Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/7 nk. 8-9
  • Filipo abatisi mokonzi moko ya Letá Moetiopia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Filipo abatisi mokonzi moko ya Letá Moetiopia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Likambo nini ekopekisa ngai kobatisama?”
  • Liteya mpo na biso
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Asakolaki “nsango malamu oyo etali Yesu”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Filipo—Mosakoli ya nsango malamu na molende
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Lisalisi mpo na koyeba Biblia malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/7 nk. 8-9

Basalaki Mokano ya Yehova

Filipo abatisi mokonzi moko ya Letá Moetiopia

MOETIOPIA moko asalelaki ntango na ye na mayele nyonso wana azalaki kosala mobémbo na likálo na ye. Azalaki kotánga na mongongo makasi​—likambo oyo lizalaki momeseno epai na basáli mobémbo mingi na ekeke ya liboso. Mobali yango azalaki mokonzi ya Letá “na mosala na Kandake mokonzi mwasi na Baetiopia.”a Azalaki “mokɛngɛli na mosolo na ye nyonso”​—na ntembe te, azalaki ministre ya finanse. Mokonzi yango azalaki kotánga Liloba ya Nzambe mpo na kozwa boyebi.​—Misala 8:27, 28.

Filipo mopalanganisi ya nsango malamu azalaki pene na ye. Anzelu moko akambaki ye na esika yango, mpe ayokaki mongongo moko koloba ete: “Kendá kokɔta na likálo oyo.” (Misala 8:26, 29) Tokoki komona kati na makanisi na biso Filipo azali komituna ete: ‘Mobali yango azali nani? Azali kotánga nini? Mpo na nini natindami ete nakenda epai na ye?’

Wana Filipo azalaki kolanda likálo yango pembenipembeni, ayokaki Moetiopia yango azali kotánga maloba oyo: “Akambami kuna na koboma lokola mpate, lokola mwana na mpate azali nyɛɛ liboso na mokati [nkunge] na ye, bongo afungoli monɔkɔ na ye te. Na kosɔkɛma na ye ekateli na sembo eboyamaki na ye. Nani akolimbola mpo na libota na ye? Mpo ete bomoi na ye elongolami na mokili.”​—Misala 8:32, 33.

Filipo ayebaki nokinoki mokapo yango. Ezali eteni moko ya makomi ya Yisaya. (Yisaya 53:7, 8) Moetiopia akamwaki na makambo oyo azalaki kotánga. Filipo abandaki kosolola na ye na kotunáká ye mituna ete: “Ososoli makambo mazali yo kotánga?” Moetiopia ayanolaki ete: “Soko moto akolimbwela ngai ntina te, nakoka koyeba yango boni?” Na nsima alombaki Filipo ete abuta na likálo na ye.​—Misala 8:30, 31.

“Likambo nini ekopekisa ngai kobatisama?”

Moetiopia yango ayebisaki Filipo ete: “Lobelá ngai, mosakoli azali koloba boye na ntina na nani, na ntina na ye moko, soko na ntina na moto mosusu?” (Misala 8:34) Ezalaki likambo ya kokamwa te na komona ete Moetiopia wana azalaki na mobulungano, mpamba te uta kala makambo matali “mpate” to “mosaleli,” oyo alobelami kati na esakweli ya Yisaya mazalaki libombami. (Yisaya 53:11) Na ntembe te, eyaki kokóma mpenza polele na ntango Filipo asakwelaki Moetiopia yango “Nsango Malamu na Yesu”! Mwa moke na nsima, Moetiopia yango alobaki ete: “Talá mai! Likambo nini ekopekisa ngai kobatisama?” Na bongo, Filipo abatisaki ye nokinoki.​—Misala 8:35-38.

Yango ezalaki likambo ya mbangumbangu? Soko moke te! Moetiopia yango azalaki prozelite na lingomba ya Bayuda.b Na bongo azalaki mosambeli ya Yehova oyo ayebaki Makomami, kati na yango mpe bisakweli na ntina na Masiya. Nzokande, ayebaki makambo nyonso te. Lokola asilaki sikawa koyeba makambo mosusu likoló na mokumba ya Yesu Klisto, Moetiopia yango asosolaki nini oyo Nzambe azalaki kosɛnga epai na ye mpe azalaki pene na kotosa yango. Abongaki mpenza kobatisama.​—Matai 28:18-20; 1 Petelo 3:21.

Na nsima, “nokinoki elimo ya Yehova ekambaki Filipo mosika.” Akendaki kokokisa mokumba na ye epai mosusu. Moetiopia “akóbaki nzela na ye na kosepeláká.”​—Misala 8:39, 40, NW.

Liteya mpo na biso

Biso basaleli ya Yehova na mikolo oyo, tozali na mokumba ya kosunga bato ya motema sembo ete báyekola solo ya Liloba ya Nzambe. Basusu basilaki kolónga kosakola nsango malamu epai na bato mosusu wana ezalaki bango kosala mobémbo to na mabaku mosusu ya kozanga kokanela. Lokola litomba ya mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi, mbula na mbula ebele ya bato bazali komonisa elembo ya komipesa na bango epai na Yehova na kozwáká batisimo.

Ya solo, bato ya sika basengeli te kowela kozwa batisimo nokinoki. Basengeli liboso kozwa boyebi ya solosolo ya Yehova Nzambe mpe ya Mwana na ye, Yesu Klisto. (Yoane 17:3) Na nsima basengeli kobongola motema, kotikáká bongo etamboli na bango ya mabe to mpe na kobongwanáká mpo na koyokanisa bomoi na bango na mitindá ya Nzambe. (Misala 3:19) Yango esɛngaka ntango, mingi mpenza soki makanisi mabe mpe etamboli mabe esilaki kokóla mingi. Atako bato ya sika basengeli kotalela malamu makambo oyo kozala moyekoli ya Klisto esɛngaka, kasi bakoki kozwa mapamboli mingi soki bamipesi na Nzambe mpe basali na ye boninga. (Kokanisá na Luka 9:23; 14:25-33.) Baoyo bazali Batatoli ya Yehova bazali na esengo nyonso kokamba bato motindo yango na lisangá ya solo oyo Nzambe azali kosalela mpo na kokokisa mokano na ye. (Matai 24:45-47) Motindo moko na Moetiopia, bato yango ya sika bakosepela na koyekola na ntina na Nzambe mpe komiyokanisa na masɛngami na ye.

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Kandake” ezalaki nkombo ya moto moko te, kasi ezalaki ebéngeli ya lokumu (lokola “Falo” mpe “Kaisala”) oyo ezalaki kosalema mpo na bakonzi basi nyonso oyo bazalaki koleka na boyangeli ya Etiopia.

b Baprozelite bazalaki bato oyo bazalaki Bayisalaele te kasi bandimaki kotosa Mibeko ya Mose.​—Levitike 24:22.

[Etanda na lokasa 8]

Mpo na nini abéngamaki mokube

Kati na lisoló mobimba ya Misala mokapo 8, Moetiopia wana abéngami “mokube.” Nzokande, lokola Mibeko ya Mose mizalaki kondima te ete moto oyo akatami moko na binama ya kobotela akɔta na lisangá, emonani ete mobali yango azalaki mpenza mokube te na elobeli ya polele. (Deteronome 23:1) Liloba ya Greke oyo ebongolami “mokube” ekoki kosalema epai na moto oyo azali na bokonzi monene. Na yango, Moetiopia wana azalaki mokonzi ya Letá kati na boyangeli ya mokonzi mwasi ya Etiopia.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto