Maimonides—Moto oyo apesaki na losambo ya Bayuda ndimbola ya sika
“LONGWA na Mose kino na Moses, ezalaki na moto mosusu te oyo akokanaki na Moses.” Bayuda mingi bakondima nokinoki makomi oyo mazali likoló ya nkunda lokola elembo ya lokumu monene mpo na Moyuda wana ya ekeke ya 12, oyo azalaki filozofe, mobongisi mibeko, mpe molimboli ya Talmud mpe ya Makomami, na nkombo Moses Ben Maimon—oyo ayebani lisusu na nkombo ya Maimonides mpe Rambam.a Na mikolo na biso bato mingi bayebi Maimonides te, nzokande mikanda na ye esalaki bopusi makasi likoló na makanisi ya Bayuda, ya Bamizilmá, mpe ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba ya ntango na ye. Na lolenge moko ya mozindo, apesaki na losambo ya Bayuda ndimbola moko ya sika. Maimonides azalaki nani, mpe mpo na nini Bayuda mingi batalelaka ye lokola “Mose ya mibale”?
Maimonides azalaki nani?
Maimonides abotamaki na Córdoba, na mboka Espagne, na mobu 1135. Tata na ye, Maimon, oyo ateyaki ye ndambo monene ya mateya ya lingomba na bolenge na ye, ayebanaki mingi lokola moto ya mayele oyo autaki na libota moko ya balakisi ya lokumu mingi ya mibeko ya Bayuda. Ntango ba Almohads bakamataki Córdoba na 1148, Bayuda batyamaki liboso ya liponi, ya kobongwana na lingomba ya Mizilmá to kokima. Yango ebandisaki eleko molai ya kotambolatambola mpo na libota ya Maimonides. Na 1160 bafandaki na Fez, na Maroc, epai atángaki kelasi ya monganga. Na 1165 libota na ye lisengelaki kokima na Palestine.
Nzokande, na Yisraele kimya ezalaki mpenza te. Etuluku moke ya Bayuda ezalaki liboso na likámá ya bitumba bibéngami croisades ya boklisto ya nkombo mpamba mpe liboso na likámá ya mampinga ya Bamizilmá. Naino bakokisaki ata sanza motoba te na “Mabelé Mosantu,” Maimonides elongo na libota na ye bakendeki komibomba na Fustat, engumba ya kala ya Caire, na mboka Ezipito. Ezalaki kuna nde mayele mingi ya Maimonides eyebanaki mpenza polele. Na 1177, akómaki mokambi ya etuluku ya Bayuda, mpe na 1185 aponamaki lokola monganga kati na ndako ya Saladin, mokonzi ya Bamizilmá oyo ayebanaki mingi. Maimonides aumelaki na bibonga wana mibale kino kufa na ye na 1204. Mayele na ye ya monganga eyebanaki mingi na boye ete, elobamaki ete, Richard Coeur de Lion, mokonzi ya Angleterre alukaki kokamata Maimonides lokola monganga na ye moko.
Akomaki makambo nini?
Maimonides akomaki mikanda mingi. Wana azalaki kokima minyoko ya Bamizilmá, na kobombama mpe na boumeli ya mobembo ya kokima, akomaki eteni monene ya búku na ye ya liboso, Commentary on the Mishnah (Ndimbola likoló na Mishnah).b Ekomamaki na lokótá Arabe, mpe ezali kolimbola makanisi mpe maloba makeseni oyo mazwami kati na Mishnah, mbala mosusu ezali kokɔtisa filozofi ya Maimonides likoló na losambo ya Bayuda. Kati na eteni oyo ezali kolimbola makambo ya Sanhédrin, Maimonides amonisaki mitindá 13 ya moboko ya kondima ya Bayuda. Liboso losambo ya Bayuda ekataki mpenza te esakola ya bindimeli na yango. Bongo, mitindá 13 ya kondima oyo Maimonides abimisaki ekómaki elakiseli mpo na bisakola ya kondima mosusu ya Bayuda. Talá Etánda, lokasa 23.
Maimonides alukaki kolimbola kolandana malamu ya biloko nyonso, ezala biloko ya mosuni to biloko ya elimo. Aboyaki bindimandima, kolukáká bandimbola ya eloko na eloko na lisalisi ya oyo ye azalaki komona ete ezali bilembeteli bibongi mpe biyokani na mayele. Momeseno na ye wana ememaki ye na kokoma búku na ye oyo eleki ntina—Mishneh Torah.c
Na mikolo ya Maimonides, Bayuda bazalaki kosalela liloba “Torah,” to “Mibeko,” bobele mpo na mibeko oyo mikomamaki na Mose te kasi lisusu mpo na bandimbola nyonso oyo balakisi na mibeko ya Bayuda bapesaki likoló na Mibeko na boumeli ya bikeke mingi. Makanisi yango makomamaki kati na Talmud mpe kati na bankóto ya bikateli mpe makomi ya balakisi na mibeko ya Bayuda na ntina na Talmud. Maimonides ayebaki ete boíke ya makambo mpe kozanga molɔngɔ́ kati na mikanda yango nyonso ezalaki kobulunganisa ntalo monene ya Bayuda oyo batángaki mingi te wana ezalaki bango koluka kozwa bikateli kati na makambo ya mokolo na mokolo. Ntalo monene na bango bazalaki na makoki te ya koyekola mikanda ya balakisi na mibeko ya Bayuda oyo ezalaki kosɛnga boyekoli na boumeli ya bomoi mobimba, mikanda oyo mingi na yango mikomamaki na lolenge makasi na lokótá Araméen. Ekateli ya Maimonides ezalaki ete akoma lisusu makambo yango na mikanda, na kolimboláká polele bikateli ya ntina mingi, mpe kobongisa yango kati na molɔngɔ́ ya babúku 14, oyo ekabolami engebene mitó ya makambo. Akomaki yango na Liebele ya polele, mpe ya kitoko.
Mishneh Torah ezalaki búku malamu ya kopesa litambwisi na boye ete bakonzi mosusu ya lingomba ya Bayuda babangaki ete yango ekozwa esika ya Talmud. Nzokande, ata baoyo bazalaki komonisa botɛmɛli bandimaki nguya ya mayele mingi oyo ezalaki kati na búku yango. Búku wana ya mibeko oyo ebongisami malamu esalaki mbongwana monene, kopesáká nguya ya sika na ebongiseli ya losambo ya Bayuda oyo bato batángi mingi te bakokaki lisusu te kolanda to kokanga ntina na yango.
Na nsima, Maimonides abandaki kokoma búku mosusu ya monene—The Guide for the Perplexed (Litambwisi mpo na bato oyo babulunganisami). Lokola mikanda mingi ya kala ya Bagreke mibongolamaki na Arabe, Bayuda mingi bayebaki malamu mateya ya Aristote mpe ya bafilozofe mosusu. Basusu babulunganisamaki, wana bamonaki ete ezali mpasi koyokanisa ndimbola ya sikisiki ya maloba ya Biblia mpe filozofi. Kati na búku The Guide for the Perplexed, Maimonides, oyo azalaki kosepela mingi na Aristote, alukaki kolimbola ntina mpenza ya Biblia mpe losambo ya Bayuda na motindo boye ete eyokana na mateya ya filozofi mpe na lolenge malamu ya kokanisa.—Kokanisá na 1 Bakolinti 2:1-5, 11-16.
Longola babúku wana ya ntina mingi mpe mikanda misusu ya lingomba, Maimonides akomaki mikanda ya bwanya na makambo ya monganga mpe zébi ya bitando ya likoló. Tosengeli kobosana te likambo mosusu oyo na ntina na mikanda mingi oyo ye akomaki. Búku monene Encyclopaedia Judaica eyebisi ete: “Nkómá ya Maimonides ebandisaki eleko ya sika ya kokoma nkómá. Azali Moyuda ya liboso oyo nkómá na ye mingi ebombamaki. . . . Nkómá na ye ezalaki kosimba makanisi mpe mitema na bato oyo ye azalaki kokomela, mpe ayebaki kobongola lolenge na ye ya kokoma mpo na komiyokanisa na bango.”
Ateyaki nini?
Kati na Mitindá 13 ya Kondima, Maimonides apesaki makanisi ya ntina ya endimeli, oyo mosusu na yango ezalaki na moboko likoló na Makomami. Nzokande, etindá ya nsambo mpe ya libwa ezali kotɛmɛla moboko mpenza ya kondima oyo etongami likoló na Makomami ete Yesu azali Masiya.d Kotaleláká mateya ya lipɛngwi ya boklisto ya nkombo mpamba, lokola Bosato, mpe bokosi monene oyo emonisamaki polele na kosopama ya makila na nzela ya ba croisades, ezali likambo ya kokamwa te ete Maimonides alukaki na mozindo te likambo litali Yesu lokola Masiya.—Matai 7:21-23; 2 Petelo 2:1, 2.
Maimonides akomi ete: “Ezali nde na libangá mosusu ya kotuta libaku oyo eleki [boklisto] monene? Basakoli nyonso balobelaki Masiya lokola mosikoli ya Yisraele mpe mobikisi na yango . . . [Nzokande, boklisto] esalaki ete Bayuda bábomama na mopanga, batikali na bango bápalangana mpe básambwisama, Torah ebebisamaki, mpe eteni monene ya mokili ebungaki kati na mabe mpe esambelaki nzambe mosusu kasi Nkolo te.”—Mishneh Torah, “The Laws of Kings and Their Wars,” (Mibeko ya Bakonzi mpe bitumba na bango) mokapo 11.
Nzokande, atako bazalaki komemya ye mingi, Bayuda mingi baboyaki kolanda Maimonides kati na makambo mosusu oyo alobelaki na lolenge ya polele. Wana misala ya bilimu mabe mikómaki na bopusi makasi kati na losambo ya Bayuda (Kabbalah), astrologie ebandaki kopalangana mingi kati na Bayuda. Maimonides akomaki ete: “Moto nani oyo asangani na astrologie mpe azali kokana misala to mibembo na ye engebene eleko etyami na baoyo bazali kotalatala likoló asengeli kobɛtama fimbo . . . Makambo wana nyonso mazali lokuta mpe bokosi . . . Ye nani andimi makambo wana . . . azali bobele ebɛbɛ mpe azangi bososoli.”—Mishneh Torah, “Mibeko ya losambo ya bikeko,” mokapo 11; kokanisá na Levitike 19:26; Deteronome 18:9-13.
Maimonides atɛmɛlaki mpe makasi momeseno mosusu: “[Balakisi na mibeko ya Bayuda] bakataki mpo na bango moko lifuti ya mosolo oyo moto na moto mpe masangá masengelaki kofuta mpe batindaki bato na kokanisa, na bozoba nyonso, ete ezalaki masɛngami mpe makambo mabongi . . . Nyonso wana ezali mabe. Ezali ata na liloba moko te, ezala kati na Torah to kati na maloba ya bato na mayele oyo bakomaki [Talmud], oyo endimisi yango.” (Commentary on the Mishnah, Avot 4:5) Na kokesena na balakisi wana ya mibeko ya Bayuda, Maimonides asalaki mosala makasi lokola monganga mpo na kobikela, azalaki kondima soko moke te lifuti mpo na misala ya lingomba.—Kokanisá na 2 Bakolinti 2:17; 1 Batesaloniki 2:9.
Lolenge nini losambo ya Bayuda mpe mangomba mosusu epusamaki?
Molakisi Yeshaiahu Leibowitz ya Eteyelo monene na lokótá Liebele, na Yelusaleme, alobaki ete: “Maimonides azali moto oyo aleki bopusi kati na lisoló ya losambo ya Bayuda, kobanda na eleko ya Batata ya mabota mpe ya basakoli kino na mikolo na biso.” Búku Encyclopaedia Judaica emonisi ete: “Bopusi ya Maimonides likoló na bokóli oyo emonanaki nsima kati na losambo ya Bayuda ezali monene mpenza. . . . C. Tchernowitz . . . akei mosika kino koloba ete soki Maimonides azalaki te mbɛlɛ losambo ya Bayuda elingaki kokabwana na mangomba mpe bindimeli mingi ekeseni . . . Bolóngi monene na ye ezalaki ya koyanganisa mitindo mikeseni ya makanisi.”
Na kobongisáká mateya ya Bayuda mpo na koyokanisa yango na makanisi mpe lolenge na ye ya kokanisa, Maimonides akɔtisaki mbongwana na Losambo ya Bayuda. Ezala bato na mayele to bato mosusu, nyonso bamonaki ete mbongwana wana ezalaki malamu mpe ezalaki na bopusi mingi. Na nsima, ata batɛmɛli na ye bandimaki makambo monene Maimonides asalaki. Atako makomi na ye mazalaki na mokano ya kosikola Bayuda na kolanda bandimbola ya milaimilai, nokinoki na nsima bandimbola mingi ekomamaki na ntina na mikanda na ye.
Búku Encyclopaedia Judaica eyebisi ete: “Maimonides azalaki . . . filozofe Moyuda oyo aleki monene ya Moyen Âge, mpe búku na ye Guide of the Perplexed ezali búku ya filozofi eleki ntina oyo ebimisamaki na Moyuda.” Atako ekomamaki na lokótá Arabe, búku The Guide for the Perplexed ebongolamaki na Liebele wana Maimonides azalaki naino na bomoi mpe ntango moke na nsima ebongolamaki na Latin, kopesáká nzela ete bátánga yango na Mpótó mobimba. Lokola litomba, bosangisi oyo Maimonides asalaki kati na filozofi ya Aristote mpe mateya ya Bayuda ekɔtaki nokinoki kati na mateya minene ya boklisto ya nkombo mpamba. Bato na mayele ya boklisto ya nkombo mpamba ya eleko wana, lokola Albertus Magnus mpe Thomas Aquinas, balobelaki mbala mingi makanisi ya Maimonides. Bato ya mayele ya Mizilmá mpe bapusamaki na makanisi na ye. Na nsima mateya ya Maimonides esalaki bopusi likoló na bafilozofe Bayuda, lokola Baruch Spinoza, na komikabola libela na motindo ya kala ya losambo ya Bayuda.
Maimonides asengeli kotalelama lokola moto ya mayele mingi oyo azalaki na bomoi liboso ya eleko ebéngami Renaissance. Lilako oyo apesaki ete kondima esengeli koyokana na lolenge malamu ya kokanisa ezali naino na ntina kino lelo. Lilako wana epusaki ye na kotɛmɛla polele biyambayamba ya mangomba. Nzokande, ndakisa mabe ya boklisto ya nkombo mpamba mpe bopusi ya filozofi ya Aristote epekisaki ye na kokóma na bosukisi oyo eyokani mpenza na solo ya Biblia. Atako bato nyonso te bakondima maloba oyo makomami likoló na nkunda ya Maimonides—“Longwa na Mose kino na Moses, ezalaki na moto mosusu te oyo akokanaki na Moses”—nde tosengeli kondima ete ye akɔtisaki mbongwana ya sika kati na lolenge mpe ebongiseli ya losambo ya Bayuda.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Rambam” ezali nkombo ya Liebele oyo esalemi na balɛtɛ́lɛ ya ebandeli ya maloba “Rabbi Moses Ben Maimon.”
b Mishnah ezali bosangisi ya bandimbola oyo balakisi ya mibeko ya lingomba ya Bayuda bapesaki, ezali na moboko likoló na oyo Bayuda babéngaka ete mibeko oyo mikomamaki te. Yango ekomamaki na mikanda na nsuka ya ekeke ya mibale mpe na ebandeli ya ekeke ya misato T.B., kobandisáká bongo Talmud. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mwa búku Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? lokasa 10, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
c Nkombo Mishneh Torah ezali liloba ya Liebele oyo euti na Deteronome 17:18, elingi koloba, kopi, to kozongelama, ya Mibeko.
d Mpo na koyeba makambo mingi na ntina na elembeteli oyo emonisi Yesu lokola Masiya oyo alakamaki, talá mwa búku Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? Nkasa 24-30, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Etanda na lokasa 23]
MITINDÁ 13 YA KONDIMA ENGEBENE MAIMONIDESe
1. Nzambe azali Mozalisi mpe Mokonzi ya biloko nyonso. Ye nde asalaki, azali kosala, mpe akosala biloko nyonso.
2. Nzambe azali moko. Ezali na bomoko mosusu te oyo ekokani na Ye.
3. Nzambe azali na nzoto. Makambo ya mosuni makoki kosalelama epai na Ye te.
4. Nzambe azali ebandeli mpe nsuka.
5. Ebongi mpenza kopesa mabondeli bobele epai na Nzambe. Moto asengeli te kopesa mabondeli epai na moto mosusu to na eloko mosusu.
6. Maloba nyonso ya basakoli mazali solo.
7. Bisakweli ya Mose bizali mpenza solo. Ye azalaki mokóló na basakoli nyonso, ezala baoyo bazalaki liboso na ye to na nsima na ye.
8. Torah mobimba oyo tozali na yango lelo ezali oyo epesamaki epai na Mose.
9. Torah ekobongwana te, mpe Nzambe akopesa mosusu soko moke te.
10. Nzambe ayebi misala nyonso mpe makanisi nyonso ya moto.
11. Nzambe apesaka mbano na baoyo batosaka mibeko na Ye, mpe apesaka etumbu na baoyo basalelaka Ye lisumu.
12. Masiya akoya.
13. Bakufi bakosekwa.
[Maloba na nse ya lokasa]
e Maimonides alimbolaki mitindá wana kati na búku na ye Commentary on the Mishnah, (Sanhédrin 10:1). Na nsima losambo ya Bayuda endimaki yango lokola esakola ya kondima na bango. Makomi oyo mazali awa na likoló makamatamaki motindo yango ezwami na búku ya mabondeli ya Bayuda.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 21]
Jewish Division / The New York Public Library / Astor, Lenox, and Tilden Foundations