Lolenge basusu bazali kopesa makabo mpo na mosala ya kosakola Bokonzi
◻ MAKABO MPO NA KOSIMBA MOSALA YA MOKILI MOBIMBA: Bandeko mingi bazali kobomba mwa mosolo to bazali kokɔtisa kati na ebongiseli na bango mwa mosolo oyo bazali kotya yango na sanduku ya makabo oyo ezali na likomi: “Makabo mpo na mosala ya la Société na mokili mobimba—Matai 24:14.” Sanza nyonso, masangá mazali kotinda mbongo oyo ezwami na sanduku yango na biro ya la Société na Brooklyn, New York, to na biro ya filiale oyo ezali penepene.
◻ MAKABO: Makabo ya bolingo makoki kotindama mbala moko na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na filiale ya la Société na mokili na bino. Okoki mpe kopesa biloko ya paúni to biloko mosusu ya motuya. Mokanda moko ya mokuse esengeli kokende nzela moko na makabo nyonso mpo na komonisa ete ezali makabo ya bolingo.
◻ MAKABO OYO MAKOKI KOZONGISAMA: Okoki kopesa Watch Tower Society mbongo, oyo ekoki kobatelama kino liwa ya mopesi, oyo akoki komibombela lotómo ya kozwa yango lisusu soki akómi na bosenga.
◻ ASSURANCE: Watch Tower Society akoki kofutamela assurence to kozwa litomba ya mosolo ya pension. Soki ezali bongo, ebongi koyebisa na la Société.
◻ MOSOLO NA BÁNKI: Na mikili misusu, nimero ya mituya ya mosolo na bánki, mosolo oyo mobombami mpe mosolo oyo mobombami ya pension mokoki kofungwama mpo na Watch Tower Society to kotyama na nkombo ya Watch Tower Society na kufa ya moto yango. Soki ezali bongo, ebongi koyebisa na la Société.
◻ LOTÓMO YA MOSOLO: Lotómo ya mosolo ekoki kopesamela Watch Tower Society na lolenge ya makabo ya libela to na kobateláká makoki ya kozwa mosolo yango naino azali na bomoi.
◻ MAPANGO TO NDAKO: Mapango, ndako to biloko mosusu oyo ekoki kotekama ekoki kopesama na Watch Tower Society; mokabi akoki kopesa yango libela, to akoki kobatela lotómo ya kofanda kati na yango naino azali na bomoi. Liboso na kopesa biloko nyonso na la Société, esengeli koyebisa ye yango.
◻ MOKANDA YA KOPESA LIBULA: Biloko to ndako to mosolo ekoki kopesama na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania na mokanda ya kozwa libula oyo mondimami na mibeko, to tokoki kopesa na la Société lotómo ya kozwa biloko oyo totiki. Biloko oyo bitikami mpo na mangomba makokitisamaka mpako epai na ye oyo apesameli yango. Kopi moko ya mokanda ya kozwa libula to ya boyokani ya kozwa biloko esengeli kotindama na la Société.
Soki ozali na mposa ya toli na likambo yango, komá na adresi oyo elandi: Treasurer’s Office, Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na filiale ya la Société oyo ezali penepene na esika ofandi.