Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/5 nk. 4-7
  • Tokoki kolonga kanyaka na mopanga ya elimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoki kolonga kanyaka na mopanga ya elimo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini kosilisa kanyaka?
  • Biblia epekisi kanyaka
  • Mateya ya Biblia ezali kolonga likambo ya kanyaka
  • ‘Ye oyo akoboya kanyaka akobika’
  • Mpo na nini bato balingi kanyaka mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mokili mozangi kanyaka elakami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Kanyaka epalangani tii wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Bokonzi ya Nzambe—Guvɛrnema oyo ezangi kanyaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/5 nk. 4-7

Tokoki kolonga kanyaka na mopanga ya elimo

“Bólata [bomoto, NW] ya sika oyo ezali na motindo ya Nzambe na boyengebene mpe na bulɛɛ ya solo.”​—Baefese 4:24.

NTANGO Bokonzi ya Loma ekómaki makasi mingi, ezalaki ebongiseli ya Leta oyo elekaki monene banda mokili ebandá. Loma ezalaki na mibeko malamu mpenza; kutu, tii na moi ya lelo mibeko ya bamboka mingi euti na mibeko ya Loma. Kasi, atako Bokonzi ya Loma esalaki makambo minene mingi, basoda na yango bakokaki te kolonga monguna moko oyo akɔtelaki bango na mayele, monguna yango ezali kanyaka. Nsukansuka, kanyaka ekweisaki nokinoki Bokonzi ya Loma.

Ntoma Paulo azalaki moko na bato oyo banyokwamaki na mabɔkɔ ya bakonzi ya Loma oyo balingaki kanyaka. Guvɛrnɛrɛ Feliki, moto ya Loma, asambisaki ye; na ntembe te amonaki ete Paulo asalaki mabe moko te. Kasi Feliki, lokola azalaki moko na baguvɛrnɛrɛ oyo balingaki kanyaka mingi na ntango wana, alingaki kokata likambo ya Paulo noki te mpamba te akanisaki ete Paulo akopesa ye mbongo mpo abimisa ye na bolɔkɔ.​—Misala 24:22-26.

Paulo apesaki ye madesu ya bana te, kasi asololaki na ye polelepolele na likambo etali “boyengebene na komipekisa.” Feliki abongwanaki te, mpe Paulo atikalaki na bolɔkɔ na esika aluka kopesa kanyaka mpo bálongisa ye ntango akosamba. Paulo azalaki koteya mateya ya solo mpe ya sembo, mpe azalaki kosalela makambo yango na bomoi na ye. Na mokanda oyo atindelaki Bayuda oyo bakómaki baklisto, akomaki ete: “Tondimi ete tozali na lisosoli ya pɛto; tozali na mposa kosalaka malamu na makambo nyonso.”​—Baebele 13:18.

Makanisi ya ndenge wana ekesanaki mpenza na makanisi ya bato mingi na ntango wana. Feliki azalaki na ndeko na ye moko nkombo na ye Pallas, ye azalaki moko na bato oyo bazalaki na bozwi mingi na ntango ya kala, mpe bozwi na ye nyonso, oyo ekoki kokokana soki na dolare milio 45 lelo, eutaki mingimingi na kanyaka mpe na moyibi. Nzokande, bozwi na ye ezali eloko te soki tokokanisi yango na bamiliare ya badolare oyo bakonzi mosusu ya mabe ya ekeke ya 20 babombi na babanki. Tokoloba mpenza ete kaka bato oyo bayebi makambo oyo ezali koleka na mokili te nde bakoki kondima ete baguvɛrnɛma ya lelo elongi likambo ya kanyaka.

Lokola bato balingaka kanyaka mingi banda kala, yango elingi nde koloba ete ezali mpenza ezaleli ya moto? To eloko moko ekoki nde kosalema mpo na kosilisa kanyaka?

Ndenge nini kosilisa kanyaka?

Mpo na kosilisa kanyaka esengeli naino kondima ete kanyaka ezali mabe mpe ebebisaka, mpamba te yango ezalaka kaka mpo na matomba ya bato oyo bazali sembo te. Na likambo yango, tokoki koloba ete mwa mbongwana esalemi. James Foley, secrétaire d’État molandi ya États-Unis, alobaki boye: “Biso nyonso tondimi ete kanyaka ebotaka mbuma malamu ata moke te. Kanyaka ebebisaka boyangeli ya malamu, ebebisaka nkita mpe epesaka nzela te ete mboka ekende liboso, ebebisaka makambo ya mombongo, mpe epesaka bato nyonso mpasi.” Bato mingi bazali kondima makanisi na ye. Na mokolo ya 17 Desɛmbɛ 1997, bikólo 34 ya bozwi eyokanaki mpo na koluka kosilisa makambo ya kanyaka oyo epalangani na mokili mobimba. Mokanda ya boyokani oyo bakomaki mpo na kopekisa kanyaka elobi ete “kopesa kanyaka, to kolaka kopesa kanyaka, to kopesa mosali ya Leta ya mboka mopaya kanyaka mpo na kozwa nzela ya kosala mombongo to kobatela yango, ezali mabe oyo moto asengeli kozwela yango etumbu.”

Kasi, kopesa kanyaka mpo na kozwa nzela ya kosala mombongo na mboka mopaya ezali kaka lolenge moko ya kanyaka. Mpo na kopekisa kanyaka na bisika nyonso, esengeli kosala likambo mosusu, mpe likambo yango nde eleki mpasi: kobongola motema ya moto, to tóloba kobongola mitema ya bato mingi. Na bisika nyonso, bato basengeli koyekola koyina likambo ya kopesa madesu ya bana mpe kanyaka. Ezali se na ndenge yango nde makambo ya kozwa biloko na banzela ya mabe ekosila. Mpo na kosala yango, zulunalo moko (Newsweek) elobaki ete bato mosusu bamoni ete baguvɛrnɛma esengeli “kolendisa bato nyonso bázala na makanisi ya kosala malamu.” Lisangá moko oyo esalaka mpo na koluka kosilisa kanyaka (Transparency International) esɛngi mpe na bato oyo basepelaka na misala na bango “bákɔtisa ‘elimo ya bosembo’” na bisika ya mosala.

Etumba mpo na kolonga kanyaka ezali etumba ya elimo; mibeko ya Leta yango moko to kosalela “mopanga,” elingi koloba kopesa bitumbu, ekoki kosilisa kanyaka te. (Baloma 13:4, 5) Esengeli kolona bizaleli malamu mpe bosembo na mitema ya bato. Mpo na kosala yango malamu esengeli kosalela oyo ntoma Paulo abengaki “mopanga ya elimo,” elingi koloba Biblia, Liloba ya Nzambe.​—Baefese 6:17.

Biblia epekisi kanyaka

Mpo na nini Paulo aboyaki kosalela kanyaka? Mpamba te alingaki kosala mokano ya Nzambe, ye oyo “akoponaponaka bato te mpe akondimaka [kanyaka, NW] te.” (Deteronome 10:17) Lisusu, ekoki mpenza kozala ete Paulo akanisaki mobeko moko oyo ezali na kati ya Mibeko ya Mose, mobeko yango elobi boye: “Okopɛngwisa boyengebene te, mpe okokata na koponapona te, mpe okamata [kanyaka] te, mpo ete [kanyaka] ebom[aka] miso ya bato ya mayele mpe ebebis[aka] likambo ya bato ya sembo.” (Deteronome 16:19) Mokonzi Davidi mpe asosolaki ete Yehova ayinaka kanyaka, asɛngaki ete Nzambe atánga ye na kati ya bato ya masumu te, baoyo “lobɔkɔ na bango ya mobali etondi na kanyaka.”​—Nzembo 26:10.

Bato oyo basambelaka Nzambe na bosembo bazali mpe na bantina mosusu oyo baboyaka kosalela kanyaka. Salomo akomaki ete: “Mokonzi akokokisa mokili na nzela na kosambisa; nde ye oyo akozwaka [kanyaka, NW] na kozimbisa akobebisa yango.” (Masese 29:4) Banda na bakonzi minene tii na nse, soki bato nyonso bazali sembo, esalaka ete mboka ezala makasi, kasi kanyaka ekɔtisaka bobola na mboka. Zulunalo Newsweek elobi likambo moko malamu ete: “Na mboka oyo moto nyonso alingi kozwa ya ye mwa eloko na nzela ya kanyaka mpe ayebi ndenge ya kozwa yango, nkita ya mboka mobimba ekoki mpenza kokwea.”

Ata soki nkita nyonso ekwei te, bato oyo balingaka bosembo bazalaka na esengo te ntango likambo moko ezali kosalema te mpo na kopekisa kanyaka. (Nzembo 73:3, 13) Mozalisi na biso, ye oyo apesá biso motema ya bosembo, ayokaka mpe mpasi. Na ntango ya kala, Yehova atikaki te ete bato oyo bazalaki kosala makambo ezangi bosembo oyo elekaki ndelo ete bákoba na makambo na bango. Na ndakisa, ayebisaki bato ya Yelusaleme polele ntina oyo akotika ete banguna na bango bányokola bango.

Na monɔkɔ ya mosakoli Mika, Nzambe alobaki boye: “Bóyoka naino oyo, bino mikóló na ndako ya Yakobo, mpe bino mikóló na ndako ya Yisalaele, bato baoyo boyini kosambisa-sembo mpe bobebisi makambo ya sembo nyonso. Bankóló na bango bakosambisaka mpo na kanyaka mpe banganga na bango bakolakisaka mpo na libonza, mpe basakoli na bango bakotalaka makambo mpo na misolo . . . Boye Siona ekotimolama lokola elanga mpo na bino, Yelusaleme ekokóma libondo ya mabanga.” Kanyaka ebebisaki bato ya Yisalaele se ndenge ebebisaki bato ya Loma bambula mingi na nsima. Soki mbula nkama na nsima, kobanda Mika alobaki makambo wana, Yelusaleme ebomamaki mpe etikalaki mpamba, ndenge kaka Nzambe alobaki.​—Mika 3:9, 11, 12.

Kasi, ezali na moto moko te to mboka moko te oyo elingaka kobeba na makambo ya kanyaka. Nzambe azali kosɛnga na bato mabe ete bátika misala na bango mpe bábongola makanisi na bango. (Yisaya 55:7) Nzambe alingi ete moto mokomoko kati na biso atika lokoso, moimi mpe kanyaka mpe akóma moto ya sembo. Yehova alobi na biso boye: “Konyokola mobola ekosilikisa Motongi na ye; nde ye oyo akokumisa ye akoyokela mobola mawa.”​—Masese 14:31.

Mateya ya Biblia ezali kolonga likambo ya kanyaka

Nini ekoki kosala ete moto abongwana ndenge wana? Kaka nguya oyo etindaki Paulo atika Lingomba ya Bafalisai mpe akóma moyekoli ya solosolo ya Yesu Klisto. Paulo akomaki ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya.” (Baebele 4:12) Lelo oyo, solo ya Biblia ezali koteya bosembo, ata epai ya bato oyo bamipesaki mpenza na kosalela kanyaka. Tótalela ndakisa moko.

Ntango kaka Alexander, elenge mobali ya mokili moko ya Mpoto ya Ɛsti, asilisaki mosala ya soda, ndenge esɛngami na mibeko ya mboka na bango, akɔtaki na etuluku moko oyo bazalaki koyiba mbongo ya bato, kobɔtɔla bato biloko, mpe kosalela kanyaka.a Alobi boye: “Oyo ya ngai mosala ezalaki ya koyiba bato ya mombongo oyo bangindá; yango wana, ngai nazalaki komonisa bango lokola nde nazali kobatela bango. Soki nasali boninga mingi na moto moko ya mbongo, bato mosusu ya etuluku na biso bakobanda kokanela ye ete bakosala ye mabe. Na nsima, ngai nakoyebisa ye ete nakoki kobikisa ye kasi asengeli kopesa mbongo mingi. ‘Bakiliya’ na ngai bazalaki kopesa ngai matɔndi na ndenge nazalaki kosalisa bango, nzokande bazalaki koyeba te ete ngai nde nazalaki kotya bango na mikakatano yango. Likambo ya kokamwa ezali ete nazalaki kosepela na mosala wana.

“Nazalaki kozwa mbongo mingi mpe nazalaki na bomoi ya bisengo mpo na mosala wana. Nazalaki kotambola na vuatire ya ntalo, nazalaki kofanda na ndako moko kitoko, mpe nazalaki na mbongo ya kosomba eloko nyonso oyo nalingi. Bato bazalaki kobanga ngai, mpe nazalaki komona ete nazali moto monene. Nazalaki komona ete moto oyo akoki kosala ngai eloko azali te, nazalaki komona lokola ete mibeko ya Leta etali ngai te. Soki nazwi mwa likambo na bapolisi, nakoluka kaka avoka moko monene, oyo ayebi malamu makambo ya mibeko, to nakopesa moto moko kanyaka mpe makambo nyonso esili.

“Kasi, mbala mingi, bato oyo bomoi na bango mobimba ezali kaka na kanyaka bazalaka sembo te bango na bango. Na etuluku na biso, moninga moko akómaki koyina ngai, mpe bango nyonso bayinaki ngai. Mbala moko, babɔtɔlaki ngai vuatire na ngai ya kitoko, mbongo na ngai mpe makango na ngai oyo azalaki kolinga kaka makambo minene. Kutu, babɛtaki ngai na ndenge ya nsɔmɔ. Yango etindaki ngai nafanda mpe nakanisa mpenza soki ntina ya bomoi ezali nini.

“Mwa basanza liboso ya likambo yango, mama na ngai akómaki Motatoli ya Yehova mpe nabandaki kotánga mikanda ya Batatoli ya Yehova. Mokapo ya Masese (Biyele) Mas. 4:14, 15 (Liloba lya Nzambe) etindaki ngai nakanisa malamu: ‘Olanda nzela ya basumuki te, otambola nzela ya bato babe te. Kima nzela yango, oleka wana te, kima yango mpe leka se boleki.’ Bavɛrsɛ lokola oyo wana endimisaki ngai ete bato oyo balingi bomoi ya mobulu bakosuka mabe. Nakómaki kobondela Yehova mpe kosɛnga ye ete alakisa ngai nzela ya malamu. Nayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova, mpe nsukansuka, namipesaki na Nzambe. Banda wana, nasalaka makambo ya bomoi na ngai nyonso na ndenge ya bosembo.

“Ya solo, lokola nalingi bosembo na bomoi na ngai nazwaka lisusu mbongo mingi te ndenge nazalaki kozwa yango liboso. Kasi sikoyo, nazali na elikya mpo na mikolo ezali koya, namonaka ete bomoi na ngai ezali mpenza na ntina. Nayebi sikoyo ete bomoi oyo nazalaki na yango liboso na matomba na yango ezalaki se lokola molinga ya likaya oyo ekolimwa nsima ya mwa ntango. Kala, lisosoli na ngai ezalaki kosala te. Sikoyo, lokola nayekoli Biblia, lisosoli na ngai etungisamaka mbala nyonso oyo nameki kosala likambo oyo ezali sembo te, ata na makambo mikemike. Nazali kosala makasi mpo na kolanda makanisi ya Nzembo 37:3, oyo elobi ete: ‘Zalá na elikya epai ya [Yehova] mpe salá malamu; boye okofanda na mokili mpe okosepela na malamu.’”

‘Ye oyo akoboya kanyaka akobika’

Ndenge Alexander amonaki yango, mateya ya solo ya Biblia ekoki kosalisa moto atika kosalela kanyaka. Alexander abongwanaki na ndenge oyo ntoma Paulo alobaki na mokanda oyo atindelaki Baefese ete: “Bólongola [bomoto, NW] na bino oyo ekangami na ezaleli na bino ya liboso, oyo mpe esili kopɔla mpo na mposa mabe, mpe bósikolama na [elimo, NW] na [makanisi] na bino, mpe bólata [bomoto] ya sika oyo ezali na motindo ya Nzambe na boyengebene mpe na bulɛɛ na solo. Bongo, ekobwaka bino makambo na lokuta, tiká ete moto na moto aloba sembo na mozalani na ye, zambi bozali lokola bilembo na nzoto, moko elembo na mosusu. Moyibi ayiba lisusu te, kasi tiká ete asalaka mosala, asalisa mabɔkɔ na ye misala ete akoka kokabela bango bazali kozanga.” (Baefese 4:22-25, 28) Bato bakozala malamu na mikolo mizali koya soki babongwani ndenge wana.

Soki eloko moko esalemi te mpo na kosilisa lokoso mpe kanyaka, makambo yango ekoki kobebisa mokili se ndenge ekweisaki Bokonzi ya Loma. Kasi, tozali na esengo ya koyeba ete Mozalisi ya bato alingi te ete makambo etikala kaka bongo. Akani “kobebisa babebisi ya mokili.” (Emoniseli 11:18) Mpe Yehova alaki bato oyo bazali na mposa ya mokili oyo ezali na makambo ya kanyaka te ete etikali moke atya “likoló ya sika mpe nse ya sika . . . boyengebene ekofanda kati na yango.”​—2 Petelo 3:13.

Ya solo, ekoki kozala mpasi mpo na kozala sembo na mikolo na biso oyo. Kasi, Yehova alaki biso ete na mikolo ezali koya, “ye oyo akoboya [kanyaka] akobika.”b (Masese 15:27) Soki banda sikoyo toboyi makambo ya kanyaka, tokomonisa ete tolobaka na bosembo mpenza ntango tobondelaka Nzambe ete: “Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalema na nse [lokola] na Likoló!”​—Matai 6:10.

Liboso ete Bokonzi yango eya kosala mosala na yango, mokomoko na biso akoki ‘kolona elimo ya bosembo’ mpe koboya kokanga miso na kanyaka to koboya kosalela yango. (Hosea 10:12) Soki tosali bongo, nguya ya Liloba ya Nzambe ekomonana na kati ya bomoi na biso. Na ntembe te, mopanga ya elimo ekoki kosalisa biso na koboya kanyaka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi ye nkombo mosusu.

b Tóyeba ete madesu ya bana ekeseni na mwa matabisi. Bapesaka madesu ya bana mpo makambo esalema na bosembo te to mpo na mikano mosusu ya mabe, nzokande mwa matabisi ezali likabo oyo moto akoki kopesa mpo na komonisa botɔndi na ye mpo na mosala oyo basaleli ye. Likambo yango elimbolami malamu na Mituna ya batángi na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1986 (ebimeli ya Lifalanse).

[Elilingi na lokasa 7]

Biblia ekoki kosalisa biso tólona “bomoto ya sika” mpe tóboya kanyaka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto