. 4-7

Ezalela ya bakufi ezali nini?

KOBANGA bakufi ezwi moboko na yango likoló na likanisi oyo​—ete bakufi bazali na molimo to na elimu oyo ekóbaka kozala na bomoi nsima ya liwa. Soki Biblia emonisi polele ete likanisi wana lizali lokuta, boye motuna ya koyeba soki bakufi bakoki kosala yo mabe mosili kozwa eyano ya polele. Na bongo, Biblia ezali koloba nini mpo na yango?

Na ntina na ezalela ya bakufi, Liloba ya Nzambe lilobi ete: “Bato na bomɔi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo tɛ, bajali na libonja mpe tɛ; kokanisa na bango isili kobungana. Bolingo na bango mpe koyina na bango mpe jua na bango esili kobeba; bajali lisusu na likabo tɛ kati na likambo lijali kosalama na nse na moi.”​—Mosakoli 9:5, 6.

Na kotalela likanisi oyo, bakufi bakoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Makomami malobi ete, te. Bakufi bayebi eloko moko te mpe bakolobaka te. Bakoki te kosolola elongo na bato na bomoi to komonisa mayoki​—bolingo to koyina⁠—​to kosala misala. Osengeli kobanga bango te.

Basusu bakoki koloba ete: ‘Ekoki solo kozala bongo soki ozali kokanisa na ntina na kufa ya nzoto ya mosuni. Kasi kufa ya nzoto ezali nsuka ya bomoi te; ezali bobele kokangola elimu oyo ezalaki kati na nzoto. Elimu wana ekoki kosalisa bato na bomoi to kosala bango mabe.’ Bamilió ya bato na mabelé mobimba bakanisaka lolenge yango.

Na ndakisa, na Madagascar batalelaka bomoi lokola eleko moko ya ntango mokuse, na boye ete bokundi to bokundoli moto etalelami na motuya mingi koleka kobala. Bakanisaka ete moto nyonso autaki epai na bankɔ́kɔ na ye mpe akozonga epai na bango nsima na kufa na ye. Na yango, ndako ya bato na bomoi esalemaka na mabaya mpe na mabelé, biloko oyo bikobebaka nsima na ntango, nzokande malita, “ndako” ya bakufi, mbala mingi ezalaka kitoko mpe esalemi na biloko oyo bikoumelaka. Na bokundoli ebembe, libota na ye mpe baninga na ye bakanisaka ete bakozwa mapamboli, basi bakanisaka ete soki basimbi mikuwa ya ndeko na bango oyo asili kokufa, bakokoka kozwa zemi. Kasi, awa lisusu, Liloba ya Nzambe lilobi nini na likambo yango?

Kufa ekanamaki te mpo na bato

Ezali na ntina mingi koyeba ete Yehova Nzambe azalisaki moto mpo ete azala na bomoi, mpe alobelaki kufa bobele lokola etumbu ya kozanga botosi. (Genese 2:17) Na mawa nyonso, mobali mpe mwasi ya liboso basalaki lisumu, mpe lokola litomba mabe, lisumu lipalanganaki epai na bato banso lokola libula oyo likomemaka kufa. (Baloma 5:12) Tokoki bongo koloba ete kufa ezali likambo oyo bato bazali kokutana na yango uta kozanga botosi ya babalani ya liboso, likambo ya mpasi oyo likómaka kati na bomoi. Tosalemaki mpo na kozala na bomoi, likambo oyo lizali mwa moke kolimbola mpo na nini ebele na bamilió ya bato bakokaka te kondima ete kufa ezalaka nsuka ya moto.

Engebene lisoló ya Biblia, Satana alukaki kozimbisa babalani ya liboso na ntina na kufa na kotɛmɛláká likebisi ya Nzambe oyo ete kozanga botosi esengelaki komema kufa. (Genese 3:4) Nzokande, na nsima, emonanaki polele ete bato bakufaka lokola Nzambe alobaki yango. Na yango, bikeke mingi na nsima, Satana abimisaki lisusu lokuta mosusu​—ete eteni moko ya moto oyo ezali elimu elandaka kozala na bomoi nsima na kufa ya nzoto. Lokuta motindo oyo ekoki kouta bobele na Satana Zábolo, oyo Yesu abéngaki ye ete “tata na lokuta.” (Yoane 8:44) Na kokesena, eyano ya Nzambe na ntina na kufa ezali elaka moko ya kolendisa.

Elaka nini?

Ezali elaka ya lisekwa mpo na ebele ya bato. Liloba ya Greke libongolami na “lisekwa” lizali a·naʹsta·sis. Elimboli mpenza “kotɛlɛma lisusu,” mpe ezali komonisa kolongwa na kufa. Ya solo, moto akolalaka kati na kufa, kasi na nzela ya nguya na ye, Nzambe akoki kotɛlɛmisa moto yango lisusu. Moto abungisaka bomoi, kasi Nzambe akoki kopesa ye bomoi lisusu. Mwana ya Nzambe, Yesu Klisto alobaki ete “ntango ekoya wana yɔnsɔ bajali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Ntoma Paulo amonisaki “elikia na Njambe . . . ete lisekwa ekojala na bato sembo mpe na bato sembo tɛ.” (Misala 24:15) Yobo, mosaleli ya sembo ya Nzambe na ntango ya kala, amonisaki mpe elikya na ye kati na lisekwa: “Sɔkɔ moto akokufa, akobika nde lisusu? Nakojila kino mikɔlɔ yɔnsɔ na ntango ekoki na ngai, kino kolongwa na ngai ekoya. [Yo Nzambe, NW] okobianga mpe ngai nakojongisela yɔ.”​—Yobo 14:14, 15.

Elaka ya polele ya lisekwa ezali kokweisa likanisi oyo ete bakufi bazali na bomoi na lolenge ya elimu, boye te? Soki bakufi bazali na bomoi mpe bazali kobika na likoló to na mokili moko ya bilimu, ntina ya lisekwa elingaki kozala nini? Mbɛlɛ basilá kozwa mbano to libonza na bango, boye te? Boyekoli ya Liloba ya Nzambe emonisi ete bakufi bakufaka mpenza solo, bayebi eloko te, balali mpongi kino kolamuka monene oyo ekosalema na nzela ya lisekwa kati na mokili ya sika​—paladiso⁠—​elakami na Tata na biso ya bolingo, Yehova. Kasi, soki kufa elimboli te bokabwani ya nzoto mpe elimu; mpe soki elimu ekóbaka te kozala na bomoi, lolenge nini tokoki kolimbola bansango oyo emonani lokola ete ezali nsango eutaka na mokili moko ya bilimu?

Nsango euti na mokili ya bilimu

Ezali na bato mingi oyo balobaki ete bazwaki nsango longwa na mokili ya bilimu. Nini ezali mpenza eutelo na yango? Biblia ekebisi biso ete “Satana akomimɔnisa lokola ntoma na moi. Bongo ejali likambo monɛnɛ tɛ sɔkɔ basali na ye bakomimɔnisa lokola basali na boyɛngɛbɛnɛ.” (2 Bakɔlinti 11:14, 15 ) Ee, mpo na kokosa mpe kozimbisa bato kozanga mpasi, bademó (baanzelu batomboki) bazali kosolola elongo na bato na bomoi, ntango mosusu kolobáká ete balingi kosalisa bango.

Ntoma Paulo apesaki makebisi mosusu na ntina na bozimbisi wana ete: “Basusu bakotangwa longwa na kondima, kotyáká likebi na maloba mapemami ya kozimbisa mpe na mateya ya bademó.” (1 Timoté 4:1, NW) Na yango, maloba nyonso oyo makanisami ete mauti na bakufi makoki mpenza kozala ya bademó oyo bazali komimonisa lokola “basáli ya malamu” mpe bazali kokólisa mateya ya lokuta ya mangomba, kotyáká bato kati na boombo ya biyambayamba oyo bizali kopɛngola bango longwa na solo ya Liloba ya Nzambe.

Komonisáká ete bakufi bakoki te koloba, to kosala misala, to koyeba makambo, Njembo 146:3, 4 eyebisi ete: “Ndimela bana na mikonji tɛ, to moto, mpɔ ete ajali na kosunga tɛ. Sɔkɔ [elimo, NW] ekolongwa, moto akojonga na mabele lisusu; bobɛlɛ na mokɔlɔ yango kokanisa na ye esili.” Elimo oyo “ekolongwa” ezali nini? Ezali nguya ya bomoi ya moto oyo esimbami na mpema. Na yango, wana mokufi atiki kopema, biyokeli na ye bikoki lisusu kosala te. Akómi na ezalela ya kozanga koyeba makambo. Na bongo, akoki kozala na bopusi ata moke te likoló na bato na bomoi.

Ezali mpo na ntina yango nde Biblia ezali kokokisa kufa ya moto na oyo ya nyama, koyebisáká ete nsima ya kokufa, bango nyonso bakoyebaka eloko te mpe bakozongaka na mputulu oyo bazalisamaki na yango. Mosakoli 3:19, 20 elobi ete: “Mpɔ ete, yango ekokwela bana na bato, ekokwela mpe banyama; bobɛlɛ likambo mɔkɔ ekokwela bango. Lokola mɔkɔ akokufa, oyo mosusu mpe akokufa; ɛɛ bango yɔnsɔ bajali na mpema mɔkɔ; boye moto ajali koleka likolo na nyama tɛ. Yɔnsɔ bobɛlɛ mpamba. Yɔnsɔ bakokɛnda na esika mɔkɔ; yɔnsɔ ilongwi na mputulu, yɔnsɔ ikojonga na mputulu lisusu.”

Koyebáká ete bademó bazali koluka kozimbisa bato mpo bándima ete bakoki kosolola elongo na bakufi mpe ete bango bakufi bakoki kozala na bopusi likoló na bango, Yehova Nzambe akebisaki libota na ye, Bayisraele ya ntango ya kala, ete: “Moto ajuama tɛ kati na bino . . . moto na jonga, to moto na kotala miɔtɔ mpɔ na kosakola liboso, to moto na kosala nkisi mpɔ na kosakola liboso, to nganga na nkisi, to molengoli, to moto na kobianga [bilimu, NW], to nganga na soloka, to moto na kosolola na bakufi. Mpɔ ete bato yɔnsɔ [oyo bakosalaka, NW] makambo oyo bajali mbindo na miso na [Yehova].”​—Dutɛlɔnɔmɛ 18:10-12.

Ezali polele, likanisi oyo ete bakufi bakoki kosala biso mabe euti na Nzambe te. Ye azali Nzambe ya solo. (Nzembo 31:5; Yoane 17:17) Mpe abombeli baninga na solo oyo bazali kosambela ye “na elimo mpe na solo” makambo kitoko mpo na mikolo mizali koya.​—Yoane 4:23, 24, NW.

Yehova, Nzambe ya solo mpe ya bolingo

Tata na biso ya likoló oyo azali na bolingo, “oyo akoki kokosa te,” asili kopesa elaka ete: Bamilió mingi ya bato oyo basilá kokufa mpe kotyama kati na nkunda bakosekwa na elikya ya kozwa bomoi ya seko kati na mokili ya sika ya boyengebene! (Tito 1:1, 2; Yoane 5:28) Elaka wana ya bolingo ezali komonisa ete Yehova azali komibanzabanza mpenza mpo na bolamu ya bato na ye, mpe azali na mposa makasi ya kolongola kufa, mawa, mpe mpasi. Mpo na yango tozali na ntina te ya kobanga bakufi to ya komibanzabanza koleka ndelo na ntina na bango mpe na ntina na elikya na bango na mikolo mizali koya. (Yisaya 25:8, 9; Emoniseli 21:3, 4) Yehova, Nzambe na biso ya bolingo mpe ya boyengebene akoki kosekwisa mpe akosekwisa bango, kolongoláká bongo etumbu ya kufa.

Biblia, Liloba ya Nzambe ezali kolobela mingi lolenge mabelé makozala kati na mokili ya sika ya boyengebene oyo elakami. (Nzembo 37:29; 2 Petelo 3:13) Ekozala ntango ya kimya mpe ya bolamu, mpe ya komonisa bolingo mpo na bazalani na biso nyonso. (Nzembo 72:7; Yisaya 9:7; 11:6-9; Mika 4:3, 4) Moto nyonso akobatelama malamu, akozala na ndako kitoko, mpe na mosala ya kosepelisa. (Yisaya 65:21-23) Biloko kitoko ya kolya ekozala mingi mpo na bato banso. (Nzembo 67:6; 72:16) Moto nyonso akozala na nzoto kolɔngɔ́nɔ́. (Yisaya 33:24; 35:5, 6) Atako bantoma mpe bato mosusu oyo motuya na bango mosili kokatama bakoyangela kati na makoló elongo na Yesu, Biblia elobeli te mapamboli ya likoló mpo na milimo na bato mosusu nsima na kufa na bango. (Emoniseli 5:9, 10; 20:6) Elingaki kozala likambo ya bokámwi soki bamiliare ya bato oyo basili kokufa bazali se kokóba bomoi na bango atako basili kokufa.

Kasi likambo ya bokámwi ezali te wana toyebi mateya ya polele ya Biblia: Bakufi bazali lisusu na bomoi te lokola milimo ya bomoi. Bakoki te kosala yo mabe. Baoyo bazali kati na nkunda ya kokanisama bazali bobele kopema, bayebi eloko moko te kino ntango ya lisekwa na bango na elaka ebongisami na Nzambe. (Mosakoli 9:10; Yoane 11:11-14, 38-44) Na bongo, bilikya mpe bamposa na biso, etaleli Nzambe. “Tika ete tosepela mpe toyoka esɛngɔ na lobiko na ye.”​—Yisaya 25:9.

[Elilingi na lokasa 7]

Lokola Liloba ya Nzambe emonisi yango polele, bakufi bayebi eloko moko te kino ntango bakosekwa

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto