Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w24 Janvier lok. 19
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Masolo mosusu
  • Filipo abatisi mokonzi moko ya Letá Moetiopia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Asakolaki “nsango malamu oyo etali Yesu”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Filipo—Mosakoli ya nsango malamu na molende
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Lisalisi mpo na koyeba Biblia malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
w24 Janvier lok. 19
Filipe afandi elongo na moto ya Etiopi mpe azali kolimbwela ye Makomami na kati ya likalo oyo ezali na sharɛti ya bapinɛ minei ná motambwisi na yango.

Oyebaki yango?

Mokube moto ya Etiopi azalaki na likalo ya ndenge nini ntango Filipe asololaki na ye?

LILOBA ya Grɛki oyo ebongolami na “likalo” na Libongoli ya Mokili ya Sika ekoki komonisa makalo ya ndenge na ndenge. (Mis. 8:​28, 29, 38) Nzokande, emonani ete mokube moto ya Etiopi azalaki kotambola na likalo ya monene koleka likalo moke ya basoda to ya momekano ya mbangu. Tótalela mwa bantina oyo tolobi bongo.

Moto yango ya Etiopi azalaki mokonzi monene oyo autaki mosika mpenza. Azalaki “moto monene oyo azalaki kosalela Kandase mokonzi mwasi ya bato ya Etiopi, mpe ye nde azalaki kotalela mosolo na ye nyonso.” (Mis. 8:27) Ekólo Etiopi ya kala esangisaki mpe Soudan mpe eteni ya sudi mpenza ya Égypte ya lelo oyo. Atako ekoki kozala ete mobali yango atambolaki na likalo kaka wana te na mobembo mobimba, asengelaki kozala na bisaka na mobembo wana molai. Makalo mosusu oyo ezalaki komema bato na siɛklɛ ya liboso ya T.B. ezalaki na sharɛti ya bapinɛ minei. Buku moko (Acts—An Exegetical Commentary ) elobi boye: “Likalo ya ndenge wana ezalaki na esika monene ya kotya bisaka, bato ya mobembo bazalaki malamu na kati, mpe mbala mosusu ekokaki kokende mosika koleka.”

Moto ya Etiopi azalaki kotánga ntango Filipe apusanaki pene na ye. Lisolo yango elobi ete “Filipe akendaki mbangu pembeni na yango mpe ayokaki [mokube moto ya Etiopi] azali kotánga na mongongo makasi makomi ya mosakoli Yisaya.” (Mis. 8:30) Makalo oyo ezalaki kosala mibembo esalemaki mpo na kosala mibembo mbangumbangu te. Lokola makalo yango ezalaki kotambola malɛmbɛ, epesaki mokube nzela ya kotánga, mpe esalisaki Filipe akóma na makolo esika likalo ezalaki.

Moto ya Etiopi “asɛngaki Filipe amata mpe afanda elongo na ye.” (Mis. 8:31) Soki ezalaki likalo ya momekano ya mbangu, mokumbi alingaki kotɛlɛma. Nzokande, soki ezalaki likalo ya mobembo, ezalaki na bisika ya kofanda mpo na mokube mpe Filipe.

Na boyokani na lisolo oyo ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe na Misala mokapo 8 mpe bilembeteli oyo Istware emonisi, mikolo oyo, mikanda na biso emonisaka mokube moto ya Etiopi na likalo ya monene koleka likalo moke ya basoda to ya momekano ya mbangu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto