Mituna ya batángi
Ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete azalaki “kobosana makambo mazali nsima mpe kopusana mpo na yango izali liboso”? (Bafilipi 3:13) Moto akoki nde na mokano na ye moko kobosana likambo?
Te, mbala mingi tokoki te na mokano na biso moko kolongola likambo moko na makanisi na biso. Elembeteli ezali ete, tobosanaka makambo mingi oyo tolukaka komikundola yango mpe tomikundolaka makambo mingi oyo tolingaka kobosana nokinoki. Bongo, Paulo alingaki koloba nini ntango akomaki maloba oyo mazwami na Bafilipi 3:13? Makambo oyo mazali zingazinga na yango makosalisa biso na kososola.
Na Bafilipi mokapo 3, Paulo alobeli bantina oyo ye abongaki “kotyela nzoto motema.” Alobeli bomoi na ye ya kala lokola Moyuda oyo azalaki na ekweli te mpe molende na ye mpo na kotosa Mibeko—makambo oyo mbɛlɛ makokaki kopesa ye matomba mingi kati na libota ya Yisalaele. (Bafilipi 3:4-6; Misala 22:3-5) Nzokande, apesaki mokɔngɔ na matomba motindo yango, kotaleláká yango lokola eloko oyo ebungi. Mpo na nini? Mpamba te asilaki komona eloko moko ya motuya mingi koleka—“motuya moleki bonene ya boyebi ya Klisto Yesu.”—Bafilipi 3:7, 8, NW.
Mokano ya liboso oyo Paulo azalaki koluka kozwa, ezalaki te esika monene kati na mokili oyo, kasi “kokóma kino lisekwa [ya liboso, NW] kati na bakufi.” (Bafilipi 3:11, 12) Na yango, akomaki ete: “Ezali ngai kobosana makambo mazali nsima mpe kopusáká mpo na yango izali liboso, nazali kobila kino nsuka mpo na libonza oyo ezali ebyangeli na Nzambe kuna na Likoló, kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 3:13, 14) Wana Paulo alobaki ete azalaki “kobosana makambo mazali nsima,” alingaki te koloba ete asilaki kolongola “makambo oyo mazali nsima” na makanisi na ye. Ezalaki polele ete azalaki naino komikundola yango, mpamba te atángaki makambo yango. Lisusu, na Greke, asalelaki lolenge moko ya likelelo oyo ezali komonisa ete likambo yango lizali kolandana, kasi lisili naino te. Alobi ete “ezali ngai kobosana,” kasi te “esili ngai kobosana.”
Liloba ya Greke oyo libongolami “kobosana” (e·pi·lan·thaʹno·mai) ezali na bandimbola mingi ekeseni, oyo moko na yango ezali “kotya likebi te na,” to “kotyola.” Engebene búku Exegetical Dictionary of the New Testament (ekomami na Horst Balz mpe Gerhard Schneider), ezali “kobosana” lolenge oyo wana nde elimbolami kati na Bafilipi 3:13. Paulo azalaki te kokanisa ntango nyonso biloko oyo asilaki kotika. Ayekolaki kotalela yango lokola likambo oyo libongi kotyamela likebi moke. Yango ezalaki bobele “nyei” liboso na elikya ya bomoi na likoló.—Bafilipi 3:8.
Lolenge nini maloba ya Paulo makoki kosalelama lelo oyo? Lokola Paulo, ekoki kozala ete moklisto moko amipimelaki mingi mpo na kosalela Nzambe. Mbala mosusu atikaki mosala ya mosuni oyo mozalaki kopesa ye matomba mingi mpo na kosala mosala ya ntango nyonso. To ekoki kozala ete libota na ye oyo lizali na bozwi mingi liboyi kosunga ye na mosolo mpo ete balingi solo te. Komipimela motindo yango ebongi kopesamela longonya, kasi yango ezali te makambo oyo tosengeli ntango nyonso kokanisa. Moklisto azali ‘kobosana,’ atiki komitungisa na ntina na “makambo mazali nsima” mpo na nkembo oyo ezali kozela ye na mikolo mizali koya.—Luka 9:62.
Lilako oyo lizali kati na maloba ya Paulo likoki mbala mosusu kosalelama na lolenge mosusu. Ezali boni mpo na moklisto oyo amitikaki kati na etamboli ya mabe liboso ete ayeba Nzambe? (Bakolose 3:5-7) To kanisá ete nsima ya kokóma moklisto, asali lisumu mpe azwi disipilini na lisangá. (2 Bakolinti 7:8-13; Yakobo 5:15-20) Soki abongoli mpenza motema mpe etamboli na ye, asili “kosukwama.” (1 Bakolinti 6:9-11) Likambo oyo lisalemaki lisili koleka. Ekoki kozala ete akobosana mpenza te oyo ye asalaki—ya solo, akozwa mayele na likambo likómelaki ye mpo ete azongela lisumu yango lisusu te. Nzokande, ‘abosani’ na boye ete azali te komipamela ntango nyonso. (Kokanisá na Yisaya 65:17.) Lokola asilaki kolimbisama na moboko ya mbeka ya Yesu, azali kosala milende mpo na kotika makambo ya kala na nsima na ye.
Na Bafilipi 3:13, 14, Paulo azali komilobela lokola mopoti kati na momekano ya mbangu, “kopusamáká epai na yango izali liboso” mpo na kokokisa mokano. Mopoti mbangu atalaka liboso, kasi na nsima te. Bobele bongo, moklisto atalaka mapamboli oyo mazali liboso, kasi te biloko oyo bitikali nsima na ye. Paulo alobi lisusu ete: “Soko bozali kokanisa na nzela mosusu, Nzambe akomonisela bino bobele bongo.” (Bafilipi 3:15) Na yango, bondelá Nzambe ete asalisa yo na kolóna likanisi motindo oyo. Tondisá elimo na yo na makanisi ya Nzambe oyo mazwami kati na Biblia. (Bafilipi 4:6-9) Manyolá likoló na bolingo ya Yehova mpo na yo mpe likoló na mapamboli oyo ozwaki mpo na yango. (1 Yoane 4:9, 10, 17-19) Na nsima, na nzela ya elimo santu Yehova akosunga yo ete omitungisa te na ntina na makambo oyo matikali nsima. Nzokande, na motindo na Paulo, okotya likebi na nkembo oyo ezali liboso.—Bafilipi 3:17.