Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/4 nk. 22-26
  • “Bósalaka te mpo na bilei bikobeba”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bósalaka te mpo na bilei bikobeba”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa ya bosembo oyo mama apesaki
  • Namipesi mpe nazwi batisimo
  • Nakei kosala na Biro monene
  • Libota oyo lisungaki
  • Nabali mpe nakomi na libota
  • Nalendisami na bilei ya elimo
  • Mosala ya pionnier ezalaki mosala ya bomoi na ngai mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Bomoi ya malamu mpenza na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Koluka Liboso Bokonzi​—⁠bomoi Ya Solosolo Mpe Ya Esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/4 nk. 22-26

“Bósalaka te mpo na bilei bikobeba”

LISOLÓ YA DAVID LUNSTRUM

Ngai mpe ndeko na ngai Elwood tozalaki na bamɛtɛlɛ 9 na likoló, mpo na kokoma na lángi makomi ya sika likoló na ndako monene ya binyateli-mikanda ya Watchtower. Koleka mibu 40 na nsima, makomi yango mazali ntango nyonso wana: “TÁNGÁ LILOBA YA NZAMBE BIBLIA MOSANTU MOKOLO NA MOKOLO.” Pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, bankóto ya bato bamonaka makomi yango wana balekaka likoló na gbagba monene ya Brooklyn.

MAKAMBO ya ebandeli oyo nakoki komikundola matali bongo mokolo ya kosukola bilamba ya libota. Na 5:00 ya ntɔ́ngɔ́ mama azalaki kolamuka mpo na kosukola bilamba ya libota na biso oyo lizalaki na basangani mingi, mpe Tata azalaki komibongisa mpo na kokenda na mosala. Bazalaki mbala mosusu kokamatana makasi, wana tata azalaki koloba ete moto autaki na biloko oyo bibongwanaki na boumeli ya bamilió ya bambula, nzokande mama azalaki kotánga maloba ya Biblia mpo na kondimisa ete bato bazali bozalisi bouti na Nzambe.

Ata nazalaki naino bobele na mibu nsambo, nasosolaki ete mama azalaki na elónga. Atako nalingaki tata mingi, nakokaki kososola ete bindimeli na ye bizalaki kopesa elikya moko te mpo na mikolo mizali koya. Mama alingaki solo kozala na esengo ya koyeba ete nsima ya bambula mingi, bana na ye mibale ya mibali basengelaki kokoma makomi oyo mazali kolendisa bato na kotánga Biblia, búku oyo ye alingaki mingi!

Kasi nakei mpenza mbangu mingi. Lolenge nini nazwaki libaku ya mosala motindo yango? Ebongi nazonga kino mobu 1906, mbula misato liboso ete nabotama.

Ndakisa ya bosembo oyo mama apesaki

Na eleko wana mama mpe tata bautaki kobalana sika mpe bazalaki kofanda kati na hema moko na etúká ya Arizona. Moyekoli ya Biblia moko, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kobéngama na yango, ayaki kuna mpe amemelaki mama molɔngɔ́ ya babúku oyo Charles Taze Russell akomaki, na motó ya likambo Études des Écritures. Butu mobimba atángaki yango mpe nokinoki asosolaki ete wana ezalaki solo oyo azalaki koluka. Azelaki mpenza te ete tata azonga wana ekendaki ye koluka mosala.

Tata mpe azalaki kosepela te na mateya ya mangomba, yango wana, mpo na mwa ntango moke andimaki solo wana ya Biblia. Nzokande, na nsima, alandaki lingomba mosusu mpe kutu epesaki mama mokakatano. Atako bongo atikaki soko moke te kokokisa bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya bana na ye.

Nakobosana soko moke te eleko wana mama azalaki, mpokwa nyonso, kokita na bibuteli, nsima ya mosala makasi mokolo mobimba, mpo na kotángela biso eteni moko ya Biblia to mpo na kokabola elongo na biso bozwi ya elimo. Tata mpe azalaki mosáli monene, mpe wana nazalaki kokóla, alakisaki ngai mosala ya kopakola lángi. Ee, tata alakisaki ngai mosala, kasi mama alakisaki ngai mpo na nini tosengeli kosala, lokola Yesu apesaki lilako na yango ete, tosengeli kosala mpo na ‘bilei oyo bikoki kobeba te.’​—Yoane 6:27.

Na nsima libota na biso likendaki kofanda na engumba moke Ellensburg na etúká ya Washington, penepene na bakilomɛtɛlɛ 180 na ɛ́sti ya Seattle. Ntango biso bana tobandaki kokenda na makita ya Bayekoli ya Biblia elongo na mama, tozalaki koyangana kati na bandako ya bandeko. Mibali nyonso batikaki etuluku na biso ya boyekoli ntango ntina ya kosangana na mosala ya kosakola ndako na ndako elobelamaki makasi. Kasi mama akakatanaki soko moke te. Yango esalaki bopusi ya mozindo likoló na ngai ete tosengeli ntango nyonso kotya motema na litambwisi ya lisangá ya Yehova.

Na nsima tata mpe mama bakómaki na bana libwa. Nabotamaki na 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1909, mwana na bango ya misato. Biso bana motoba tolandaki ndakisa malamu ya mama mpe tokómaki Batatoli ya Yehova ya molende mpenza.

Namipesi mpe nazwi batisimo

Ntango nakómaki na bambula pene na ntuku mibale, namipesaki epai na Yehova, mpe namonisaki yango na batisimo ya mai na 1927. Batisimo yango epesamaki na Seattle kati na ndako oyo kala ezalaki ndakonzambe ya ba Baptistes. Nazali na esengo ete basilaki kolongola elembo oyo etyamaka likoló ya bandakonzambe. Bamemaki biso na eteni ya nsé esika pisíni ezalaki, epai kuna bapesaki biso bazambala molai ya lángi moindo ete tólata yango. Emonanaki lokola ete tozalaki kokenda na molulu ya bokundi.

Nakendaki lisusu na Seattle nsima ya mwa basanza, mpe na ntango yango namekaki mpo na mbala ya liboso mosala ya kotatola ndako na ndako. Ye oyo azalaki kokamba alobaki na ngai ete, “Yo kende ngámbo oyo ya bandako, mpe ngai nakokenda na ngámbo oyo kuna.” Atako nazalaki na mwa bobángi, natikelaki mwasi moko ya boboto mingi maboke mibale ya mwa babúku. Nakóbaki mosala ya ndako na ndako ntango nazongaki na Ellensburg, mpe sikawa, soko mibu 70 na nsima, mosala yango mozali kino lelo kopesa ngai esengo monene.

Nakei kosala na Biro monene

Mwa moke na nsima, moto moko oyo azalaki kosala na Betele ya Brooklyn, biro monene ya la Société Watch Tower, alendisaki ngai ete namipesa na bolingo malamu mpo na kosala kuna. Nokinoki nsima ya bosololi na biso, liyebisi moko ebimaki na zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezalaki komonisa mposa ya kopesa lisungi na Betele. Yango wana nasɛngaki mpo na kokende. Nakobosana soko moke te esengo na ngai wana nazwaki liyebisi ete nakenda koyanola na libyangi mpo na mosala na Betele na Brooklyn, na New York, na 10 Mársi 1930. Bongo nabandaki mosala ya ntango nyonso mpo na kosala mpo na ‘bilei oyo bikobeba te.’

Okoki mbala mosusu kokanisa ete lokola nayebaki mosala ya kopakola lángi, nakokaki kopesamela mokumba ya kosalela lángi. Nzokande, mosala na ngai ya liboso mozalaki na masini ya kokangisa mikanda na enyateli. Atako yango ezalaki mosala ya kozongelazongela bobele likambo ya motindo moko, nasepelaki kosala wana na boumeli ya mbula motoba. Enyateli monene oyo topesaki yango nkombo masúwa ya kala ya etumba ezalaki kobimisa mwa babúku oyo ezalaki kokita na nsé epai tozalaki na lisalisi ya masini moko. Tokómisaki yango mwa lisano ete tósala momekano ya kokangisa mwa babúku nokinoki nsima ya kozwa yango na enyateli.

Na nsima nasalaki na bisika bikeseni, ezala mpe epai tosalaki bafonó. Tosalelaki bamasini yango mpo na koyokisa nsango ya Biblia liboso na ndako ya bato. Fonó oyo ekokaki kotɛlɛma alima eyemamaki mpe basáli ya bolingo malamu ya etuluku na biso basalaki yango. Fonó motindo yango ezalaki te bobele koyokisa nsango oyo etyamaki na kati kasi ezalaki lisusu na esika ya kotya mikanda mpe mbala mosusu ya kotya mwa limpa. Nazwaki libaku ya kolakisa lolenge ya kosalela esaleli wana ya sika na liyangani ya etúká ya Detroit, na etúká Michigan, na 1940.

Nzokande, tosukaki te bobele na kosala bamasini oyo ezali kosɛnga bwanya mingi. Tozalaki mpe kosala mbongwana minene ya elimo. Na ndakisa, Batatoli ya Yehova bazalaki na momeseno ya kolata pɛ́ngɛlɛ elongo na ekulusu mpe motole. Kasi na nsima tososolaki ete Yesu abomamaki likoló na nzeté moko oyo epikami, kasi te likoló ya ekulusu. Mpo na ntina wana totikaki kosalela pɛ́ngɛlɛ yango. (Misala 5:30) Nazwaki libaku ya kolongola bikangiseli ya bapɛ́ngɛlɛ yango. Na nsima wolo na yango enangwisamaki mpe etekisamaki.

Atako manáka na biso ya pɔ́sɔ ezalaki na mikolo mitano na ndambo ya mosala mingi, tozalaki kosangana na mosala ya kosakola na nsuka ya pɔ́sɔ. Mokolo moko, tokangamaki bato 16 mpe tobwakamaki na bolɔ́kɔ ya Brooklyn. Mpo na nini? Na ntango wana tozalaki kotalela mangomba nyonso lokola mangomba ya lokuta. Na yango, tomemaki mabaya oyo ezalaki na makomi “Lingomba lizali motambo mpe bokosi” mpe na ngámbo mosusu makomi “Salelá Nzambe mpe Klisto Mokonzi.” Totyamaki na bolɔ́kɔ mpo ete tomemaki mabaya yango, kasi Hayden Covington, avocat ya la Société Watch Tower, afutaki lomande mpo bákoka kotika biso. Na eleko wana makambo mingi matali bonsomi ya losambo mazalaki kolobelama liboso ya Esambiselo Monene ya États-Unis, mpe nazalaki na esengo monene ya kozala na Betele mpe koyoka na matoi na ngai moko bansango oyo ezalaki koyebisa bolóngi ya makambo yango.

Na nsima bapesaki ngai misala oyo misɛngaki ete nasalela eksperiansi na ngai ya kopakola lángi. Tozalaki na ndako ya kopanza nsango na radio WBBR na Staten Island, moko ya biteni mitano ya engumba New York. Ndako molai ya bipanzeli-nsango na radio etyamaki likoló koleka bamɛtɛlɛ 60, mpe ezalaki na milɔngɔ́ misato ya nsinga. Nafandaki na libaya moko ya bolai ya satimɛtɛlɛ 90 mpe bonene ya satimɛtɛlɛ 20 wana moninga na ngai ya mosala azalaki kotombola ngai likoló. Wana nafandaki mosika likoló, bobele na efandelo wana ya moke, nazalaki kotya lángi likoló na bansinga mpe bandako milai. Basusu bazalaki kotuna ngai soki tozalaki te kosala ebele ya mabondeli wana ezalaki biso kosala mosala yango!

Mosala moko ya eleko ya molungé oyo nakobosana soko moke te ezali bongo oyo ya kosukola maninisa mpe kotya lángi na bibende ya maninisa ya ndako ya enyateli. Tobéngaki yango bopemi na biso ya eleko ya molungé. Totongaki ebuteli na biso ya mabaya mpe na libangá moko monene mpe bansinga, tozalaki kobuta mpe kokita ndako molai ya etage mwambe.

Libota oyo lisungaki

Na 1932 tata akufaki, mpe namitunaki soki nasengelaki kozonga na ndako mpo na kosalisa mama. Mokolo moko liboso ya bolei ya midi, natyaki nkomá moko na mesa oyo ndeko Rutherford, prezidá ya la Société azalaki kofanda. Kati na yango nasɛngaki ete nasolola na ye. Ntango ayokaki mokakatano na ngai mpe ayebaki ete nazalaki na bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazalaki naino kofanda na ndako, atunaki ngai, “Olingi kotikala na Betele mpe kosala mosala ya Nkolo?”

Nayanolaki ete, “Ee, nalingi.”

Na yango apesaki ngai likanisi ete nakomela mama mpo na koyeba soki akondima ekateli na ngai ya kotikala. Nasalaki bongo, mpe ayanolaki na nkomá mpo na komonisa ete andimaki mpenza ekateli na ngai. Nazalaki solo na botɔ́ndi mpo na boboto mpe toli oyo ndeko Rutherford apesaki ngai.

Na boumeli ya mibu mingi oyo nalekisaki na Betele, nazalaki kokomela libota na ngai mbala mingi mpo na koyikisa bango mpiko ete básalela Yehova, motindo moko lokola mama alendisaki ngai. Mama akufaki na Yulí 1937. Oyo nde ndakisa malamu ye azalaki mpo na libota na biso! Bobele bayaya na ngai mibale, ya mobali, Paul mpe ya mwasi, Esther, mpe lɛki na ngai ya mwasi Loïs nde bakómaki Batatoli te. Nzokande, Paul azalaki kotɛmɛla mosala na biso te mpe apesaki kutu eteni ya mabelé oyo tosalelaki mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi ya liboso.

Na 1936 ndeko na ngai ya mwasi Eva akómaki mobongisi-nzela, mosakoli ya ntango nyonso. Bobele na mobu yango abalaki Ralph Thomas, mpe na 1939 batindamaki na mosala ya zongazonga mpo na kosunga masanga ya Batatoli ya Yehova. Na nsima bakendaki na Mexico, epai balekisaki mibu 25 na mosala ya Bokonzi.

Na 1939 bandeko na ngai mibale ya basi Alice mpe Frances bango mpe basɛngaki mosala ya mobongisi-nzela. Na Liyangani ya St. Louis na 1941 nazalaki mpenza na esengo ya komona Alice nsima ya mesa kosala elakiseli ya lolenge ya kosalela fonó oyo nasungaki kati na bosali yango! Atako Alice asengelaki mbala na mbala kokata mosala na ye ya mobongisi-nzela mpo na mikumba ya libota, alekisaki nyonso mibu 40 kati na mosala ya ntango nyonso. Frances akendaki kolanda mateya na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower na 1944 mpe asalaki mosala ya misionere mpo na mwa ntango na Porto Rico.

Joel mpe Elwood, bana ya nsuka na libota, bakómaki babongisi-nzela na Montana na ebandeli ya bambula 1940. Joel atikalaki sembo mpe azali sikawa kosala lokola mosaleli na misala. Elwood ayaki kokuta ngai na Betele na 1944. Akokisaki naino mbula mitano te ntango nalongwaki na ndako. Lokola nalobaki yango na ebandeli, tosalaki elongo mosala ya kokoma elembo oyo ezali likoló na ndako monene ya enyateli, “Tángá Liloba ya Nzambe Biblia mosantu mokolo na mokolo.” Namitunaka ntango nyonso soki bato boni oyo basilá komona makomi yango na boumeli ya mibu mingi basilaki kolendisama na kotánga Biblia.

Elwood asalaki na Betele kino mobu 1956 ntango abalaki Emma Flyte. Na boumeli ya mibu mingi Elwood mpe Emma basalaki elongo kati na mosala ya ntango nyonso, basalaki mwa moke na Kenya, na Afrika, mpe lisusu na Espagne. Elwood azwaki bokɔnɔ ya kanser mpe akufaki na Espagne na 1978. Emma atikalaki na Espagne kati na mosala ya mobongisi-nzela kino lelo oyo.

Nabali mpe nakomi na libota

Na Sɛtɛ́mbɛ 1953, natikaki Betele mpo na kobala Alice Rivera, oyo azalaki mobongisi-nzela moko na lisangá ya Brooklyn Centre epai nazalaki. Namonisaki na Alice ete nazalaki na elikya ya kokende na likoló, atako bongo asepelaki bobele kobalana na ngai.​—Bafilipi 3:14.

Nsima ya mibu 23 ya bomoi na Betele, esengelaki nasala mbongwana monene mpo na kobandela mosala ya mosuni lokola mosáli na lángi mpo na kokokisa bamposa ya Alice mpe ya ngai moko kati na mosala ya mobongisi-nzela. Alice azalaki ntango nyonso kopesa lisungi, ata ntango asengelaki kotika mosala na ye mpo na kolɔngɔ́nɔ́ mabe ya nzoto. Na 1954 tozalaki kozela kobotama ya mwana na biso ya liboso. Kobotama elekaki malamu te, atako bongo mwana na biso ya mobali John akómaki malamu. Alice atangaki makila mingi na lipasó oyo basalaki mpo na kobimisa mwana, na boye ete minganga bakanisaki ete akobika te. Ekómaki ete bazalaki kutu koyoka kobɛtama ya motema na ye te. Nzokande akómaki na ntɔ́ngɔ́ mpe na nsima akómaki mpenza malamu.

Nsima ya mwa bambula, ntango tata ya Alice akufaki, tokendeki kofanda na Long Island elongo na mama na ye. Lokola tozalaki na motuka te, nasengelaki kotambola na makolo to kokamata bísí mpe engbunduka oyo elekaka na nsé ya mabelé. Na lolenge yango nakokaki kokóba na mosala ya mobongisi-nzela mpe kosunga libota na ngai. Esengo ya mosala ya ntango nyonso elekaki mosika komipimela nyonso. Kosalisa bato​—lokola Joe Natale, oyo aboyaki kokóma mosáni monene ya baseball mpo na kozala Motatoli​—ezali bobele moko na mapamboli oyo nazwaki.

Na 1967, wana ezalela ya makambo ebebaki mingi na New York, nazwaki ekateli ya kokamata Alice mpe John ete tókende kofanda na mboka na ngai ya kobotama, na Ellensburg. Sikawa nazali na mbano monene ya komona bankɔ́kɔ mpe bankɔ́kɔ ya bankɔ́kɔ ya mama kati na mosala ya ntango nyonso. Basusu bazali kutu kosala na Betele. John elongo na mwasi na ye mpe bana na ye bazali kosalela Yehova na bosembo nyonso.

Na mawa nyonso, mwasi molingami na ngai Alice akufaki na 1989. Komipesa mingi kati na mosala ya ntango nyonso esili kosunga ngai na koyika mpiko nsima ya liwa na ye. Ndeko na ngai ya mwasi Alice mpe ngai tozali sikawa kosala mosala ya mobongisi-nzela elongo. Oyo nde likambo ya esengo kozala lisusu ndako moko mpe komipesa mingi kati na mosala oyo eleki ntina!

Na eleko ya molungé ya mobu 1994, nakendaki kotala Betele mpo na mbala ya liboso uta mibu 25. Oyo nde esengo ya komona bato mingi oyo nasalaki elongo na bango esili koleka mibu 40! Ntango nakɔtaki na Betele na 1930, bobele bato 250 bazalaki na libota ya Betele, kasi lelo libota ya Betele ya Brooklyn ezali na bato koleka 3500!

Nalendisami na bilei ya elimo

Mbala mingi nalamukaka na ntɔ́ngɔ́ mpenza mpo na kotambola pembeni ya ebale Yakima oyo ezali penepene na ndako na biso. Wana nakoki komona ngomba Rainier oyo nsɔngɛ́ na yango etombwani kino bamɛtɛlɛ 4300. Nyama mpe bitwɛlɛ itondi kuna. Mbala mosusu namonaka nyama ebéngami cerf, mpe mokolo mosusu namonaki nyama ebéngami élan.

Ntango yango ya kimya, wana nazali ngai moko epesaka ngai libaku ya komanyola likoló na bibongiseli kitoko ya Yehova. Nabondelaka mpo na kozwa nguya ya kokóba kosalela Yehova Nzambe na biso na bosembo nyonso. Nalingaka mpe koyemba wana nazali kotambola, mingimingi Loyembo oyo elobi “Tósepelisa motema ya Yehova,” oyo maloba na yango malobi ete: “Nzambe, tomipesi na yo, tósala mokano na yo. Ɛ Yah, kosepelisa yo yango esengo na biso.”

Nazali na esengo ete naponaki kosala mosala oyo ekosepelisaka motema ya Yehova. Nazali kosɛnga kati na libondeli ete nazala na likoki ya kokóba kosala mosala yango kino ntango nakozwa mbano ya bomoi oyo esili kolakama na likoló. Mposa na ngai ezali ete lisoló oyo ekoka kolendisa basusu na bomoi na bango ete ‘basalaka te mpo na bilei bikobeba.’​—Yoane 6:27.

[Elilingi na lokasa 23]

Elwood azali kokoma makomi “TÁNGÁ LILOBA YA NZAMBE BIBLIA MOSANTU MOKOLO NA MOKOLO”

[Elilingi na lokasa 24]

Elongo na Grant Suiter mpe John Kurzen, tozali kolakisa lolenge ya kosalela fonó ya sika na liyangani na 1940

[Elilingi na lokasa 25]

Na 1944 biso banso tozalaki na mosala ya ntango nyonso. Longwá na lobɔkɔ ya mwasi: David, Alice, Joel, Eva, Elwood, mpe Frances

[Elilingi na lokasa 25]

Bandeko na ngai oyo bazali naino na bomoi longwá na lobɔkɔ na mwasi: Alice, Eva, Joel, David, mpe Frances

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto