“Lakisá biso kobondela”
“NKOLO, lakisá biso kobondela.” Moko na bayekoli ya Yesu nde asɛngaki bongo. (Luka 11:1) Moyekoli wana oyo nkombo na ye eyebisami te azalaki solo moto oyo ayebaki mpenza ntina ya kobondela. Lelo oyo mpe basambeli ya solo bayebi ntina na yango. Libondeli ezali mwango oyo na nzela na yango Moto oyo aleki monene kati na molɔ́ngɔ́ mobimba akoki koyoka biso! Kanisá naino likambo yango! “Moyoki na libondeli” atyaka likebi mpenza likoló na mabanzo mpe mitungisi na biso. (Nzembo 65:2, NW) Lisusu, na nzela ya libondeli, tozali kozongisa matɔ́ndi epai na Nzambe mpe tozali kosanzola ye.—Bafilipi 4:6.
Nzokande, maloba “lakisá biso kobondela” mazali kobimisa mwa mituna ya ntina. Kati na mokili mobimba mangomba ndenge na ndenge mazali kosalela mitindo mikeseni ya kobondela Nzambe. Kasi ezali na lolenge malamu mpe na lolenge mabe ya kobondela? Mpo na koyanola na motuna oyo, tiká tótalela mwa ndambo ya mimeseno oyo mipalangani mingi kati na mangomba mpo na oyo etali libondeli. Tokolobela mingi mpenza mimeseno yango, oyo misalemaka na Amérique latine.
Bikeko ya “basantu babáteli”
Na mikili mingi ya Amérique latine, bato bamipesi mingi na losambo. Na ndakisa, okoki komona kati na mboka Mexique mobimba ete bato mingi basambelaka “basantu babáteli.” Ya solo, bingumba ya mboka Mexique bizali na “basantu babáteli” oyo, na mikolo mosusu basalelaka bango bilambo. Bakatolike ya Mexique mpe basambelaka ebele ya bikeko bikeseni. Mpo na koyeba “mosantu” nani oyo ye asengeli kosambela, mosambeli akotalela liboso eloko nini alingi kosɛnga. Soki moto azali koluka mobalani, asengeli kopelisa buji mpo na “Mosantu” Anthony. Moto oyo alingi kosala mobémbo na motuka asengeli komitika na mabɔkɔ ya “Mosantu” Christophe, mobateli ya basáli-mobémbo, mingi mpenza baoyo basalaka mobémbo na motuka.
Kasi, mimeseno wana miuti wapi? Lisoló ya makambo ya kala limonisi ete na ntango bato ya Espagne bayaki na Mexique, bamonaki ete bafandi na yango bamipesaki na kosambela banzambe ya bapakano. Kati na búku na ye Los Aztecas, Hombre y Tribu (Ba Aztèques mpe etúlúká na bango), Victor Wolfgang von Hagen alobi ete: “Moto na moto azalaki na nzambe na ye, nzeté na nzeté ezalaki na nzambe na yango, mosala na mosala na nzambe na yango mobali to mwasi, ata mpe komiboma ezalaki na nzambe na yango. Yacatecuhtli azalaki nzambe ya bato ya mombongo. Kati na mboka epai kuna bato bazalaki kosambela banzambe ebele, banzambe nyonso bazalaki na bizaleli mpe misala na bango ya sikisiki.”
Bokokani kati na banzambe yango mpe “basantu” ya Bakatolike ezalaki makasi mingi na boye ete ntango bato ya Espagne babotolaki mboka yango bamekaki kokómisa bafandi na yango “baklisto,” losambo oyo bazalaki kopesa epai na banzambe na bango ya bikeko ekómaki sikawa kopesama epai na “basantu” ya lingomba. Lisoló moko ebimaki kati na zulunalo The Wall Street Journal endimaki ete motindo oyo losambo ya Katolike esalelami na bitúká mosusu ya Mexique eutaki na bopakano. Emonisaki ete na etúká moko, mingi kati na “basantu” 64 oyo bafandi ya mboka wana basambelaka bakokanaki na “banzambe ya sikisiki ya ba Maya.”
Búku New Catholic Encyclopedia eyebisi ete “bokangami makasi ezali kati na mosantu mpe basambeli na ye awa na mabelé, . . . bokangami yango, ebebisaka boyokani na bango na Klisto mpe na Nzambe te, kútu eyeisaka yango makasi mpe ekólisaka yango.” Kasi lolenge nini bokangami oyo emonani polele ete euti na bopakano ekoki kokólisa boyokani ya moto elongo na Nzambe ya solo? Mabondeli oyo matindami epai na “basantu” wana makoki kosepelisa Nzambe?
Eutelo ya sapelé
Momeseno mosusu oyo emonanaka mingi ezali bongo kosalela sapelé. Diccionario Enciclopédico Hispano-Americano (Diksionɛrɛ mpe ansiklopedi ya Espagne mpe ya Amerika) elobi ete sapelé ezali bongo “nsinga oyo ekangisami na mayaka ntuku mitano to monkámá na ntuku mitano ekabolami zomizomi na mayaka mosusu ya mwa minene koleka mpe na nsuka na yango ezali na ekulusu oyo etyami na nsima ya mayaka misato.”
Kolimboláká lolenge sapelé esalelamaka, mokanda moko ya Katolike eyebisi ete: “Sapelé mosantu ezali lolenge moko ya libondeli esalemi na mongongo makasi mpe na motó na ntina na Mabombami ya kosombama na biso. Ezali na bituluku zomi na mitano mpe etuluku mokomoko ezali na mayaka zomi. Etuluku mokomoko elakisi bongo kozongela losambo ya Tata wa biso mbala zomi, Maria losako mbala zomi, mpe Nkembo na Tata mbala moko. Ntango bazali kozongela eteni na eteni ya mayaka zomi basengeli komanyola likoló na mobombamo moko.” Mibombamo mizali mateya oyo Bakatolike basengeli koyeba yango, yango etaleli bongo bomoi, mpasi mpe liwa ya Yesu Klisto.
Búku The World Book Encyclopedia elobi ete: “Losambo ya sapelé ebandaki kosalelama liboso kati na mangomba ya boklisto na boumeli ya eleko ya Moyen Âge, kasi eyaki kopalangana mingi bobele na bambula 1400 mpe 1500.” Losambo ya sapelé esalelamaka bobele na lingomba ya Katolike? Te. Diccionario Enciclopédico Hispano-Americano eyebisi ete: “Mayaka motindo wana masalelami mpe kati na mangomba ya Mizilmá, ya Lamaisme mpe kati na losambo ya Bouddha.” Ya solo, búku Enyclopedia of Religion and Religions elobi: “Emonani ete bato ya Mahomet bamekolaki momeseno ya kosalela Sapelé epai na bato ya Bouddha, mpe baklisto bamekolaki yango epai na bato ya Mahomet na ntango ya bitumba oyo ebéngamaki Croisades.”
Basusu balobi ete sapelé ezali bobele mpo na kosalisa moto ete amikundola wana asengeli kosambela na kozongelaka mabondeli mbala na mbala. Kasi Nzambe asepelaka na kosalelama na yango?
Tokoki te kopesa makanisi na biso moko to kolobela soki mimeseno yango mibongi mpenza to mizali na ntina. Yesu apesaki eyano moko ya nguya na lisɛngi oyo bayekoli na ye basɛngaki ye ete alakisa bango kobondela. Makambo oyo alobaki makoki kosalisa batángi mosusu ete bázwa lisosoli malamu mpe ekoki mbala mosusu kokamwisa bango.
[Bililingi na lokasa 3]
Bakatolike basalelaka mingi mayaka ya sapelé. Wapi eutelo na yango?