Mokili mozangi kanyaka elakami
KANYAKA esili kokɔta epai na bato ya motindo nyonso. Ezala kati na biyangeli, na makambo ya siansi, ya masano, ya lingomba, to ya mombongo, emonani ete bato bakoki te kosilisa ezaleli ya kanyaka.
Kati na mokili mobimba, bansango ya kobulunganisa makanisi ezali kolobelama mingi kati na bipanzelo ya nsango na ntina etali kanyaka. Bato mingi oyo bandimaki mokumba ya kosala mpo na matomba ya bato bazali kotondɔlama polele lokola bato oyo bazali kosalela matomba na bango moko na kozwáká kanyaka mpe madesu ya bana. Oyo ebengami ete mbeba ya basáli na babiro ezali kosalema mingi. Bato minene oyo bazali kosala mabunga mpe mbeba kati na misala na bango ya mokolo na mokolo bazali sé kokóma mingi.
Bato bazali kobanzabanza mingi na ntina na oyo zulunalo moko ya mikili ya Mpótó ebéngi yango “‘kanyaka monene’—ezaleli oyo na nzela na yango bakonzi minene ya Leta, baministre mpe mingimingi batambwisi ya bikólo basɛngaka kanyaka liboso ya kondima bosombi ya biloko mingi mpe mikano minene ya kobongisa mboka.” Zulunalo The Economist ya Grande-Bretagne elobaki ete na mboka moko “bolukiluki ya bapolísi oyo eumelaki mbula mibale mpe kokanga bato mokolo na mokolo esukisaki te bato ya motó makasi oyo balingaka kanyaka.”
Lokola ezaleli ya kanyaka esili kopalangana mingi boye, bato mingi lelo oyo bazali kokanisa ete ezali na moto moko te oyo bakoki kotyela motema. Bazali na mayoki motindo moko na oyo ya Davidi wana alobaki ete: “Yɔnsɔ bapɛngwi njela, babebi elɔngɔ; mɔkɔ ajali tɛ oyo akosalaka malamu, ata mɔkɔ tɛ.”—Njembo 14:3.
Lolenge nini tokoki kolónga ezaleli ya kanyaka oyo esili kopalangana? Bato mingi lelo oyo bazali koboya kondima yango. Kasi atako ozali koboya kondima yango, ekopesa yo mpasi. Na lolenge nini?
Kanyaka ezali na bopusi likoló na yo
Ezala kanyaka oyo esalelami mpo na makambo minene mpe oyo esalelami mpo na makambo mike ezali komatisa ntalo ya biloko, mpo na yango biloko bizali kosalema malamu lisusu te, mpe mpo na yango, misala mizali mingi te mpe basáli bazali kozwa lifuti moke. Na ndakisa, ekanisami ete mbeba lokola kobuka kesi ya Leta mpe kobuba ezali kopesa mpasi mbala zomi koleka mpasi oyo koyiba na bandako ya bato, mpe koyiba ya lolenge nyonso mosusu ememelaka bato. Búku The New Encyclopædia Britannica (1992) elobi ete “mbeba oyo ezali kosalema na bakompanyi minene na Etats-Unis ekokanisamaki na 200 000 000 000 ya badolare mbula na mbula—mbala misato koleka mosolo oyo moyibami na bituluku ya bato mabe.” Búku yango elobi ete atako mpasi oyo yango ezali kopesa ekoki mbala mosusu komonana mbala moko te, kasi “mbeba yango ezali na bopusi makasi likoló na libateli ya basáli, ya basómbi mpe ya ezingelo.”
Mbuma mabe oyo kanyaka ezali kobimisa ezali kokundwela biso maloba ya Mokonzi Salomo, ete: “Ngai nabutwaki mpe nabanjaki mpɔ na minyɔkɔ yɔnsɔ misalami na nse na moi. Mpe tala, mpisoli na banyɔkɔlami mpe mɔkɔ ajali tɛ mpɔ na kobɔndisa bango. Epai na banyokoli na bango nguya ejali nde bajali na mɔkɔ tɛ mpɔ na kobɔndisa bango.”—Mosakoli 4:1.
Na yango, biso tokoki bobele komiloba ete kanyaka ekoki kosila te? Mokili mozangi kanyaka ezali ndɔtɔ mpamba? Soko moke te! Biblia ezali koteya biso ete mosika te, bokesene mpe ezaleli ya kotyola mibeko ekolongolama.
Oyo Biblia ezali koyebisa biso
Biblia ezali koyebisa biso ete ezaleli ya kanyaka ebandaki na ntango anzelu moko ya nguya atombokelaki Nzambe mpe apusaki babalani ya liboso ete bálanda nzela na ye. (Genese 3:1-6) Litomba moko malamu ebimaki te na ezaleli na bango ya masumu. Nzokande, kobanda na mokolo oyo Adama na Eva basalaki lisumu epai na Yehova Nzambe, babandaki komona mpasi mpo na matomba mabe oyo ezaleli ya kanyaka ebimisaki. Mokemoke, nzoto na bango ebandaki kobebisama, kokambáká bango kino na liwa. (Genese 3:16-19) Kobanda na ntango wana, lisoló ya bato etondi na makambo matali kanyaka, kokosa, mpe kobuba. Nzokande, emonani lokola ete bato mingi oyo basalaka mbeba yango bapesamelaka etumbu te.
Na bokeseni na bato mosusu oyo basalaka mbeba, bakonzi minene mpe bakonzi ya politiki oyo basalaka mbeba batyamaka mpenza na bolɔkɔ mingimingi te mpe bazongisaka te biloko oyo bazwaka na lolenge ya mabe. Lokola misala na bango ya kanyaka esalemaka na nkuku, mbala mingi ezalaka mpasi mpo na kotɔndɔla mbeba oyo bato minene basalaka. Kasi yango elimboli te ete mokili mozangi kanyaka mokoki kosalema te.
Kobikisama na ezaleli ya kanyaka ekouta epai na Mozalisi ya moto, Yehova Nzambe. Nzela bobele moko ya kolónga ezali bongo lisungi ya Nzambe. Mpo na nini? Mpamba te monguna ya bato, ye oyo akomonanaka te, Satana Zabolo, azali kokóba kozimbisa bato. Lokola tozali kotánga yango na 1 Yoane 5:19, “mokili mobimba ejali kolala kati na oyo mabe.” Eloko nini lisusu ekoki kolimbola mpo na nini ezaleli ya kanyaka ezali kokóla—oyo mingi na yango ezali kopesamela etumbu te?
Milende nyonso ya bato mikoki te kolónga Satana mpe bademó na ye. Bobele lisungi ya Nzambe nde ekoki kopesa “lisiko na nkɛmbo na bana na Njambe” epai na bato ya botosi. (Baloma 8:21) Yehova apesi elaka ete mosika te Satana akokangama mpo ete azimbisa lisusu bato te. (Emoniseli 20:3) Wana ezali biso kozela, soki tolingi kofanda kati na mokili ya sika ya Nzambe oyo ezangi kanyaka, tosengeli koboya banzela mabe ya mokili.
Bato bakoki kobongwana
Na eleko ya Yesu Klisto, ezalaki na baoyo basalelaki nguya na bango na lolenge mabe mpe banyokolaki baninga na bango. Na ndakisa, bakongoli ya mpako bayebanaki mingi na lolenge ya mabe mpo na misala na bango ya kanyaka. Yango ezalaki kosalema atako mobeko oyo ya Nzambe eyebisamaki polele: “Okokamata kanyaka tɛ mpɔ ete kanyaka ekoboma miso na batali, mpe ekobebisa likambo na bato sembo.” (Esode 23:8) Zakai, mokonzi moko ya bakongoli ya mpako andimaki ete azalaki kobɔtɔla bato biloko na kobimiseláká bango bifundeli ya lokuta. Kasi na esika ete akɔtisa mbongwana kati na mboka, Yesu asɛngaki na bato ete bábongola mitema mpe bátika banzela na bango ya mabe. Litomba oyo emonanaki ezalaki oyo ete, Matai mpe Zakai, bakongoli ya mpako oyo bayebanaki mingi mpo na bizaleli na bango mabe ya kanyaka batikaki ezaleli ya bomoi na bango ya kala.—Matai 4:17; 9:9-13; Luka 19:1-10.
Baoyo bazali lelo oyo kosala misala mizangi kolongobana bakoki mpe kobwaka ezaleli ya kanyaka na kolatáká “[bomoto, NW] na sika oyo ejali na motindo na Njambe na boyɛngɛbɛnɛ mpe na bulɛɛ na sɔlɔ.” (Baɛfɛsɛ 4:24) Mbala mosusu ekoki kozala pɛtɛɛ te kofuta mpako na kolongobana nyonso to kotika kosangana na myango mizangi kolongobana. Nzokande, matomba oyo tokozwa ezali kosɛnga ete tosala nyonso oyo esengeli.
Lokola batiki komitambwisa engebene mokili oyo esili kobeba, baoyo bazali komibanzabanza mpo na bolamu ya basusu bazali na kimya na motema. Bazali komitungisa te noki bakokanga bango, ete basali mabe. Nzokande, bazali na lisosoli malamu. Bazali kolanda ndakisa ya mosakoli Danyele oyo ezwami na Biblia. Lisoló ya Biblia elobi ete bakonzi minene ya Leta bazalaki ntango nyonso koluka komona eloko oyo bakoki kofunda na yango Danyele. “Nde bakokaki kojua ekweli to libunga tɛ mpɔ ete ajalaki sembo, mpe libunga to ekweli ejuamaki na ye tɛ.”—Danyele 6:4.
Elaka ya Yehova
Yehova alaki ete “ata moto na masumu akosala mabe mbala monkámá mpe mikɔlɔ na ye ijali kofuluka mingi nde nayebi sɔlɔ ete ekojala malamu epai na bango bajali kotɔsa Njambe, baoyo bakobangaka liboso na ye. Nde ekojala malamu na moto mabe tɛ; akofulisa mpe mikɔlɔ na ye tɛ, oyo ijali lokola molili, jambi atosi Njambe tɛ.”—Mosakoli 8:12, 13.
Oyo nde kobɔndisama tokozala na yango na ntango kanyaka ekozala lisusu te mpo na kopesa bato mpasi! Oyo nde lipamboli ya kofanda kati na mokili mozangi kanyaka! Yango ekosalema solo. Biblia ezali koloba na ntina na “elikya na bomoi na seko. Yango elakami na Njambe na bilaka na kala. Ye Njambe akobukaka lokuta tɛ.” (Tito 1:2) Soki oyinaka kanyaka mpe olingaka boyengebene, okoki komona kokokisama ya elaka ya Nzambe na ntina etali mokili oyo mozangi kanyaka.
[Elilingi na lokasa 4]
Kanyaka ezali kosalema mingi kati na makambo matali biyangeli mpe mombongo
[Elilingi na lokasa 5]
Mbala mingi, kanyaka ezalaka na bopusi epai na bakonzi ya Leta