Yehova asundolaki biso soko moke te
LISOLÓ YA NASHO DORI
Mbreshtan ezali mboka moko ya moke oyo ezali likoló na ngomba na súdi ya Albanie, pene na Grèce. Nabotamaki kuna na 1907. Wana nazalaki na mibu mitano, nabandaki kotánga na eteyelo moko ya Bagreke, kasi kelasi na ngai ekatanaki ntango mampinga ya Italie mabundisaki Albanie na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Nsima na etumba, nazongelaki kotánga, kasi nde na lokótá Albanien.
ATAKO baboti na ngai bamipesaki mpenza te na makambo ya losambo, bazalaki kotosa mimeseno ya lingomba Ortodoxe ya Albanie. Nkɔ́kɔ na ngai azalaki sángó na Mbreshtan, yango wana nazalaki kosala kati na ndakonzambe mpe nayebaki mwa makambo oyo mazalaki kosalema na kati na yango. Milulu mimonanaki ete mizali na ntina te, mpe bokosi ezalaki kotungisa ngai.
Kolandáká mimeseno ya mboka, baboti na ngai baponelaki ngai elenge mwasi moko mpo na kobalana na ye. Argjiro azali mobotami ya Grabova, mboka moko moke oyo ezalaki zingazinga, mpe tobalanaki na 1928, wana azalaki na mibu 18.
Nayekoli solo ya Biblia
Pene na ntango wana, namilelaki na ntina na Lingomba Ortodoxe epai na ndeko na ngai oyo autaki na Etats-Unis mpo na koya kotala biso. Alobaki ete: “Na Amerika, pene na ndako na ngai, ezali na etuluku moko ya bato oyo bazali na ndakonzambe te, kasi bayekolaka Biblia.” Likanisi ya koyekola Biblia kozanga ndakonzambe esepelisaki ngai. Na bongo natunaki ye soki akoki kotindela ngai mwa mikanda oyo mikolimbolaka Biblia.
Nazalaki lisusu kokanisa soko moke te na ntina na lisoló na biso soko mbula moko na nsima ntango nayaki kozwa liboke oyo batindelaki ngai longwa na Milwaukee, na Wisconsin. Na kati ezalaki na búku La Harpe de Dieu na lokótá Albanien mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lokótá Greke. Natalelaki búku mobimba bobele likolólikoló mpe namonaki makambo oyo mamonisaki lingomba ya solo. Yango etungisaki ngai mingi. Namilobelaki ngai moko ete: ‘Nalingi eloko moko te oyo ezali na boyokani na lingomba.’ Na bongo, natángaki búku yango na mozindo te.
Na 1929, nakɔtaki na mosala ya sodá mpe natindamaki na engumba Tiranë, mboka-mokonzi ya Albanie. Kuna nakutanaki na Stathi Muçi, oyo azalaki kotánga Biblia na lokótá Greke. Natunaki ye ete: “Okendaka na ndakonzambe?” Ayanolaki ete: “Te, Nasilá kolongwa na lingomba. Nazali mosangani ya Lisangá ya Bayekoli na Biblia.” Ngai na sodá mosusu tokendaki na makita elongo na Stathi na mokolo ya Lomingo. Kuna nayekolaki ete lingomba ya solo ezali te ndako to losambo, kasi esalemi nde na basaleli bapakolami ya Klisto. Sikawa nasosolaki makambo oyo búku La Harpe de Dieu ezalaki koloba.
Nasho Idrizi mpe Spiro Vruho basilaki kozonga na Albanie longwa na Etats-Unis na katikati ya bambula 1920 mpe bazalaki kopalanganisa basolo ya Biblia oyo basilaki koyekola kuna. Nabandaki koyangana na makita na Tiranë, elongo na etuluku moke ya Bayekoli na Biblia. Nokinoki namonaki polele ete nasili komona lisangá ya Yehova. Na bongo, na mokolo mwa 4 Augústo 1930, nazwaki batisimo kati na ebale oyo ezalaki zingazinga.
Na nsima, nazongaki na Mbreshtan mpo na kokóba mosala na ngai ya kosala basapato. Likambo ya ntina, nabandaki mpe koyebisa makambo ya solo ya Biblia oyo nazalaki koyekola epai na basusu. Nazalaki koyebisa bango ete: “Yesu Klisto akokani te na bikeko oyo bizali kati na ndakonzambe. Ye azali na bomoi!”
Kosakola atako botɛmɛli
Ahmed Bey Zogu akamataki bokonzi na 1925, amikómisaki ye moko Mokonzi Zog I na 1928, mpe ayangelaki kino na 1939. Ministre na ye na makambo matali ntómo ya bato andimaki mosala na biso ya boklisto. Atako bongo, tozalaki na mikakatano. Ezalaki bongo mpamba te Musa Juka, ministre ya makambo matali bitúká, azalaki na boyokani makasi elongo na pápa ya Loma. Juka apesaki etindá ete bobele mangomba misato nde mandimami—Mizilmá, Ortodoxe, mpe Katolike ya Loma. Bapolisi balukaki kokangisa babúku na biso mpe kopekisa mosala na biso ya kosakola, kasi balóngaki te.
Na boumeli ya bambula 1930, mbala mingi nazalaki kokende na Berat, engumba monene kati na mboka Albanie, epai Mihal Sveci azalaki kokamba mosala na biso ya kosakola. Tomibongisaki mpo na kosala mibembo ya kosakola na mboka mobimba. Mbala moko natindamaki na engumba Shkodër mpo na pɔ́sɔ mibale, mpe nazalaki na likoki ya kokabola mikanda mingi. Na 1935 etuluku moko kati na biso ezwaki bísi ya kofutela mpo na kosakola na engumba Këlcyrë. Na nsima, mobembo monene na Albanie ebongisamaki mpo na bingumba biye Përmet, Leskovik, Ersekë, Korçë, Pogradec, mpe Elbasan. Tosukisaki mibembo yango na Tiranë bobele na ntango ya kokumisa Ekaniseli ya liwa ya Klisto.
Ndambo ya bilei ya elimo oyo tozalaki na yango esalisaki biso na kobatela nguya na biso ya elimo, na boye ete tomiyokaki soko moke te ete tosundolami. Kobanda 1930 kino 1939, nazalaki kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lokótá ya Greke mbala na mbala. Mokano na ngai ezalaki mpe ya kotánga Biblia soko na boumeli ya ngonga moko mokolo na mokolo, nazalaki kosala bongo na boumeli ya mibu 60 liboso ete miso na ngai ebeba. Bobele kala mingi te nde Biblia na mobimba na yango esalemaki na lokótá Albanien, na bongo nazali na esengo mingi lokola nayekolaki Greke wana nazalaki mwana. Batatoli mosusu ya Albanie oyo bazalaki na mikolo wana ya ebandeli, bayekolaki mpe kotánga Greke na boye ete bango mpe bákoka kotánga Biblia na mobimba.
Na 1938, Argjiro azwaki batisimo. Na 1939, tosilaki kobota bana nsambo liboso ete bákóma zomi. Likambo ya mawa, misato kati na bana na biso nsambo ya liboso bakufaki wana bazalaki bilenge.
Mikakatano na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba
Na Apríli 1939, liboso ete Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebanda, Mampinga ba Fascistes ya Italie mabundisaki Albanie. Nokinoki nsima na yango, mosala ya Batatoli ya Yehova mopekisamaki, kasi etuluku na biso moke ya basakoli ya Bokonzi soko 50 ekóbaki kosakola. Babúku na biso soko 15 000 mpe mwa babúku na biso ikangisamaki mpe ibebisamaki na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.
Jani Komino azalaki na ebombelo monene ya mikanda oyo ekangisamaki na ndako na ye. Ntango mampinga ya Italie mayebaki ete babúku isilaki konyatama na Etats-Unis, basilikaki mingi. Balobaki ete: “Bozali bapalanganisi ya makambo ya politiki! Etats-Unis ezali kotɛmɛla Italie!” Bilenge bandeko mibali ya molende Thomai mpe Vasili Cama bakangamaki, mpe wana bayebaki ete babúku oyo bazalaki kokabola eutaki epai na Komino, ye mpe akangamaki. Nokinoki nabéngisamaki epai na bapolisi mpo na kotunama mituna.
Batunaki ngai ete: “Oyebi mibali oyo?”
Nayanolaki ete: “Ɛɛ.”
“Osalaka elongo na bango?”
Nayanolaki ete: “Ɛɛ, Tozali Batatoli ya Yehova. Totɛmɛlaka biyangeli te. Tokɔtaka na makambo ya politiki te.”
“Bosili kokabola mokanda oyo?”
Ntango nandimaki ete ɛɛ, bakangaki ngai minyɔlɔlɔ na mabɔkɔ, mpe batyaki ngai na bolɔ́kɔ na mokolo mwa 6 Yulí 1940. Kuna nakutaki bandeko mosusu mitano ya mboka na ngai—Josef Kaci, Llukan Barko, Jani Komino, mpe bandeko Cama. Na ntango tozalaki kati na bolɔ́kɔ, tokutanaki na Batatoli mosusu misato—Gori Naçi, Nikodhim Shyti, mpe Leonidas Pope. Biso nyonso libwa batondisaki biso na ndako ya bolɔ́kɔ oyo ezalaki na bolai ya 1,8 mɛtɛlɛ mpe na bonene ya 3,7 mɛtɛlɛ!
Nsima ya mwa mikolo, bakangisaki biso nyonso minyɔlɔlɔ esika moko mpe bamemaki biso kino na engumba Përmet. Basanza misato na nsima batindaki biso na bolɔ́kɔ oyo ezali na Tiranë mpe tolekisaki basanza mosusu mwambe kozanga kosambisama.
Na nsuka, tosambisamaki na esambiselo ya basodá. Bakatelaki ngai na ndeko Shyti bolɔ́kɔ ya sanza 27. Bakatelaki ndeko Komino bolɔ́kɔ ya sanza 24, mpe basusu batikamaki nsima na kolekisa bolɔ́kɔ ya sanza 10. Totindamaki na bolɔ́kɔ ya Gjirokastër, epai ndeko Gole Flloko asalisaki na elikya nyonso mpo na kokangolama na biso na 1943. Na nsima libota na biso efandaki na engumba Përmet, epai nakómaki mokɛngɛli ya lisangá moke oyo ezalaki wana.
Atako bongo mosala na biso mopekisamaki mpe Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kongala na mikili oyo mizalaki zongazonga na biso, tokóbaki kosala oyo tokokaki kosala mpo na kokokisa mosala na biso ya kosakola nsango ya Bokonzi. (Matai 24:14) Na 1944 Batatoli 15 bakɔtaki bolɔ́kɔ. Nzokande, na boumeli ya ntango wana ya mikakatano, tomonaki ete Yehova asundolaki biso soko moke te.
Tomekami na ntina na ezaleli na biso ya kozanga kokɔta na makambo ya politiki
Atako etumba esukaki na 1945, mikakatano na biso mikóbaki kozala mpe nkutu mikómaki nde mpasi koleka. Vɔ́ti ya makasi esɛngisamaki na boumeli ya boponi oyo esalemaki na mokolo ya 2 Desɛ́mbɛ 1946. Moto nyonso oyo amekaki koboya kopona atalelamaki lokola monguna ya Leta. Baoyo bazalaki kati na lisangá na biso ya Përmet babandaki kotuna ngai ete, “Tosengeli kosala nini?”
Nayanolaki ete: “Soki bokotya motema epai na Yehova, ekozala na ntina te ete bótuna ngai soki bokosala nini. Bosili koyeba ete libota ya Yehova likɔtaka na makambo ya politiki te. Basangani na mokili te.”—Yoane 17:16.
Mokolo ya kosala boponi ekómaki, mpe basali ya Leta bayaki na ndako na biso. Babandaki koloba na kimya nyonso ete, “Oh, Tiká tokamata mwa kɔ́pɔ ya kafé mpe tósolola. Oyebi soki mokolo ya lelo ezali nini?”
Nayanolaki ete: “Ɛɛ, lelo ezali mokolo ya kosala boponi.”
Moko na bango alobaki ete: “Ekozala malamu koya nokinoki, soki te okoya na nsima ya ngonga oyo esengeli.”
Nayanolaki ete: “Te, nakani te kokende. Vɔ́ti na biso ezali mpo na Yehova.”
“Malamu, na bongo yaká mpe opona mpo na baoyo bazali kowela ebonga.”
Nalimbwelaki ye ete Batatoli ya Yehova bakɔtaka soko moke te na makambo ya politiki. Ntango etɛlɛmɛlo na biso eyebanaki polele, banyokolaki biso mingi. Esɛngisamaki na biso ete tótika kosala makita na biso, na bongo tobandaki koyangana na kobombama.
Bozongi na mboka na biso
Na 1947 ngai mpe libota na ngai tozongaki na Mbreshtan. Mwa moke na nsima, na malili makasi ya Desɛ́mbɛ nsima na nzánga, nabéngisamaki na biro ya Sigurimi (police secrète). Mokonzi ya bapolisi atunaki ete: “Oyebi mpo na nini nabéngisi yo?”
Nayanolaki ete: “Nakanisi ezali mpo ete osili koyoka bifundeli na ntina na ngai. Kasi Biblia elobi ete mokili ekoyina biso, na bongo bifundeli bikoki kokamwisa ngai te.”—Yoane 15:18, 19.
Ayanolaki na nkanda nyonso ete: “Tiká kolobela ngai makambo ya Biblia. Soki te nakobɛta yo.”
Mokonzi ya bapolisi mpe bato na ye bakendaki kasi alobaki na ngai ete natɛlɛma na libándá na nsé ya malili. Nsima ya mwa ntango abéngisaki ngai kati na biro mpe asɛngaki ngai ete tótika kosala makita na ndako na biso. Atunaki ete: “Bato boni bazali na mboka na yo?”
Nalobaki ete: “Bato nkámá moko na ntuku mibale.”
“Bazali na lingomba nini?”
“Lingomba Ortodoxe ya Albanie.”
“Mpe yo?”
“Nazali moko kati na Batatoli ya Yehova.”
“Bato nkámá moko na ntuku mibale bazali kokende na nzela moko mpe yo na nzela mosusu?” Na nsima asɛngaki ngai ete napelisa buzi kati na ndakonzambe. Ntango nayebisaki ye ete nakoki kosala yango te, abandaki kobɛta ngai na lingenda. Ezalaki penepene na ngonga ya liboso ya ntɔ́ngɔ́ mpe na ntango yango nde batikaki ngai.
Mikanda mipekisami
Nsima wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esukaki, tobandaki lisusu kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na nzela ya pósita, kasi na nsima, bazulunalo yango esengelaki mpenza kokabolama lisusu te. Na bongo, mokolo moko na butu, na ngonga ya zomi, nabyangamaki na biro ya police secrète. Balobaki na ngai ete: “Zulunalo na lokótá ya Greke esili koya, mpe tolingi ete olimbwela biso makambo mazali na kati.”
Nalobaki ete: “Nayebi Greke malamu te. Moninga na ngai ya pembeni ayebi yango malamu. Mbala mosusu akoki kosalisa bino.”
Mokonzi moko ya bapolisi alobaki wana abimisaki mwa ndambo ya bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lokótá ya Greke ete: “Te, tolingi bobele yo nde olimbwela biso yango.”
Nangangaki ete: “Oh, oyo ezali nde ya ngai! Ya solo, nakoki kolimbola yango. Bóyeba ete bazulunalo oyo iuti na Brooklyn, na New York. Kuna nde esika biro monene ya Batatoli ya Yehova ezali. Nazali moko kati na Batatoli ya Yehova. Kasi emonani nde lokola babungaki adresi. Bazulunalo oyo esengelaki kotindama nde epai na ngai, kasi epai na bino te.”
Baboyaki kopesa ngai bazulunalo yango, mpe uta ntango wana kino na 1991, na boumeli ya bambula koleka 40 na nsima, tozwaki mokanda moko te oyo ekolimbolaka Biblia na Albanie. Na boumeli ya bambula nyonso wana, tokóbaki kosakola, kosaleláká bobele Biblia na biso. Soko Batatoli 20 bakangamaki na 1949; basusu bakatelamaki bolɔ́kɔ ya mibu mitano.
Mikakatano mibakisami
Na bambula 1950, esɛngisami na bato ete bázala na mikanda oyo mikomonisa ete bazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya basodá. Kasi Batatoli ya Yehova baboyaki kozala na mikanda yango. Na ntina na yango, ndeko Komino mpe ngai tolekisaki basanza mosusu mibale kati na bolɔ́kɔ.
Na boumeli ya ntango oyo Leta apesaki nzela ya kozala ya mangomba mosusu, tozalaki na mwa bonsomi. Nzokande, na 1967 mangomba nyonso mapekisamaki, komonisáká polele Albanie ete ezali mpenza mboka oyo endimaka makambo ya Nzambe te. Batatoli bakóbaki komeka kosala makita, kasi ekómaki mpenza mpasi. Bamoko kati na biso basalaki mabenga kati na bakazaka na biso mpo ete tókoka kobomba Biblia ya moke. Na nsima tozalaki kokende kotánga yango na elanga moko.
Batatoli kati na Tiranë bakangamaki mpo ete bazalaki kotánga Biblia, mpe misato bakatelamaki bolɔ́kɔ ya sanza mitano kati na bakáa ya bakangami oyo ezalaki mosika. Mpo na yango, mabota na bango manyokwamaki. Baoyo kati na biso bautaki na mboka mikemike, oyo ezalaki mosika, batindamaki mosika te mpamba te totalelamaki ete tozalaki mpenza likámá te. Kasi kozanga kokɔta na biso na makambo ya politiki esalaki ete bálongola nkombo na biso kati na milɔngɔ́ ya bato oyo basengeli kozwa bilei. Na yango, bomoi ekómaki mpasi mpenza. Lisusu, bana na biso mibale mosusu bakufaki. Atako bongo, Yehova asundolaki biso soko moke te.
Bobangi ezalaki komonana na Albanie mobimba. Moto nyonso azalaki kokɛngɛlama, mpe police secrète ezalaki kokoma lapólo na ntina na moto nyonso oyo amekaki komonisa likanisi likeseni na oyo ya parti oyo ezalaki koyangela. Na bongo, tosengelaki mpenza kozala na ekɛngɛ mpo na kokoma lapólo ya mosala na biso. Tosengelaki te koyangana mpo na kolendisana na elimo kati na etuluku ya koleka bato mibale to misato. Nzokande, totikaki soko moke te kosakola.
Na milende na yango ya kotya mobulungano kati na bandeko, police secrète ezalaki kopalanganisa nungunungu ete Motatoli oyo ayebani mingi na Tiranë azalaki monɔ́ngi (espion). Yango esalaki ete basusu bábungisa elikya na bango mpe ebulunganisaki mwa moke bomoko na biso. Lokola tozalaki te kozwa mikanda ya sika oyo mikolimbolaka Biblia mpe lokola tozalaki te na boyokani na lisangá ya Yehova oyo ezali komonana, mwa ndambo moke bakweaki kati na bobangi.
Lisusu, bakonzi bapalanganisaki nungunungu ete Spiro Vruho, nkulutu moklisto oyo bazalaki komemya mingi na Albanie, amibomaki. Bazalaki koloba ete: “Bomoni, ata kútu Vruho akimi.” Na nsima eyaki koyebana polele ete ndeko Vruho abomamaki mpenza solo.
Na 1975, ngai na Argjiro tofandaki elongo na mwana na biso na Tiranë na boumeli ya sanza mibale. Na boumeli ya eleko ya boponi, bakonzi ya engumba bapusaki biso na makaneli oyo: “Soki olingi kosala vɔ́ti te, tokolongola mwana na yo na mosala.”
Nayanolaki ete: “Mwana na ngai azali kosala mosala na ye uta mibu 25. Boyebi likambo moko na moko na ntina na ye mpe libota na ye. Uta koleka mibu 40 ngai nasalaka vɔ́ti te. Likambo wana ezali mpenza kati na mikanda mitali basáli. Soki ezali bongo te, boye mikanda na bino mizali na molɔngɔ́ te. Soki ezali kati na mikanda na bino, boye bozangi bosembo mpo na parti na kopesáká ye nzela ete asala na boumeli ya bambula mingi.” Wana eyokaki bango makambo wana, bakonzi balobaki ete soki bozongi na Mbreshtan, bakoyeisa te likambo yango makasi.
Mbongwana ya nsɔ́mɔ
Na 1983 tolongwaki na Mbreshtan mpo na kokende na engumba Laç. Mwa moke nsima na yango, na 1985, mokonzi mabe wana akufaki. Ayangelaki kobanda boponi wana ya liboso oyo esalemaki na lolenge ya makasi na 1946. Na nsima, monimá na ye, oyo ayangelaki na katikati ya Tiranë, mpe oyo ya Stalin elongolamaki.
Na boumeli ya bambula zomi wana ya epekiseli likoló na mosala na biso, Batatoli mingi banyokwamaki mpe basusu babomamaki. Mobali moko ayebisaki Batatoli mosusu na balabála ete: “Na ntango ya kominisme, mingi kati na biso babosanaki Nzambe. Bobele Batatoli ya Yehova nde batikalaki sembo epai na ye atako komekama mpe mikakatano.”
Lokola bonsomi mingi epesamaki, bato libwa bapesaki lapólo ya mosala ya boklisto na Yúni 1991. Na Yúni 1992, sanza moko nsima ya kolongolama ya epekiseli, bato 56 basanganaki kati na mosala ya kosakola. Liboso ya mbula wana tosepelaki na kozwa motángo ya bayangani 325 na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Uta ntango wana motuya ya basakoli emataki kino koleka 600, mpe baoyo nyonso bayanganaki na Ekaniseli na mokolo mwa 14 Apríli 1995, bazalaki 3 491! Na bambula oyo iuti koleka ezalaki esengo monene mpo na ngai komona bilenge mingi kobakisama na masangá na biso.
Argjiro atikalaki sembo epai na Yehova mpe azalaki sembo epai na ngai na boumeli ya bambula nyonso wana. Ezala na ntango nazalaki na bolɔ́kɔ to wana nazalaki kosala mibembo mpo na mosala ya kosakola, na motema pɛtɛɛ nyonso azalaki komibanzabanza mpo na bamposa ya libota na biso kozanga komilelalela. Moko na bana na biso ya mibali mpe mwasi na ye bazwaki batisimo na 1993. Yango epesaki biso esengo mingi.
Bobele mpo na Bokonzi ya Nzambe
Nazali na nsáí monene ya komona lisangá ya Yehova na Albanie, oyo ezali na bomoko mpe ezali kozwa bolamu mingi na elimo. Nazali na mayoki motindo moko na mobangé Simeona oyo azalaki na Yelusaleme, oyo liboso ete akufa, azwaki libaku malamu ya komona Masiya oyo alakamaki uta kala. (Luka 2:30, 31) Sikawa soki batuni ngai lolenge nini ya boyangeli nalingi, nalobaka ete: “Nalingi Kominisme te, kapitalisme mpe te. Ezala bato mpe Leta ya mikili na bango bazali na ntina te. Biyangeli bisalaka banzela, bipesaka lontiliki na mboka oyo izali mosika, mpe imekaka kotya makambo na molɔngɔ́. Nzokande, boyangeli ya Yehova, Bokonzi na ye ya likoló, ezali mwango bobele moko mpo na kosilisa mikakatano oyo Albanie mpe mokili mobimba ezali kokutana na yango.”
Oyo basaleli ya Nzambe bazali kosala na mabelé mobimba mpo na kosakola na ntina na Bokonzi ya Nzambe ezali te mosala ya bato. Yango ezali mosala ya Nzambe. Tozali basaleli na ye. Atako tozali na mikakatano mingi kati na Albanie mpe atako uta kala tozalaki te na likoki ya kotinda mpe kozwa nkomá uta na lisangá ya Yehova oyo ezali komonana, ye asundolaki biso soko moke te. Elimo na ye ezalaki ntango nyonso elongo na biso. Akambaki biso na nzela nyonso. Nasili komona yango na bomoi na ngai.