Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/5 nk. 22-26
  • Kolendendela ememaka na bokóli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolendendela ememaka na bokóli
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebandeli ya moke
  • Nasali makasi mpo na komekola ndakisa ya tata
  • Kosangana na mosala ya Bokonzi
  • Mpiko kati na botɛmɛli
  • Mosungi ya sembo
  • Jehovah apambolaki ekateli na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Koyika mpiko ememaka esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Kotya Motema Epai Na Yehova Esungaki Ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Kondima mikumba oyo Yehova apesi yo ememaka mbano mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/5 nk. 22-26

Kolendendela ememaka na bokóli

LISOLÓ YA JOSÉ MAGLOVSKY

Ntango polisi asimbaki lobɔkɔ na ngai, nalukaki tata na ngai. Nzokande, kozanga ete nayeba yango, basilaki komema ye na biro ya bapolisi. Ntango nakómaki kuna, bapolisi basilaki kokanga mikanda na biso nyonso, elongo na Biblia na biso, mpe batyaki yango na nsé. Ntango amonaki yango, tata na ngai atunaki ete: “Botye mpe Biblia na nsé?” Mokonzi ya bapolisi asɛngaki bolimbisi, na nsima alokɔtaki Biblia mpe atyaki yango likoló na mesa.

LOLENGE nini tokendeki kokóma na biro ya bapolisi? Tozalaki kosala nini? Tozalaki nde na biro ya bapolisi epai baboyaka kondima ete Nzambe azali, na boye ete babɔtɔlaki ata Biblia na biso? Mpo na koyanola na mituna oyo, ebongi naino tózonga kino na 1925, liboso nkutu ete nábotama.

Na mobu wana, tata na ngai Estefano Maglovsky mpe mama na ngai, Juliana, batikaki mboka oyo ezalaki na ntango wana Yougoslavie mpe bakendeki kofanda na Brésil, na São Paulo. Atako tata azalaki protestá mpe mama azalaki Mokatolike, lingomba lizalaki kobimisa bokabwani soko moke te kati na bango. Ya solo, mibu zomi na nsima, likambo moko lisalemaki oyo likómisaki bango na bomoko ya lingomba. Mobali ya mama lɛki amemelaki tata mwa búku moko ya lángi makasi na lokótá Hongrois oyo ezalaki kolobela ezalela ya bakufi. Bapesaki ye mwa búku yango lokola likabo, mpe asɛngaki ete tata atánga yango mpe amonisa likanisi na ye na ntina na makambo oyo mazali kati na yango, mingimingi na eteni oyo ezali kolobela “lifelo.” Papa alekisaki butu mobimba mpo na kotánga mwa búku yango mpe kotánga yango lisusu, mpe na mokolo na nsima, ntango mobali ya mama lɛki ayaki mpo na koyoka likanisi na ye, tata alobaki polele ete: “Oyo ezali solo!”

Ebandeli ya moke

Lokola mokanda yango mozalaki ya Batatoli ya Yehova, bango nyonso mibale bakendeki koluka bango mpo na koyeba makambo mingi na ntina na bindimeli mpe mateya na bango. Na nsima, ntango bakutanaki na bango, basangani mingi ya libota na biso babandaki masoló ya Biblia elongo na Batatoli. Bobele na mbula yango, 1935, boyekoli ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ebandaki na lokótá Hongrois, oyo bato soko mwambe bazalaki kosangana na yango, mpe kobanda wana boyekoli ya Biblia ekómaki kosalema pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na ndako na biso.

Nsima ya mibu mibale ya boyekoli ya Biblia, tata azwaki batisimo na 1937 mpe akómaki Motatoli ya Yehova ya molende, na kosanganáká na mosala ya kosakola ndako na ndako mpe kosaláká lisusu lokola mosaleli oyo aponami mpe motambwisi ya boyekoli. Apesaki mabɔkɔ na bofungoli ya lisangá ya liboso na São Paulo, na eteni ya Vila Mariana. Na nsima, lisangá yango etindamaki na ntéi ya engumba mpe eyebanaki lokola Lisangá ya Centre. Mibu zomi na nsima lisangá ya mibale esalemaki, na etúká ya Ypiranga, mpe tata aponamaki mosaleli ya lisangá kuna. Na 1954, lisangá ya misato ebotamaki, na eteni ya Moinho Velho, epai kuna asalaki mpe lokola mosaleli ya lisangá.

Nokinoki nsima wana etuluku yango ekómaki makasi, abandaki kosalisa etuluku mosusu penepene na São Bernardo do Campo. Na lisalisi ya mapamboli ya Yehova likoló na milende ya bituluku mike wana ya Batatoli na boumeli ya mibu mingi, bokóli ezalaki monene, na boye ete na 1994 ezalaki na basakoli 70000 kati na masangá 760 na etúká monene ya São Paulo. Likambo ya mawa, tata azalaki na bomoi te mpo na komona bokóli yango. Akufaki na 1958 wana ezalaki ye na mbula 57.

Nasali makasi mpo na komekola ndakisa ya tata

Ezaleli ya ntina monene oyo tata azalaki na yango, lokola baklisto nyonso oyo bakɔmɛli, ezalaki boyambi bapaya. (Talá 3 Yoane 1, 5-8.) Lokola mbano, tozalaki na libaku malamu ya koyamba Antonio Andrade elongo na mwasi na ye mpe mwana na bango ya mobali, oyo bayaki na Brésil kouta na Etats-Unis elongo na ndeko Yuille mpe mwasi na ye na 1936. Toyambaki mpe lokola bapaya na ndako na biso bamisionere mibale oyo bazwaki mapɔlɔ́mi na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower, Harry Black mpe Dillard Leathco, baoyo na 1945 bazalaki bamisionere ya liboso oyo batindamaki na Brésil. Basusu mingi bayaki na nsima. Bandeko wana mibali mpe basi bazalaki liziba ya elendiseli ya ntango nyonso mpo na mosangani moko na moko kati na libota na biso. Koyebáká motuya na yango, mpe mpo na litomba ya libota na ngai, nasalaki makasi ete námekola ndakisa ya tata na ngai kati na ezaleli ya boklisto etali boyambi bapaya.

Atako nazalaki bobele na mbula libwa ntango tata andimaki solo na 1935, lokola nazalaki mwana ya mobali ya liboso, nabandaki kokende elongo na ye na misala ya teokrasi. Biso banso tozalaki koyangana na makita elongo na ye na Ndako ya Bokonzi oyo ezalaki na biro ya botambwisi misala ya Batatoli na São Paulo na balabála Eça de Queiroz, Nimero 141. Na lisalisi ya mateya mpe kobongisama oyo tata apesaki ngai, nakólisaki mposa makasi ya kosalela Yehova, mpe na 1940, namipesaki epai na Yehova, komonisáká komipesa yango na batisimo ya mai kati na ebale Tietê oyo ezali sikawa kobebisama na bosɔtɔ, oyo ezali kotiyola katikati na engumba São Paulo.

Mosika te nayekolaki oyo elimboli kozala mosakoli ya molende ya nsango malamu, kolónáká mpe kosopáká mai ya nsango ya solo likoló na basusu mpe kotambwisáká bango na boyekoli ya Biblia. Sikawa, wana ezali ngai komona bankóto ya Batatoli ya Yehova oyo bamipesi na Brésil, nayokaka esengo monene, koyebáká ete Ye asalelaki ngai mpo na kosalisa mingi kati na bango ete bázwa boyebi ya solo to mpo ete báyikanisa bosepeli na bango mpo na yango.

Kati na baoyo nasalisaki, ezali na Joaquim Melo, oyo nakutanaki na ye kati na mosala ya ndako na ndako. Nazalaki kosolola na mibali misusu misato oyo bazalaki koyoka, kasi bazalaki na bosepeli mingi te. Bongo namonaki elenge mobali moko oyo apusanaki penepene na biso mpe azalaki koyoka na likebi mingi. Komonáká bosepeli na ye, natyaki likebi likoló na ye mpe, nsima ya kopesa litatoli ya mozindo, nabyangaki ye na Boyekoli ya Mokanda ya lisangá. Ayaki na Boyekoli ya Mokanda te, kasi ayaki na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi mpe kobanda wana ayanganaki na makita pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Akólaki malamu, azwaki batisimo, mpe asalaki lokola mosaleli-motámboli na boumeli ya mibu mingi, elongo na mwasi na ye.

Na nsima, ezalaki Arnaldo Orsi, oyo nakutanaki na ye na esika na ngai ya mosala. Nazalaki mbala na mbala kopesa litatoli epai na moninga moko ya mosala, kasi namonaki elenge mobali moko ya mandefu mingi oyo azalaki kolanda masoló na biso na mosika, bongo nabandaki mpe kosolola na ye. Autaki na libota moko ya Bakatolike ya molende, kasi atunaki mituna mingi likoló na makambo matali komela makaya, kotala bafilime oyo ezali kolakisa bulumbu ya mibali to ya basi, koyekola masano ya bitumba lokola judo. Namonisaki ye oyo Biblia ezali koteya, na esengo monene, na mokolo molandaki abyangaki ngai nakende komona wana azalaki kobuka pipe mpe epeliseli na ye, elongo na ekulusu na ye, kobebisa bafilime na ye oyo ezalaki kolakisa bulumbu ya mibali mpe basi, mpe kokata mandefu na ye. Abongwanaki mpenza nsima ya ntango moke! Atikaki mpe kosala judo mpe asɛngaki ete náyekola Biblia elongo na ye mokolo na mokolo. Atako akutanaki na botɛmɛli ya mwasi na ye mpe ya tata na ye, akólaki na elimo na lisalisi ya bandeko oyo bazalaki kofanda penepene na ye. Nsima na ntango moke, azwaki batisimo mpe lelo oyo azali nkulutu kati na lisangá. Mwasi na ye elongo na bana na ye mpe bandimaki solo.

Kosangana na mosala ya Bokonzi

Ntango nazalaki na mibu 14, nazwaki mosala na kompanyi moko ya piblisité, epai nayekolaki lolenge ya kokoma likoló na mabaya to bilamba ya piblisité. Yango ezalaki na ntina mingi, mpe na boumeli ya mibu mingi, na São Paulo nazalaki ndeko bobele moko oyo ayebaki kokoma likoló na mabaya mpe bilamba oyo bakakisaka likoló na balabála mpo na koyebisa mitó ya masukúlu ya bato banso mpe ya mayangani ya Batatoli ya Yehova. Na boumeli ya mibu soko 30, nazalaki na libaku malamu ya kozala mokɛngɛli ya etuluku ya koyema makomi na mayangani. Nazalaki ntango nyonso kobomba mikolo na ngai ya konzé mpo na kosala na mayangani, kolaláká mbala mosusu na ndako ya liyangani mpo ete makomi masalema na ntango malamu.

Nazwaki mpe libaku malamu ya kosalela motuka ya la Société oyo ezalaki na ekóliseli-lolaka, oyo ezalaki mpenza likambo ya sika na ntango wana. Tozalaki kotanda mikanda na biso oyo mikolimbolaka Biblia likoló na mesa moko, mpe wana motuka ezalaki kopanza nsango oyo ezalaki na diski, tozalaki kosolola elongo bato oyo bazalaki kobima na bandako na bango mpo na komona makambo oyo mazalaki kosalema. Mwango mosusu oyo tosalelaki mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ezalaki fono ya komema na mabɔkɔ, mpe nazali kino lelo na badiski oyo tozalaki kosalela mpo na kolakisa mikanda ya la Société. Lokola mbano tozalaki kokabola mikanda mingi oyo mikolimbolaka Biblia.

Na ntango Lingomba ya Katolike lizalaki kosala milɔngɔ́ milai ya nkémbí na balabála ya São Paulo, mbala mingi ezalaki na mibali batyami liboso mpo na kofungola nzela. Mokolo ya Lomingo moko, ngai mpe tata na ngai tozalaki kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na balabála ntango nkémbí moko ya molai ebimaki. Lokola na momeseno, tata alataki ekɔti na ye. Moko na mibali oyo bazalaki liboso angangaki ete: “Longolá ekɔti na yo! Ozali komona te ete nkémbí ezali koya?” Wana tata alongolaki yango te, mibali mingi bayaki, bapusaki ye pembeni penepene na maninisa ya magazini moko, kobimisáká bongo yikiyiki. Yango ebendaki likebi ya polisi moko, oyo ayaki komona likambo oyo lizalaki koleka. Moko na mibali yango asimbaki ye na lobɔkɔ, kolingáká kosolola elongo na ye. Polisi apesaki ye etindá ete, “Tiká kosimba elamba na ngai ya mosala!” mpe abɛtaki lobɔkɔ ya mobali yango. Na nsima atunaki soki ezalaki likambo nini. Mobali yango alimbolaki ete tata aboyaki kolongola ekɔti na ye, wana nkémbí ezalaki koleka, kobakisáká ete: “Nazali Mokatolike ya Loma.” Eyano oyo amizelaki na yango te ezalaki: “Olobi ete ozali Moloma? Boye zongá na Loma! Awa ezali Brésil.” Bongo abalukaki epai na biso, kotunáká ete: “Nani azalaki awa liboso?” Ntango tata ayanolaki ete biso nde tozalaki wana liboso, polisi abenganaki mibali yango mpe ayebisaki biso ete tólanda mosala na biso. Atɛlɛmaki penepene na biso kino nkémbí mobimba elekaki​—mpe tata alongolaki ekɔti na motó na ye te!

Makambo motindo yango mazalaki kosalema mingi te. Kasi wana mazalaki kosalema, ezalaki likambo ya kolendisa na koyeba ete ezalaki na bituluku mike ya bato oyo bazalaki kondima boyengebene mpe bazalaki kofukama te liboso na Lingomba ya Katolike.

Na libaku mosusu, nakutanaki na elenge moko oyo amonisaki bosepeli mpe asɛngaki ete nazongela ye na pɔ́sɔ oyo elandaki. Ntango nazongelaki ye, ayambaki ngai malamu mpe asɛngaki ete nakɔta. Nakamwaki mingi na ntango namonaki ete nazingelamaki na etuluku ya bilenge ya mobulu oyo bazalaki kosɛka ngai mpe koluka kosilikisa ngai! Likambo ekómaki ndóngó, mpe naokaki lokola ete mosika te bakobundisa ngai. Nayebisaki ye oyo abyangaki ngai ete soki likambo moko likómelaki ngai, ye moko akokumba ngambo mpe ete libota na ngai liyebaki epai nazalaki. Nalobaki na bango bátika ngai nakende, mpe bandimaki. Nzokande, liboso nakende, nalobaki ete soki moko na bango alingaki kosolola na ngai ye moko, nakondima yango. Na nsima, nayokaki ete bazalaki baninga ya sángó, etuluku oyo ezalaki kolanda ye, oyo apusaki bango ete báyangana wana. Nazalaki na esengo ete nalóngaki kobima na kati na bango.

Ya solo, na ebandeli, bokóli ezalaki malɛmbɛ na mboka Brésil, ezalaki mpenza komonana te. Tozalaki na eteni ya ebandeli ya mosala ya “kolóna,” tozalaki na ntango mingi te ya “kobongisa mabelé” mpe “kobuka” mbuma ya mosala makasi na biso. Tozalaki ntango nyonso komikundola oyo ntoma Paulo akomaki: “Ngai nakonaki, Apolo amwangisaki mai kasi Njambe akolisaki. Mokoni ajali elɔkɔ tɛ, momwangisi na mai elɔkɔ mpe tɛ nde bobɛlɛ Njambe mokolisi.” (1 Bakɔlinti 3:6, 7) Na boyei ya bandeko mibale oyo bazwaki mapɔlɔ́mi na Galadi na 1945, tomonaki ete ntango esilaki kokóma mpo na bokóli oyo tozalaki kozela yango uta kala.

Mpiko kati na botɛmɛli

Nzokande, bokóli esengelaki te koya kozanga botɛmɛli, mingi mpenza nsima wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na Mpótó. Minyoko ya polele mibimaki mpamba te bato mingi mpe bakonzi mosusu bazalaki kososola te ezaleli na biso ya kozanga kokɔta na politiki. Mokolo moko, na 1940, wana ezalaki biso kosalela makomi likoló na mabaya mpo na kosakola kati na balabála na ntéi ya engumba São Paulo, polisi moko ayaki nsima na ngai, abotɔlaki mabaya na mabɔkɔ na ngai, mpe asimbaki ngai na lobɔkɔ mpo na komema ngai na biro ya polisi. Nalukaki tata na ngai zingazinga, kasi azalaki komonana te. Kozanga ete nayeba, ye mpe bandeko mibali mpe basi, elongo na ndeko Yuille, oyo azalaki kokɛngɛla mosala na Brésil, basilaki kokumbama na biro ya bapolisi. Lokola emonisamaki na paragrafe ya ebandeli, nakutanaki lisusu na tata kuna.

Lokola nazalaki mwana moke, bakokaki te kokanga ngai mpe nokinoki polisi moko amemaki ngai na ndako mpe apesaki ngai epai na mama na ngai. Bobele na mpokwa wana batikaki bandeko basi. Na nsima bapolisi bazwaki ekateli ya kotika bandeko mibali nyonso, oyo bazalaki soko zomi, kozanga bobele ndeko Yuille. Nzokande, bandeko balobaki na ekateli makasi ete: “Soki moko atikali, biso banso mpe tokobima te.” Bapolisi bakangamaki makasi na ekateli na bango, mpo na yango bango banso balekisa butu kati na ndako moko ya mpiɔ likoló na simá ya malili. Na mokolo na nsima batikaki bango banso kozanga mindɔndɔ́. Mbala mingi bazalaki kokanga bandeko mibali mpo ete bazalaki kopesa litatoli na mabaya. Mabaya mazalaki kosakola masukúlu ya bato banso mpe mwa búku Fascism or Freedom (Fascisme to bonsomi), mpe bakonzi mosusu ya Leta bamonaki yango lokola nde tozalaki kokɔtela Fascisme, likambo oyo limemaki na kozanga koyokana.

Mibeko oyo mikómisaki mosala ya sodá lisɛngisi ebimisaki mpe mikakatano mpo na bandeko mibali oyo bazalaki bilenge. Na 1948, nazalaki moto ya liboso oyo akangamaki na Brésil mpo na likambo yango. Bakonzi bazalaki koyeba te soki basengelaki kosala ngai nini. Batindaki ngai na káa ya basodá na Caçapava mpe bapesaki ngai mosala ya kolóna mpe kobongisa bilanga ya ndunda mpe nasengelaki kotya bopɛto na ndako epai bakonzi bazalaki kosala masano ya kobunda na mopanga. Nazwaki mabaku mingi ya kopesa litatoli mpe kokabola mikanda mingi epai na mibali yango. Mokonzi ya basodá na káa yango azalaki moto ya liboso oyo azwaki búku Enfants oyo la Société abimisaki. Na nsima, napesamelaki mokumba ya kopesa mateya ya lingomba epai na basodá soko 30 to 40 baoyo bakokaki te kosala ngalasisi mpe batyamaki kati na ndako moko. Na nsuka, nsima ya basanza soko zomi na bolɔ́kɔ, basambisaki ngai mpe batikaki ngai. Nazali na botɔ́ndi epai na Yehova, oyo apesaki ngai nguya ya koyika mpiko na makaneli, kosambwisama mpe botyoli oyo nakutanaki na yango epai na mibali misusu oyo bazalaki kuna.

Mosungi ya sembo

Na 2 Yúni 1951, nabalaki Barbara, mpe kobanda ntango wana azali moninga ya sembo kati na mokumba ya kobɔkɔla bana na biso mpe ya kokólisa bango kati na “disipilini mpe mateya ya Yehova.” (Baefese 6:4, NW) Kati na bana na biso mitano, minei bazali kosalela Yehova na esengo na makoki na bango nyonso. Elikya na biso ezali ete, elongo na biso, bakolanda kolendendela kati na solo mpe kosunga kati na bokóli ya lisangá mpe ya mosala oyo mozali kosalema. Basangani ya libota na ngai oyo bazali awa kati na fɔtɔ́ bazali bango nyonso basaleli ya Yehova oyo bamipesi, longola bobele ɛlɛzi oyo azali na mabɔkɔ. Minei bazali bankulutu mpe mibale bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza, oyo emonisi bosolo ya Masese 17:6 oyo elobi ete: “Bana na bana bajali bisɛngɔ na bampaka, nkɛmbɔ na bana ejali tata na bango.”

Sikawa, na mbula 68, kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ezali mpenza malamu te. Na 1991, basalaki ngai lipasó mpo na kofungola misisa misato oyo ezipamaki mpe na nsima babongisaki mosisa mosusu na lisalisi ya pɔ́ndɔ (sonde). Nzokande, nazali na esengo ya kokóba lokola mokɛngɛli-mokambi kati na lisangá ya São Bernardo do Campo, kolandáká matambe ya tata na ngai, oyo azalaki kati na bandeko oyo babandaki mosala awa. Ntango na biso ekeseni mpenza na mosusu nyonso, mpamba te ezali na libaku malamu ya kosangana na mosala kitoko oyo mokozongelama lisusu te mpe oyo etali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Masiya ya Yehova. Na yango tosengeli te kobosana maloba ya Paulo epai na Timoté: “Kasi yɔ . . . osala mosala na mopalanganisi na Nsango Malamu, okokisa lisungi na yɔ nyɛ.”​—2 Timɔtɛ 4:5.

[Elilingi na lokasa 23]

Baboti na ngai, Estefano mpe Juliana Maglovsky

[Elilingi na lokasa 26]

José mpe Barbara elongo na basangani ya libota na bango ya basaleli ya Yehova oyo bamipesi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto