Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/11 nk. 26-30
  • William Tyndale​—Moto na bososoli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • William Tyndale​—Moto na bososoli
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Litambe oyo lizalaki komonisa kondima
  • Aboyisami​—Mpo na nini?
  • Na Mpótó mpe mikakatano ya sika
  • Bolóngi​—Kati na botɛmɛli
  • Na Anvers, atekami mpe abomami
  • Eteni ya mibale—Ndenge Biblia ekómaki kino epai na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bazwaki Biblia na motuya mingi—Video ya mokuse (William Tyndale)
    Makambo mosusu
  • Balingaki Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ozwaka Liloba ya Nzambe na motuya mingi mpenza?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/11 nk. 26-30

William Tyndale​—Moto na bososoli

William Tyndale abotamaki na Angleterre “na ndelo ya Pays de Galles,” mbala mosusu na Gloucestershire, atako esika mpe dati ya sikisiki eyebani te. Na Ɔkɔtɔ́bɛ 1994, Angleterre ekumisaki mibu 500 ya bokundoli mbótama ya moto oyo “apesaki biso Biblia na biso ya Lingelesi.” Mpo na mosala wana, Tyndale abomamaki lokola Martíru. Mpo na nini?

WILLIAM TYNDALE azalaki na mayele mingi kati na boyekoli ya Greke mpe ya Latin. Na Yulí 1515, wana azalaki bobele na mibu 21, azwaki lipɔlɔ́mi na eteyelo monene ya Oxford. Na 1521 asilaki kokula bonganga lokola nganganzambe ya Lingomba ya Katolike ya Loma. Na eleko wana Lingomba ya Katolike na Allemagne ezalaki kati na yikiyiki na ntina na mateya ya mbongwana ya Martin Luther. Kasi Angleterre elandaki kotángama mboka ya Bakatolike kino ntango Mokonzi Henry VIII akataki boyokani elongo na Loma na mobu 1534.

Atako Lingelesi ezalaki lokótá oyo bato mingi bazalaki koloba na eleko ya Tyndale, mateya nyonso ya kelasi mazalaki kopesama bobele na Latin. Yango ezalaki lisusu lokótá ya Lingomba mpe ya Biblia. Na 1546, Concile de Trente ekataki lisusu ete bobele Biblia Vulgate, oyo Jerôme abongolaki na Latin na ekeke ya mitano nde esengelaki kosalelama. Nzokande, bobele bato oyo basalaki bakelasi milai nde bakokaki kotánga yango. Mpo na nini bato ya Angleterre basengelaki koboyisama kozala na Biblia na lokótá ya Lingelesi mpe koboyisama kozala na bonsomi ya kotánga yango? Ntembe oyo Tyndale abimisaki, ezalaki oyo ete, “Jerôme abongolaki mpe biblia na lokótá ya mboka na ye, ‘mpo na nini biso mpe tokoki kosala yango te?’”

Litambe oyo lizalaki komonisa kondima

Nsima ya boyekoli oyo alekisaki na Oxford mpe nsima ya boyekoli oyo mbala mosusu abakisaki na Cambridge, Tyndale ateyaki bana mibali ya John Walsh na boumeli ya mibu mibale kati na etúká ya Gloucestershire. Na boumeli ya ntango wana akólisaki mposa na ye ya kobongola Biblia na Lingelesi, mpe ekoki mpenza kozala ete azwaki libaku ya kokólisa makoki na ye ya mobongoli na lisalisi ya makomi ya sika ya Biblia ya Erasme oyo etyaki biutelo ya Greke pembeni ya milɔngɔ́ ya Latin. Na 1523, Tyndale atikaki libota ya Walsh mpo na kokende na Londres. Mokano na ye mozalaki ya kosɛnga ndingisa epai na Cuthbert Tunstall, epískɔ́pɔ ya Londres, mpo na kosala libongoli na ye.

Ndingisa ya Tunstall ezalaki na ntina mpamba te bibongiseli ya likita moko oyo esalemaki na Oxford na mobu 1408, oyo eyebanaki lokola mibeko ya moboko ya Oxford, epekisaki kobongola mpe kotánga Biblia na lokótá oyo bato bazalaki koloba, longola bobele soki epískɔ́pɔ apesi ndingisa mpo na yango. Mpo ete bamekaki kobuka epekiseli yango mingi kati na basakoli-batamboli oyo bayebanaki na nkombo ya ba Lollards bazikisamaki na mɔ́tɔ lokola bapɛngwi. Ba Lollards bazalaki kotánga mpe kokabola Biblia ya John Wycliffe, na Lingelesi, oyo ebongolamaki longwa na Vulgate. Tyndale akanisaki ete ntango esilaki kokóma mpo na kobongola makomi ya boklisto longwa na Greke, na libongoli moko ya sika, ya sikisiki mpo na lingomba na ye mpe mpo na bato ya Angleterre.

Epískɔ́pɔ Tunstall azalaki moto ya boyebi mingi oyo asalaki makambo mingi mpo na kolendisa Erasme. Lokola elembeteli ya makoki na ye, na ndingisa ya Tunstall, Tyndale asilaki kobongola masukúlu ya Isocrate, makomi ya Greke oyo kokanga ntina na yango ezalaki mpasi. Tyndale azalaki na elikya makasi ete Tunstall akokaki kokólisa boninga mpe akopesa lisungi mpe akondima lisɛngi na ye ya kobongola Makomami. Epískɔ́pɔ asalaki nini?

Aboyisami​—Mpo na nini?

Atako Tyndale azwaki nkomá ya lotómo ya bokutani, Tunstall alingaki te koyamba ye. Tyndale asengelaki bongo kokoma mpo na kosɛnga ndingisa ya kokutana na ye. Eyebani polele te soki, na nsima Tunstall andimaki na mitema mibale koyamba Tyndale, kasi maloba na ye mazalaki, ‘Ndako na ngai ezali na esika te.’ Mpo na nini Tunstall apekisaki Tyndale na nkó bongo?

Mbongwana oyo ebandisamaki na Luther na mikili ya Mpótó ezalaki kopesa mpasi mingi na Lingomba ya Katolike, mpe bopusi na yango ekómaki na Angleterre. Na 1521, Mokonzi Henry VIII abimisaki mokanda moko ya nguya oyo ezalaki kokɔtela pápa liboso na botɛmɛli ya Luther. Mpo na komonisa botɔ́ndi na ye, pápa apesaki na Henry nkombo ya lokumu “Mokɔteli ya Kondima.”a Wolsey, Cardinal ya Henry azalaki mpe kongala makasi, kobebisáká babúku ya Luther oyo ekɔtaki kozanga ndingisa. Lokola azalaki epískɔ́pɔ Mokatolike oyo azalaki sembo epai na pápa, epai na mokonzi mpe epai na cardinal na ye, Tunstall asengelaki kolimwisa makanisi nyonso oyo makokaki koyokana na motomboki Luther. Tyndale amonanaki lokola moto ya liboso oyo basengelaki kokanisela. Mpo na nini?

Na boumeli ya ntango oyo alekisaki elongo na libota ya Walsh, na kozanga kobanga Tyndale atɔndɔlaki kozanga boyebi mpe motó makasi ya bakonzi ya mangomba ya etúká yango. Kati na bango John Stokesley oyo ayebaki Tyndale na Oxford. Na nsima ye azwaki esika ya Cuthbert Tunstall lokola epískɔ́pɔ ya Londres.

Botɛmɛli oyo Tyndale akutanaki na yango emonanaki lisusu polele kati na matáta elongo na mokonzi monene moko ya lingomba oyo alobaki ete: “Malamu tózanga mibeko ya Nzambe kasi tózanga mibeko ya pápa te.” Tyndale ayanolaki na maloba oyo makoki kobosanama te: ‘Natɛmɛli pápa mpe mibeko na ye nyonso. Soki Nzambe abateli bomoi na ngai mwa bambula mingi, nakosala ete elenge mobali oyo azali kopusa etimweli ya mabelé ayeba Makomami koleka yo.’

Tyndale asengelaki kosamba liboso na mokambi ya diocèse ya Worcester mpo na bifundeli ya lokuta ete azalaki mopɛngwi. Na nsima Tyndale amikundolaki ete, “Alobaki maloba makasi ya makaneli, mpe afingaki ngai,” mpe abakisaki ete amonaki ye lokola “mbwa.” Kasi ezalaki na elembeteli moko te mpo na kokweisa Tyndale na efundeli ya lipɛngwi. Bakomi ya lisoló ya makambo ya kala bakanisaka ete makambo wana nyonso mayebisamaki epai na Tunstall na sɛkɛlɛ́ mpo na kosala bopusi likoló na ekateli na ye.

Nsima ya mbula moko oyo alekisaki na Londres, Tyndale akataki ntina ete: “Esika ezalaki te kati na ndako ya nkolo na ngai na Londres mpo na kobongola Kondimana ya Sika, kasi lisusu . . . esika ezalaki te mpo na kosala yango na Angleterre mobimba.” Azalaki na elónga. Kati na ezalela ya monyoko oyo mateya ya Luther ebimisaki, monyati-mikanda nani ya Angleterre alingaki komeka kobimisa Biblia na Lingelesi? Yango wana na 1524, Tyndale akatisaki Mai monene Manche, mpo na libela.

Na Mpótó mpe mikakatano ya sika

Elongo na babúku na ye ya motuya mingi, William Tyndale amibombaki na Allemagne. Amemaki mosolo £10 (10 livres sterling) oyo moninga na ye Humphrey Monmouth, moto monene mpe ya mombongo na Londres, akabelaki ye na boboto nyonso. Likabo wana ekokaki mpenza na bantango wana mpo na konyata Makomami ya Greke oyo azalaki kokana kobongola. Na nsima bakangaki Monmouth mpo ete asungaki Tyndale mpe balobaki ete azalaki komonisa boninga epai na Luther. Nsima ya kosambisama mpe kobwakama na bolɔ́kɔ ya Tour de Londres, Monmouth abimisamaki bobele nsima ya kobondela Cardinal Wolsey mpe na kosɛnga ye bolimbisi.

Esika ya sikisiki epai Tyndale akendaki kofanda na Allemagne eyebani mpenza te. Mwa bilembeteli mosusu bizali komonisa ete ekokaki kozala na Hambourg, epai aumelaki mbala mosusu mbula moko. Akutanaki na Luther? Ezali na elembeteli moko te, atako na bifundeli oyo Monmouth afundamaki na yango elobamaki ete akutanaki na ye. Likambo moko lizali solo ete: Tyndale amipesaki mingi na mosala ya kobongola Makomami ya Greke. Epai wapi bakokaki konyata mikanda na ye? Apesaki mokumba yango na mabɔkɔ ya Peter Quentell na Cologne.

Makambo nyonso mazalaki kotambola malamu kino ntango motɛmɛli John Dobneck, oyo ayebani lisusu na nkombo ya Cochlaeus, ayebaki makambo oyo mazalaki kosalema. Nokinoki Cochlaeus apesaki nsango yango na moninga moko ya motema ya Henry VIII mpe kozanga koumela mokonzi apekisaki Quentell ete anyata libongoli ya Tyndale te.

Tyndale mpe mosungi na ye, William Roye, bakimaki mpo na kobikisa bomoi na bango, wana ekamataki bango nkasa ya Evanzile ya Matai oyo esilaki konyatama. Bananaki na ebale Rhin kino Worms, epai basilisaki mosala na bango. Na nsima, bakopi 6000 ya ebimeli ya liboso ya Kondimana ya Sika ya Tyndale enyatamaki.b

Bolóngi​—Kati na botɛmɛli

Kobongola mpe konyata ezalaki likambo moko. Kokómisa Biblia yango na Grande Bretagne ezalaki likambo mosusu. Basáli ya lingomba mpe bakonzi ya mboka bakanaki makasi ete masúwa mákatisa na yango na Manche te, kasi basáli na mombongo oyo bamonisaki boninga malamu bayebaki mwango ya kokɔtisa yango. Kati na bilamba mpe biloko mosusu, babúku yango ekɔtaki na mayele na Angleterre mpe ekendeki kino na Ecosse. Tyndale alendisamaki mingi, kasi etumba na ye eutaki bobele kobanda.

Na 11 Febwáli 1526, Cardinal Wolsey, elongo na baepískɔ́pɔ 36 mpe bakonzi mosusu ya lingomba bayanganaki penepene na Cathédrale Saint Paul na Londres “mpo na komona wana bikɔlɔ minene bitondi na babúku bizali kotumbama na mɔ́tɔ.” Kati na yango ezalaki mpe na bakopi ya libongoli ya motuya mingi oyo Tyndale asalaki. Kati na ebimeli wana ya liboso, sikawa etikali bobele na bakopi mibale mpamba. Kopi bobele moko oyo ezali mobimba (ezangi bobele lokasa ya motó ya likambo) ezali na Bibliotɛkɛ British Library. Likambo ya kokamwa, mosusu, oyo nkasa 71 na yango ezangi, emonanaki na Bibliotɛkɛ ya Cathédrale Saint Paul. Ekómaki kuna ndenge nini, moto moko te ayebi.

Na mpiko nyonso, Tyndale alandaki kobimisa ebimeli ya sika ya libongoli na ye, oyo ezalaki ntango nyonso kobɔtɔlama mpe kozikisama na bakonzi ya mangomba ya mboka Angleterre. Na nsima Tunstall abongolaki myango na ye. Ayokanaki elongo na moto na mombongo moko na nkombo Augustine Packington mpo na kosomba babúku nyonso oyo ekomamaki na Tyndale, elongo na Kondimana ya Sika, mpo na kotumba yango. Yango ebongisamaki elongo na Tyndale, oyo Packington asalaki boyokani elongo na ye. Búku Halle’s Chronicle elobi ete: “Epískɔ́pɔ azalaki kozwa babúku, Packington azalaki kozwa matɔ́ndi, mpe Tyndale azalaki kozwa mbongo. Na nsima ntango Kondimana ya Sika mingi enyatamaki, yango ekómaki ebele na Angleterre.”

Mpo na nini bakonzi ya mangomba bazalaki mpenza kotɛmɛla makasi libongoli ya Tyndale? Wana Vulgate ya Latin elukaki kobulunganisa ndimbola ya makomi mosantu, libongoli ya Tyndale longwa na Greke ya ebandeli emonisaki mpo na mbala ya liboso nsango ya polele ya Biblia na Lingelesi. Na ndakisa, Tyndale aponaki kobongola liloba ya Greke a·gaʹpe ete “bolingo” na esika ya “bosungi” na 1 Bakolinti mokapo 13. Abendaki likebi likoló na “lisangá” na esika ya “ndakonzambe” mpo na kotya likebi likoló ya basambeli, kasi te likoló ya bandakonzambe. Nzokande, likambo oyo lilekaki mpasi mpo na bakonzi ya mangomba, ezalaki ntango Tyndale akitanyisaki “nganganzambe” na “nkulutu” mpe asalelaki “kobongola motema” na esika ya “kotubela masumu,” kolongoláká bongo na bakonzi ya mangomba oyo bakanisaki ete ezalaki nguya na bango ya bonganga. David Daniell alobi na ntina na yango: “Epongelo ezali wana te; ntubela mpe kozwa kolimbisama ya masumu ezali te. Biutelo mibale ya bozwi mpe ya nguya ya Lingomba bikweaki.” (William Tyndale​—A Biography) Wana ezalaki matumoli oyo libongoli ya Tyndale ebimisaki, mpe banganga-mayele ya ntango na biso bandimi mpenza bosikisiki ya maloba oyo ye aponaki.

Na Anvers, atekami mpe abomami

Katikati na 1526 mpe 1528, Tyndale akendaki na Anvers, epai akokaki komiyoka na libateli kati na basáli ya mombongo oyo bazalaki ba Anglais. Kuna akomaki babúku The Parable of the Wicked Mammon (Lisese ya bozwi ya mabe), The Obedience of a Christian Man (Botosi ya moklisto), mpe The Practice of Prelates (Mimeseno ya bakonzi ya mangomba). Tyndale alandaki mosala na ye ya mobongoli mpe azalaki moto ya liboso oyo asalelaki nkombo ya Nzambe, Yehova, kati na libongoli ya Lingelesi ya Makomami ya Liebele. Nkombo yango emonanaki koleka mbala 20.

Wana Tyndale afandaki elongo na moninga mpe mosungi na ye Thomas Poyntz, na Anvers, abatelamaki na myango mabe ya Wolsey mpe banɔ́ngi na ye. Ayebanaki malamu na lisungi oyo azalaki kopesa na babɛli mpe na babólá. Na nsima, Henry Phillips, moto wa Angleterre amikɔtisaki na mayele mabe mpenza kati na boninga elongo na Tyndale. Na nsuka, na 1535, Tyndale atekamaki mpe amemamaki na Vilvorde Castle, bakilomɛtɛlɛ 10 na nɔ́rdi ya Bruxelles. Akangamaki kuna na boumeli ya basanza 16.

Ekoki koyebana mpenza sikisiki te soki nani nde afutaki Phillips, kasi bakanisaka mingimingi ete ezali Epískɔ́pɔ Stokesley, oyo na ntango wana amipesaki mingi na kozikisa “bapɛngwi” na Londres. Kati na búku The Bible of the Reformation, W. J. Heaton alobi ete: “Wana azalaki pene ya liwa na 1539, Stokesley “asepelaki mingi ete na boumeli ya bomoi na ye azikisaki bapɛngwi ntuku mitano.” William Tyndale, oyo afinamaki nkingo liboso ete nzoto na ye etumbama na miso na bato banso na Ɔkɔtɔ́bɛ 1536 atángami mpe kati na motuya wana.

Bateolojiɛ́ misato ya lokumu mingi oyo bautaki na Université Catholique de Louvain, epai Phillips afutamaki, bazalaki na molɔngɔ́ ya baoyo basambisaki Tyndale. Basangani misato ya droit canon bautaki na Louvain mpe baepískɔ́pɔ misato elongo na bato mosusu ya lokumu ya lingomba bazalaki wana mpo na komona lolenge bakokatela Tyndale etumbu mpo na efundeli ya lipɛngwi mpe wana bakolongola ye mokumba na ye ya sángó. Banso basepelaki na bolongolami na ye, wana azalaki na mibu soko 42.

Esili koleka mibu monkámá, Robert Demaus, Mokomi ya masoló ya bomoi ya bato, alobaki ete: “Na boumeli ya ntango nyonso Tyndale ayebanaki malamu mpo na ezaleli ya kolongobana na ye oyo azalaki komonisa kozanga kobanga.” Epai na moninga na ye ya mosala John Frith, oyo Stokesley azikisaki na Londres, Tyndale akomaki ete: “Nabongolaki soko moke te eteni moko ya Liloba ya Nzambe mpo na kobebisa lisosoli na ngai, mpe nakoki kosala yango lelo te, ata soki nyonso oyo ezali na mabelé, ezala bisengo, lokumu to bozwi, ekokaki kopesamela ngai.”

Ezalaki na lolenge yango nde William Tyndale apesaki bomoi na ye mpo na libaku oyo lileki monene ya kopesa bato ya Angleterre Biblia oyo bakokaki kososola yango malamu. Oyo nde motuya monene ye afutaki​—kasi likabo lizwami likoki kotángama motuya te!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mosika te nkombo Fidei Defensor ekomamaki likoló na mosolo ya ebende ya boyangeli, mpe Henry asɛngaki ete nkombo yango ya lokumu epesamela bakitani na ye. Lelo oyo ezali komonana pembeni na motó ya mokonzi likoló ya Misolo ya ebende ete Fid. Def., to bobele F.D. Likambo ya kokamwa, na nsima, “Mokɔteli ya kondima” enyatamaki na maloba ya bokumisi epai na Mokonzi Jacques kati na libongoli King James Version ya 1611.

b Motángo wana mozali mpenza ya sikisiki te; bato mosusu ya mayele bazali kolobela 3000.

[Etanda na lokasa 29]

MABONGOLI YA KALA

Lisɛngi ya Tyndale mpo na kobongola Biblia na lokótá oyo bato bazalaki koloba lizalaki likambo oyo libongi mpe lizalaki na moboko malamu. Libongoli moko na Anglo-Saxon lisilaki kosalema na ekeke ya zomi. Na nsuka ya ekeke ya 15 Biblia mingi oyo enyatamaki mpe ebongolamaki longwa na Latin ezalaki kotambola kati na Mpótó kozanga bipekiseli: Allemand (1466), Italien (1471), Lifalansé (1474), Tchèque (1475), Néerlandais (1477), mpe Catalan (1478). Na 1522, Martin Luther abimisaki Kondimana ya Sika na ye na Allemand. Nyonso oyo Tyndale azalaki kosɛnga ezalaki eyano na motuna mpo na nini Angleterre ekokaki te kopesa nzela na kosala bongo.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]

Biblia oyo ezali na nsima: © The British Library Board; William Tyndale: Na ndingisa ya boboto ya Mokambi, ya baninga na ye mpe ya banganga-mayele ya eteyelo monene ya Hertford, na Oxford

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto