Lisolo ya bomoi
Yehova apesaki “Nguya oyo eleki makasi”
YA HELEN MARKS
Mokolo yango ezalaki na moi makasi na eleko ya molunge na 1986. Bobele ngai moko nazalaki kozela na esika ya biro ya dwanɛ, na libándá moko ya mpɛpɔ na Mpoto, esika mpɛpɔ ekitaka mpenza mingi te. Ezalaki na Tirana, mboka-mokonzi ya Albanie, oyo emibengaki “ekólo ya liboso na mokili mobimba oyo endimaka Nzambe te.”
NTANGO mokonzi moko ya basoda oyo azalaki na mondoki abandaki kolukaluka na kati ya biloko na ngai, nazalaki motema likoló mpo na kobanga mpe nayebaki te nini ekokaki koyela ngai. Soki kaka nasalaka to nalobaka likambo moko boye oyo esengeli te, mbɛlɛ balingaki kobengana ngai na ekólo yango, mpe bato oyo bayaki koyamba ngai balingaki bátya bango na bɔlɔkɔ to na kaa ya misala ya makasi. Likambo ya esengo mpenza, nakabelaki mokonzi ya basoda yango babazoka na babisikiti mpo na kolendisa ye asala mosala na ye na boboto mingi. Kasi ndenge nini mwasi lokola ngai, oyo nazalaki na mbula koleka 60, nakómaki na esika ya ndenge wana? Mpo na nini ngai moto nazalaki na ngai malamu nandimaki kotya bomoi na ngai na likama mpo na kokolisa matomba ya Bokonzi na ekólo oyo ezali naino kosalela makasi mateya ya Marx mpe ya Lénine?
Akufa-lobi oyo azalaki na mituna mingi ya kotuna
Nabotamaki na 1920 na Ierápetra, na Crète; mbula mibale na nsima, Tata akufaki na maladi ya mpanzi. Mama azalaki mobola mpe atángaki kelasi te. Nazalaki mwana-nsuka na kati ya bana minei mpe nazalaki lokola moto asili makila mpe nzoto malamu te mpo nabɛlaki jaunisse. Bato ya kartye bayebisaki Mama ete atika ngai nakufa mpo asalela ntango mpe mwa mbongo na ye mpo na kobɔkɔla bana misato mosusu oyo bazalaki nzoto kolɔngɔnɔ. Nasepelaka ndenge mama alandaki toli na bango te.
Mpo molimo ya tata epema kuna na likoló, mama azalaki kokende na malita mbala mingi elongo na sango moko ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ mpo asalaka misa ya milimo mawa. Kasi misa yango ezalaki ofele te. Nabosanaka te mokolo ya Noele moko oyo malili ezalaki makasi, toutaki na Mama na malita, mpe ngai nazalaki kotambola na kobenda makolo pembeni na ye. Toutaki kopesa sango mbongo na biso nyonso. Mama alambelaki biso bana mwa ndunda, nde nsima akendeki na eteni mosusu ya ndako, na nzala mpe matama etondi na mpisoli mpo ayebaki te soki akosala nini. Nsima ya ntango moke, na mpiko nyonso nakendeki epai ya sango yango mpe natunaki ye ntina nini Tata akufaki mpe lisusu mpo na nini mobola lokola Mama asengeli kofutaka ye sango. Na nsɔni nyonso, ayanolaki na mongongo moke ete: “Nzambe moto akamataki ye. Ezalaka se bongo. Mawa na yo ekosila.”
Ezalaki mpenza mpasi ete nandima eyano na ye na kotalela Libondeli ya Nkolo oyo nayekolaki na kelasi. Nabosanaka te maloba na yango ya ebandeli, oyo ezalaka kitoko mpe ya ntina mpenza: “Tata na biso oyo azali na likoló, nkombo na yo ezala mosantu. Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalema na nse [lokola] na likoló!” (Matai 6:9, 10) Soki Nzambe alingaki mokano na ye esalema na mabele, mpo na nini tozalaki konyokwama mingi boye?
Etikalaki moke nazwa eyano na motuna yango, ntango na 1929 Emmanuel Lionoudakis, oyo azalaki mosakoli ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova ayaki kotala biso na ndako.a Ntango Mama atunaki ye soki alingi nini, Emmanuel alobaki eloko te kasi apesaki ye kalati oyo ezalaki na mwa lisolo ya Biblia. Apesaki ngai kalati yango mpo natánga. Lokola nazalaki kaka na mbula libwa, nakangaki mpenza te ntina ya makambo oyo natángaki. Lokola akanisaki ete mopaya yango oyo azalaki kosakola azalaki nde baba, Mama alobaki boye: “Mawa mpenza! Olobaka te, ngai mpe natángaka te.” Nsima na yango, na boboto, asalaki ye elembo ete akende.
Mwa bambula na nsima, nazwaki biyano na mituna na ngai. Yaya na biso ya mobali Emmanuel Paterakis azwaki mwa buku “Bakufi bazali wapi?,” oyo ebimisamaki na Batatoli ya Yehova,b kaka epai ya mosakoli wana ya ntango nyonso oyo ayaki kotala biso. Ntango natángaki yango, motema na ngai ekitaki mpenza mpo nayebaki sikoyo ete Nzambe azwaki Tata te. Nakangaki ntina ete liwa eutaka na ezaleli ya kozanga kokoka ya bato, mpe lisusu ete Tata na biso azali kozela lisekwa mpo na bomoi na paladiso awa na mabele.
“Buku oyo ebebisi bino!”
Mateya ya solo ya Biblia efungolaki biso miso. Tozwaki Biblia moko ya kala oyo ezalaká ya Tata mpe tobandaki koyekola yango, mbala mingi na buzi pembeni ya mɔtɔ ya nkoni. Mwa lisangá ya Batatoli ya mboka oyo nazalaki kofanda bazalaki kokɔtisa ngai te na makambo na bango, mpamba te nazalaki elenge mwasi se moko oyo asepelaki na Biblia. Yango wana, mpo na mwa ntango, nazalaki kokanisa mpenza ete ezalaki lingomba ya mibali kaka—nzokande ezali bongo te.
Bolingo oyo ndeko na ngai ya mobali azalaki na yango mpo na mosala ya kosakola elendisaki ngai mingi. Eumelaki te, bapolisi bakómaki kotyela libota na biso likebi; bakómaki koya kotala biso mbala na mbala na ngonga nyonso, butu na moi, mpo na koluka Emmanuel mpe mikanda. Nabosanaka te ntango sango moko ayaki mpo na kondimisa biso tózonga na Lingomba ya Katolike. Ntango Emmanuel alakisaki ye na Biblia ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, sango yango abɔtɔlaki Biblia mpe aningisaki yango na nkanda nyonso na elongi ya ndeko na ngai mpe agangaki ete, “Buku oyo ebebisi bino!”
Ntango Emmanuel aboyaki kokɔta mosala ya soda na 1940, bakangaki ye mpe batindaki ye na esika bitumba ezalaki ndongo na Albanie. Tozalaki lisusu na nsango na ye te mpe tokanisaki ete akufá. Kasi mbula mibale na nsima, atako tokanisaki yango te, tozwaki mokanda oyo atindaki wana azali na bolɔkɔ. Azalaki na bomoi mpe na nzoto makasi. Moko ya bavɛrsɛ oyo akomelaki biso na mokanda yango nabosanaka yango te banda ntango wana, vɛrsɛ yango elobi: “Miso ya [Yehova] ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na [motema moko, NW] liboso na ye.” (2 Ntango 16:9) Tozalaki mpenza na mposa bálendisa biso ndenge wana!
Kuna na bolɔkɔ epai azalaki, Emmanuel azwaki likoki ya kosɛnga bandeko báyaka kotala ngai. Eumelaki te, ebongiseli ezwamaki mpo ete makita esalemaka na ndenge ya kobombana na ferme moko oyo ezalaki soki otiki engumba. Toyebaki ata moke te ete bazalaki kolandela biso. Mokolo moko ya eyenga, bapolisi bazingaki biso na mindoki na bango. Bamatisaki biso na motuka moko ya polele mpe batambwisaki biso engumba mobimba. Nabosanaka te makɛlɛlɛ ya bato oyo bazalaki kosɛka biso mpe kowolola biso, kasi Yehova apesaki biso kimya ya motema na nzela ya elimo na ye.
Batindaki biso na engumba mosusu, epai babwakaki biso na bakasho ya molili mpe ya bosɔtɔ mpenza. Twalɛti ya kasho na ngai ezalaki kantini moko ezanga ezipeli; mbala moko na mokolo bazalaki kokende kobwaka salite oyo ezalaki na kati. Bakatelaki ngai etumbu ya sanza mwambe na bolɔkɔ mpo ete bamonaki lokola nazalaki “moteyi” ya etuluku yango. Kasi ndeko moko oyo akangamaki mpe na bolɔkɔ yango azwaki bibongiseli mpo ete avoka na ye asamba likambo na biso na tribinale mpe avoka yango alongaki, na yango batikaki biso.
Bomoi ya sika
Nsima ya kobima na bolɔkɔ, Emmanuel abandaki kokende kotala masangá ya Athènes na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Nakendeki kofanda kuna na 1947. Nsukansuka nakutanaki na etuluku ya monene ya Batatoli—mibali kaka te, kasi basi na bana mpe. Nsukansuka, na sanza ya Yuli 1947, nazwaki bongo likoki ya kozwa batisimo ya mai mpo na komonisa ete namipesaki na Nzambe. Nazalaki na mposa makasi ya kokóma misionɛrɛ mpe nabandaki kokende kelasi ya mpokwa mpo na koyekola Lingelesi. Na 1950 nakómaki mobongisi-nzela. Mama ayaki kofanda epai na ngai, ye mpe andimaki mateya ya solo ya Biblia. Azalaki kaka Motatoli ya Yehova tii na liwa na ye nsima ya mbula 34.
Kaka na mbula yango, nakutanaki na John Marks (Markopoulos), mobali moko oyo bazalaki kopesa ye limemya mingi mpe moto ya elimo mpenza oyo autaki na États-Unis. John abotamaki na sudi ya ekólo Albanie mpe akómaki Motatoli ya Yehova ntango akendeki kofanda na États-Unis. Na 1950 ayaki na Grèce mpo na koluka nzela ya kokende na Albanie. Ntango wana Albanie ezalaki mpenza kokɔtisa te bato oyo bauti bipai mosusu, ezalaki na nse ya boyangeli moko ya makambo makasi ya Bakoministe. Atako John akutanaki na libota na ye te banda 1936, bapesaki ye ndingisa te ya kokɔta na Albanie. Molende oyo azalaki na yango mpo na mosala ya Yehova mpe bolingo makasi azalaki na yango mpo na lisangá mobimba ya bandeko, esimbaki mpenza motema na ngai. Tobalanaki na mokolo ya 3 Aprili 1953. Nsima tokendeki kofanda na ndako na biso ya sika na etúká ya New Jersey, na États-Unis.
Mpo na kokokisa bamposa na biso na ntango tozali kosala mosala ya ntango nyonso, tozalaki kosala mwa mombongo ya kolambela babomi-mbisi bilei ya ntɔngɔ na libongo ya New Jersey. Tozalaki kosala yango kaka na basanza ya eleko ya molunge, kobanda kotana ya ntɔngɔ tii ngonga ya libwa. Lokola toyeisaki bomoi na biso pɛpɛlɛ mpe tozalaki kotya misala ya elimo na esika ya liboso, tozalaki kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola. Wana bambula ezali koleka, bazalaki kotinda biso na bingumba mingi epai mposa ya basakoli ezalaki makasi. Na bisika wana, na lisalisi ya Yehova, tosungaki bato oyo bazalaki kosepela na solo, tosalaki masangá ya sika mpe topesaki mabɔkɔ mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi.
Tosungi bandeko na biso oyo bazali na bosɛnga
Kasi eumelaki te, libaku ya malamu ekómelaki biso. Bandeko oyo batambwisaka lisangá bazalaki na mposa ya kopesana bansango elongo na bandeko baklisto mosusu oyo bazalaki kofanda na mikili ya Balkans, esika mosala na biso epekisamaki. Na boumeli ya bambula ebele, Batatoli ya Yehova na bamboka yango bazalaki ata na nsango moko te ya lisangá ya bandeko na mokili mobimba; bazalaki kozwa bilei ya elimo kaka moke to mpe te mpe bazalaki konyokwama makasi. Ntango nyonso bapolisi bazalaki kolandela mingi kati na bango mpe basusu ebele bazalaki na bolɔkɔ to na bakaa oyo basalisaka bato misala makasi. Bazalaki na mposa ya kozwa nokinoki mikanda oyo elimbolaka Biblia, kozwa toli mpe bilendiseli. Na ndakisa, bandeko ya Albanie batindelaki biso nsango moko oyo kaka biso nde tokokaki koyeba ndimbola na yango; nsango yango elobaki boye: “Bóbondela Nkolo mpo na biso. Bazali kobɔtɔla mikanda na ndako mokomoko. Bazali kopesa biso ndingisa te ya koyekola. Mibali misato bazali na bolɔkɔ.”
Yango wana na sanza ya Novɛmbɛ 1960, tobandaki mobembo ya sanza motoba mpo na kokende kotala bandeko oyo bazalaki kofanda na bikólo mosusu ya mikili yango ya Balkans. Emonanaki polele ete tokozala na mposa ya “nguya oyo eleki makasi,” bakisa mpe mpiko oyo euti na Nzambe mpe mayele oyo ebongi mpo na kokokisa mokumba na biso na molende. (2 Bakolinti 4:7, NW) Esika ya liboso tosengelaki kokende ezalaki Albanie. Tosombaki motuka na Paris mpe tobandaki mobembo na biso. Nsima ya kokóma na Rome, John kaka moto azwaki ndingisa (visa) ya kokende na Albanie. Esengelaki nakende na Athènes, na Grèce mpe nazela ye kuna.
John akɔtaki na Albanie na nsuka ya sanza ya Febwali 1961 mpe afandaki kuna tii na nsuka ya sanza ya Marsi. Akutanaki na bandeko 30 na engumba Tirana. Oyo nde esengo mpenza ya kozwa mikanda mpe bilendiseli oyo bazalaki na mposa na yango makasi! Elekaki mbula 24 banda bandeko bautaki na mboka mosusu mpo na kotala bango.
Bosembo mpe ezaleli ya koyika mpiko ya bandeko yango esimbaki mpenza motema ya John. Ayokaki ete mingi babungisaki misala na bango mpe bakangamaki na babolɔkɔ mpo baboyaki kopesa mabɔkɔ na makambo ya Leta oyo etambwisamaki na Bakoministe. Likambo oyo esimbaki motema ya John mingi mpenza ezalaki oyo: bandeko mibale oyo bazali na mbula koleka 80 bapesaki ye mbongo soki dolare 100 lokola likabo mpo na mosala ya kosakola. Eutaki na mwa mbongo ya epaso oyo Leta azalaki kopesa bango mpe oyo bazalaki kobomba mokemoke na boumeli ya bambula ebele.
Mokolo ya nsuka oyo John afandaki na Albanie ezalaki mokolo ya 30 Marsi 1961; ezalaki mpe mokolo ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu. John asalaki lisukulu ya Ekaniseli yango liboso ya bayangani 37. Ntango lisukulu esilaki, bandeko babimisaki John nokinoki na ekuke ya nsima mpe bamemaki ye na motuka tii na libongo ya Durrës; kuna amataki masuwa moko ya mombongo ya Turquie oyo ezalaki kokende na Pirée, na ekólo Grèce.
Nazalaki na esengo ntango namonaki ye lisusu mpamba te ata likama moko te ekwelaki ye, mpe azalaki nzoto kolɔngɔnɔ. Sikoyo tokokaki kosilisa eteni oyo etikalaki ya mobembo na biso wana ya likama. Na mobembo tosalaki, tokendeki kotala bikólo misato mosusu epai mosala na biso epekisamaki. Wana ezalaki likama, mpamba te tozalaki komema mikanda oyo elimbolaka Biblia, bamasini ya kobɛta mikanda mpe biloko mosusu. Tozwaki libaku malamu ya kokutana na bandeko mibali mpe bandeko basi ya sembo oyo babangaki te kobungisa misala na bango, bonsomi na bango, ata mpe bomoi na bango mpo na Yehova. Molende na bango mpe bolingo na bango ya solosolo ezalaki mpenza ndakisa malamu. Tokamwaki mpe na komona ndenge Yehova apesaki “nguya oyo eleki makasi.”
Nsima ya kosilisa mobembo na biso, tozongaki na États-Unis. Na bambula oyo elandaki, tokobaki kosalela banzela ndenge na ndenge mpo na koluka kotinda mikanda na Albanie mpe mpo na kozwa balapolo ya mosala ya bandeko na biso.
Na mibembo mbala na mbala, na makama
Bambula mingi elekaki, mpe nayaki kotikala ngai moko ntango John akufaki na 1981 wana azalaki na mbula 76. Evangelia, mwana-mwasi ya yaya na ngai ya mwasi, na mobali na ye George Orphanides bazwaki ngai na boboto mpenza mpo ete nabanda kofanda na bango. Kobanda ntango wana basalisaka ngai mingi mpo namiyoka malamu mpe basalisaka ngai na makambo mosusu. Ntango bazalaká kosala na Soudan, wana mosala na biso epekisamaki na ekólo yango, bango mpe bamonaki lolenge Yehova asungaka.c
Na nsima, esengelaki lisusu kosala milende mpo na kozwa bansango ya bandeko na biso na Albanie. Basɛngaki ngai soki nakosepela kokende na Albanie, lokola bandeko ya mobali na ngai bazalaki kofanda kuna. Nandimaki!
Na Mai 1986, nsima ya kosala milende na boumeli ya basanza mingi, nazwaki ndingisa na ambasadɛ ya Albanie, na Athènes. Bato oyo basalaka na ambasadɛ bakebisaki ngai makasi ete soki likambo ekweli ngai kuna, moto moko te oyo azali na ekólo mosusu akokoka kosunga ngai. Ntango nakendeki kosomba batike ya mpɛpɔ mpo na Albanie, moto oyo asalaka wana akamwaki mingi. Naboyaki kobanga epekisa ngai kosala mobembo; eumelaki te nazwaki mpɛpɔ kaka moko oyo elongwaka Athènes mpo na kokende na Tirana pɔsɔ nyonso. Kaka bato misato mosusu nde bamataki na mpɛpɔ yango; bato yango bazalaki mibange mpenza mpe bazalaki bato ya Albanie oyo bakendeki na Grèce mpo na kozwa lisalisi ya minganga.
Ntango kaka mpɛpɔ ekitaki, bamemaki ngai na ndako moko ya polele epai biro ya dwanɛ ezalaki. Atako bazalaki Batatoli ya Yehova te, baleki ya mobali na ngai, oyo ya mwasi mpe oyo ya mobali, bandimaki kosalisa ngai mpo nakutana na mwa ndambo ya bandeko ya mboka yango. Mobeko ya Leta esɛngaki ete basɛmɛki na ngai báyebisa mokonzi ya mboka boyei na ngai. Yango esalaki ete bapolisi bátyela ngai miso. Yango wana basɛmɛki na ngai bamonaki malamu nafanda epai na bango mpe bango moko bákendaka koluka bandeko mibale oyo bazalaki kofanda na Tirana mpo báya na bango epai na ngai.
Na ntango wana, eyebanaki ete na Albanie mobimba, bandeko oyo bamipesá bazalaki kaka libwa. Mpo balekisaki bambula mingi na epekiseli, konyokwama mpe bapolisi bazalaki kolandela bango malamu mpenza, bakómaki ekɛngɛ makasi. Bilongi na bango ebimaki mpenza misisa. Nsima wana bandeko yango mibale bakómaki kotyela ngai motema, motuna na bango ya liboso yango oyo: “Wapi bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli?” Na boumeli ya bambula ebele bazalaki kaka na babuku mibale ya kala, kasi Biblia ata moko te.
Balobelaki mingi mikano ya mabe oyo guvɛrnɛma ezwaki mpo na konyokola bango. Bayebisaki likambo ya ndeko mobali moko oyo aboyaki na motema moko kokɔta na makambo ya politiki na voti oyo elingaki kosalema. Lokola Leta azalaki kotambwisa makambo nyonso, ekateli na ye wana elingaki kosala ete bápesa lisusu te libota na ye biloko ya kolya oyo Leta akabolaka. Bana na ye oyo babalá mpe mabota na bango nyonso basengelaki mpe kokɔta bolɔkɔ, atako bango bazalaki kondima te mateya ya lingomba na ye. Balobaka ete, mpo na nsɔmɔ, bato ya libota ya ndeko yango babomaki ye na butu liboso voti esalema mpe babwakaki ebembe na ye na kati ya libulu moko ya mai, mpe na nsima balobaki ete ndeko yango abangaki makasi mpenza, yango wana amibomaki.
Bobola oyo baninga baklisto yango bazalaki na yango ezalaki kosala ngai motema mpasi. Kasi ntango nalingaki kopesa moto mokomoko mbongo dolare 20, baboyaki mpe balobaki ete: “Tolingi kaka bilei ya elimo.” Bandeko wana ya bolingo bafandaki bambula ebele na boyangeli moko ya makambo makasimakasi oyo elongaki kokɔtisa na bɔɔngɔ ya bato mingi ya ekólo yango likanisi ete Nzambe azalaka te. Nzokande bandeko yango bazalaki na kondima mpe na ekateli ya makasi, kaka lokola Batatoli ya bisika mosusu. Na ntango oyo nalongwaki na Albanie nsima ya pɔsɔ mibale, namindimisaki mpenza ete Yehova azalaka na likoki ya kopesa “nguya oyo eleki makasi” ata na ntango ya mpasi makasi.
Nazwaki lisusu libaku malamu ya kokende na Albanie na 1989 mpe lisusu na 1991. Lokola na ekólo yango bato bakómaki mokemoke na bonsomi ya koloba mpe ya kosambela, motángo ya basaleli ya Yehova ebakisamaki mbangumbangu. Mwa etuluku moke ya baklisto bamipesá oyo ezalaki na 1986 ekoli mpo na kokóma na motángo ya basakoli koleka 2 200. Sɛmɛki na ngai ya mwasi Melpo mpe azalaki moko na bango. Ntembe ezali te ete Yehova apambolaki mpenza mwa etuluku wana ya sembo!
Na nguya ya Yehova, nalekisi bomoi ya esengo mpenza
Soki nabwaki miso na nsima, namindimisi ete mosala na biso—ya ngai mpe ya John—ezalaki mosala ya mpunda te. Tosalelaki bokasi na biso ya bolenge na lolenge moko oyo epesi matomba mpenza. Mosala ya ntango nyonso oyo toponaki ezalaki na ntina mingi koleka mosala mosusu nyonso oyo tokokaki kosala. Nasepelaka mpo na ebele ya bandeko ya motema oyo ngai na ye tosalisaki bango na koyeba solo ya Biblia. Sikoyo lokola nakómi mobange, nakoki kolendisa bilenge na motema mobimba ete ‘bákanisa [Mozalisi na bango Monene, NW] na mikolo na bolenge na bango.’—Mosakoli 12:1.
Atako nazali na mbula 81, nazali naino na likoki ya kosala lokola mosakoli ya nsango malamu ya ntango nyonso. Nalamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpe napesaka litatoli na bisika bazelaka bisi, bisika ya kotɛlɛmisa mituka, na babalabala, na bamagazini mpe na baparke. Mikakatano oyo bobange ememaka esalaka ete bomoi na ngai ezala mwa mpasi, kasi libota monene ya bandeko na ngai ya elimo oyo bazali na bolingo mpenza, elongo na libota ya mwana-mwasi ya yaya na ngai ya mwasi, bazali mpenza kosunga ngai. Koleka nyonso wana, nayebi mpenza sikoyo ete “nguya oyo eleki makasi ezala ya Nzambe kasi te oyo euti na biso moko.”—2 Bakolinti 4:7, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na lisolo ya bomoi ya Emmanuel Lionoudakis, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1999, nkasa 25-29.
b Mpo na lisolo ya bomoi ya Emmanuel Paterakis, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1996, nkasa 22-27.
c Talá Annuaire des Témoins de Jéhovah—1992, nkasa 91-92, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 25]
Na likoló: John (na nsuka ya lobɔkɔ ya mwasi), ngai (na katikati), na ndeko na ngai ya mobali Emmanuel na lobɔkɔ na ngai ya mwasi, mpe Mama na biso na lobɔkɔ na ye ya mwasi; tozali esika moko na bandeko ya Betele na Athènes, na 1950
[Picturen on page 25]
Na lobɔkɔ ya mwasi: Ngai na John na esika ya mombongo na biso na libongo ya New Jersey, na 1956
[Elilingi na lokasa 26]
Liyangani ya etúká na Tirana, Albanie, na 1995
[Elilingi na lokasa 26]
Betele ya Tirana, na Albanie. Esilaki na 1996
[Elilingi na lokasa 26]
Na likoló: lisolo euti na “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” ya 1940, oyo ebongolamaki na nkuku na lokota ya Albanien
[Elilingi na lokasa 26]
Ngai na Evangelia Orphanides, mwana ya yaya na ngai ya mwasi (na lobɔkɔ ya mobali), na mobali na ye George