Talmud ezali nini?
“Na ntembe te, Talmud ezali moko na mikanda ya ntina mingi oyo bato bakomá.”—The Universal Jewish Encyclopedia.
“[Talmud ezali] moko na misala minene euti na mayele ya bato, mokanda moko monene, ya ntina, ya mpasi mpo na kososola na boye ete bato ya mayele mingi bamipesi koyekola yango na boumeli ya mbula koleka nkóto moko na ndambo.”—Jacob Neusner, nganga-mayele Moyuda mpe mokomi.
“Talmud ezali likonzi ya moboko [ya Lingomba ya Bayuda] oyo esimbi ebongiseli mobimba ya bomoi ya Bayuda na makambo ya elimo mpe ya mayele.”—Adin Steinsaltz, nganga-mayele ya Talmud mpe labi.
NA NTEMBE te Talmud esalaki bopusi makasi likoló ya Bayuda na boumeli ya bikeke. Nzokande, na bokeseni na makumisi oyo elobami awa na likoló, Talmud etyolamaki mpe ebéngamaki “mai monene ya moindo mpe ya kobulunganisa.” Balobaki ete ezali mokanda ya kotuka euti na Zabolo. Na mikili ya Mpoto, na etinda ya Pápa, mbala na mbala bazalaki kopekisa yango, kobɔtɔla yango, mpe ata kotumba yango.
Mokanda oyo ebimisaki ntembe makasi boye ezali mpenza nini? Eloko nini ekesenisi Talmud na mikanda mosusu ya Bayuda? Mpo na nini ekomamaki? Ndenge nini ekómaki na bopusi motindo wana na Lingomba ya Bayuda? Yango ezali mpe na ntina mpo na bato oyo bazali Bayuda te?
Na boumeli ya mbula 150 oyo elandaki kobomama ya tempelo ya Yelusaleme na mobu 70 T.B., biteyelo ya balabi ya bwanya na Yisalaele mobimba, balukaki nokinoki ebongiseli ya sika mpo na kokoba misala ya Bayuda. Basololaki mpe bayanganisaki mimeseno ndenge na ndenge ya mibeko oyo mikomami na mokanda te. Likoló na ebongiseli yango, batyaki bandelo mpe masɛngami mpo na Lingomba ya Bayuda, kosaláká ete bomoi ya mokolo na mokolo etambwisama na bosantu atako tempelo ezalaki lisusu te. Ebongiseli oyo ya sika na elimo emonisamaki kati na Mishnah, oyo Judah ha-Nasi, asangisaki na ebandeli ya ekeke ya misato T.B.a
Mishnah ezalaki na makambo na yango moko, balukaki kolongisa yango na makambo ya Biblia te. Masolo na yango mpe ata lolenge Liebele na yango ekomami ezali ndenge mosusu, ekeseni na makomi ya Biblia. Bikateli ya balabi oyo bitángami kati na Mishnah bizalaki na bopusi likoló na bomoi ya Bayuda mokolo na mokolo ezala esika nini bafandi. Yango wana, Jacob Neusner alobi ete: “Mibeko-mama ya ekólo Yisalaele etongamaki likoló ya Mishnah. . . . Ezalaki kosɛnga ete bándima mpe bátosa mibeko na yango.”
Kasi, ezalaki boni soki bato mosusu batye ntembe na kolobáká ete bokonzi ya bato ya mayele oyo balobelami na Mishnah ekokani na Makomami mapemami te? Balabi bazalaki komonisa ete mateya ya ba Tannaïm (balakisi ya mibeko oyo mikomami te) oyo mazwami kati na Mishnah mayokanaki na makambo nyonso na Makomami ya Liebele. Basengelaki kopesa ndimbola ya milaimilai. Bamonaki ntina ya kolimbola mpe kolongisa Mishnah mpe kopesa bilembeteli ete eutaki na Mibeko oyo Nzambe apesaki Mose na Sinai. Balabi bapusamaki na komonisa ete mibeko oyo mikomami te na oyo mikomami mizali na ndimbola moko mpe mokano moko. Na esika ete ezala mokanda ya nsuka oyo ezalaki kolobela makambo ya Lingomba ya Bayuda, Mishnah ekómaki nde mokanda ya moboko ya sika mpo na boyekoli mpe masolo ya ntembe.
Kokomama ya Talmud
Balabi oyo bamipesaki mokumba wana ya sika bayebanaki na nkombo Amoraïm—“babongoli,” to “balimboli,” ya Mishnah. Eteyelo mokomoko etalelamaki na labi moko oyo ayebanaki mingi. Mwa etuluku moke ya banganga-mayele mpe bayekoli bazalaki kosala masolo na boumeli ya mbula mobimba. Kasi bokutani ya monene ezalaki kosalema mbala mibale na mbula, na boumeli ya sanza ya Adala mpe na sanza ya Elulu na manaka ya Bayuda, wana misala ya bilanga mizalaki lisusu mingi te mpe bankóto mingi ya bato bazalaki koyangana.
Adin Steinsaltz alimboli ete: “Mokambi ya eteyelo azalaki kokamba masolo, wana afandi na kiti to na tapi ebongisami malamu. Na molɔngɔ ya liboso, banganga-mayele oyo bayebanaki mingi bafandaki, kati na bango baninga na ye bakambi biteyelo to bayekoli ya mayele, mpe na nsima na bango banganga-mayele mosusu nyonso. . . . Molɔngɔ ya kofanda ebongisamaki na kotaleláká bokonzi [engebene kolandana na yango].” Bazalaki kotánga mwa eteni ya Mishnah. Bazalaki kokokanisa yango na makambo ba Tannaïm bayanganisaki kasi mazwamaki te kati na Mishnah. Bongo, babandaki kotalela yango na mozindo. Bazalaki kotuna mituna, mpe kotalela na mozindo makambo oyo ezalaki bongolabongola mpo na komona boyokani oyo ezalaki kati na mateya. Uta na Makomami ya Liebele, bazalaki koluka mikapo oyo ekopesa bilembeteli mpo na kolongisa mateya ya balabi.
Atako ebongisamaki malamu, masolo yango mazalaki kokóma ndongo, mpe ntango mosusu mazalaki kobimisa yikiyiki. Moto moko ya bwanya alobelami na Talmud alobaki ete “montɛntɛi (étincelle) ya mɔ́tɔ” ezalaki kobima na minɔkɔ ya balabi na boumeli ya masolo ya ntembe. (Hullin 137b, Talmud ya Babilone) Steinsaltz alobi boye na ntina na lolenge oyo masolo mazalaki kosalema: “Mokambi ya eteyelo, to moto ya bwanya akosala lisukulu, akolimbola makambo na ndenge na ye. Banganga-mayele oyo bazali wana bakolandisa ye na mituna miuti na biutelo mosusu, makanisi ya balimboli mosusu, to na bosukisi na bango moko. Na mabaku mosusu masolo mazalaki koumela te mpo ete eyano na motuna moko ekokaki mpo na kokata likambo. Na ntango mosusu mwa banganga-mayele bazalaki kopesa makanisi makeseni mpe bongo lisolo ezalaki kobendana molai.” Moyangani nyonso akokaki koloba. Makambo oyo mayeisamaki polele na boumeli ya masolo wana mazalaki kotindama na biteyelo mosusu mpo ete banganga-mayele mosusu bátalela yango lisusu.
Kasi, masolo yango ezalaki kosuka bobele na bowelani na maloba ya mibeko te. Etalelaki mpe makambo mosusu matali kokamba Lingomba mpe mibeko ya Bayuda ebéngami Halakah. Liloba yango na Liebele elimboli “kokende” mpe elakisi ‘nzela ya bomoi oyo moto asengeli kolanda.’ Makambo mosusu nyonso—na ndakisa, masolo oyo etali balabi mpe bato oyo balobelami kati na Biblia, masese, bindimeli mpe filozofi—mabéngami Haggadah, eutelo na yango na Liebele elimboli “koloba.” Na boumeli ya masolo ya ntembe, balabi bazalaki kosangisa Halakah mpe Haggadah.
Kati na buku na ye The World of the Talmud, Morris Adler alobi ete: “Molakisi ya mayele azalaki kokata maloba ya moto oyo azalaki kopesa makanisi milai mpe ya mpasi mpo na kososola, mpe kopesáká bongo makanisi ya pɛtɛɛ mpe ya kolendisa. . . . Na bongo, tozali kokuta masapo, masolo ya kala, siansi ya ntango wana mpe bonkɔkɔ, bandimbola ya Biblia mpe masolo ya bomoi ya bato, masukulu ya lingomba mpe makambo ndenge na ndenge ya teoloji, nyonso esangisami esika moko na boye ete moto oyo ameseni na makambo ya biteyelo te akomona yango lokola pɔtɔpɔtɔ ya makambo mabongisami te.” Engebene banganga-mayele na biteyelo, makambo nyonso wana mazalaki na mokano mpe na boyokani na motó na likambo ya lisolo. Na elobeli ya elilingi, Halakah mpe Haggadah ezalaki babiliki mpo na botongi ebongiseli ya sika kati na biteyelo ya balabi.
Kokomama ya Talmud mibale
Na nsuka, eteyelo monene ya balabi elongwaki na Palestine mpe ekómaki na engumba Tibériade. Biteyelo minene mosusu bizalaki na engumba Sepphoris, mpe na engumba Kaisalia, mpe na engumba Luda. Kasi, na ntina na kobeba ya nkita, yikiyiki ya politiki, mpe na nsuka motungisi mpe monyoko uta na boklisto ya lipɛngwi, ebele ya Bayuda bakendaki kofanda na Ɛsti—na Babilone.
Na boumeli ya bikeke, ebele ya bayekoli balongwaki na Babilone mpe bakendeki na Palestine mpo na kolakisama na biteyelo ya balabi ya lokumu. Moko na bayekoli yango ezalaki bongo Abba ben Ibo, abéngamaki lisusu Abba Arika—Abba engambe—kasi na nsima ayebanaki na nkombo Rab. Azongaki na Babilone pene na mobu 219 T.B. nsima ya kolakisama na Judah ha-Nasi, mpe yango ekɔtisaki mbongwana na makambo ya elimo ya Bayuda oyo bazalaki kofanda na Babilone. Rab afungolaki eteyelo na Sura, engumba etondaki na Bayuda kasi ezalaki na banganga-mayele moke. Mpo na lokumu na ye, azwaki bayekoli 1 200 na eteyelo na ye, mpe bankóto mosusu bazalaki koyangana na boumeli ya sanza ya Adala mpe sanza ya Elulu, na manaka ya Bayuda. Samuel, moto ya lokumu na eleko ya Rab, afungolaki eteyelo na Nehardea. Biteyelo mosusu ya minene bifungwamaki na engumba Pumbeditha mpe na engumba Mehoza.
Na ntango yango ntina ya kokende kotánga na Palestine ezalaki lisusu te, mpamba te moto akokaki kolakisama na banganga-mayele ya lokumu na Babilone. Kokomama ya Mishnah lokola makomi mosusu ebongisaki nzela mpo na bonsomi ya biteyelo ya Babilone. Atako lolenge mpe myango ya koyekola ekómaki mingi na Palestine mpe na Babilone, kosolola ya mbala na mbala mpe kotindelana balakisi ebatelaki bomoko ya biteyelo yango.
Pene na nsuka ya ekeke ya minei mpe na ebandeli ya ekeke ya mitano T.B., bomoi ekómaki mpasi mpo na Bayuda na Palestine. Bipekiseli mpe monyoko uta na boklisto ya lipɛngwi esalaki ete Sanedrina epekisama mpe bokonzi ya Nasi (tata ya mabota) esukaki soko na mobu 425 T.B. Na bongo, ba Amoraïm ya Palestine babandaki kotya kati na buku moko bosukisi nyonso ya makambo oyo malobamaki na boumeli ya masolo kati na biteyelo mpo na kobatela yango. Mokanda yango, oyo ebongisamaki na lombangu na nsuka ya ekeke ya minei T.B., eyebanaki lokola Talmud ya Palestine.b
Wana biteyelo na Palestine bizalaki kosila ngala, ba Amoraïm ya Babilone, bakómaki mpenza na makoki mingi. Kati na masolo na bango, Abaye na Raba babimisaki makanisi oyo ezalaki kososolama na bolɛmbu te, mpe mpasi mpo na kokanga ntina, na nsima yango ekómaki ndakisa mpo na kotalela na mozindo makambo mazwami na Talmud. Na bongo, Ashi, mokambi ya eteyelo ya Sura (mobu 371 kino 427 T.B.), abandaki kotya balapolo ya masolo wana esika moko. Steinsaltz alobi ete, [Ashi] asalaki bongo mpo “asosolaki ete lokola ezalaki na molɔngɔ te, ebele ya mibeko mikomami te, mizalaki na likama ete nsima ya bambula bato bakobosana yango.”
Makambo yango ezalaki mingi na boye ete moto moko te to ata libota moko te bakokaki kotya yango na molɔngɔ. Na Babilone eleko ya ba Amoraïm esukaki na ekeke ya mitano T.B., kasi mosala ya kokoma Talmud ya Babilone ekobaki kino ekeke ya motoba T.B. na etuluku moko ebéngamaki ba Saboraïm, liloba ya Araméen oyo elimboli “balimboli,” to “bapesi makanisi.” Bakomi oyo ya nsuka basangisaki ebele ya mikanda oyo misilaki kokomama te mpe masolo oyo balabi basalaki na boumeli ya bikeke, kopesáká na Talmud ya Babilone motindo mpe ebongiseli oyo ekesenisaki yango na mikanda nyonso Bayuda bakomaki liboso.
Talmud ekokisaki likambo nini?
Balabi oyo balobelami kati na Talmud balukaki kondimisa bato ete Mishnah mpe Makomami ya Liebele euti esika moko. Kasi mpo na nini? Jacob Neusner alobi ete: “Na monɔkɔ, balobaki ete ezalaki mpo na kondimisa etɛlɛmɛlo ya Mishnah. Kasi mama ya likambo ekómaki nde bokonzi ya moto ya bwanya ye moko.” Mpo na kolendisa bokonzi wana ya moto ya bwanya, batalelaki, batyaki ntembe, balimbolaki, mpe babongisaki molɔngɔ́ mokomoko, na ntango mosusu liloba mokomoko ya Mishnah na motindo ya sikisiki. Neusner alobi ete na motindo wana balabi “babongolaki mokano ya Mishnah.” Atako ekomamaki lokola mokanda moko ya mobimba, sikawa Mishnah ekabolamaki bitenibiteni. Na boumeli ya mosala yango, bazongelaki kokoma yango lisusu mpe basɛmbolaki yango.
Mokanda oyo ya sika—Talmud—ekokisaki mokano ya balabi. Batyaki mibeko ya kotalela makambo na mozindo, mpe yango wana Talmud eteyaki bato ete bákanisaka lokola balabi. Balabi bakanisaki ete mwango na bango ya koyekola mpe ya kotalela makambo na mozindo ezalaki komonisa makanisi ya Nzambe. Na bongo, boyekoli ya Talmud ekómaki lokola mokano, losambo—bango bamonaki ete kokanisa na mozindo ezali komekola Nzambe mpo ete basalemi na elilingi ya Nzambe. Na bileko bisengelaki kolanda, Talmud esengelaki kotalelama na mozindo bobele lolenge wana. Litomba na yango ezalaki nini? Cecil Roth, mokomi ya masolo ya kala, akomi ete: “Talmud . . . epesaki [Bayuda] elembo oyo ekesenisaki bango na mabota mosusu, na nguya makasi oyo bazali na yango mpo na koboya kobongwana mpe kozala na bomoko na ekólo na bango. Lolenge na yango epelisaki mayele na bango, mpe epesaki bango . . . bososoli na makanisi. . . . Talmud epesaki Bayuda oyo bazalaki konyokwama na eleko ebéngami Moyen-Âge mokili mosusu epai bakokaki kokima . . . Na elilingi, epesaki bango mabelé ya bankɔkɔ, oyo bakokaki kobatela soki babɔtɔli mokili na bango.”
Na koteyáká bato makanisi ya balabi, na ntembe te, Talmud ekómaki na nguya. Kasi, motuna mpo na bato nyonso yango oyo—ezala Bayuda to baoyo bazali Bayuda te—Talmud ezali solo komonisa makanisi ya Nzambe?—1 Bakolinti 2:11-16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki olingi koyeba makambo mosusu na lolenge Mishnah ekomamaki mpe makambo mazali kati na yango, talá lisolo “Mishnah mpe Mibeko ya Nzambe epai na Mose” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛ́mbɛ 1997.
b Talmud ya Palestine eyebani mingi na nkombo Talmud ya Yelusaleme. Nzokande, ebengeli oyo ezali na libunga, mpamba te mingimingi na eleko ya ba Amoraïm, bapekisaki Bayuda kokɔta na Yelusaleme.
[Etanda na lokasa 31]
Boyokani nini ezali kati na ba Talmud nyonso mibale?
Liloba ya Liebele “Talmud” elimboli “boyekoli” to “botángi.” Ba Amoraïm ya Palestine mpe ya Babilone bayekolaki, to batalelaki Mishnah na mozindo. Ba Talmud nyonso mibale (ya Palestine mpe ya Babilone) esalaki mpe likambo yango, kasi bokokani nini ezali kati na Talmud nyonso mibale? Jacob Neusner akomi ete: “Talmud ya liboso etalelaki na mozindo bilembeteli, oyo ya mibale elukaki koyeba makanisi oyo bandimaki kala; oyo ya liboso ebatelaki mokano na yango, kasi oyo ya mibale ebakisaki makambo mosusu likoló ya mokano na yango.”
Likebi mpe milende oyo basalaki mpo na kobongisa Talmud ya Babilone esalaki ete yango ezala bobele monene te kasi lisusu mozindo mpe na bososoli koleka na lolenge na yango ya kokanisa mpe ya kotalela makambo na mozindo. Ntango basalelaka liloba “Talmud,” mbala mingi elimbolaka Talmud ya Babilone. Yango ezali Talmud oyo bayekoli mingi mpe balobeli mingi na boumeli ya bikeke. Engebene Neusner, Talmud ya Palestine “ezali mosala ya bato ya makoki,” mpe Talmud ya Babilone “ezali mosala ya bato ya mayele mingi.”