Tópesa na Kaisala biloko na Kaisala
“Bófutela bango nyonso nyongo na bango.”—BALOMA 13:7.
1, 2. (a) Engebene Yesu, lolenge nini baklisto basengeli komonisa bokatikati liboso na mikumba na bango epai na Nzambe mpe epai na Kaisala? (b) Lobanzo ya liboso ya Batatoli ya Yehova ezali nini?
ENGEBENE Yesu, ezali na biloko oyo tosengeli kopesa na Nzambe mpe na biloko oyo tosengeli kopesa na Kaisala, to Letá. Yesu alobaki ete: “Bópesa na Kaisala biloko na Kaisala mpe na Nzambe biloko na Nzambe.” Na mwa maloba moke oyo, akangaki bayini na ye monɔkɔ mpe ayebisaki polele bokatikati oyo tosengeli kozala na yango kati na ezaleli na biso epai na Nzambe mpe kati na boyokani na biso na Letá. Mpo na yango bayoki na ye “bakamwi mingi na ye”!—Malako 12:17.
2 Ya solo, mokumba ya liboso ya basaleli ya Yehova ezali ya kopesa na Nzambe biloko na Nzambe. (Nzembo 116:12-14) Nzokande, wana bazali kosala bongo, bazali kobosana soko moke te ete Yesu alobaki ete ezali na biloko oyo basengeli kopesa na Kaisala. Lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia ezali kosɛnga ete bátalela na mozindo mpenza na meko nini basengeli kopesa na Kaisala oyo ye azali kosɛnga. (Baloma 13:7) Na mikolo na biso, basáli-mibeko mingi basili kondima ete bokonzi ya Letá ezali na ndelo mpe bipai binso bato mpe biyangeli batambwisami na mibeko ya bozalisi.
3, 4. Maloba nini ya kobenda likebi malobamaki na ntina na mibeko ya bozalisi, mibeko mimonisami, mpe mibeko ya bato?
3 Ntoma Paulo alobelaki mibeko wana ya bozalisi ntango akomaki na ntina na bato ya mokili ete: “Makambo na Nzambe makoki koyebana mazali kati na bango polele mpo ete Nzambe ye moko amonisi bango yango. Mpo ete longwa na ntango wana ezalisaki ye mokili, makambo na ye mazangi komonana, yango nguya na ye na seko mpe bonzambe na ye, asili koyebisa yango polele epai na makanisi na bato kati na misala na ye. Bongo bazali na mokalo te.” Soki bakondima yango, mibeko ya bozalisi mikozala na bopusi mingi likoló na lisosoli ya bato wana bazangi kondima. Na yango, Paulo alobi lisusu ete: “Bapakano baoyo bazangi mibeko, awa ezali bango kosalaka makambo na Mibeko (ata bazangi mibeko mpenza) bazali na mibeko kati na bango moko. Bazali komonisa polele ete makambo malaki Mibeko makomami na mitema na bango. Lisosoli na mitema na bango ekotatolaka, makanisi na bango ndenge na ndenge makolobela mpe bango mpo na kokitisa bango soko kolóngisa bango.”—Baloma 1:19, 20; 2:14, 15.
4 Na ekeke ya 18, William Blackstone, mosáli-mibeko ya ekólo Angleterre oyo ayebanaki mingi akomaki ete: “Mobeko wana ya bozalisi [mibeko ya biloko bizalisami], oyo eumeli uta kozalisama na bato mpe oyo Nzambe ye moko azali kopesa, ezali mpenza kopusa bato ete bátosa yango koleka mibeko nyonso mosusu. Yango etyami likoló na bafandi na mabelé mobimba, na bamboka nyonso, mpe na bileko nyonso: ezali na mobeko moko te oyo mosalemi na bato oyo mokoki kolónga soki etɛmɛli yango.” Blackstone alobelaki lisusu “mibeko mimonisami,” lokola oyo mizwami kati na Biblia, mpe alobaki ete: “Mibeko nyonso ya bato mitongami likoló na miboko wana mibale, mibeko ya bozalisi mpe mibeko mimonisami; yango emonisi ete, ezali na mobeko moko te ya bato oyo mosengeli kotɛmɛla yango.” Likambo yango eyokani na oyo Yesu alobaki na ntina na Nzambe mpe Kaisala, lokola ekomami na Malako 12:17. Ezali polele ete, kati na makambo mosusu Nzambe azali kotya ndelo na oyo Kaisala akoki kosɛnga epai na baklisto. Sanedrina elekaki ndelo yango na ntango epesaki bantoma etindá ete bátika kosakola na nkombo na Yesu. Na yango, bantoma bapesaki eyano oyo ebongi wana balobaki: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso na kotosa bato.”—Misala 5:28, 29.
“Biloko na Nzambe”
5, 6. (a) Lokola Bokonzi ebotamaki na 1914, likambo nini baklisto basengeli kobosana soko moke te? (b) Lolenge nini moklisto moko akoki komonisa polele ete azali ministre?
5 Mingimingi uta mobu 1914, ntango Yehova Nzambe, Oyo-Aleki-Likoló, abandaki koyangela lokola mokonzi na nzela ya Bokonzi ya Klisto Masiya, baklisto basengelaki komindimisa ete bazali te kopesa biloko ya Nzambe epai na Kaisala. (Emoniseli 11:15, 17) Koleka ndenge ezalaki na ntango ya liboso, sikawa mibeko ya Nzambe mizali kosɛnga ete baklisto bázala “bato na mokili te.” (Yoane 17:16) Lokola basili komipesa na Nzambe, Mopesi ya bomoi na bango, basengeli komonisa polele ete bomoi na bango ezali lisusu ya bango moko te. (Nzembo 100:2, 3) Lokola Paulo akomaki yango, “tozali bato na [Yehova].” (Baloma 14:8) Lisusu, wana moklisto azali kozwa batisimo, azali kokóma ministre ya Nzambe, na boye ete akoki koloba lokola Paulo: “Nzambe . . . abongisi biso ete tózala basáli.”—2 Bakolinti 3:5, 6.
6 Ntoma Paulo akomaki lisusu ete: “Nakokumisa mosala na ngai.” (Baloma 11:13) Ya solo biso mpe tosengeli kosala sé bongo. Ezala tozali kosala kati na mosala ya ntango nyonso to ndambo na ntango, tóbosana te ete Nzambe ye mpenza atyaki biso kati na mosala na ye. (2 Bakolinti 2:17) Mpo ete bato mosusu bakoki kobɛta ntembe na etɛlɛmɛlo na biso, moklisto nyonso oyo amipesi mpe azwi batisimo asengeli koselingwa mpo na kopesa bilembeteli ya polele mpe ya kolendisa oyo ezali komonisa ete azali solo ministre ya nsango malamu. (1 Petelo 3:15) Mosala na ye mpo na Nzambe mosengeli kosimbama na etamboli na ye malamu. Lokola ministre ya Nzambe, moklisto asengeli kolendisa mpe komonisa bizaleli malamu, kosimba bomoko ya libota, kozala moto ya kolongobana, mpe kozala na limemya liboso na mibeko mpe molɔngɔ́. (Baloma 12:17, 18; 1 Batesaloniki 5:15) Boyokani ya moklisto elongo na Nzambe mpe elongo na mosala oyo Nzambe apesi ye, ezali yango makambo maleki ntina kati na bomoi na ye. Akoki soko moke te kotika makambo wana mpo na etindá ya Kaisala. Ezali polele ete, yango esengeli kotángama kati na “biloko na Nzambe.”
“Biloko na Kaisala”
7. Lokumu nini Batatoli ya Yehova bazali na yango mpo na oyo etali kofuta mpako?
7 Batatoli ya Yehova bayebi ete basengeli “kotosa bango bazali na bokonzi,” bakonzi kati na biyangeli. (Baloma 13:1) Na yango, ntango Kaisala, Letá, asɛngi makambo oyo mabongi, lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia lipesaka bango nzela ya kokokisa masɛngami wana. Na ndakisa, baklisto ya solo bazali kati na bato oyo bazali ndakisa malamu na likambo litali kofuta mpako awa na mabelé mobimba. Na Allemagne, zulunalo Münchner Merkur elobaki na ntina na Batatoli ya Yehova ete: “Bazali bato baleki na kolongobana mpe bato ya liboso mpo na oyo etali kofuta mpako na République Fédérale.” Na Italie, zulunalo La Stampa emonisaki ete: “[Batatoli ya Yehova] bazali banamboka ya sembo oyo moto nyonso akoki kolinga kofanda na bango: bakimaka mpako te to balukaka te kokima mibeko oyo mizali kotungisa bango mpo na litomba na bango moko.” Basaleli ya Yehova basalaka yango ‘mpo na lisosoli na bango.’—Baloma 13:5, 6.
8. Biloko oyo tosengeli kopesa Kaisala esuki bobele na kofuta mosolo ya mpako?
8 “Biloko na Kaisala” bisuki bobele na likambo ya kofuta mpako? Te. Paulo atángaki mpe makambo mosusu, lokola nsɔ́mɔ mpe lokumu. Kati na búku na ye Critical and Exegetical Hand-Book to the Gospel of Matthew, nganga-mayele Heinrich Meyer, ye moto ya Allemagne akomaki ete: “Na [biloko na Kaisala] . . . tosengeli te kokanisa bobele mpako ya Letá, kasi biloko nyonso oyo Kaisala abongi kozwa engebene mibeko na ye oyo mibongi.” E. W. Barnes, mokomi na makambo ya kala, amonisaki kati na búku na ye The Rise of Christianity (Bokóli ya Boklisto), ete, moklisto asengeli kofuta mpako soki asɛngami na yango mpe “asengeli bobele bongo kondima mibeko misusu nyonso ya Letá, soki yango esɛngi te kopesa na Kaisala biloko oyo bizali ya Nzambe.”
9, 10. Lolenge nini moklisto moko akoki kokakatana mpo na oyo etali kopesa Kaisala yango ezali na ye, kasi likambo nini asengeli te kobosana?
9 Biloko nini oyo Letá akoki kosɛnga kozanga ete yango ewelana na biloko oyo bizali mpenza lotómo ya Nzambe? Basusu bakanisaki ete bakokaki na lolenge lobongi kopesa Kaisala mosolo na lolenge ya mpako kasi eloko mosusu te. Bakokoka te kobatela lisosoli malamu soki bapesi Kaisala eloko nyonso oyo ekoki kozwela bango ntango oyo esengeli kosalelama mpo na misala ya Teokrasi. Nzokande, atako ezali solo ete tosengeli ‘kolinga Yehova Nzambe na biso na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na mayele na biso mobimba mpe na makasi na biso mobimba,’ Yehova ayebi ete tokoki mpe kolekisa ntango na makambo mosusu oyo matali mosala ya bulɛɛ te. (Malako 12:30; Bafilipi 3:3) Na ndakisa, toli epesami na moklisto oyo abali ete abombaka ntango mpo na kosepelisa mobalani na ye. Makambo motindo yango mazali mabe te, kasi ntoma Paulo alobi ete yango ezali “makambo na mokili” kasi “makambo na Nkolo” te.—1 Bakolinti 7:32-34; kokanisá na 1 Timoté 5:8.
10 Lisusu, Klisto apesaki bayekoli na ye nzela ya ‘kofuta’ mpako, mpe na ntembe te yango ezali kosɛnga kosalela ntango oyo esilaki kopesama mpo na Yehova—mpamba te bomoi na biso mobimba esili kopesama mpo na ye. Soki motuya ya mpako oyo bato mingi bafutaka na mboka moko mozali 33 % ya mosolo oyo bazwaka (na bamboka mosusu basɛngaka koleka wana), yango elimboli ete mbula na mbula basáli mingi ya mboka yango bafutaka mosolo oyo mokokani na lifuti na bango mpo na sanza minei na kɛsi ya Letá. Elingi koloba ete, na nsuka ya bomoi na bango lokola basáli, ekomonana ete bato mingi basili kofuta mosolo ya bambula 15 ya lifuti na bango lokola mpako oyo “Kaisala” azali kosɛnga. Tótalela lisusu, likambo ya kokɔta kelasi. Kati na bamboka mingi mobeko mosɛngaka na baboti ete bana na bango bákɔta na eteyelo na boumeli ya bambula oyo ekatami. Bambula ya kotánga kelasi ekeseni engebene mboka na mboka. Na bisika mingi ezali kozwa ntango mwa molai. Ezali solo ete, kokɔta kelasi epesaka mbala mingi matomba, kasi ezali Kaisala nde akataka bambula boni mwana asengeli kolekisa na kotánga kelasi, mpe baboti baklisto batosaka ekateli ya Kaisala.
Mosala ya sodá mpo na bato banso
11, 12. (a) Likambo nini Kaisala asɛngaka na bamboka mingi? (b) Lolenge nini baklisto ya liboso bazalaki kotalela mosala ya sodá?
11 Lisɛngi mosusu oyo Kaisala akoki kosɛnga na bamboka mosusu ezali bongo mosala ya sodá mpo na bato banso. Na ekeke oyo ya 20, ebongiseli wana etyamaki kati na bikólo mingi na ntango ya etumba mpe basusu basalelaka yango ata na ntango oyo etumba ezali te. Na France, na boumeli ya mibu mingi lisɛngi yango libéngamaki mpako ya makila, elingi koloba ete elenge mobali nyonso asengelaki kondima kopesa bomoi na ye mpo na Letá. Ezali wana likambo oyo baye basili komipesa na Yehova bakoki kondima kosala na lisosoli malamu? Lolenge nini baklisto ya ekeke ya liboso batalelaki likambo yango?
12 Atako baklisto ya liboso bazalaki kosala makasi mpo na kozala banamboka ya malamu, kondima na bango epekisaki bango kolongola bomoi ya moto mosusu to kopesa bomoi na bango mpenza mpo na Letá. Búku moko monene (Encyclopedia of Religion) eyebisi ete: “Bakonzi ya lingomba ya ntango ya liboso, kati na bango mpe Tertullien mpe Origène, balobaki ete baklisto bapekisamaki koboma moto, lilako oyo epekisaki mpe bango kokɔta kati na limpinga ya Loma.” Kati na búku na ye (The Early Church and the World [Lingomba ya ebandeli mpe mokili]), Professeur C. J. Cadoux akomi ete: “Kino eleko ya boyangeli ya Marc-Aurèle [161-180 T.B.], moklisto moko te akómaki sodá nsima ya batisimo na ye.”
13. Mpo nini ntálo monene ya bato kati na boklisto ya nkombo mpamba batalelaka mosala ya sodá motindo moko na baklisto ya liboso te?
13 Mpo na nini basangani ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba batalelaka makambo na lolenge mosusu lelo oyo? Na ntina na mbongwana monene oyo esalemaki na ekeke ya minei. Búku moko ya Katolike (A History of the Christian Councils) eyebisi ete: “Baklisto mingi, . . . na boyangeli ya bakonzi oyo bazalaki bapakano, bazalaki koboya kosala mosala ya sodá mpo na mitindá ya lingomba, mpe bazalaki mpenza koboya kokamata bibundeli, to bazalaki kotika mosala yango. Likita monene [oyo esalemaki na Arles, na mobu 314 T.B.], na kotaleláká mbongwana oyo Constantin akɔtisaki, libimisaki mobeko ete baklisto basengelaki kokenda na etumba, . . . mpamba te Lingomba lizalaki na kimya na nsé ya boyangeli ya mokonzi oyo azalaki bongo na boninga elongo na baklisto.” Lokola mbuma mabe ya kotika mateya ya Yesu, uta ntango wana kino sikawa, bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bazali kolendisa bitɔ́nga na bango ete bázala basodá kati na mampinga ya mabota ya mokili, atako bato moko moko kati na bango baboyaki na ntina na lisosoli na bango.
14, 15. (a) Mpo na bantina nini baklisto na bisika mosusu basɛngaka ete bálongolama mokumba ya mosala ya sodá? (b) Epai bakoki kolongolama mokumba yango te, mitindá nini ya Makomami mikosunga moklisto ete akamata ekateli ya malamu na likambo litali mosala ya sodá?
14 Lelo oyo baklisto basengeli nde kolanda makanisi ya bato mingi na likambo yango? Te. Soki moklisto oyo amipesi mpe azwi batisimo azali kofanda na mboka epai kuna baministre ya lingomba balongolami mokumba ya kosala mosala ya sodá, akoki kozwa litomba na ebongiseli wana, mpamba te azali mpenza ministre. (2 Timoté 4:5) Na bamboka mosusu, kati na yango États-Unis mpe Australie, bapesaka lotómo wana ata na ntango ya etumba. Mpe na ntango ya kimya, kati na bamboka mingi oyo esɛngaka ete bato banso básala mosala ya sodá, Batatoli ya Yehova, lokola baministre ya lingomba balongolamaka mokumba yango. Na lolenge yango bakoki kolanda kosunga bato mosusu kati na mosala na bango mpo na bolamu ya bato banso.
15 Nzokande, ezali boni soki moklisto moko azali kofanda na mboka epai kuna baministre ya mangomba bazali na lotómo te ya kolongolama mokumba yango? Na likambo wana, asengeli kozwa ekateli ye moko na kolandáká lisosoli na ye oyo eteyami malamu na Biblia. (Bagalatia 6:5) Atako asengeli kotalela bokonzi ya Kaisala, akotalela na likebi nyonso oyo ye asengeli kopesa na Yehova. (Nzembo 36:9; 116:12-14; Misala 17:28) Moklisto asengeli komikundola ete elembo ya baklisto ya solo ezali bolingo mpo na baninga na ye bandimi nyonso, ata baoyo bazali kofanda na bamboka mosusu to baoyo bazali na bitulúká mosusu. (Yoane 13:34, 35; 1 Petelo 2:17) Lisusu, asengeli te kobosana mitindá ya Makomami oyo mizwami kati na mikapo lokola Yisaya 2:2-4; Matai 26:52; Baloma 12:18; 14:19; 2 Bakolinti 10:4; mpe Baebele 12:14.
Mosala mpo na Letá
16. Na bamboka mosusu, mosala nini oyo mozali na boyokani te na mosala ya sodá Kaisala asɛngaka epai na baoyo baboyaka mosala ya sodá?
16 Nzokande, ezali na bamboka epai kuna Letá, atako apesaka baministre ya lingomba lotómo te ya kolongolama mokumba ya mosala ya sodá, kasi nde ayebaka ete bato mosusu baboyaka mosala ya sodá. Mingi kati na bamboka yango esili kokamata bibongiseli mpo na bato wana ya sembo ete bátindama na makasi te na mosala ya sodá. Na bisika mosusu mosala oyo mosɛngami mpo na Letá, lokola kosala misala mpo na bolamu ya bato esika oyo bazali, motalelamaka lokola mosala mpo na ekólo, kasi ezali mosala ya sodá te. Moklisto oyo amipesi akoki kosala mosala motindo yango? Awa lisusu, moklisto oyo amipesi mpe azwi batisimo asengeli ye moko kozwa ekateli na ye engebene lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia.
17. Ndakisa nini ezali kati na Biblia ya mosala mpo na Letá oyo ezali mosala ya sodá te?
17 Emonani lokola ete mosala oyo mokangi bato na mobeko mozalaki mpe kosalema na ntango ya kala. Búku moko ya makambo ya kala elobi ete: “Longola mpako mpe biloko mosusu oyo bisɛngamaki na bafandi ya Yuda, ezalaki mpe na kɔlɔvɛ́ [mosala ya lifuti te mosɛngami na bakonzi na esika ya mpako]. Yango ezalaki ebongiseli ya kala na bamboka wana ya Ɛ́sti, oyo bakonzi ya Bagreke mpe Baloma bakóbaki kosalela. . . . Kondimana na Sika mpe epesi bandakisa ya kɔlɔvɛ́ kati na Yuda, komonisáká ete yango epalanganaki mingi. Na boyokani na momeseno wana, basodá bakangaki Simona moto na Kulene ete akumba ekulusu [nzeté ya mpasi] ya Yesu (Matai 5:41; 27:32; Malako 15:21; Luka 23:26).”
18. Mosala nini, oyo ezali na boyokani te na mosala ya sodá mpe na mosala ya kosunga lingomba te, oyo mbala mingi Batatoli ya Yehova bandimaka kosala yango?
18 Bobele bongo, Letá to bakonzi mosusu na bamboka mosusu ya ntango na biso basɛngaka na bafandi ya bamboka na bango ete básangana na misala ndenge na ndenge mpo na bolamu ya esika bafandi. Na ntango mosusu yango ezalaka mpo na mosala moko ya sikisiki, lokola kotimola mabulu ya mai to kotonga banzela; na bantango mosusu esalemaka na bilaka bikatami, lokola kosangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na mosala ya kobongisa banzela, biteyelo to mapitálo. Epai kuna mosala mpo na Letá mosalemi mpo na bolamu ya bato mpe mozali na boyokani te na losambo ya lokuta to mpe na likambo mosusu oyo likoki koboyama na lisosoli ya Batatoli ya Yehova, mbala mingi bandimaka kosala yango. (1 Petelo 2:13-15) Mbala mingi yango ebimisaki litatoli malamu mpenza mpe na bantango mosusu ekangaki minɔkɔ ya baoyo bafundaka Batatoli na lokuta nyonso ete bazalaka batɛmɛli ya biyangeli.—Kokanisá na Matai 10:18.
19. Lolenge nini moklisto akosala soki Kaisala asɛngi na ye ete asala mosala mpo na ekólo oyo ezali mosala ya sodá te na boumeli ya eleko moko?
19 Bongo, ezali boni, soki Letá asɛngi na moklisto ete mpo na mwa ntango asala mosala mpo na Letá oyo ezali eteni ya mosala mpo na ekólo na nsé ya litambwisi ya basivili? Awa lisusu baklisto basengeli bango mpenza kokamata ekateli na bango engebene lisosoli oyo ezali na boyebi ya malamu. “Binso nyonso tokotɛlɛma liboso na esambiselo na Nzambe.” (Baloma 14:10) Baklisto oyo bakutani na lisɛngi moko ya Kaisala basengeli koyekola likambo yango kati na libondeli mpe komanyola likoló na yango.a Ekoki mpe kozala likambo ya mayele kosolola likambo yango elongo na baklisto bakɔmɛli oyo bazali kati na lisangá. Nsima na yango asengeli ye moko kokamata ekateli.—Masese 2:1-5; Bafilipi 4:5.
20. Mituna nini mpe mitindá nini ya Makomami mikosunga moklisto na kokanisa na ntina na mosala ya Letá mpo na ekólo oyo ezali mosala ya sodá te?
20 Wana bamipesi mpo na kosala bolukiluki motindo yango, baklisto basengeli kotalela mwa mitindá ya Biblia. Paulo alobaki ete tosengeli ‘komisɔkisa liboso na mikóló mpe mikonzi; . . . kosɛlingwa mpo na misala nyonso malamu . . . kozala na bopɔlɔ epai na bato nyonso.’ (Tito 3:1, 2) Bobele na ntango yango, baklisto basengeli kotalela mosala mpo na Letá oyo mosɛngami na bango. Soki bandimi yango, bakokoka kobatela etɛlɛmɛlo na bango ya boklisto, ya kozanga komikɔtisa na makambo ya mokili? (Mika 4:3, 5; Yoane 17:16) Ekosɛnga ete bámikɔtisa na makambo ya lingomba moko ya lokuta? (Emoniseli 18:4, 20, 21) Kosala yango ekopekisa to ekokitisa ntango ya kokokisa mikumba na bango ya boklisto? (Matai 24:14; Baebele 10:24, 25) Na ngámbo mosusu, bakozala na makoki ya kolanda kosala bokóli na elimo, mbala mosusu ata kosangana kati na mosala ya ntango nyonso wana bazali kokokisa mosala oyo mosɛngami epai na bango?—Baebele 6:11, 12.
21. Ata soki azwi ekateli nini, lolenge nini lisangá ekotalela ndeko mobali oyo azwi ekateli na ntina na mosala ya Letá mpo na ekólo?
21 Ezali boni soki na bosembo nyonso biyano na mituna oyo bipesi moklisto yango nzela ya kosukisa ete mosala wana ya Letá mpo na ekólo mozali “misala malamu” oyo ye akoki kosala mpo na kotosa bakonzi? Yango etali ekateli na ye liboso ya Yehova. Bankulutu oyo baponami mpe baklisto mosusu basengeli komemya lisosoli ya ndeko mobali yango mpe bakolanda kotalela ye lokola moklisto oyo azali na etamboli malamu. Nzokande, soki moklisto moko akanisi ete akoki te kosala mosala wana mpo na Letá, ebongi mpe kotosa ekateli na ye. Ye mpe akotalelama lokola moto ya etamboli malamu mpe asengeli kosungama na bolingo nyonso.—1 Bakolinti 10:29; 2 Bakolinti 1:24; 1 Petelo 3:16.
22. Ata soki tokutani na makambo ndenge na ndenge, tokolanda kosala nini?
22 Lokola tozali baklisto tokotika te kopesa “lokumu epai na baoyo bakoki kozwa lokumu.” (Baloma 13:7) Tosengeli kotosa molɔngɔ́ mpe koluka kozala bato ya kimya, banamboka oyo batosaka mibeko. (Nzembo 34:14) Tokoki kútu kobondela “mpo na mikonzi nyonso baoyo bazali liboso” wana bato yango basengeli kokamata bikateli oyo bikozala na bopusi likoló na bomoi na biso mpe na mosala na biso ya boklisto. Lokola mbano ya kopesa biloko na Kaisala epai na Kaisala, tozali na elikya ete “tokotambola na bizaleli na kimya mpe na kozanga mobulu kati na [ezaleli ya kosambela] Nzambe mpe na sembo na bozito.” (1 Timoté 2:1, 2) Na koleka, tokokóba kosakola nsango malamu ya Bokonzi lokola elikya bobele moko mpo na bato, kopesáká na motema mobimba biloko na Nzambe epai na Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1964, lokasa 532, paragrafe 21 (na Lifalansé).
Okoki kolimbola?
◻ Wana azali koluka bokatikati kati na boyokani na ye elongo na Kaisala mpe elongo na Yehova, mokumba ya liboso ya moklisto mozali nini?
◻ Biloko nini tosengeli kopesa na Yehova oyo tosengeli soko moke te kopesa na Kaisala?
◻ Wapi biloko mosusu oyo tokoki na lolenge lobongi kopesa na Kaisala?
◻ Mikapo nini mikosunga biso na kokamata ekateli malamu na likambo litali mosala ya sodá mpo na bato banso?
◻ Makambo nini oyo tosengeli te kobosana soki tobyangami mpo na mosala moko ya Letá mpo na ekólo?
◻ Na ntina na Yehova mpe Kaisala, tosengeli kolanda kosala nini?
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Bantoma bayebisaki na Sanedrina ete: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso na kotosa bato”