Tósangana na libɔndisi oyo Yehova azali kopesa
“Elikya na biso mpo na bino ezali kotɛlɛma ngwi, zambi boyebi ete pelamoko bosili kosangana na bolózi na biso, bongo bokosangana na kobɔndisama na biso.”—2 BAKOLINTI 1:7.
1, 2. Bato mingi oyo bazali lelo baklisto bakutanaki na likambo nini?
BATO mingi oyo lelo bazali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli bakólaki kozanga boyebi ya solo ya Nzambe. Mbala mosusu ezali bongo mpo na yo. Soki ezali bongo, omikundola lolenge oyo omiyokaki ntango miso na yo ya bososoli mabandaki kofungwana. Na ndakisa, ntango oyokaki mpo na mbala ya liboso ete bakufi banyokwamaka te mpe bayebi lisusu eloko te, obɔndisamaki, boye te? Mpe ntango oyekolaki makambo na ntina na elikya oyo ezali mpo na bakufi, ete bamilió ya bato bakosekwa mpo na bomoi kati na mokili ya sika ya Nzambe, obɔndisamaki, boye te?—Mosakoli 9:5, 10; Yoane 5:28, 29.
2 Ezali boni mpo na elaka ya Nzambe ya kosukisa mabe mpe ya kobongola mabelé oyo paladiso? Ntango oyokaki yango, ebɔndisaki yo mpe etondisaki yo na mposa makasi ya kozela yango, boye te? Ozalaki na mayoki nini ntango oyokaki mpo na mbala ya liboso ete likoki lizali ya kozanga kokufa mpe ya kobika mpo na kokɔta kati na paladiso na mabelé? Na ntembe te otondaki na nsai. Ee, olendisamaki na nsango ya kobɔndisa oyo ezali sikawa kosakolama na Batatoli ya Yehova kati na mokili mobimba.—Nzembo 37:9-11, 29; Yoane 11:26; Emoniseli 21:3-5.
3. Mpo na nini baoyo basakolaka nsango ya Nzambe epai na basusu bakutanaka na bolózi?
3 Nzokande, ntango omekaki kosakwela basusu nsango ya Biblia, ososolaki mpe ete “bato nyonso bazali na kondima te.” (2 Batesaloniki 3:2) Ekoki kozala ete bamoko kati na baninga na yo ya kala batyolaki yo mpo ete olobelaki kondima na yo na bilaka ya Biblia. Kútu mbala mosusu banyokolaki yo mpamba te okóbaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Mbala mosusu botɛmɛli ekómaki makasi ntango obandaki kosala mbongwana na bomoi na yo mpo na kotosa mitindá ya Biblia. Obandaki kozwa bolózi oyo Satana mpe mokili na ye bazali koyeisela baoyo bazali kondima libɔndisi ya Nzambe.
4. Na mitindo nini mikeseni bato mingi oyo bauti kosepela na solo basalaka liboso na bolózi?
4 Likambo ya mawa, lokola Yesu asakolaki yango, mpasi esalaka ete bamoko bábɛta libaku mpe bátika lisangá ya boklisto. (Matai 13:5, 6, 20, 21) Basusu bayikaka mpiko kati na bolózi na kotyáká makanisi na bango likoló na bilaka ya kobɔndisa oyo bazali koyekola. Na nsima bapesaka bomoi na bango na Yehova mpe bazwaka batisimo lokola bayekoli ya Mwana na ye, Yesu Klisto. (Matai 28:19, 20; Malako 8:34) Ezali solo ete, bolózi esilaka te ntango moto azwi batisimo. Na ndakisa, komibatela pɛtɔ na bizaleli ekoki kozala etumba monene mpo na moto oyo azalaki liboso na bomoi ya mbindo. Basusu basengeli kolónga botɛmɛli makasi ya basangani ya libota na bango oyo bazali bandimi te. Atako mpasi yango ezali boni, baoyo nyonso bazali komitambwisa na bosembo engebene komipesa na bango na Nzambe bakoki kondimisama na likambo moko. Na lolenge oyo etali mpenza moto na moto, bakozwa libɔndisi mpe lisungi ya Nzambe.
“Nzambe na kobɔndisa nyonso”
5. Eloko nini Paulo azwaki, esika moko na komekama makasi oyo akutanaki na yango?
5 Moto moko oyo amonisaki botɔ́ndi mingi mpo na libɔndisi ya Nzambe ezalaki bongo ntoma Paulo. Nsima ya kolekisa eleko moko ya komekama makasi na Azia mpe na Makɛdɔnia, abɔndisamaki mingi wana ayokaki nsango ete lisangá ya Kolinti eyanolaki malamu na mokanda oyo akomaki mpo na kopamela bango. Likambo yango etindaki ye na kokomela bango nkomá ya mibale, oyo ezali na maloba ya masanzoli oyo: “Nzambe mpe Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto akumisama, ye Tata na mawa mpe Nzambe na kobɔndisa nyonso. Ye akobɔndisa biso kati na bolózi na biso.”—2 Bakolinti 1:3, 4.
6. Tozali koyekola makambo nini na maloba ya Paulo oyo mazwami na 2 Bakolinti 1:3, 4?
6 Maloba wana mapemami mazali kolobela makambo mingi. Tótalela yango. Ntango Paulo azali kopesa masanzoli to matɔ́ndi epai ya Nzambe to ntango azali koyebisa Nzambe lisɛngi moko kati na nkomá na ye, tomonaka mbala mingi ete akɔtisaka mpe maloba ya botɔ́ndi mozindo mpo na Yesu, Mokonzi ya lisangá ya boklisto. (Baloma 1:8; 7:25; Baefese 1:3; Baebele 13:20, 21) Na yango, Paulo azali kopesa masanzoli na ye epai na “Nzambe mpe Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto.” Na nsima, mpo na mbala ya liboso na mikanda na ye, asaleli liloba moko ya Greke oyo ebongolami “mawa.” Liloba yango euti na liloba oyo esalelamaka mpo na komonisa mawa mpo na mpasi ya moto mosusu. Na lolenge yango Paulo alobeli mayoki ya boboto oyo Nzambe azali na yango epai na basaleli na Ye nyonso ya sembo oyo bazali kati na bolózi—mayoki ya boboto oyo matindaka Nzambe ete asalela bango makambo na motema mawa nyonso. Na nsuka, Paulo amibaloli epai na Yehova oyo azali eutelo ya ezaleli wana kitoko na kobéngáká ye “Tata na mawa.”
7. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali “Nzambe na kobɔndisa nyonso”?
7 “Mawa” ya Nzambe epesaka kobɔndisama epai na baoyo bazali kati na bolózi. Na bongo, Paulo akóbi komonisa Nzambe lokola “Nzambe na kobɔndisa nyonso.” Boye, ezala libɔndisi nini tokoki kozwa na nzela ya boboto emonisami na baninga na biso bandimi, tokoki komibalola epai na Yehova oyo azali eutelo na yango. Ezali na libɔndisi moko te ya solo, to ya koumela oyo euti na Nzambe te. Lisusu, ezali ye nde akelaki bato na elilingi na ye, kopesáká na biso bongo likoki ya kozala babɔndisi. Mpe ezali elimo santu ya Nzambe nde elendisaka basaleli na ye na komonisa motema boboto epai na baoyo bazali na mposa ya libɔndisi.
Tobongisami mpo na kozala babɔndisi
8. Atako Nzambe azali eutelo ya komekama na biso te, matomba nini tokoki kozwa na koyika mpiko kati na bolózi?
8 Atako Yehova Nzambe atikaka nzela ete komekama ndenge na ndenge ekómela basaleli na ye ya sembo, ye azali soko moke te eutelo ya komekama motindo yango. (Yakobo 1:13) Nzokande, libɔndisi oyo apesaka ntango tozali koyika mpiko kati na bolózi ekoki kobongisa biso ete tókanisa nokinoki bosɛnga ya basusu. Epesaka litomba nini? “Na bongo biso tokoki kobɔndisa bango bazali kati na bolózi ndenge nini na motindo na libɔndi oyo Nzambe abɔndisi biso na yango.” (2 Bakolinti 1:4) Na lolenge yango Yehova azali mpenza kobongisa biso mpo na kopesa libɔndisi na ye epai na baninga na biso bandimi mpe epai na baye tokutani na bango na mosala na biso ya kosakola wana tozali komekola Klisto mpe ‘kobɔndisa nyonso baoyo bazali kolela.’—Yisaya 61:2; Matai 5:4.
9. (a) Nini ekosalisa biso na koyika mpiko na ntango ya mpasi? (b) Lolenge nini basusu bazali kobɔndisama ntango tozali koyika mpiko na bosembo nyonso wana tokutani na bolózi?
9 Paulo ayikaki mpiko na bampasi mingi oyo akutanaki na yango, na lisalisi ya libɔndisi mingi oyo azwaki epai na Nzambe na nzela ya Klisto. (2 Bakolinti 1:5) Biso mpe tokoki kozwa libɔndisi mingi na komanyoláká likoló na bilaka kitoko ya Nzambe, na kobondeláká mpo na kozwa lisungi ya elimo santu na ye, mpe na kozwáká biyano ya Nzambe na mabondeli na biso. Na lolenge yango tokolendisama mpo na kokóba kokɔtela lotómo ya Yehova lokola Nkolo-Mokonzi mpe komonisa ete Zábolo azali mobuki na lokuta. (Yobo 2:4; Masese 27:11) Wana toyiki mpiko mpe totikali sembo kati na lolenge nyonso ya bolózi, tosengeli, lokola Paulo, kopesa lokumu na Yehova, oyo libɔndisi na ye epesaka baklisto likoki ya kotikala sembo kati na komekama. Mpiko ya baklisto ya sembo ebɔndisaka libota mobimba ya bandeko, kosaláká ete basusu bázala na ekateli makasi ya ‘koyika mpiko na mpasi ya lolenge yango.’—2 Bakolinti 1:6.
10, 11. (a) Wapi mwa makambo mosusu oyo epesaki mpasi na lisangá ya Kolinti na ntango ya kala? (b) Lolenge nini Paulo abɔndisaki lisangá ya Bakolinti, mpe elikya nini amonisaki?
10 Bakolinti mpe bazwaki mpasi oyo ekwelaka baklisto nyonso ya solo. Lisusu, bazalaki na mposa ya toli mpo na kobimisa na lisangá moto moko ya pite oyo abongolaki motema te. (1 Bakolinti 5:1, 2, 11, 13) Kozanga kokata likambo yango mpe kozanga kosilisa koswana mpe bokabwani ememaki nsɔ́ni likoló na lisangá. Kasi na nsuka basalelaki toli ya Paulo mpe bamonisaki kobongola motema ya solosolo. Na yango, apesaki bango longonya na mɔ́tɔ nyonso mpe alobaki ete lolenge malamu oyo bayanolaki na nkomá na ye ebɔndisaki ye. (2 Bakolinti 7:8, 10, 11, 13) Emonani lokola ete, moto oyo abimisamaki abongolaki mpe motema. Yango wana Paulo alobelaki bango mpo ‘na kolimbisa ye ete moto yango azinda na mawa na koleka te.’—2 Bakolinti 2:7.
11 Boye nkomá ya mibale ya Paulo ebɔndisaki mpenza lisangá ya Bakolinti. Yango ezalaki mpe moko na mikano na ye. Alimboli yango boye: “Elikya na biso mpo na bino ezali kotɛlɛma ngwi, zambi boyebi ete pelamoko bosili kosangana na bolózi na biso, bongo bokosangana na kobɔndisama na biso.” (2 Bakolinti 1:7) Na nsuka ya nkomá na ye, Paulo apesi elendiseli oyo: “Tiká ete . . . bóbɔndisama, . . . mpe Nzambe ya bolingo mpe ya kimya akozala na bino elongo.”—2 Bakolinti 13:11, NW.
12. Mposa nini baklisto nyonso bazalaka na yango?
12 Oyo nde liteya ya ntina mpenza tokoki kozwa na yango! Basangani nyonso ya lisangá ya boklisto bazali na mposa ya “kosangana na kobɔndisama” oyo Nzambe azali kopesa na nzela ya Liloba na ye, na nzela ya elimo santu na ye, mpe na nzela ya lisangá na ye oyo ezali na mabelé. Ata baoyo babimisami na lisangá bakoki kozala na mposa ya libɔndisi soki babongoli motema mpe babongisi etamboli na bango. Mpo na yango, “moombo ya sembo mpe ya mayele” asalaki ebongiseli moko ya motema mawa mpo na kosunga bango. Mbala moko na mbula bankulutu mibale bakokenda kotala bato mosusu oyo babimisamaki na lisangá. Mbala mosusu bato yango bazali komonisa lisusu elimo ya botomboki te mpe bazali na mposa ya lisungi mpo na kosala matambe oyo masengeli mpo na kozongisama na lisangá.—Matai 24:45; Ezekiele 34:16.
Bolózi ya Paulo na Azia
13, 14. (a) Lolenge nini Paulo alobelaki ntango ya bolózi makasi oyo akutanaki na yango na Azia? (b) Mbala mosusu Paulo azalaki kokanisa likambo nini?
13 Motindo ya mpasi oyo lisangá ya Kolinti ekutanaki na yango kino wana ekoki kokokanisama na malózi oyo Paulo ayikelaki mpiko. Yango wana akundwelaki bango ete: “Bandeko, tolingi te ete bózanga koyeba mpo na bolózi bozwaki biso na Azia, mpo ete ezalaki na bozito na koleka epai na biso kino biso tokanisaki ete bomoi ezali lisusu te. Ɛɛ, tomilobeli na motema na biso mpenza ete tosili kokita ete tókufa. Kasi ezalaki ete tótya motema epai na biso mpenza te kasi epai na Nzambe, Mosekwisi na bakufi. Abikisi biso na kufa na lolenge yango mpe akobikisa lisusu. Totii elikya epai na ye; akobikisa lisusu.”—2 Bakolinti 1:8-10.
14 Banganga-mayele mosusu ya Biblia bakanisi ete Paulo azalaki kolobela yikiyiki oyo esalemaki na Efese, oyo mbɛlɛ elongolaki bomoi ya Paulo mpe ya baninga na ye mibale, Gayo na Alisitalaka, bato ya Makɛdɔnia oyo bazalaki na mobembo elongo na ye. Baklisto wana mibale babendamaki na makasi kino na esanelo etondi na ebele ya bato oyo “bangangi soko ntango [“ngonga,” NW] mibale ete, Monene Alatɛmi [nzambemwasi] na Baefese!” Nsukansuka, mokonzi moko ya engumba alongaki kokitisa bibele ete bázala nyɛɛ. Likámá wana mpo na bomoi ya Gayo mpe Alisitalaka etungisaki Paulo mingi mpenza. Ya solo, alingaki kokɔta kuna mpe kosolola na bibele wana ya bato ya molende ya mabe, kasi bapekisaki ye ete atya bomoi na ye na likámá te na lolenge yango.—Misala 19:26-41.
15. Mbala mosusu likámá nini ya makasi koleka lilobelami kati na 1 Bakolinti 15:32?
15 Kasi, mbala mosusu Paulo azalaki bongo kolobela libaku mosusu ya likámá monene koleka oyo tolobeli. Kati na nkomá na ye ya liboso epai na Bakolinti, Paulo atunaki ete: “Naloba bobele lokola moto mpenza! Nazwi litomba nini soko nabundani na nyama na yauli kati na Efese?” (1 Bakolinti 15:32) Oyo ekoki komonisa ete bomoi ya Paulo ezalaki na likámá bobele epai na bato oyo bakokani na nyama mabe te kasi mpe epai na nyama ya zámba mpenza oyo izalaki kati na esanelo ya Efese. Mbala mosusu bazalaki kopesa basáli na mabe etumbu na kotindáká bango ete bábunda na nyama mabe wana bibele oyo bazalaki na mposa ya komona makila bazalaki kotala bango. soki Paulo alobaki ete abundisamaki na nyama mabe ya solosolo, boye na nsuka abikisamaki mpenza na liwa na lolenge ya likamwisi, motindo moko lokola Danyele abikisamaki na minɔkɔ ya nkosi ya solosolo.—Danyele 6:22.
Bandakisa ya mikolo na biso
16. (a) Mpo na nini Batatoli ya Yehova mingi bakoki mpe kotalelama na motindo ya malózi ya Paulo? (b) Na likambo nini tokoki kondimisama na ntina na baoyo bakufaki mpo na kondima na bango? (c) Bopusi nini malamu emonanaki ntango baklisto mosusu babikisamaki na liwa na lolenge ya kokamwa mpenza?
16 Baklisto mingi ya mikolo na biso bakoki kotalelama motindo moko na malózi oyo Paulo anyokwamaki na yango. (2 Bakolinti 11:23-27) Lelo oyo mpe, baklisto bazali “na bozito na koleka epai na [bango],” mpe mingi bakutanaki na mabaku oyo kati na yango bakanisaki ete ‘bomoi ezali lisusu te mpo na bango.’ (2 Bakolinti 1:8) Basusu babomamaki na bibele mpe na banyokoli mabe. Tokoki kondimisama ete nguya ya kobɔndisa ya Nzambe eyikisaki bango mpiko mpe ete liboso ete bákufa mitema mpe makanisi na bango ezalaki ngwi likoló na kokokisama ya elikya na bango, ezala elikya ya bomoi na likoló to elikya ya bomoi awa na mabelé. (1 Bakolinti 10:13; Bafilipi 4:13; Emoniseli 2:10) Na mabaku mosusu, Yehova abalolaki makambo, mpe bandeko na biso babikisamaki na liwa. Ntembe ezali te ete baoyo babikisamaki lolenge yango bakólisaki elikya na bango “epai na Nzambe, Mosekwisi na bakufi.” (2 Bakolinti 1:9) Na nsima, bakómaki koloba na endimiseli makasi wana ezalaki bango kosakwela basusu nsango ya kobɔndisa ya Nzambe.—Matai 24:14.
17-19. Makambo nini mazali komonisa ete bandeko na biso na Rwanda bazali basangani kati na libɔndisi ya Nzambe?
17 Eleki kala mingi te bandeko na biso balingami na Rwanda bakutanaki na likambo motindo moko na oyo ya Paulo mpe baninga na ye. Mingi babungisaki bomoi na bango, kasi milende ya Satana ebebisaki kondima na bango te. Kasi nde, bandeko na biso na mboka yango bazwaki moto na moto libɔndisi ya Nzambe. Na ntango ya kobomana ya bikólo kati na Batutsi mpe Bahutu oyo bazali na Rwanda, Bahutu mosusu batyaki bomoi na bango na likámá mpo na kobatela Batutsi mpe Batutsi babatelaki Bahutu. Basusu babomamaki na bato na molende ya mabe mpo ete balukaki kobatela baninga na bango bandimi. Na ndakisa, Motatoli moko Hutu na nkombo Gahizi abomamaki nsima wana abombaki ndeko mwasi moko Tutsi na nkombo Chantal. Jean, mobali ya Chantal, oyo azali Tutsi abombamaki na esika mosusu epai na ndeko mwasi moko Hutu na nkombo Charlotte. Na boumeli ya mikolo 40 Jean mpe ndeko mobali mosusu Tutsi babombamaki kati na mombonda monene ya ndako moko, kobimáká bobele na butu mpo na mwa ntango moke. Na boumeli ya ntango wana nyonso, Charlotte azalaki kopesa bango bilei mpe abatelaki bango, atako azalaki kofanda penepene ya káa ya basodá. Na lokasa oyo, ozali komona fɔ́tɔ ya Jean mpe Chantal esika moko, bazali na botɔ́ndi mingi ete baninga na bango ya losambo Bahutu ‘bakɔtisi nkingo na bango na mpasi’ mpo na bango, motindo moko lokola Pilisikila mpe Akula basalaki yango mpo na ntoma Paulo.—Baloma 16:3, 4.
18 Rwakabubu, Motatoli mosusu Hutu akumisamaki kati na zulunalo Intaremara mpamba te abatelaki baninga na ye bandimi oyo bazalaki Batutsi.a Elobaki ete: “Lisusu, Rwakabubu, moko na Batatoli ya Yehova, oyo atikaki te kobomba bato esika na esika, baoyo bazalaki bandeko na ye (wana ezali lolenge oyo bandimi babénganaka). Azalaki kolekisa mokolo mobimba komemáká bilei mpe mai mpo na bango atako ye moko azalaki kobɛla líkóko (asthme). Kasi Nzambe apesaki ye nguya mingi mpenza.”
19 Tótalela, lisusu, lisoló ya babalani Hutu Nicodème mpe Athanasie, oyo bazalaki kosepela na solo. Liboso na kobomana kati na bikólo, babalani wana bazalaki koyekola Biblia elongo na Alphonse, Motatoli moko Tutsi. Babombaki Alphonse na ndako na bango, likambo oyo ezalaki likámá mpo na bomoi na bango. Na nsima, bamonaki ete kati na ndako ezalaki na libateli malamu te mpamba te bato ya pembeni oyo bazalaki Hutu bayebaki moninga na bango Tutsi. Yango wana, Nicodème mpe Athanasie babombaki Alphonse kati na libulu moko na lompango na bango. Yango ezalaki likambo malamu mpamba te bato ya pembeni babandaki koya koluka Alphonse mokolo na mokolo. Ntango abombamaki na libulu wana mikolo 28, Alphonse amanyolaki likoló na masoló ya Biblia lokola oyo elobeli Lahaba, oyo abombaki Bayisalaele mibale likoló na samba ya ndako na ye na Yeliko. (Yosua 6:17) Lelo oyo Alphonse azali kokóba mosala na ye na Rwanda lokola mosakoli ya ntango nyonso ya nsango malamu, mpamba te abatelamaki na bayekoli na ye ya Biblia, Bahutu, oyo batyaki bomoi na bango na likámá mpo na ye. Kasi ezali boni mpo na Nicodème mpe Athanasie? Sikawa bazali Batatoli ya Yehova oyo basili kozwa batisimo mpe bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia koleka 20 elongo na bato oyo bamonisi bosepeli.
20. Na lolenge nini Yehova abɔndisaki bandeko na biso na Rwanda, kasi mposa monene nini mingi kati na bango bazali naino na yango?
20 Ntango kobomana na Rwanda ebandaki, basakoli ya nsango malamu bazalaki 2500 kati na mboka yango. Atako bankámá mingi babungisaki bomoi na bango to basengelaki kokima mboka, motángo ya Batatoli mosili kokóla koleka 3000. Oyo ezali elembeteli ete Nzambe abɔndisaki bandeko na biso. Ezali boni mpo na ebele na bitike mpe basi bakufeli-mibali oyo bazali kati na Batatoli ya Yehova? Ya solo, bazali naino na bolózi mpe bazali ntango nyonso na mposa ya kobɔndisama. (Yakobo 1:27) Mpisoli na bango ekokauka nyonso bobele ntango lisekwa likosalema na mokili ya sika ya Nzambe. Nzokande, na lisalisi ya lisungi ya bandeko na bango mpe mpo ete bazali basambeli ya “Nzambe na kobɔndisa nyonso,” bazali kokóba na bomoi.
21. (a) Epai wapi lisusu bandeko na biso bazali na mposa makasi ya libɔndisi ya Nzambe, mpe wapi lolenge moko oyo biso nyonso tokoki kopesa lisungi? (Talá etánda “Libɔndisi na boumeli ya mibu minei ya etumba.”) (b) Ntango nini mposa na biso ya libɔndisi ekokokisama nyonso?
21 Kati na bisika mosusu mingi, lokola na mboka Érythrée, Singapour, mpe ex-Yougoslavie, bandeko na biso bazali kokóba kosala na bosembo nyonso ata kati na bolózi. Tiká ete tósunga bandeko lolenge yango na kosaláká mokolo na mokolo malɔmbɔ ete bázwa libɔndisi. (2 Bakolinti 1:11) Mpe tiká ete tóyika mpiko na bosembo nyonso kino ntango oyo Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na [biso]” na nzela ya Yesu Klisto. Bongo tokozwa mpenzampenza libɔndisi oyo Yehova akopesa na mokili ya sika na ye ya boyengebene.—Emoniseli 7:17; 21:4; 2 Petelo 3:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuáli 1995, lokasa 26, elobelaki lisoló ya Deborah, mwana mwasi ya Rwakabubu, oyo libondeli na ye esimbaki motema ya etuluku ya basodá Hutu mpe esalaki ete bábomama te.
Oyebi soki?
◻ Mpo na nini Yehova abyangami ete “Nzambe na kobɔndisa nyonso”?
◻ Lolenge nini tosengeli kotalela malózi?
◻ Elongo na nani tokoki kosangana na libɔndisi?
◻ Lolenge nini mposa na biso ya libɔndisi ekokokisama nyonso?
[Elilingi na lokasa 17]
Atako Jean na Chantal bazali Batatoli Tutsi, Batatoli Hutu babombaki bango na bisika bikeseni na boumeli ya kobomana na Rwanda
[Elilingi na lokasa 17]
Batatoli ya Yehova bazali kolanda kosakwela bazalani na bango ya Rwanda nsango ya kobɔndisa ya Nzambe