Makambo ya nsɔ́mɔ na Rwanda: Nani azali mobandisi na yango?
Zulunalo U.S.News & World Report elobaki ete: “Liboso ete bákata motó ya elenge mobali moko ya mibu 23, oyo azalaki mekanisiɛ́, moko ya batomboki ayebisaki Hitiyise ete: ‘Osengeli kokufa mpamba te ozali Tutsi.’”
LIKAMBO motindo oyo ezalaki mpenza kosalema mbala na mbala na Rwanda, mboka moko moke ya Afrika ya ntéi, na boumeli ya sanza ya Apríli mpe Máí! Na ntango wana, masangá ya Batatoli ya Yehova mazalaki 15 na kati mpe na zingazinga ya engumba Kigali, mboka-mokonzi ya ekólo Rwanda. Mokɛngɛli ya engumba, Ntabana Eugène azalaki Tutsi. Ye moko, mwasi na ye, mwana na ye moko ya mobali, mpe Shami, mwana na ye ya mwasi ya mibu libwa, bazalaki kati na bato ya liboso oyo babomamaki na ntango mobulu mobimaki.
Ebele ya banamboka ya Rwanda bazalaki kobomana mokolo na mokolo—pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Na katikati ya sanza ya Máí, zulunalo oyo tolobelaki liboso eyebisaki ete: “Na pɔ́sɔ motoba oyo euti koleka, bato 250 000 bakufaki na boumeli ya mosala monene ya koboma mpe ya kopesa etumbu, motindo moko na kosopa ya makila oyo bato ya Khmer Rouge basopaki na mboka Cambodge na katikati ya bambula 1970.”
Zulunalo Time elobaki ete: “Likambo oyo ezali kokundwela bato makambo mazalaki kosalema na Allemagne ya Nazi, balongolaki bana mike katikati na etuluku ya bana 500 bobele mpo ete bazalaki lokola ba Tutsi. . . . Ba Hutu, bafándi na mboka bapesaki epai na moyangeli ya engumba Butare na súdi liponi [moko ya mpasi], mwasi na ye azalaki Tutsi, bayebisaki ye ete soki alingi kobikisa bomoi na ye asengelaki kotika libota ya mwasi na ye—baboti ya mwasi na ye mpe sɛmɛ́ki na ye ya mwasi—ete bábomama. Andimaki likambo yango.”
Bandeko motoba bazalaki kosala kati na biro ya bobongoli mikanda ya Batatoli ya Yehova na Kigali, minei bazalaki ba Hutu mpe mibale bazalaki ba Tutsi. Baoyo ya ba Tutsi ezalaki bongo, Ananie Mbanda mpe Mukagisagara Denise. Na ntango basodá elongo na bapunzi bayaki na ndako yango, baokaki nkanda na ntango bamonaki ete ba Hutu elongo na ba Tutsi bazali kofanda esika moko. Balingaki koboma Mbanda mpe Denise.
Emmanuel Ngirente, moko na bandeko ba Hutu, alobi ete: “Babandaki kolongola mitó ya ba grenades na bango, balingaki koboma biso mpo ete banguna na bango bazalaki elongo na biso. . . . Basɛngaki biso motuya monene ya mosolo. Topesaki bango mosolo nyonso oyo tozalaki na yango, kasi ekokaki bango te. Mpo na kokokisa mposa na bango, bakanaki kozwa eloko nyonso oyo bakokoka kosalela, bakamataki mpe ordinatɛrɛ ya moke ebéngami Laptop, oyo tozalaki kobongola na yango mikanda, masíni na biso ya fotokopi, baradio na biso, basapato na biso, mpe biloko mosusu. Mbala moko, bakendeki kozanga ete báboma ata moko kati na biso, kasi balobaki ete bakozonga lisusu.”
Na mikolo oyo milandaki nsima, bapunzi bazalaki kozonga mbala na mbala, mpe na mbala nyonso Batatoli ba Hutu bazalaki kosɛnga ete báboma te baninga na bango Batatoli ba Tutsi. Na nsuka, ntango makambo makómaki mpenza ndóngó na boye ete Mbanda mpe Denise bakokaki lisusu kotikala wana te, bibongiseli bikamatamaki mpo na bango mpo ete bákende elongo na bakími ba Tutsi na eteyelo moko ya penepene. Na ntango eteyelo yango epunzamaki, Mbanda mpe Denise bazwaki likoki ya kokima. Bakokaki koleka bituluku mingi ya basodá oyo etyamaki na nzela, kasi na nsuka, na moko na bituluku yango, babendaki ba Tutsi mpembeni, Mbanda mpe Denise babomamaki.
Na ntango basodá bazongaki lisusu na biro na biso ya bobongoli mikanda mpe bamonaki ete Batatoli ba Tutsi basilaki kokende, basodá yango babetaki bandeko ba Hutu makasi mpenza. Na nsima, mondóki moko ebetaki na zingazinga wana, mpe bandeko basalaki makasi mpo ete bákima mpo na kobatela bomoi na bango.
Wana koboma bato ezalaki kokóba kati na mboka mobimba, ekoki mpenza kozala ete motuya ya bakufi ekómaki pene na katikati na milió moko. Na nsuka, katikati na milió mibale mpe milió misato, to mpe koleka kati na bamilió mwambe ya bafandi ya Rwanda bakimaki mboka na bango. Mingi na bango bakimaki mpo na kobombama na zingazinga ya Zaïre mpe Tanzanie. Ebele ya Batatoli ya Yehova babomamaki, mpe ebele mosusu bazalaki kati na baoyo bakimaki mpo na kokende na bakáa na libándá ya mboka.
Nini ebandisaki makambo wana ya libomi mpe bokími mboka, na lolenge esalemá naino liboso te? Yango ekokaki kopɛngolama? Ezalela ya makambo ezalaki lolenge nini liboso ete mobulu mobima?
Ba Hutu mpe ba Tutsi
Ezala na Rwanda mpe ezala na mboka oyo ezali mpembeni na yango, Burundi, bato bafandaka kuna ezali bongo ba Hutu, bazali na libota ya Bantu, mingimingi bazalaka mokuse mpe makasi, mpe ba Tutsi bazalaka mingimingi molai, loposo mwa mpɛmbɛ, babéngaka bango mpe ba Watusi. Na bamboka oyo mibale, ba Hutu bazali na motángo ya 85% mpe ba Tutsi 14%. Bokeseni kati na bituluku oyo mibale ebandaki uta na ekeke ya zomi na mitano. Nzokande, na boumeli ya eleko molai mpenza, bazalaki kofanda esika moko na kimya nyonso.
“Tozalaki kofanda elongo kati na kimya,” ezali yango nde mwasi moko ya mibu 29 alobaki na ntina na ba Hutu mpe ba Tutsi 3 000 oyo bazalaki kofanda na mwa mboka moke ebéngami Ruganda, oyo ezali na mwa bakilomɛtɛlɛ moke na ɛ́sti ya Zaïre. Nzokande, na Apríli bato ya mobulu ya etúlúká ya ba Hutu babomaki pene na ba Tutsi nyonso ya mboka moke wana. Zulunalo The New York Times eyebisaki ete:
“Makambo oyo malekaki na mboka moke oyo mazali lolenge moko na makambo malekaki na Rwanda mobimba: ba Hutu mpe ba Tutsi bazalaki kofanda esika moko, kobalana, kozanga kokanisa to koluka koyeba nani azalaki Hutu mpe nani azalaki Tutsi.
“Na nsima, likambo moko libimaki pwasa. Na Apríli, ebele na bituluku ya ba Hutu bazalaki koleka epai na epai kati mboka mobimba, kobomáká bongo ba Tutsi epai nyonso bazalaki komona bango. Na ntango likambo oyo ya koboma ebandaki, ba Tutsi bazalaki kokima na bandakonzambe mpo na komibatela. Ebele wana ya bato balandaki bango kino na bandakonzambe wana oyo ezalaki esika ya kobombama, bakómisaki yango mayíta oyo matikali na makila mapanzani kati na yango.”
Nini ebimisaki libomi wana? Ezalaki bongo liwa ya prezidá ya Rwanda mpe ya prezidá ya Burundi na likámá ya mpepo oyo esalemaki na Apríli 6, bango nyonso mibale bazalaki ba Hutu. Na lolenge moko to mosusu, likambo yango ebandisaki libomi bobele ya ba Tutsi te kasi lisusu ya ba Hutu nyonso oyo ekanisamaki na ntina na bango ete bazalaki na boyokani malamu na ba Tutsi.
Bobele na ntango wana, bitumba biyaki makasi kati na bituluku mibale ya batomboki—ba Tutsi oyo mingi na bango bazalaki na F.P.R. (Front Patriotique Rwandais)—mpe ba Hutu oyo mingi na bango bazalaki kosimba boyangeli ya ekólo. Pene na sanza ya Yulí bato ya F.P.R. balóngaki baoyo bazalaki kobunda mpo na kosimba boyangeli ya ekólo mpe babotolaki engumba Kigali mpe eteni mosusu monene ya Rwanda. Mpo na kobanga botomboki, na ebandeli ya sanza ya Yulí, ebele ya ba Hutu bakimaki mboka.
Nani nde azali mobandisi na yango?
Na ntango batunaki ye soki mpo na nini mobulu mobandaki pwasa na Apríli, moto moko ya mboka, oyo azali Tutsi, alobaki ete: “Ezali mpo na bakonzi mabe.”
Ya solo, na boumeli ya bikeke, bakonzi ya politiki bapanzaki bansango ya lokuta likoló na banguna na bango. Na nsé ya litambwisi ya “mokonzi ya mokili oyo,” Satana Zábolo, bato ya politiki ya mokili bapusaki bato na bango moko ete bábunda bango na bango mpe báboma bato ya mposo mosusu, ya etúlúká mosusu, to ya ekólo mosusu. (Yoane 12:31, NW; 2 Bakolinti 4:4; 1 Yoane 5:19) Ezalaki mpe bobele bongo na Rwanda. Zulunalo The New York Times elobaki ete: “Bato ya politiki bazalaki mbala na mbala koluka kokólisa ezalela ya bokangami kati na etúlúká mpe bobangi kati na etúlúká—mpo na ba Hutu, kobatela bokonzi ya boyangeli; mpo na ba Tutsi, kopesa lisungi epai na batomboki.”
Lokola bato ya Rwanda bakokani na makambo mingi, moto moko te akokaki komizela ete bango báyinana mpe bábomana. Mokomi moko akomaki ete: “Ba Hutu mpe ba Tutsi balobaka lokótá moko mpe mingimingi, bazali na makambo ya bonkɔ́kɔ lolenge moko. Nsima ya bikeke mingi ya kobalana kati na bango, bokeseni na nzoto—ba Tutsi milai mpe mike, ba Hutu mikuse mpe minene—elimwaki na boye ete, mbala mingi, banamboka ya Rwanda bayebaka mpenza malamu te nani azali Hutu to nani azali Tutsi.”
Nzokande, ebele ya nsango mabe oyo esilaki kopanzana ezalaki na bopusi moko monene mpenza. Mpo na komonisa likambo yango na elilingi, Alex de Waal, mokambi ya etuluku oyo etalaka ntómo ya bato ya Afrika, alobaki ete: “Eyebisami ete bato ya mboka na bitando oyo biyangelami na F.P.R. bakamwaki na komona ete basodá ba Tutsi bazali na maseke te, na mikila te, mpe bazalaki te na miso oyo engɛngaka kati na molili—ezali na motindo wana nde bazalaki koloba na ntina na bango kati na radio oyo bazalaki kolanda.”
Ezali te bobele bakonzi ya politiki nde bazali kopusa makanisi ya bato, kasi mangomba mpe mazali kosala bongo. Wapi mangomba minene ya Rwanda? Bango mpe bazali babandisi ya makambo oyo ya nsɔ́mɔ?
Ngambo ya lingomba
Búku The World Book Encyclopedia (1994) elobi mpo na Rwanda ete: “Bato mingi bazali basangani ya Lingomba ya Katolike ya Loma. . . . Mangomba ya Katolike ya Loma mpe mangomba mosusu ya boklisto ekambaka motuya monene ya biteyelo oyo ya ebandeli mpe ya katikati.” Zulunalo National Catholic Reporter, elobi ete Rwanda ezali “mboka oyo ezali na 70% ya Bakatolike.”
Zulunalo The Observer, ya Grande-Bretagne, eyebisi ndenge nini lingomba ebandaki na Rwanda, elimboli ete: “Na boumeli ya bambula 1930, na ntango mangomba bazalaki kowelana mpo na kotambwisa makambo matali biteyelo, bato ya Katolike basepelaki na bato ya lokumu kati na ba Tutsi, nzokande bato ya Protestá bamityaki na ngámbo ya ba Hutu, baoyo bazalaki ebele mpe bazalaki konyokwama. Na 1959, ba Hutu babotolaki bokonzi mpe nokinoki bazwaki lisungi ya bato ya Katolike mpe ya Protestá. Lisungi ya bato ya Protestá epai na ba Hutu oyo bazalaki ndambo monene etikalaki ntango nyonso makasi.”
Na ndakisa, bakonzi ya lingomba ya Protestá balobelaki mabe likambo wana ya koboma ebele ya bato? Zulunalo The Observer epesi eyano oyo ete: “Batunaki basámbeli mibale [bato ya Protestá] soki bazalaki kokweisa babomi yango, baoyo batondisaki bilekelo ya bandakonzambe ya Rwanda na bibembe ya bana mike oyo bakatikati mitó.”
“Baboyaki koyanola. Bazalaki kokima mituna, bakómaki motema likoló, mingongo na bango mizalaki kotombwana, mpe ntina mpenza ya mpasi na Rwanda emonisamaki polele—bato minene ya lingomba ya Protestá bazali kosala lokola bamemi nsango mpo na bakonzi ya politiki oyo bateyaki koboma mpe batondisaki bibale na makila.”
Ya solo, mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba oyo ezali na Rwanda ekeseni te na oyo ezali bipai mosusu. Na ndakisa, lolenge basungaki bakonzi ya politiki na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mokonzi monene ya basodá ya Grande-Bretagne, Frank P. Crozier, alobaki ete: “Mangomba ya boklisto mazali makasi mingi mpenza mpo na kokólisa kati na bato mposa ya kosala mobulu mpe, kozanga kokakatana, tosalelaka yango mpo na matomba na biso.”
Ya solo, bakonzi ya mangomba bazali na ngambo monene mpo na makambo oyo masili kosalema na Rwanda! Zulunalo National Catholic Reporter ya Yúni 3, 1994, eyebisaki ete: “Bitumba kati na ekólo moko ya Afrika elimboli ‘koboma solo ebele ya bato oyo, na mawa nyonso, ata Bakatolike mpe bazali na ngambo mpo na yango,’ pápa nde alobaki bongo.”
Emonani polele ete, mangomba mateyaki te boklisto ya solo, oyo ezwi moboko na yango likoló na mikapo lokola Yisaya 2:4 mpe Matai 26:52. Engebene zulunalo moko ya mboka France, Le Monde, sángó moko alobaki ete: “Bazali kobomana, nzokande bazali kobosana ete bazali bandeko.” Sángó mosusu, mwanamboka ya Rwanda, alobaki ete: “Baklisto babomamaki na baklisto mosusu, nsima ya kozwa mateya na ntina na bolingo mpe kolimbisana na boumeli ya mbula nkámá. Eboti litomba soko moke te.” Zulunalo Le Monde etunaki ete: “Nani akoki komipekisa kokanisa ete ba Tutsi mpe ba Hutu oyo bazali kobunda na Burundi mpe na Rwanda bayekolaki epai na bamisionere ya lingomba moko ya boklisto mpe bazalaki kokɔta ndakonzambe moko?”
Baklisto ya solo bakeseni
Bayekoli ya solo ya Yesu batosaka etinda ya “kolingana.” (Yoane 13:34) Okoki kokanisa ete Yesu to moko na bantoma na ye akokaki kokamata líkwangola mpe kokata moto moko mpo na koboma ye? Ezaleli wana ya koboma ezali komonisa ete bato oyo basalaka yango bazali “bana ya Zábolo.”—1 Yoane 3:10-12, NW.
Batatoli ya Yehova bakɔtaka soko moke te na bitumba, na makambo ya boluki mbongwana, to na bitumba ya lolenge nyonso mosusu oyo ebimisami na bakonzi ya politiki, oyo bazali kotambwisama na Satana Zábolo. (Yoane 17:14, 16; 18:36; Emoniseli 12:9) Na esika ya kosala bongo, Batatoli ya Yehova bazali komonisa bolingo ya solosolo epai na moko na mosusu. Na yango, na bolingo nyonso, na boumeli ya bitumba, Batatoli ba Hutu batyaki bomoi na bango na likámá wana bazalaki kosala milende mpo na kobatela bandeko na bango ba Tutsi.
Nzokande, makambo ya nsɔ́mɔ motindo oyo masengeli kokamwisa biso te. Kati na esakweli ya Yesu na ntina na “nsuka ya ebongiseli ya biloko,” alobaki ete: “Bongo, bato . . . bakoboma bino.” (Matai 24:3, 9) Likambo ya esengo ezali oyo ete, Yesu apesaki elaká ete basembwi bakokanisama lisusu kati na lisekwa ya bakufi.—Yoane 5:28, 29.
Na kozeláká, Batatoli ya Yehova na Rwanda mpe ya bipai mosusu bazali na ekateli makasi ya kokóba komimonisa ete bazali bayekoli ya Klisto na kolinganáká. (Yoane 13:15) Bolingo na bango ezali kopesa litatoli kati na makambo ya mpasi ya mikolo oyo, lolenge lapólo ya “Batatoli ya Yehova kati na bakáa ya bato bakimá mboka” emonisi yango. Biso banso tosengeli komikundola makambo oyo Yesu alobaki kati na esakweli na ye, ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.”—Matai 24:13.
[Etanda na lokasa 29]
BATATOLI YA YEHOVA KATI NA BAKÁA YA BATO BAKIMÁ MBOKA
Na sanza ya Yúni ya mbula oyo, Batatoli ya Yehova pene na 4 700 mpe baninga na bango bazalaki kati na bakáa ya bato bakimá mboka. Na Zaïre, 2 376 bazalaki na Goma, 454 na Bukavu, mpe 1 592 na Uvira. Lisusu, na Tanzanie bazalaki pene na 230 na Benaco.
Bobele kokɔta na esika bato bakimá mboka bazalaki kofanda ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Lisangá moko ya basakoli 60 elukaki kokatisa gbagba ya Rusumo, nzela monene ya kokimela mpo na kokende na bakáa ya bato bakimá mboka na Tanzanie. Na ntango baboyaki kolekisa bango, bayengayengaki mpembeni ya mongálá na boumeli ya pɔ́sɔ mobimba. Na nsima, bazwaki ekateli ya komeka kokatisa na bwato. Balongáki kokatisa, mpe mwa mikolo moke na nsima, bakómaki malamu na káa ya Tanzanie.
Batatoli ya Yehova na mikili misusu babongisaki lisungi monene. Batatoli ya France bayanganisaki koleka batone monkámá ya bilamba mpe batone libwa ya sapato, mpe biloko mosusu, bakisá mpe biloko ya kolya mpe nkisi oyo etindamaki na bisika mposa ezalaki. Mbala mingi, eloko ya liboso oyo bandeko kati na bakáa ya bato bakimá mboka bazalaki kosɛnga ezalaki bongo Biblia to Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Lamuká!
Bato mingi oyo bamonaki makambo yango bakamwaki mpo na bolingo oyo Batatoli ya Zaïre mpe ya Tanzanie bamonisaki, bazalaki kokende kotala mpe kosunga bandeko wana oyo balongwaki na bisika na bango. Bato bakimá mboka balobaki ete: “Bato ya lingomba na bino bazali koya kotala bino, kasi basángó ya mangomba na biso bayei kotala biso te.”
Batatoli bayebanaki mingi na bakáa, mingimingi mpo na bomoko na bango, kosala makambo na molɔngɔ́, mpe ezaleli ya bolingo. (Yoane 13:35) Ezali litomba na komona ete na Benaco, na Tanzanie, esɛngaki bobele miniti 15 mpo komona esika baninga na bango Batatoli mosusu oyo bakimá mboka bazalaki kofanda katikati na bato 250 000 kati na káa.