Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/7 nk. 8-12
  • Koyika mpiko ememaka esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyika mpiko ememaka esengo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Natiki mosala ya sofɛlɛ, nakómi mosakoli ya nsango malamu
  • Botɛmɛli ebandi
  • Namityeli mokano
  • Ebongiseli moko ya bolingo
  • Mokumba mosusu ya mpasi
  • Bampunda mpe bakakolo ya Amerika
  • Nazwi mosungi
  • Nakobi koyika mpiko atako nzoto ezali lisusu malamu te
  • Kotya Motema Epai Na Yehova Esungaki Ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Jehovah apambolaki ekateli na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Kolendendela ememaka na bokóli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Kondima mikumba oyo Yehova apesi yo ememaka mbano mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/7 nk. 8-12

Lisolo ya bomoi

Koyika mpiko ememaka esengo

YA MÁRIO ROCHA DE SOUZA

Eleki lelo mbula 20, monganga moko alobaki boye: “Nandimi te ete Rocha akobika soki tosali ye lipaso.” Atako bongo, nazali mobongisi-nzela tii lelo oyo. Nini esalisi ngai nayika mpiko bambula nyonso wana?

NAKOLAKI na ferme, pene na mboka Estêvão, na etúká ya Bahia, na nɔrdi-ɛsti ya ekólo Brésil. Ntango nazalaki na mbula nsambo, nabandaki kosalisa tata na misala ya ferme. Mikolo nyonso soki nauti kelasi, azalaki kopesa ngai mosala moko. Na nsima, tata akómaki kotikela ngai ferme soki akei kotɛka biloko na engumba Salvador, mboka mokonzi ya etúká ya Bahia.

Na ntango wana, kura, mai ya pɔmpi to biloko mosusu oyo bato bazali na yango lelo oyo ezalaki te na mboka na biso, kasi tozalaki na bomoi ya malamu. Nazalaki kosakana masano ya kopumbwisa nkasa na mopɛpɛ lokola aviɔ to kosakana na mwa mituka ya mabaya oyo ngai ná baninga na ngai tozalaki kosala. Nazalaki mpe kobɛta piololo na milulu ya losambo. Nazalaki moyembi na ndako-nzambe ya mboka na biso. Kuna nde namonaki buku História Sagrada (Lisolo lisantu), oyo epesaki ngai mposa ya kotánga Biblia.

Na 1932, ntango nazalaki na mbula 20, mbula ebɛtaki te na boumeli ya ntango molai na nɔrdi-ɛsti ya Brésil. Bangɔmbɛ na biso nyonso ekufaki mpe milona ebotaki te. Yango wana nakendaki na engumba Salvador, epai nakómaki sofɛlɛ ya bisi. Na nsima, nakómaki kofutela ndako mpe nabengaki libota báya kofanda epai na ngai. Na 1944, tata akufaki mpe atikelaki ngai mokumba ya kosalisa mama ná baleki na ngai mwambe ya basi mpe misato ya mibali.

Natiki mosala ya sofɛlɛ, nakómi mosakoli ya nsango malamu

Na kati ya makambo ya liboso oyo nasalaki ntango nakómaki na Salvador, nasombaki Biblia. Nsima ya kolekisa mwa bambula na Lingomba moko ya Protesta (Baptiste), ngai ná Durval, oyo azalaki mpe sofɛlɛ ya bisi, tokómaki baninga makasi, mpe tozalaki mbala na mbala kosolola masolo milaimilai ya Biblia. Mokolo moko, apesaki ngai mwa buku Bakufi bazali wapi?a Atako nazalaki kokanisa ete molimo ekufaka te, naboyaki te koluka bavɛrsɛ ya Biblia oyo batyaki na mwa buku yango. Nakamwaki mpenza ntango natángaki na Biblia ete molimo oyo esali lisumu ekokufa.​—Ezekiele 18:4.

Ntango Durval amonaki ete nazali kosepela na nsango ya Biblia, ayebisaki Antônio Andrade, Motatoli moko oyo azalaki mobongisi-nzela, ayaka kotala ngai na ndako. Na mbala ya misato oyo ayaki kotala ngai, asɛngaki ngai nakende kotika ye na mosala ya kosakola. Ye alobaki na ndako mibale ya liboso oyo tokɔtaki, kasi na ndako ya misato alobaki na ngai ete, “Ekómi ngala na yo.” Motema ebɛtaki, kasi nasepelaki mpenza ntango libota moko bayokaki ngai na likebi mpe bandimaki kozwa mwa buku mibale oyo nalakisaki bango. Ata lelo oyo, soki nakutani na moto moko oyo asepeli na solo ya Biblia, nasepelaka kaka ndenge wana.

Mwa 19 Aprili 1943, oyo ezalaki mokolo ya ekaniseli ya liwa ya Klisto na mbula wana, nazwaki batisimo na Mai monene ya Atlantique, pene na engumba Salvador. Lokola bandeko mibali ya makoki bazalaki mpenza te na ntango wana, basɛngaki ngai natambwisaka boyekoli na etuluku oyo ezalaki koyangana na ndako ya ndeko Andrade.

Botɛmɛli ebandi

Bato mingi bazalaki kosepela na mosala na biso te na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba (1939-1945). Lokola mikanda na biso mingi ezalaki kouta na États-Unis, bakonzi mosusu ya Leta bazalaki kokanisa ete tozali bato oyo États-Unis etyá mpo na kotɛkelaka bango basɛkɛlɛ ya ekólo na biso. Yango wana bazalaki kokanga mpe kosambisa biso mingi. Soki Motatoli moko abimi na mosala ya kosakola mpe azongi te, tozalaki mbala moko koyeba ete bakangi ye, mpe tozalaki kokende na kaa ya bapolisi mpo na koluka kobimisa ye.

Na Augusto 1943, Adolphe Messmer, Motatoli moko ya Allemagne, ayaki na Salvador mpo na kosalisa bandeko na kobongisa liyangani ya liboso oyo esengelaki kosalema wana. Ntango bakonzi bapesaki biso ndingisa ya kosala liyangani yango, tobandaki koyebisa bato motó ya likambo ya lisukulu ya bato nyonso, “Bonsomi na Mokili ya Sika,” oyo esengelaki kosalema na liyangani yango: Tobimisaki yango na bazulunalo, tobakaki yango na maninisa ya bamagazini mpe na babisi. Kasi, na mokolo ya mibale ya liyangani yango, polisi moko ayaki koyebisa biso ete bakonzi balingi lisusu te tósala liyangani na biso. Episkɔpɔ ya Salvador atyaki mokonzi ya bapolisi songisongi mpo akata liyangani na biso. Kasi, na Aprili ya mbula oyo elandaki, tozwaki ndingisa ya kosala lisukulu yango.

Namityeli mokano

Na 1946, basɛngaki ngai nakende na engumba São Paulo mpo na liyangani Mabota ya esengo. Kapitɛnɛ ya masuwa moko ya Salvador oyo ememaka kaka biloko alobaki na ngai ná mwa bandeko mosusu ete soki tondimi kolalaka likoló ya ebɛi, akomema biso na masuwa na ye. Atako tokutanaki na mopɛpɛ moko ya makasi na nzela mpe biso nyonso tobɛlaki, tokómaki malamu na Rio de Janeiro nsima ya mikolo minei. Batatoli ya Rio bayambaki biso na bandako na bango mpo tópema mwa mikolo liboso tózwa engbunduka mpo na kokoba mobembo na biso. Ntango tokómaki na São Paulo, tomonaki mwa etuluku ya bato basimbi mabaya ná bilamba oyo bakomá, “Totombeli Batatoli ya Yehova boyei malamu.”

Mwa moke nsima ya kozonga na Salvador, nayebisaki Harry Black, misionɛrɛ moko oyo autaki na États-Unis, ete nazali na mposa ya kokóma mobongisi-nzela (ndenge Batatoli ya Yehova babengaka basakoli ya ntango nyonso). Harry alobaki na ngai ete lokola nazali na mokumba monene na libota, nasengeli kozela naino. Nsukansuka, na sanza ya Yuni 1952, bandeko na ngai bakómaki komilukela bango moko, mpe batindaki ngai mobongisi-nzela na mwa lisangá moko ya moke na engumba Ilhéus, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 210 na Salvador.

Ebongiseli moko ya bolingo

Na mbula oyo elandaki, batindaki ngai na Jequié, engumba moko monene oyo ezali mosika mpenza, epai ata Motatoli moko azalaki te. Moto ya liboso oyo nakendaki kotala ezalaki sango ya engumba yango. Ayebisaki ngai ete engumba yango ezali teritware na ye mpe apekisaki ngai nasakola wana. Ayebisaki bandimi na ye ete bákeba mpo “mosakoli moko ya lokuta” akɔti na engumba, mpe atyaki bato bipai nyonso mpo bákɛngɛlaka ngai. Atako bongo, nakabolaki mikanda koleka 90 oyo elimbolaka Biblia na mokolo yango mpe nabandaki koyekola Biblia na bato minei. Mbula mibale na nsima, engumba Jequié ekómaki na basakoli 36 mpe bazwaki Ndako ya Bokonzi ya bango moko! Lelo oyo, Jequié ezali na masangá 8 mpe basakoli soki 700.

Na basanza ya liboso oyo nalekisaki na Jequié, nazalaki kofutela eteni ya ndako moko. Na nsima, nakutanaki na Miguel Vaz de Oliveira, nkolo otɛlɛ Sudoeste, moko ya ba-otɛlɛ oyo eleki kitoko na Jequié. Miguel abandaki koyekola Biblia mpe abondelaki ngai naya kofanda na otɛlɛ na ye. Na nsima, Miguel ná mwasi na ye bakómaki Batatoli.

Moto mosusu oyo nabosanaka te na Jequié ezali Luiz Cotrim, molakisi ya eteyelo moko ya ntei oyo nayekolaki na ye Biblia. Luiz asɛngaki ngai atángisaka ngai monɔkɔ ya Portugais ná mituya. Lokola nasukaki kaka na eteyelo ya ebandeli, nandimaki lisalisi na ye. Mateya yango oyo Luiz azalaki kopesa ngai pɔsɔ nyonso nsima ya boyekoli na ye ya Biblia esalisaki ngai mingi mpo na mikumba mosusu oyo nazwaki na ebongiseli ya Yehova na nsima.

Mokumba mosusu ya mpasi

Na 1956, babengaki ngai na biro ya filiale na biso, oyo ezalaki na ntango wana na Rio de Janeiro, nalanda mateya mpo nakóma mokɛngɛli ya zongazonga, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka bandeko oyo batambolaka mpo na kotala masangá. Mateya yango, oyo nazwaki elongo na bandeko mosusu mwambe, eumelaki kaka sanza moko ná mwa mikolo. Ntango tosilisaki, batindaki ngai na São Paulo, mpe yango epesaki ngai mwa kobanga. Nakómaki komituna: ‘Eloko nini ngai moto moindo boye nakoki kosala liboso ya bato ya Italie oyo batóndi kuna? Bakoyokela ngai mpenza?’b

Na lisangá ya liboso oyo natalaki na etúká ya Santo Amaro, nalendisamaki mpenza ntango namonaki Ndako ya Bokonzi etondi na bandeko mpe bato mosusu oyo bazalaki kosepela na solo. Ntango namonaki na wikende ya pɔsɔ yango ete basakoli nyonso 97 ya lisangá yango babimaki elongo na ngai na mosala ya kosakola, yango esalisaki ngai namona ete nazalaki kobanga kaka mpamba. Nalobaki na motema ete: ‘Bazali mpenza bandeko na ngai.’ Bolingo makasi oyo bandeko yango bamoniselaki ngai epesaki ngai makasi mpo nalɛmba te na mosala ya kotala bandeko na masangá.

Bampunda mpe bakakolo ya Amerika

Mokakatano moko ya makasi oyo bakɛngɛli ya zongazonga bazalaki na yango na ntango wana ezalaki ya kosala mibembo ya milaimilai mpo na kokóma na bamboka ya zamba oyo ezalaki na masangá mpe mwa bituluku ya Batatoli. Na bamboka yango, mituka ezalaki mpenza te mpe banzela mingi ezalaki lokola banzela ya bilanga.

Mpo na kosilisa mokakatano yango, bandeko ya bazongazonga mosusu basombaki bampunda mpo na bakɛngɛli ya zongazonga. Mbala mingi na ebandeli ya pɔsɔ, nazalaki kotya biloko likoló ya mpunda mpe kotambola mbala mosusu ngonga 12 tii na lisangá mosusu. Na engumba Santa Fé do Sul, Batatoli bazalaki na mpunda oyo bapesaki nkombo Dourado (Goldie), oyo eyebaki mpenza bisika nyonso oyo bituluku ya boyekoli ezalaki. Soki tokómi na ferme moko, Dourado azalaki kotɛlɛma na ekuke na yango mpe kozela ete nafungola. Soki nasilisi kotala bandeko na ferme wana, ngai ná Dourado tozalaki kokoba nzela na biso tii esika bandeko mosusu bazali.

Lokola bafoni ná batelefone ezalaki te, yango mpe ezalaki kokómisa mosala na biso mpasi. Na ndakisa, mpo ya kokende kotala bandeko oyo bazalaki koyangana na ferme moko na etúká ya Mato Grosso, nasengelaki kokatisa Ebale Araguaia na masuwa mpe kotambola na mpunda kilomɛtrɛ soki 25 na kati ya zamba. Mbala moko, natindelaki bango mokanda ete nakokende kotala bango, kasi mokanda yango ekómaki te, mpo ntango nakatisaki ebale, nakutaki ata ndeko moko te azali kozela ngai. Lokola mpokwa ebandaki koya, natikaki mikumba na ngai epai ya nkolo ya mwa ekala moko, namemaki kaka valisi mpe nabandaki kokende na makolo.

Mosika te, butu eyindaki. Ntango nazalaki kotambola na kati ya molili wana, nayokaki makelele ya kakolo. Bayebisaki ngai ete lolenge ya kakolo wana ebomaka. Yango wana, soki nayoki ata mwa makelele moke na kati ya matiti, nazalaki kotya valisi liboso na ngai mpo na komibatela mpe kotambola nokinoki. Nsima ya ebele ya bangonga, nakómaki na mwa mai moko. Likambo ya mawa, lokola molili ezalaki makasi, namonaki te ete kangá-moyibi ezalaki na ngámbo mosusu ya mwa mai yango. Napumbwaki mpe nakendaki kokwea likoló ya kangá-moyibi yango, mpe nazokaki.

Nsukansuka, nakómaki na ferme yango mpe, ntango bambwa bayokaki ngai, babandaki koganga. Na ntango wana, miyibi bazalaki koya koyiba bampate na butu. Yango wana, ntango bafungolaki ekuke ya ferme, napesaki mbala moko nkombo. Na ntembe te, bandeko bayokelaki ngai mawa ntango bamonaki ngai na bilamba epasukipasuki mpe etondi na makila, kasi basepelaki mpo bamonaki ngai.

Atako bampasi nyonso wana, namonaka ete ezalaki ntango moko ya esengo. Nazalaki kosepela na mibembo oyo nazalaki kosala na mpunda mpe na makolo. Mbala mosusu nazalaki kopema na nse ya banzete, koyoka ndenge bandɛkɛ ezali koyemba mpe kotala bagambala ezali kolekaleka liboso na ngai. Esengo na ngai ezalaki mpe kouta na koyeba ete nazalaki kosalisa bandeko na ndenge nazalaki kokende kotala bango. Mingi bazalaki kotindela ngai mikanda ya botɔndi. Bamosusu bazalaki kotɔnda ngai bango moko soki tokutani na mayangani. Nazalaki kosepela mingi komona ndenge bato bazalaki kolonga mikakatano na bango mpe kokóla na elimo.

Nazwi mosungi

Na boumeli ya bambula nyonso wana, nazalaki mbala mingi kotambola kaka ngai moko, mpe yango esalisaki ngai nakóma kotalela Yehova lokola “libanga na ngai mpe esika makasi na ngai.” (Nzembo 18:2) Lisusu, namonaki ete kozala monzemba esalisaki ngai natya likebi na ngai nyonso na matomba ya Bokonzi.

Kasi na 1978, nakutanaki na Júlia Takahashi, ndeko mwasi moko oyo azalaki mobongisi-nzela. Júlia aboyaki mosala na ye ya malamu mpenza ya lifulume na lopitalo moko ya monene na São Paulo, kaka mpo akende kosala mosala ya mobongisi-nzela na teritware moko epai bazalaki na mposa makasi ya basakoli ya Bokonzi. Bankulutu oyo bayebaki ye bazalaki kokumisa ye ete azali makasi na elimo mpe mobongisi-nzela moko ya molende. Lokola naumelaki mingi monzemba, bato mosusu bakamwaki ntango bayokaki ete nalingi nabala. Moninga na ngai moko ya motema andimaki te mpe alobaki na ngai ete soki nabali ya solo, akopesa ngai ngɔmbe moko ya kilo 270. Totumbaki ngɔmbɛ yango na fɛti ya libala na biso mwa 1 Yuli 1978.

Nakobi koyika mpiko atako nzoto ezali lisusu malamu te

Nakóbaki na mosala ya zongazonga elongo na Júlia, mpe na boumeli ya mbula mwambe oyo elandaki, totalaki masangá na sudi mpe na sudi-ɛsti ya Brésil. Na ntango wana nde nabandaki kobɛla maladi ya motema. Mbala mibale mobimba, nasenzwaki ntango nazalaki kosolola na bato na mosala ya kosakola. Lokola nakómaki kobɛla, batindaki biso babongisi-nzela minene na engumba Birigüi, na etúká ya São Paulo.

Kuna, bandeko basɛngaki bámema ngai na motuka na engumba Goiânia, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 500, mpo nakutana na monganga. Ntango nayokaki mwa malamu, bapasolaki ngai mpo na kotya ngai masini moko oyo esalisaka motema ebɛta malamu. Banda basalaki ngai lipaso wana, eleki lelo mbula soki 20. Atako bapasolaki ngai lisusu mbala mibale, nazali se kokoba na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Lokola mwasi moklisto nyonso ya sembo, Júlia azali ntango nyonso kosunga mpe kolendisa ngai.

Atako mikakatano ya nzoto epesaka ngai lisusu nzela ya kosala mingi te, mpe ntango mosusu elɛmbisaka ngai, nazali kaka mobongisi-nzela tii lelo. Nayebi malamu ete Yehova alaká biso ata mbala moko te ete tokozanga mikakatano na mokili oyo. Soki ntoma Paulo ná baklisto mosusu ya sembo ya ntango ya kala basengelaki koyika mpiko, biso mpe tosengeli koyika mpiko.​—Misala 14:22.

Eleki mwa mikolo, namonaki Biblia na ngai ya liboso, oyo nazwaki na bambula ya 1930. Na nsima ya ezipeli na yango, nakomaki 350, oyo ezalaki motángo ya basakoli na Brésil ntango nabandaki koyangana na makita ya boklisto na 1943. Namonaka lokola ndɔtɔ ndenge Batatoli bakómi koleka 600 000. Oyo nde libaku malamu nazwaki ya kopesa mwa mabɔkɔ mpo na bokoli yango! Namoni mpenza ete Yehova apamboli ngai mingi mpo na mpiko oyo nazali koyika. Nakoki mpenza koloba lokola mokomi ya nzembo ete: “[Yehova] asalaki makambo minene minene mpo na biso; biso mpe tosepeli na yango.”​—Nzembo 126:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova, kasi ebimaka lisusu te.

b Bato ya Italie soki 1 000 000 bayaki kofanda na São Paulo banda na 1870 tii na 1920.

[Elilingi na lokasa 9]

Batatoli bazali kobenga bato na lisukulu ya bato nyonso ya liyangani ya liboso oyo esalemaki na engumba Salvador, na 1943

[Elilingi na lokasa 10]

Batatoli oyo bayei na São Paulo mpo na liyangani Mabota ya esengo, na 1946

[Bililingi na lokasa 11]

Na mosala ya zongazonga na nsuka ya bambula ya 1950

[Elilingi na lokasa 12]

Ngai ná mwasi na ngai Júlia

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto