Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/8 nk. 4-8
  • Elikya kitoko mpo na molimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elikya kitoko mpo na molimo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Molimo kati na Makomami ya Liebele
  • Bopusi ya Bagreke
  • Lolenge baklisto ya liboso batalelaki molimo
  • Eutelo mpenza ya liteya yango
  • Molimo etikalaka na bomoi nsima na kufa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bomoi nsima ya liwa​—⁠Biblia elobaka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Makanisi na yo mpo na molimo mazali na bopusi likoló na bomoi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Kondima na yo kati na lisekwa ezali mpenza makasi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/8 nk. 4-8

Elikya kitoko mpo na molimo

BASODÁ ya Loma bamizelaki na yango te. Wana bamataki na nkanda nyonso na ngomba Masada, oyo ezalaki bongo esika makasi, ekimelo ya nsuka mpo na mampinga ya Bayuda batomboki, bamizelaki ete bábundisa banguna na bango, ete báyoka mibali na etumba bazali konganga, basi mpe bana bazali kolela. Nzokande bayokaki bobele lokito ya mɔ́tɔ. Wana batalaki malamu kati na esika makasi yango oyo ezalaki kopela mɔ́tɔ, Baloma bamonaki likambo moko ya nsɔ́mɔ: banguna na bango​—bato soko 960​—basilaki kokufa! Na lolenge ebongisamaki mpenza, Bayuda mibali na etumba babomaki mabota na bango moko, mpe na nsima babomanaki bango na bango. Moto ya nsuka amibomaki ye moko.a Eloko nini epusaki bango na kobomana ya nsɔ́mɔ boye?

Engebene Josèphe, mokomi na makambo ya kala oyo azalaki na bomoi na eleko wana, likambo monene oyo epusaki bango ezalaki bongo endimeli oyo ete molimo ekufaka te. Eleazar Ben Jair, mokambi ya Bazelote, amekaki liboso kondimisa bato na ye ete na esika ete bábomama to bákangama na boombo na mabɔkɔ ya Baloma, ebongi malamu ete bábatela lokumu na bango na komibomáká bango moko. Lokola bakakatanaki mpo na kondimela ye, abandaki kolobela makambo matali molimo na mayoki maleki ndelo. Ayebisaki bango ete nzoto ezali bobele eloko ya nkaká, bolɔ́kɔ mpo na molimo. Akóbaki na kolobáká ete: “Kasi soki esikolami na bozito oyo ebendaka yango awa na mabelé mpe oyo ekangaka yango, molimo ezongaka na esika na yango mpenza, na nsima ezwaka solo nguya oyo epambolami mpe makasi oyo ezangi nsuka, kozwáká bongo ezalela ya kozanga komonana na miso ya bato bobele lokola Ye moko Nzambe azali.”

Likambo nini lisalemaki na nsima? Josèphe ayebisi ete nsima wana Eleazar alobelaki likambo yango na mozindo mpenza, “bato nyonso oyo bazalaki koyoka ye bakataki ye maloba mpe batondaki na molende mabe oyo epusaki bango ete básalela nokinoki maloba na ye.” Josèphe abakisi ete: “Lokola bapusamaki na makanisi yango, moto nyonso azalaki kosala nokinoki, na mposa makasi ete akokisa maloba yango liboso ya moninga mosusu. . . . mposa wana makasi epusaki bango ete báboma basi na bango, bana na bango, mpe bámiboma bango moko.”

Ndakisa oyo ya nsɔ́mɔ ezali kosalisa biso na komona lolenge nini mpenza liteya oyo ete molimo ekufaka te ekoki kobebisa lolenge elongobani oyo bato basengeli kotalela liwa. Bandimi bateyami ete bátalela liwa lokola monguna monene ya moto te, kasi lokola ekuke oyo ezali kofungolela molimo nzela ya kozwa bomoi oyo eleki malamu. Kasi mpo na nini Bazelote Bayuda wana bandimaki liteya yango? Bato mingi bakoki kokanisa ete makomi na bango ya bulɛɛ, Makomami ya Liebele, mazali koteya ete moto azali na elimo oyo esosolaka kati na ye, molimo oyo ebimaka mpo na kozala na bomoi nsima ya liwa. Ezali mpenza bongo?

Molimo kati na Makomami ya Liebele

Na mokuse, tokoloba ete ezali bongo te. Na mokanda ya liboso mpenza ya Biblia, Genese, eyebisameli biso ete molimo ezali te eloko oyo ozali na yango, ezali nde eloko oyo yo ozali. Tozali kotánga na ntina na kozalisama ya Adama, moto ya liboso, ete: “Moto akómaki molimo na bomoi.” (Genese 2:7) Liloba ya Liebele oyo ebongolami awa na molimo, neʹphesh, esalelami mbala 700 kati na Makomami ya Liebele, ata mbala moko te epesi likanisi ete ezali bongo eloko ya elimo kati na nzoto ya moto, oyo ekabwani, to ezangi komonana. Nzokande, molimo ezali eloko oyo ekoki kosimbama, komonana.

Talá kati na Biblia na yo moko na mikapo oyo mipesami awa, mpamba te liloba ya Liebele neʹphesh lizwami kati na mokomoko na bisika yango. Mizali komonisa polele ete molimo ekoki kozwa likámá, ata mpe kokangama (Deteronome 24:7; Basambisi 9:17; 1 Samwele 19:11); ekoki kosimba biloko (Yobo 6:7); ekoki kokangama na mabendé (Nzembo 105:18); koyoka mposa ya kolya, ekoki koyokisama mawa mpo na kokila bilei, ekoki kolɛmba mpo na nzala mpe mpo na mposa ya mai; ekoki kokɔnda to ata kozanga mpɔngi mpo na mawa. (Deteronome 12:20; Nzembo 35:13; 69:10; 106:15; 107:9; 119:28) Na maloba mosusu, lokola yo mei nde ozali molimo, molimo na yo ekoki kokutana na likambo nyonso oyo yo okoki kokutana na yango.b

Boye, yango elimboli ete molimo mokoki mpenza kokufa? Ee. Na bokeseni na lolenge elobamaka ete molimo ekufaka te, molimo elobelami kati na Makomami ya Liebele ete “[ekokatama, NW]” to ekobukanisama, soki esali mabe, ekotutama, ekobomama, ekobebisama, mpe ekopasolama bitenibiteni. (Exode 31:14; Deteronome 19:6; 22:26; Nzembo 7:2) Ezekiele 18:4 elobi ete: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” Emonani polele ete liwa likokómela milimo nyonso, mpamba te biso nyonso tosalaka masumu. (Nzembo 51:5) Bayebisaki na Adama, mobali ya liboso, ete etumbu mpo na lisumu ezali bongo liwa​—kasi te kokɔta kati na mokili oyo mozangi komonana to kokóma na ezalela ya kozanga kokufa. (Genese 2:17) Mpe na ntango asalaki lisumu, ekateli esakolamaki ete: “Ozali mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.” (Genese 3:19) Na ntango Adama na Eva bakufaki, bakómaki solo ‘milimo mikufi’ to ‘milimo miwei.’​—Mituya 5:2; 6:6.

Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete búku The Encyclopedia Americana ezali koloba na ntina na molimo kati na Makomami ya Liebele ete: “Kondimana na kala ezali komonisa moto na bomoko, kasi te bosangisi ya molimo mpe nzoto.” Elobi lisusu ete: “Nefesh . . . emonisami te ete esalaka na bokabwani na nzoto.”

Na yango, Bayuda ya sembo bazalaki na endimeli nini na ntina na liwa? Na maloba mokuse, bazalaki na endimeli ete liwa ekeseni na bomoi. Nzembo 146:4 eyebisi likambo oyo lisalemaka na ntango elimo, to nguya ya bomoi, elongwaka na nzoto ya moto: “Soko [“elimo,” NW] ekolongwa, moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.”c Bobele bongo, mokonzi Salomo akomaki ete bakufi “bayebi likambo te.”​—Mosakoli 9:5.

Na bongo, mpo na nini Bayuda mingi ya ekeke ya liboso, lokola Bazelote, na Masada, bandimisamaki makasi ete molimo ekufaka te?

Bopusi ya Bagreke

Bayuda bazwaki likanisi wana kati na Biblia te, kasi epai na Bagreke. Katikati na ekeke ya nsambo mpe ya mitano L.T.B., emonani ete likanisi yango eutaki liboso na mangomba mabe ya Bagreke mpe eyaki kokɔta kati na filozofi na bango. Likanisi ya bomoi na nsima ya liwa epai kuna milimo misengeli kopesamela etumbu esimbaki mitema ya bato mingi na boumeli ya eleko molai, likanisi yango ekólaki mpe epalanganaki. Bafilozofe batyanaki ntembe mingi mpo na koyeba soki molimo ezali mpenza nini. Homère alobaki ete molimo ekendaka pwasa na esika mosusu nsima ya liwa, kobimisáká mingongo na nsé lokola nzoi, lokola ndɛkɛ, to makɛlɛ́lɛ mosusu ndenge na ndenge na mongongo ya nsé mpenza. Épicure alobaki ete molimo ezali solo na bozito mpe na bongo, ezali nzoto moko ya moke mingi mpenza.d

Kasi ekoki kozala ete molobeli aleki monene ya liteya oyo ete molimo ekufaka te ezalaki bongo filozofe Platon, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya minei L.T.B. Lolenge alobelaki liwa ya molakisi na ye Socrate emonisi ete azalaki na bindimeli oyo ekokanaki mingi mpenza na oyo Bazelote ya Masada bazalaki na yango bikeke mingi na nsima. Nganga-mayele moko na nkombo ya Oscar Cullmann alobi ete: “Platon amonisi biso lolenge Socrate akufi na kimya nyonso mpe na bopemi. Liwa ya Socrate ezali liwa moko kitoko. Likambo ya kobangisa ezali te. Socrate akoki kobanga liwa te, mpamba te yango ezali kokabola biso na nzoto. . . . Liwa ezali moninga monene ya molimo. Na lolenge ateyaka, bobele bongo mpe akufi na motindo oyo moyokani mpenza na mateya na ye.”

Na ntembe te, ezalaki na boumeli ya eleko ya Bamakabé, na ekeke ya mibale liboso na kobotama ya Klisto nde Bayuda babandaki kokamata mateya wana epai na Bagreke. Na ekeke ya liboso T.B., Josèphe ayebisi biso ete Bafalisai mpe Baesene​—bituluku minene ya Lingomba ya Bayuda⁠—bayambaki liteya wana. Mwa maloba mosusu ya ntɔ́ki oyo makomamaki na eleko wana mamonisi mpe endimeli yango.

Kasi ezalaki boni mpo na Yesu Klisto? Ye mpe bayekoli na ye bateyaki likanisi wana oyo eutaki na Lingomba ya Bagreke?

Lolenge baklisto ya liboso batalelaki molimo

Baklisto ya liboso bazalaki na likanisi motindo moko te na oyo ya Bagreke na ntina na molimo. Na ndakisa, tótalela liwa ya Lasalo moninga ya Yesu. Soki Lasalo azalaki na molimo ekufaka te oyo ebimaki nokinoki, oyo ekómaki na bonsomi mpe na esengo na nsima ya liwa, mbɛlɛ lisoló oyo ezwami kati na Yoane mokapo 11 elingaki kokomama na lolenge mosusu, boye te? Na ntembe te, mbɛlɛ Yesu alingaki koyebisa bayekoli na ye soki Lasalo azalaki na bomoi mpe soki azalaki malamu mpe soki azalaki koyeba makambo nyonso mazalaki koleka wana esilaki ye kokóma na likoló; nzokande, azongelaki likanisi oyo lizwami kati na Makomami ya Liebele na koyebisáká bango ete Lasalo azalaki kolala mpɔngi, ete ayebaki likambo te. (Vɛrsɛ́ 11) Ya solo, mbɛlɛ Yesu alingaki kosepela soki ezalaki ete moninga na ye akómaki na bomoi moko kitoko; nzokande, tomoni ete alelaki na miso ya bato nyonso na ntina na liwa na ye. (Vɛrsɛ́ 35) Ya solo, soki molimo ya Lasalo ekendaki na likoló, kosepeláká bongo na bisengo ya ezalela ya kozanga kokufa, mbɛlɛ elingaki kozala motema mabe mpo na Yesu na kokitisáká ye lisusu awa na nsé ete aya kofanda lisusu mwa bambula kati na “bolɔ́kɔ” oyo ete nzoto ya mosuni oyo ezangi kokoka, kati na bato ya masumu mpe oyo bakufaka.

Lasalo asekwaki na komemeláká bato masoló ya bisengo na ntina na mikolo minei kitoko oyo alekisaki lokola ekelamu ya elimo oyo esikwamaki, oyo ekabwanaki na nzoto ya mosuni? Te, ezalaki bongo te. Baoyo bandimelaka liteya oyo ete molimo ekufaka te bakoyanola ete ezalaki mpenza bongo mpo ete makambo oyo mobali yango amonaki ezalaki ya nsɔ́mɔ mpenza na boye ete akokaki kolobela yango te. Kasi likanisi oyo ekoki kolónga soko moke te; mpamba te, soki ezalaki bongo mbɛlɛ Lasalo akokaki koyebisa balingami na ye ata bobele ete amonaki makambo ya kokamwa​—ete akokaki kolimbola yango sikisiki te, boye te? Nzokande, Lasalo alobaki soko moke te ete akutanaki na likambo moko wana azalaki kati na kufa. Kanisá naino​—akanga monɔkɔ likoló na likambo oyo bato mingi mpenza balukaka koyeba yango, oyo ete: nini elekaka nsima ya liwa! Tokoki kolimbola likambo yango bobele na lolenge moko. Azalaki na makambo ya koloba te. Bakufi balali mpɔngi, bayebi likambo te.

Na yango, Biblia ezali nde komonisa ete liwa ezali moninga ya molimo, mwa molulu mpo na koleka na lolenge mosusu ya bomoi? Soko moke te! Baklisto ya solo batalelaki liwa, lokola ntoma Paulo, ete ezali moninga te; ezali “monguna na nsuka.” (1 Bakolinti 15:26) Baklisto batalelaka liwa lokola eloko ya malamu te, kasi lokola eloko ya nsɔ́mɔ, ya mabe, mpamba te eyaki mpo na lisumu mpe ezaleli ya botombokeli Nzambe. (Baloma 5:12; 6:23) Ezalaki te kati na mokano ya Nzambe na ebandeli mpo na bato.

Nzokande, baklisto ya solo bazangi elikya te mpo ete molimo ekufaka. Lisoló ya kosekwisama ya Lasalo ezali moko kati na masoló mingi ya Biblia oyo ezali komonisa biso polele elikya ya solo, oyo euti na Makomami, na ntina na milimo oyo misilá kokufa​—ezali bongo lisekwa. Biblia ezali koteya biso mitindo mibale ya lisekwa. Mpo na ebele monene ya bato oyo basilá kolala kati na nkunda, ezala bayengebene to mpe bayengebene te, elikya ezali mpo na bango ya kosekwisama mpo na bomoi kati na Paladiso awa na mabelé. (Luka 23:43; Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Mpo na etuluku moke ya bato oyo Yesu abéngaki bango ete “etongá moke,” bakosekwisama mpo na kozwa bomoi ezangi nsuka lokola bikelamu ya elimo kuna na likoló. Bato oyo, sangisá mpe bantoma ya Klisto, bakoyangela elongo na Yesu Klisto likoló na bato mpe bakozongisa bango na ezalela ya kokoka.​—Luka 12:32; 1 Bakolinti 15:53, 54; Emoniseli 20:6.

Na bongo, mpo na nini mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba mazali koteya lisekwa te, kasi mazali nde koteya ete molimo ya moto ekufaka te? Tótalela oyo nganga-mayele ya teoloji, Werner Jaeger, apesi kati na búku na ye, The Harvard Theological Review na 1959: “Likambo lileki monene kati na bokóli ya mateya ya lingomba ya boklisto ezali ete mobandisi ya teoloji ya lingomba ya boklisto, Origène, azalaki filozofe oyo azalaki kolanda makanisi ya Platon mpe ayekolaki na eteyelo ya Alexandrie. Abakisaki ebele ya mateya na ntina na molimo kati na mateya ya moboko ya boklisto, mateya oyo azwaki epai na Platon.” Na yango, lingomba esalaki bobele lolenge Bayuda basalaki yango bikeke mingi liboso! Basundolaki mateya ya Biblia mpo na kokamata filozofi ya Bagreke.

Eutelo mpenza ya liteya yango

Na mokano ya kolóngisa liteya oyo ete molimo ekufaka te, basusu bakoki sikawa kotuna ete: Mpo na nini liteya yango moko eteyami na mitindo mingi kati na ebele ya mangomba na mokili? Makomi mayebisi ntina ya solosolo mpo na yango liteya wana lipalangani mingi kati na mangomba ya mokili.

Biblia ezali koyebisa biso ete “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe” mpe emonisi polele ete Satana azali “mokóló na mokili oyo.” (1 Yoane 5:19; Yoane 12:31) Na ntembe te, mangomba ya mokili mabatelami te na bopusi ya Satana. Nzokande, mazali kosangana mingi na mobulu mpe na bitumba oyo bizali kobima na mokili lelo oyo. Mpe mpo na likambo litali molimo, emonani mpenza polele ete bazali kolanda likanisi ya Satana. Na lolenge nini?

Omikundola naino lokuta ya liboso oyo abimisaki. Nzambe ayebisaki Adama na Eva ete bakokufa soki basaleli ye lisumu. Kasi Satana alobaki na Eva ete: “Bokokufa solo te.” (Genese 3:4) Ya solo, Adama na Eva bakufaki mpenza; bazongaki mputulu lokola Nzambe alobaki yango. Satana, ‘tata na lokuta,’ asukaki te bobele na lokuta na ye wana ya liboso. (Yoane 8:44) Kati na ebele ya mangomba oyo mapɛngwi longwa na mateya ya Biblia to oyo mazali koboya mpenza kondima yango, likanisi yango ezali bobele kokóba: ‘Bokokufa solo te. Nzoto na bino ekoki kokufa, kasi molimo na bino ekokóba kozala na bomoi, mpo na libela​—lokola Nzambe!’ Likambo ya kobenda likebi ezali ete, Satana ayebisaki lisusu Eva ete akokóma ‘lokola Nzambe’!​—Genese 3:5.

Ezali mpenza malamu kozala na elikya oyo ezwi moboko na yango likoló na solo, kasi te likoló na mateya ya lokuta to likoló na filozofi ya bato. Ezali mpenza malamu mingi koleka kondimisama ete balingami na biso oyo basilá kokufa bazali koyeba likambo te awa elali bango mpɔngi kati na nkunda, na esika ete tómitungisa na kolukáká koyeba epai wapi milimo mizangi kokufa mizali! Likambo oyo ete bakufi bazali kolala mpɔngi esengeli te kobangisa biso to kotungisa biso na makanisi! Na lolenge moko to mosusu, tokoki kotalela bakufi lokola ete bazali kozwa bopemi kati na esika ya libateli mpe ya kimya. Mpo na nini tolobi ete esika ya libateli? Mpamba te Biblia ezali kondimisa biso ete bakufi oyo Yehova alingaka bazali na bomoi. (Luka 20:38) Bazali na bomoi kati na bɔɔngɔ́ na ye. Oyo ezali mpenza likanisi ya kobɔndisa, mpamba te bɔɔngɔ́ na ye ezali na nsuka te. Azali na mposa makasi ya kosekwisa ebele ya bamilió ya bato oyo ye alingaka mpe akopesa bango likoki ya kozala na bomoi mpo na libela awa na mabelé.​—Kokanisá na Yobo 14:14, 15.

Mokolo ya nkembo oyo lisekwa ekosalema ekoya, bobele bongo mpe bilaka nyonso oyo Yehova alakaki bikokokisama. (Yisaya 55:10, 11) Kanisá ete esakweli oyo ekokisami: “Bakufi na yo bazwi bomoi, bibembe na bango ekotɛlɛma lisusu. Baoyo bazali kolala mpɔngi na nsé ya mabelé bakolamuka mpe bakonganga na esengo; mpamba te mamwe na yo ezali mamwe na kopesa pole, mpe mabelé makobota lisusu baoyo bakufaki uta kalakala.” (Yisaya 26:19, The New English Bible) Na bongo, bakufi oyo bazali kolala mpɔngi kati na nkunda bazali na libateli lokola mwana kati na libumu ya mama. Etikali moke ‘bakobotama,’ bakozongisama na bomoi kati na paladiso na mabelé!

Elikya mosusu nini ekoki kozala kitoko koleka oyo?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Elobami ete basi mibale mpe bana mitano babikaki mpo ete bamibombaki. Na nsima basi yango bayebisaki makambo wana epai na Baloma oyo bakangaki bango.

b Ya solo, lokola maloba mingi makoki kosalelama na mitindo ebele, bobele bongo liloba neʹphesh likoki mpenza kosalelama na bandimbola ekeseni. Na ndakisa, ekoki kolobela bomoto ya kati, mingi mpenza na ntina na mayoki mozindo. (1 Samwele 18:1) Ekoki mpe kolobela bomoi oyo moto azali na yango lokola molimo.​—1 Mikonzi 17:21-23.

c Liloba ya Liebele oyo ebongolami ete “elimo,” ruʹach, elimboli “mpema” to “mopepe.” Soki esalelami mpo na bato, elimboli te ekelamu ya elimo oyo eyebi makambo, kasi, lokola búku The New International Dictionary of New Testament Theology elobi yango, elimboli “nguya ya bomoi oyo ezali kati na moto mokomoko.”

d Azalaki moto ya nsuka te mpo na komonisa makanisi ya lipɛngwi motindo wana. Na ebandeli ya ekeke oyo, nganga-mayele moko alobaki ete amekaki bozito ya milimo ya bato mingi na kolongoláká bozito na bango nokinoki nsima ya liwa kati na bozito oyo bazalaki na yango pene mpenza na liwa.

[Elilingi na lokasa 7]

Bazelote Bayuda na Masada bakanisaki ete liwa esengelaki kosikola milimo na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto