Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/9 nk. 25-29
  • Eteni ya mibale—Ndenge Biblia ekómaki kino epai na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eteni ya mibale—Ndenge Biblia ekómaki kino epai na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mobongisi-nzela amonani
  • Lingomba etomboki lisusu
  • Matomba ya konyata mikanda
  • Wylliam Tyndale mpe Biblia na Lingelesi
  • Bolukiluki epesi bososoli ya polele
  • Tyndale Abongoli Makomami ya Liebele
  • Epekiseli mpo na Biblia mpe Tyndale
  • William Tyndale​—Moto na bososoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Balingaki Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Bazwaki Biblia na motuya mingi—Video ya mokuse (William Tyndale)
    Makambo mosusu
  • Ozwaka Liloba ya Nzambe na motuya mingi mpenza?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/9 nk. 25-29

Eteni ya mibale—Ndenge Biblia ekómaki kino epai na biso

Mɔ́tɔ ezalaki komata se komata na likoló lokola biloko bikopelaka bizalaki se kobakisa lokito ya mɔ́tɔ. Kasi oyo ezalaki mɔ́tɔ ya ndenge mosusu. Matata ya makasi ebandaki kobima mpo na Biblia wana basángó mpe bakonzi ya lingomba batyaki miso na likambo yango. Kasi na kosombáká Biblia na mokano ya kobebisa yango, kozanga ete ayeba episkɔ́pɔ ya Londres asungaki mobongoli, William Tyndale, na kozwa mosolo ya kobimisa Biblia mingi lisusu koleka!

Nini eyeisaki ekateli makasi boye na ngámbo nyonso mibale oyo ezalaki na kowelana? Kati na nimero na biso elekaki, totalelaki lisoló ya kobimisama ya Biblia na eleko ebéngami Moyen-Âge. Sikawa tokómi na ebandeli ya eleko ya sika wana nsango mpe bokonzi ya Liloba ya Nzambe ezalaki pene ya kozala na bopusi makasi likoló na bato.

Mobongisi-nzela amonani

John Wycliffe, nganga-mayele ya lokumu na Oxford, na nguya nyonso ateyaki mpe akomaki misala mizangi boyokani na Biblia ya Lingomba ya Katolike, kozwáká bokonzi na ye na ‘Mobeko ya Nzambe,’ elingi koloba Biblia. Atindaki bayekoli na ye, oyo babéngamaki ba Lollards, na bamboka ya Angleterre koteya nsango ya Biblia na Lingelesi epai na moto nyonso oyo akosepela koyoka. Liboso ya liwa na ye na mobu 1384, abandaki kobongola Biblia na lokótá ya Lingelesi oyo ezalaki kolobama na mikolo na ye uta na Biblia ya Latin.

Lingomba ezalaki na bantina mingi ya koyina Wycliffe. Ya liboso, akweisaki bakonzi ya mangomba mpo na kokanga miso na mabe mpe etamboli ya mbindo. Lisusu, mingi kati na bato oyo bazalaki kosepela na Wycliffe basalelaki mateya na ye na lolenge ya mabe mpo na kolóngisa botomboki na bango na kosaleláká mandoki. Bakonzi ya mangomba bapamelaki Wycliffe, ata nsima ya kufa na ye, atako akɔtelaki batomboki te.

Kati na mokanda akomelaki Pápa Jean XXIII na 1412, Episkɔ́pɔ-mokonzi Arundel alobaki ete ‘John Wycliffe’ azali ‘moto mpamba, mwana ya zabolo, elilingi mpe mwana ya motɛmɛli ya Klisto.’ Na nsuka ya bifundeli, Arundel akomaki ete: “Mpo na kotondisa mabe na ye, akanaki mwango ya sika mpo na kobongola Makomami na lokótá ya mboka.” Ɛɛ, likambo oyo epelisaki nkanda ya bakonzi ya lingomba ezalaki ete Wycliffe alingaki kopesa bato Biblia na lokótá ya mboka na bango mpenza.

Atako bongo, mwa ndambo ya bato minene bazalaki na Makomami na minɔkɔ ya mboka. Moko na bango ezalaki Anne de Bohême, oyo na mobu 1382 abalaki Mokonzi Richard II ya Angleterre. Azalaki na Baevanzile na Lingelesi oyo ebongolamaki na Wycliffe, mpe azalaki koyekola yango ntango nyonso. Ntango akómaki mokonzi-mwasi, ezalela na ye malamu mpo na Makomami na minɔkɔ ya mboka esungaki mpo na kolóngisa Biblia​—bobele na Angleterre te. Anne alendisaki bayekoli na Iniversité ya Prague na etúká ya Bohême ete bákenda na Oxford. Kuna bayekolaki na esengo nyonso mikanda ya Wycliffe mpe bamemaki mosusu na engumba Prague. Nsima wana mateya ya Wycliffe eyebanaki na Iniversité ya Prague esungaki Jan Hus, oyo ayekolaki mpe na nsima ateyaki kuna. Hus asalaki libongoli moko ya malamu na lokótá Tchèque longwa na libongoli ya lokótá Slave. Milende na ye esungaki bato mingi ete básalela Biblia na Bohême mpe ya bitúká ya zingazinga.

Lingomba etomboki lisusu

Bakonzi ya mangomba batombokaki lisusu na Wycliffe mpe Hus mpo bateyaki ete “makomi oyo mabebisami te,” Makomami ya ebandeli mapemami oyo eloko te ebakisami, mazalaki na bokonzi monene koleka “bandimbola mikuse,” mpe ya makasimakasi oyo ezali na mopanzi ya lokasa ya Biblia oyo lingomba endimi. Ezalaki nsango ya pɛto ya Liloba ya Nzambe oyo bateyi wana balingaki kopesa likoki na moto nyonso ete azala na yango.

Na lokuta nyonso balakaki kobatelama na ye, Hus abyangamaki na mayele mabe na liyangani ya bakonzi ya Lingomba ya Katolike na engumba Constance, na ekólo Allemagne, na mobu 1414 mpo na kolobela makanisi na ye. Liyangani esalemaki na bato 2 933, kati na bango basángó, baepiskɔ́pɔ, mpe ba kardinale. Hus andimaki kotika soki mateya na ye makomonana lokuta engebene Makomami. Mpo na bayangani, ezalaki bongo te. Ntembe Hus atyelaki bokonzi na bango ekokaki mpo na kotumba ye na nzeté na mobu 1415, wana azalaki kobondela na mongongo makasi.

Liyangani yango ebimisaki lisusu maloba ya kokweisa mpe ya kofinga John Wycliffe na kobimisáká meko ete mikuwa na ye misengelaki kokundolama na Angleterre mpe kotumbama. Likambo yango ezalaki mabe mingi na boye ete etosamaki te ndenge Pápa asɛngaki kino mobu 1428. Lokola esalemaka ntango nyonso, botɛmɛli oyo elɛmbisaki te molende ya baoyo balingaka solo. Nzokande, ebakisaki ekateli na bango ya kopalanganisa Liloba ya Nzambe.

Matomba ya konyata mikanda

Na mobu 1450, bobele mbula 35 nsima ya liwa ya Hus, Johannes Gutenberg abandaki konyata mikanda na ekólo Allemagne na lisalisi ya masini oyo ekokaki komemama longwa na esika moko kino esika mosusu. Mosala monene na ye ya liboso ezalaki bongo bonyati Biblia Vulgate na Latin, oyo esukaki pene na mobu 1455. Na mobu 1495 Biblia enyatámaki na mobimba to ndambo na nkótá Allemand, Italien, Lifalansé, Tchèque, Hollandais, Liebele, Catalan, Greke, Espagnol, Slave, Portugais, mpe Serbe—⁠ndenge molongó oyo ezali.

Desiderius Erasme nganga-mayele ya ekólo Hollande abimisaki libongoli ya liboso ya Makomami ya Greke na mobimba na yango oyo enyatámaki na mobu 1516. Erasme alingaki ete Makomami “mabongolama na minɔkɔ nyonso ya bato.” Nzokande, akakatanaki kobongola yango ye moko, noki te ekobungisela ye bolingo oyo bato bazalaki komonisela ye. Atako bongo, bato mosusu balandaki ye baoyo bazalaki na mpiko. Oyo ayebanaki mingi kati na bato yango ezalaki bongo William Tyndale.

Wylliam Tyndale mpe Biblia na Lingelesi

Tyndale ayekolaki na Eteyelo monene ya Oxford mpe pene na mobu 1521 ayaki na ndako ya Sir John Walsh mpo na kozala molakisi ya bana na ye. Na ntango ya bolei na ndako ya Walsh, mbala mingi epesaki elenge Tyndale libaku ya kowelana na bakonzi ya mangomba ya mboka yango. Kútu Tyndale atɛlɛmɛlaki makanisi na bango na kofungoláká Biblia mpe kotalisáká bango Makomami. Na nsima, Walsh na mwasi na ye bandimisamaki ete mateya ya Tyndale mazwamaki na Biblia, mpe bakonzi ya mangomba babengisamaki lisusu mingi te mpe bayambamaki lisusu na esengo mpenza te. Na ntembe te, yango epelisaki nkanda ya bakonzi ya mangomba na ntina na Tyndale mpe bindimeli na ye.

Mbala moko na boumeli ya kowelana, motɛmɛli moko ya lingomba ya Tyndale alobaki na nguya nyonso ete: “Eleki malamu kozánga Mibeko ya Nzambe na esika ya kozanga mibeko ya Pápa.” Kanisá endimiseli makasi ya Tyndale wana ayanolaki: “Natyeli Pápa ntembe mpe mibeko na ye nyonso. Soki Nzambe abateli bomoi na ngai mwa bambula mingi, nakosala ete elenge mobali oyo azali kopusa etimweli ya mabelé ayeba Makomami koleka yo.” Tyndale akokaki kozonga nsima te na ekateli na ye. Na nsima ayaki kokoma ete: “Koyeba makambo mingi esosolisi ngai ete ekoki kosalema te ete oteya bato solo ya Biblia mpamba kozanga ete otya liboso na bango makomami na lokótá ya mboka na bango, na lolenge yango bakokoka komona ntina ya makambo, molɔngɔ́ na yango, mpe ndimbola ya makomi.”

Na ntango yango, Biblia enyatámaki naino na Lingelesi te. Na yango na mobu 1523, Tyndale akendeki na engumba Londres kosɛnga nzela mpe kozwa ndingisa epai na Episkɔ́pɔ Tunstall mpo na kobongola Biblia. Lokola baboyaki kopesa ye ndingisa, alongwaki na ekólo Angleterre mpo na kokóba mwango na ye ya kobongola Biblia epai mosusu, mpe azongaki lisusu na Angleterre te. Na engumba Cologne, na ekólo Allemagne, masini na ye ya liboso ya konyata mikanda ebebisamaki na banguna, mpe Tyndale akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye, mpe amemaki ndambo ya bankasa ya Baevanzile ya Matai oyo ezalaki mpenza na motuya mpo na ye wana ekangisamaki naino esika moko te. Nzokande, na engumba Worms, na Allemagne, kopi soko 3 000 ya “Kondimana ya Sika” na Lingelesi esilaki. Yango etindamaki na Angleterre mpe ebandaki kokabolama na ebandeli ya mobu 1526. Ndambo na yango ezali oyo Episkɔ́pɔ Tunstall asombaki mpe atumbaki, kozanga koyeba ete nakosaláká bongo asalisaki Tyndale mpo na kokóba mosala na ye!

Bolukiluki epesi bososoli ya polele

Emonani ete Tyndale asepelaki na mosala na ye. Ndenge búku The Cambridge History of the Bible ekomi yango, “Makomami epesaki ye esengo, mpe esengo ezali komonana na lombangu mpe na mɔ́tɔ na mosala na ye.” Mokano ya Tyndale ezalaki ya kokómisa Biblia epai ya bato nyonso na maloba ya sikisiki mpe ya pɛtɛɛ. Boyekoli na ye ezalaki komonisa ye bandimbola ya maloba ya Biblia oyo ebombamaki na mateya ya lingomba na boumeli ya bikeke mingi. Kozanga kobanga likámá ya liwa to makambo monguna na ye ya ntango nyonso Sir Thomas More azalaki kokoma, Tyndale akɔtisaki makambo oyo azwaki na bolukiluki kati na libongoli na ye.

Kosaleláká makomi ya Erasme ya Greke ya ebandeli na esika ya Latin, Tyndale aponaki “bolingo” na esika ya “boboto” mpo na kolimbola malamumalamu liloba ya Greke a·gaʹpe. Asalelaki lisusu “lisangá,” na esika ya “lingomba,” “kobongola motema” na esika ya “koyoka mawa,” mpe “bankulutu” na esika ya “banganga-nzambe.” (1 Bakolinti 13:1-3; Bakolose 4:15, 16; Luka 13:3, 5; 1 Timoté 5:17, Tyndale) Bosemboli yango ebebisaki bokonzi ya lingomba mpe na mimeseno ya misala ya losambo, lokola kotubela liboso ya banganga-nzambe.

Bobele bongo Tyndale akangamaki na liloba “lisekwa,” kobwakáká bongo epongelo mpe koyeba makambo nsima ya liwa ete ezali na Biblia te. Mpo na oyo etali bakufi, akomelaki More ete: “Na kotyáká bango na likoló, na lifelo, to na epongelo, [ozali] kobebisa makanisi epai kuna Klisto mpe Paulo bandimaki lisekwa.” Na likambo yango, Tyndale akanisaki Matai 22:30-32 mpe 1 Bakolinti 15:12-19. Na lolenge elongobani mpenza ayaki kondima solo ete bakufi bayebi eloko te kino na lisekwa na mikolo mizali koya. (Nzembo 146:4; Mosakoli 9:5; Yoane 11:11, 24, 25) Yango elimbolaki ete bibongiseli nyonso ya losambo ya Malia mpe “basantu” ezalaki na ntina te mpamba te bayebi lisusu eloko te bakoki koyoka te to mpe kosambela mpo na bato te.

Tyndale Abongoli Makomami ya Liebele

Na mobu 1530, Tyndale abimisaki libongoli moko ya Pantatɛ́kɛ, mikanda mitano ya ebandeli ya Makomami ya Liebele. Akómaki bongo moto ya liboso oyo abongolaki Biblia na Lingelesi longwa na Liebele. Tyndale azalaki mpe mobongoli ya liboso na Lingelesi oyo asalelaki nkombo Yehova. David Daniell nganga-mayele ya Londres akomi ete: “Solo, yango ekamwisaki mingi batángi ya Tyndale ete nkombo ya Nzambe engengisamaki lisusu.”

Kati na milende na ye mpo na koyeisa makambo polele, Tyndale asalelaki maloba mingi makeseni ya Lingelesi mpo na kobongola liloba moko ya Liebele. Nzokande, alandaki malamu mibeko ya gramɛrɛ ya Liebele. Litomba na yango ezalaki ete ebatelaki nguya ya Liebele. Ye moko alobaki ete: “Liebele ezali na boyokani mingi na Lingelesi koleka Latin. Elobeli ya nkótá yango mibale ekeseni mingi te; na yango na bisika mingi okozala bobele na mposa ya kobongola liloba mokomoko ya Liebele na oyo ekokani na Lingelesi.”

Lolenge wana ya kobongola na kolandáká liloba mokomoko ekɔtisaki maloba ya Liebele na libongoli ya Tyndale. Maloba mosusu kati na yango emonanaki maloba ya sika na botángi ya liboso. Kasi, Biblia ekómaki kosalelama mingi na boye ete maloba ebele sikawa makɔtisámá na Lingelesi. Tólobela na ndakisa “moto oyo akosepelisa motema na ye” (lokola na 1 Samwele 13:14), “pásika,” mpe ‘ntaba ya kotinda na mokili mokauki.’ Koleka wana, batángi ya Biblia na Lingelesi bamesanaki na makanisi ya Liebele, kopesáká bango makoki ya kososola Makomami mapemami.

Epekiseli mpo na Biblia mpe Tyndale

Likoki ya kotánga Liloba ya Nzambe na lokótá ya moto ye moko ezakaki likambo ya kosepelisa. Bafandi ya Angleterre bamonisaki yango na kosombáká Biblia nyonso oyo ekokaki kokɔtisama na lolenge ya mayele kati na mboka na bango, kobombáká yango lokola liboke ya bilamba to ya biloko mosusu. Bobele na eleko yango, bakonzi ya mangomba bamonaki ete bakobungisa etɛlɛmɛlo na bango soki Biblia ekómi kotalelama lokola bokonzi eleki likoló. Na yango, mosala yango ekómaki likambo ya bomoi to ya kufa mpo na mobongoli mpe bato oyo bazalaki kopesa ye mabɔkɔ.

Wana lingomba mpe Letá bazalaki koluka ntango nyonso kokanga ye, Tyndale akóbaki kosala na nkuku na engumba Antwerp, na ekólo Belgique. Lisusu, amipesaki mikolo mibale na pɔ́sɔ mpo na oyo ye moko abéngaki ete kominanola​—koteya bato ya ekólo Angleterre oyo bakimá mboka, babóla, na babɛli. Asalelaki ndambo mingi ya mosolo na ye mpo na mosala yango. Liboso ete akoka kobongola eteni ya nsuka ya Makomami ya Liebele, Tyndale akabamaki mpo na mosolo na moto moko ya Angleterre oyo amimonisaki lokola moninga. Babomaki ye na engumba Vilvoorde, na ekólo Belgique, na mobu 1536, maloba na ye ya nsuka ya molende ezalaki ete: “Nkolo! fungolá miso ya Mokonzi ya Angleterre.”

Na mobu 1538, na kopusama na ye moko Mokonzi Henri VIII apesaki etindá ete Biblia etyama kati na bandakonzambe nyonso na ekoló Angleterre. Atako bandimaki Tyndale te, libongoli oyo eponamaki ezalaki mpenza oyo ya ye. Na lolenge wana misala ya Tyndale eyebanaki mingi mpe balingaki yango mpo ete “emonisaki motindo ya moboko oyo likoló na yango mabongoli mingi masalemaki nsima” na Lingelesi. (The Cambridge History of the Bible) Koleka biteni 90 likoló ya monkámá ya libongoli ya Tyndale etyamaki kati na King James Version na mobu 1611.

Kotánga Biblia kozanga epekiseli elimbolaki mbongwana monene mpo na ekólo Angleterre. Masoló na ntina na Biblia ebandaki kosalema na mangomba ekómaki makasi na boye ete na nsima ezalaki kotɛmɛla misala ya lingomba! “Mikóló bayekolaki kotánga na boye ete bákoka kotánga bango moko Liloba ya Nzambe, mpe bana balandaki bankulutu na bango mpo na koyoka.” (A Concise History of the English Bible) Eleko oyo lisusu emonaki bokóli ya kokámwa na kokabolama ya Biblia na mikili misusu ya Mpótó mpe na nkótá mosusu. Kasi mbonge oyo ya Biblia esengelaki kozala na bopusi na mokili mobimba. Ndenge nini yango esalemaki? Mpe ndenge nini bokundoli mpe bolukiluki esalaki bopusi na Biblia oyo tozali kosalela lelo? Lisoló mosusu likolanda mpo na kosukisa molɔngɔ́ ya masoló oyo.

[Elilingi na lokasa 26]

“Kondimana ya Sika” ya Tyndale ya mobu 1526​—Ekzamplere ya mobimba bobele moko oyo eyebani, oyo etumbamaki na mɔ́tɔ te

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© The British Library Board

[Chart/Pictures on page 26, 27]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Badati ya moboko kati na kotambwisama ya Biblia

Ntango na biso

Biblia ya Wycliffe ebandaki (Liboso ya 1384)

1400

Hus abomamaki na 1415

Gutenberg​—Biblia ya liboso enyatámaki soko na 1455

1500

Biblia ya liboso enyatámaki na nkótá ya mboka

Makomi ya Greke ya Erasme na 1516

“Kondimana ya sika” ya Tyndale na 1526

Kobomama ya Tyndale na 1536

Henri VIII atindi ete Biblia etyama na bandakonzambe na 1538

1600

King James Version na 1611

[Bililingi]

Wycliffe

Hus

Tyndale

Henry VIII

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto