Tosalaki mosala na nsé ya libateli ya bolingo ya Yehova
LISOLÓ YA LAMBROS ZOUMBOS
Nasengelaki kosala liponi moko ya ntina monene: kondima lipesi ya tata lɛki na ngai oyo azalaki na bozwi mingi ete nakóma mokambi ya kompanyi na ye monene ya bosombi mpe botekisi bandako—mpe bongo kosilisa mikakatano ya nkita kati na libota na ngai—to kokóma mosáli ya ntango nyonso na mosala ya Yehova Nzambe. Tiká nayebisa bino makambo oyo mapusaki ngai na kokamata ekateli oyo nakamataki na nsuka.
NABOTAMAKI na engumba Volos, na Grèce, na 1919. Tata na ngai azalaki motekisi ya bilamba ya mibali, mpe tozalaki na bozwi mingi. Kasi na ntina na kokwea monene ya nkita na nsuka ya bambula 1920, mosolo ya tata mosilaki mpe mombongo na ye mokweaki. Nazalaki na mawa ntango nyonso oyo nazalaki komona tata na ngai na elongi ya esengo te.
Mpo na mwa ntango, libota na biso lizalaki mpenza kati na bobólá monene. Mokolo na mokolo nazalaki kolongwa na kelasi ngonga moko liboso ya ntango mpo na kotɛlɛma na molɔngɔ́ mpo na kozela bilei oyo bazalaki kokabola. Atako tozalaki kati na bobólá tozalaki na libota oyo ezalaki na kimya. Mokano na ngai mozalaki ya kokóma monganga, kasi na bolenge mpenza esengelaki natika kelasi mpe nabanda kosala mpo na kosalisa libota na ngai na biloko bisengeli na bomoi.
Na nsima, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, basodá ya Allemagne mpe ya Italie bakamataki Grèce, mpe nzala ekómaki makasi mpenza. Mbala mingi nazalaki komona baninga mpe bayebani na biso oyo bazalaki kokufa na nzala na kati ya balabála—likambo ya nsɔ́mɔ oyo nakobosana soko moke te! Na libaku mosusu, libota na biso esalaki mikolo 40 kozanga ete tólya mampa, oyo mazali bilei ya moboko na Grèce. Mpo ete tókoka kobika, ngai mpe nkulutu na ngai ya mobali tokendaki na bamboka ya penepene kozwa mbálá epai na baninga mpe bandeko ya mosuni.
Bokɔnɔ ebongwani lipamboli
Na ebandeli ya 1944, nabɛ́laki mingi maladi ya ntólo. Na boumeli ya sanza misato oyo nasalaki na lopitálo, moko kati na bandeko na ngai amemelaki ngai mwa babúku mibale mpe alobaki ete: “Tángá yango; nandimisami mpenza ete okosepela na yango.” Mwa babúku, Who Is God? (Nzambe azali nani?) mpe Protection (Kobatelama), ebimisamaki na Watch Tower Bible and Tract Society. Nsima ya kotánga yango, nayebisaki makambo oyo mazalaki na kati epai na baninga mosusu babɛ́li.
Nsima ya kobima na lopitálo, nabandaki kosangana elongo na lisangá ya Batatoli ya Yehova na Volos. Nzokande, na boumeli ya sanza moko, nasengelaki kofanda na kati ya ndako ngai moko wana nazalaki naino mobɛ́li oyo asengelaki mbala na mbala kokutana na monganga, mpe na boumeli ya bangonga motoba to mwambe na mokolo moko, nazalaki kotánga banimero ya kala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe mikanda misusu oyo mibimisamaki na la Société Watch Tower. Yango esalaki ete nakóla nokinoki na elimo.
Nabiki na liwa
Mokolo moko na katikati ya mobu 1944, nafandaki na ebonga kati na elanga ya bafololo ya Volos. Na pwasa, etuluku moko ya basodá oyo basungaki basodá ya Allemagne ete babɔtɔla mboka na biso bazingaki esika yango mpe bakangaki moto nyonso oyo azalaki wana. Tozalaki soko bato 24 oyo tomemamaki kati na balabála kino biro monene ya Gestapo, oyo ezalaki kati na ndako monene ya ebombelo ya makaya.
Nsima ya mwa miniti, nayokaki ete moto moko azalaki kobénga nkombo na ngai mpe nkombo ya moto oyo nazalaki kosolola na ye kati na elanga ya fololo. Mokonzi moko ya basodá ya Grèce abéngaki biso mpe ayebisaki biso ete moko kati na bandeko na ngai ya mosuni amonaki biso wana basodá bazalaki kokenda na biso, mpe ayebisaki ye ete tozali Batatoli ya Yehova. Na nsima Mogreke wana mokonzi ya basodá alobaki ete tokokaki kozonga na ndako, mpe apesaki biso kálati oyo ezalaki na nkombo na ye ete tósalela yango soki bakangi biso lisusu.
Na mokolo oyo molandaki toyokaki ete ba Allemands basilaki koboma mingi kati na bato oyo bakangamaki mpo na kobekola kufa ya basodá mibale ya Allemagne oyo babomamaki na basodá ya Grèce. Longolá likambo ya kobikisama na kufa, libaku yango eteyaki ngai motuya ya etɛlɛmɛlo ya boklisto oyo etali komikɔtisa te na makambo ya politiki.
Na ebandeli ya eleko ya mpiɔ ya 1944, namonisaki komipesa na ngai epai na Yehova na nzela ya batisimo ya mai. Na eleko ya molungé oyo elandaki, Batatoli basalaki ebongiseli mpo ete nasangana na lisangá ya Sklithro likoló ya bangomba, epai kuna nakokaki mpenza kozongela malamumalamu kolɔngɔ́nɔ́ na ngai. Mobulu ya banamboka oyo eyaki nsima ya kolongwa ya basodá ya Allemagne ekómaki mpenza makasi. Mboka moke epai nazalaki kofanda nde ezalaki káa monene ya batomboki. Sángó ya mboka yango mpe mobali mosusu ya yauli bafundaki ngai ete nazalaki monɔ́ngi ya basodá ya boyangeli mpe basalaki ete esambiselo oyo batomboki batyaki ekoka kosambisa ngai.
Mokonzi ya batomboki ye moko azalaki wana na kosambisa yango ya lokuta. Ntango nasilisaki koyebisa ntina oyo nazalaki kofanda na mboka yango mpe namonisaki ete lokola moklisto, nazalaki soko moke te komikɔtisa kati na mobulu ya banamboka, mokonzi yango ayebisaki na basusu ete: “Soki moto moko asimbi moninga oyo, akoyeba ngai!”
Na nsima nazongaki na Volos, mboka nabotamaki, wana nasilaki kokóma makasi na kondima na ngai koleka kútu na nzoto.
Bokóli ya elimo
Mwa moke na nsima, baponaki ngai lokola mosaleli ya mosala mpo na kobomba mosolo ya lisangá. Atako mpasi oyo etumba ya banamboka ebimisaki—bakisá kokangama mbala na mbala na ntina na bifundeli ya bakonzi ya mangomba na likambo ya kopalanganisa mateya ya mangomba—kosangana kati na mosala ya boklisto ezalaki kopesa ngai mpe lisangá na biso mobimba esengo monene.
Na nsima, na ebandeli ya 1947, toyambaki mokɛngɛli-motamboli ya Batatoli ya Yehova. Ezalaki boyei ya liboso ya lolenge yango nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na ntango yango lisangá na biso ya Volos oyo esilaki kokóma makasi ebimisaki masangá mibale, mpe naponamaki lokola mokɛngɛli-mokambi kati na moko na masangá yango. Basodá mpe bibongiseli oyo bizalaki kolendisa bolingi-ekólo bazalaki kopalanganisa nsɔ́mɔ kati na bato. Bakonzi ya mangomba basalelaki libaku yango. Bapelisaki nkanda ya bakonzi epai na Batatoli ya Yehova na kopalanganisáká nsango ya lokuta ete tozalaki bakoministe to basungi ya bituluku oyo bizalaki kosakola mbongwana monene ya makambo.
Kokangama mpe bolɔ́kɔ
Na 1947, nakangamaki soko mbala zomi mpe basambisaki ngai mbala misato na esambiselo. Bazalaki ntango nyonso komona ete nazalaki na ekweli te. Na ebandeli ya eleko ya molungé na 1948, bakatelaki ngai bolɔ́kɔ ya sanza minei mpo na efundeli ya kopalanganisa mateya ya lingomba. Nalekisaki mikolo ya etumbu na ngai na bolɔ́kɔ ya Volos. Na ntango wana motángo ya basakoli ya Bokonzi ya lisangá na biso moyikanaki mbala mibale, mpe esengo na nsáí itondaki kati na mitema ya bandeko.
Na Ɔkɔtɔ́bɛ 1948, wana nazalaki na likita moko elongo na bandeko mosusu motoba oyo bazalaki kokamba lisangá na biso, bapolisi mitano bakɔtelaki biso pwasa kati na ndako mpe bakangaki biso na kobangisáká biso na mindóki. Bamemaki biso na biro ya polisi kozanga koyebisa biso ntina oyo tokangamaki, mpe tobɛ́tamaki. Polisi moko oyo ayekolaki myango ya kobunda abɛ́taki ngai makofi na elongi. Nsima na yango, babwakaki biso kati na ndako moko moke ya bolɔ́kɔ.
Na nsima Mokonzi ya bapolisi oyo azalaki wana abéngaki ngai na biro na ye. Ntango nafungolaki ekuke, abwakelaki ngai molangi ya mai ya mokanda, oyo ezwaki ngai te mpe epaswanaki na efelo. Asalaki bongo mpo na komeka kobangisa ngai. Apesaki ngai lokasa moko mpe ekomeli, na nsima alobaki ete: “Komá nkombo ya Batatoli ya Yehova nyonso ya Volos, mpe memelá ngai lokasa yango na ntɔ́ngɔ́. Soki oboyi, oyebi makambo oyo makokómela yo!”
Nazongisaki eyano te, kasi ntango nazongaki na ndako ya bolɔ́kɔ, ngai mpe bandeko mosusu tobondelaki Yehova. Nakomaki bobele nkombo na ngai likoló na lokasa yango mpe nazelaki ete abénga ngai. Kasi mokonzi yango ya bapolisi alobaki lisusu eloko te. Na butu wana, basodá ya etuluku ya batomboki babundisaki bango, mpe akambaki bato na ye mpo na kotɛmɛla bango. Azokaki póta monene kati na matáta oyo mabimaki na etumba yango, mpe esɛngaki ete bákata lokolo na ye. Na nsima, bamemaki biso na esambiselo, mpe bafundaki biso ete tozalaki kosala likita oyo lindimamaki te na mibeko ya mboka. Bakatelaki biso nyonso nsambo bolɔ́kɔ ya mbula mitano.
Mpo ete naboyaki koyangana na misa ya Lomingo kati na bolɔ́kɔ, bapesaki ngai etumbu ya kotyama na ndako epai nasengelaki kozala ngai moko. Mikolo misato na nsima, nasɛngaki nzela ya kosolola elongo na mokambi ya bolɔ́kɔ. Nalobaki na ye ete: “Nayebi te, kasi namoni ete ezali mpenza likambo ya mayele te kopesa etumbu na moto oyo andimi na bolingo nyonso kolekisa mibu mitano na bolɔ́kɔ mpo na kondima na ye.” Akanisaki mingi na ntina na yango, mpe na nsuka alobaki ete: “Kobanda lobi, okosala awa pene na ngai kati na biro na ngai.”
Na nsima, bapesaki ngai mosala ya kosunga monganga moko kati na bolɔ́kɔ. Yango epesaki ngai libaku ya koyekola makambo mingi mpo na oyo etali kosalisa bato, boyebi oyo ebimisaki litomba nsima na bambula mingi. Ntango tozalaki na bolɔ́kɔ, nazalaki na mabaku mingi ya kosakola, mpe bato misato bandimaki mpe bakómaki Batatoli ya Yehova.
Nsima ya kosala pene na mbula minei kati na bolɔ́kɔ, batikaki ngai na 1952 mpo na komeka etamboli na ngai. Na nsima, nasengelaki kobima liboso na esambiselo ya Corinthe mpo na likambo ya kozanga kokɔta na politiki. (Yisaya 2:4) Kuna bakangisaki ngai mpo na mwa ntango moke kati na bolɔ́kɔ ya basodá, mpe libaku mosusu ya minyoko ebimaki. Bakonzi mosusu ya basodá bazalaki mpenza kobimisa makambo ya sika kati na makaneli na bango, ete: “Nakokatakata motema na yo biteni mikemike na mbeli,” to “Kokanisa te ete okokufa mbala moko na mondóki oyo ekoki kobɛta masasi motoba na mbala moko.”
Komekama ya lolenge mosusu
Nzokande, nokinoki, nazongaki lisusu na ndako, nasalaki lisusu elongo na lisangá ya Volos mpe nazwaki mosala ya mosuni mpo na ndambo ya mokolo. Mokolo moko nazwaki nkomá ya filiale ya la Société Watch Tower na Athènes, oyo ezalaki kobyanga ngai ete nalanda kobongisama ya pɔ́sɔ mibale mpe na nsima nabanda kotala masangá ya Batatoli ya Yehova lokola mokɛngɛli ya zongazonga. Bobele na ntango wana, ndeko ya tata na ngai, oyo azalaki na mwana te kasi azalaki na kompanyi monene ya kosomba mpe kotekisa bandako, asɛngaki ete nazala moyangeli ya bozwi na ye. Libota na ngai lizalaki naino kati na bobólá, mpe mosala wana molingaki kosilisa mikakatano na bango ya nkita.
Nakendaki kokutana na ndeko ya tata mpo na komonisa ye botɔ́ndi na ngai mpo na lipesi na ye, kasi nayebisaki ye ete nasilaki kozwa ekateli ya kondima mokumba moko ya ntina mingi kati na mosala ya boklisto. Ntango ayokaki yango, atɛlɛmaki, atalaki ngai mwa moke, mpe abimaki pwasa. Azongaki na likabo ya mbongo oyo ekokaki kosunga libota na ngai mpo na mwa basanza. Alobaki ete: “Kamatá mbongo oyo, mpe salelá yango lokola olingi.” Kino lelo oyo, nakokaka te kolimbola mayoki oyo nazalaki na yango na ntango wana. Ezalaki lokola nayokaki nde mongongo ya Yehova koloba na ngai ete, ‘Osali liponi moko malamu. Nandimi ekateli na yo.’
Lokola libota na ngai lindimaki yango, nakendaki na Athènes na Desɛ́mbɛ 1953. Atako bobele mama na ngai nde akómaki Motatoli, basangani mosusu ya libota na ngai bazalaki kotɛmɛla te mosala na ngai ya boklisto. Ntango nakendaki na biro ya filiale na Athènes, likambo mosusu ya kokamwa lizalaki kozela ngai. Telegrame moko eutaki na lɛki na ngai ya mwasi, ezalaki koyebisa ete milende oyo tata asalaki na boumeli ya mibu mibale mpo na kozwa lisungi ya Letá misilaki kobimisa litomba malamu mokolo wana. Nasengelaki kosɛnga lisusu nini? Nayokaki lokola nde nazwaki mapapu, nazalaki pene na kopumbwa mosika mpo na mosala ya Yehova!
Namonisaki bokɛngi
Na bambula ya ebandeli ya mosala na ngai ya zongazonga, nasengelaki kozala na bokɛngi mingi mpamba te Batatoli ya Yehova bazalaki mpenza konyokwama makasi na bakonzi ya mangomba mpe na bakonzi ya politiki. Mpo na kotala bandeko na biso baklisto, mingi mpenza baoyo bazalaki kofanda na bingumba mike mpe na bamboka mike, nasengelaki kotambola na boumeli ya bangonga mingi na butu. Bandeko, oyo bazalaki na likámá ya kokangama, bazalaki koyangana mpe kozela ngai na motema pɛtɛɛ nyonso kati na ndako moko. Oyo nde koyikisana mpiko biso banso tozalaki kozwa na mabaku yango ya kotala bandeko!—Baloma 1:11, 12.
Mpo na kopɛngola ete báyeba biso te, na bantango mosusu nazalaki kobongola molato na ngai. Mokolo mosusu, nalataki lokola mobateli ya bampate mpo na koleka esika ya bapolisi na nzela mpe kino kokóma na etuluku moko ya bandeko oyo bazalaki mpenza na mposa ya lisungi ya elimo. Na libaku mosusu, na 1955, ngai mpe moninga moko Motatoli tomimonisaki lokola batekisi ya matungúlu mpo na kopɛngola ete bapolisi bátya likebi te likoló na biso. Mokumba na biso mozalaki ya kokutana na bandeko baklisto oyo basilaki kotika kosakola na engumba moke Árgos Orestikón.
Totandaki biloko na biso na zando ya engumba yango. Atako bongo, likebi ya elenge polisi oyo azalaki kokɛngɛla esika yango ebendamaki, mpe ntango nyonso oyo azalaki koleka wana, azalaki kotala biso na likebi mingi. Nsukansuka alobaki na ngai: “Yo omonani te lokola motekisi ya matungúlu.” Na ntango yango, bilenge basi misato babɛlɛmaki mpe bamonisaki mposa ya kosomba matungúlu. Wana ezalaki ngai kolakisa matungúlu na ngai, nalobaki: “Elenge polisi oyo alyaka litungúlu lokola oyo, mpe bótala ye lokola azalaki makasi mpe kitoko!” Basi yango batalaki polisi yango mpe basɛkaki. Ye mpe asɛkaki mwa moke mpe na nsima akendaki.
Ntango akendaki mosika nazwaki libaku ya kokenda na magazini epai bandeko na biso ya elimo bazalaki kosɔna bilamba. Nasɛngaki na moko na bango ete atongela ngai butó oyo nakataki na kazaka na ngai. Wana azalaki kosala yango, nangunzamaki mpe nalobaki na mongongo ya nsé ete: “Nauti na biro ya filiale mpo na kotala bino.” Liboso bandeko bazalaki na bobángi, mpamba te esilaki koleka bambula mingi bazalaki lisusu na bokutani te na baninga na bango Batatoli. Nalendisaki bango na lolenge nyonso oyo nakokaki kosala yango mpe nasalaki bibongiseli mpo na kokutana na bango na nsima kati na nkunda ya engumba. Na esengo, boyei na ngai elendisaki bango, mpe bazongelaki molende na bango kati na mosala ya boklisto.
Nazwi mobalani ya sembo
Na 1956, mbula misato nsima ya kobanda mosala ya zongazonga, nakutanaki na Niki, elenge mwasi moko moklisto oyo azalaki na bolingo mingi mpo na mosala ya kosakola mpe oyo azalaki na mposa ya kolekisa bomoi na ye kati na mosala ya ntango nyonso. Tolinganaki mpe tobalanaki na Yúni 1957. Nazalaki komituna soki Niki akokoka kolónga masɛngisi ya mosala ya zongazonga na kotaleláká mpasi oyo ezalaki na mosala ya Batatoli ya Yehova na mboka Grèce. Na lisalisi ya Yehova alóngaki, na yango akómaki mwasi ya liboso oyo azalaki kokenda elongo na mobali na ye kati na mosala ya zongazonga na Grèce.
Tokóbaki elongo kati na mosala ya zongazonga na boumeli ya mibu zomi, kosungáká ntálo monene ya masangá ya Grèce. Mbala mingi tozalaki kolata bilamba oyo ekobomba motindo na biso mpe, na valisi na mabɔkɔ, tozalaki kotambola na boumeli ya bangonga mingi mpo na kokenda na lisangá moko. Atako mbala mingi tozalaki kokutana na botɛmɛli makasi, tozalaki na esengo ya komona na miso na biso bokóli kati na motángo ya Batatoli.
Mosala na Betele
Na Yanuáli 1967, Niki mpe ngai tobyangamaki na Betele, nkombo oyo babéngaka biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova. Libyangi wana ekamwisaki biso nyonso mibale, kasi tondimaki yango, awa tondimisamaki ete Yehova ye mpenza nde azalaki kokamba makambo yango. Wana ntango ezalaki koleka, toyaki kokanga ntina ete kosala na esika wana ya ebongiseli ya teokrasi ezalaki libaku malamu mpenza.
Sanza misato nsima ya kobanda mosala na Betele, boyangeli moko ya basodá ekamataki litambwisi ya mboka, mpe Batatoli ya Yehova basengelaki kokóba mosala na bango na kobombama. Tobandaki koyangana na bituluku ya mike, kosala mayangani kati na zámba, kosakola na ekɛ́ngɛ, mpe tozalaki konyata mpe kokabola mikanda oyo ekolimbolaka Biblia na nkuku. Ezalaki mpasi te mpo na komesana, mpamba te tozongelaki bobele myango oyo tozalaki kosalela na misala na biso bambula mingi liboso. Atako bipekiseli bizalaki, motángo ya Batatoli mobakisamaki longwa na nsé ya 11000 na 1967 kino koleka 17000 na 1974.
Nsima ya mibu soko 30 ya mosala na Betele, atako tozali na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, ngai mpe Niki tozali ntango nyonso kosepela na mapamboli ya elimo. Na boumeli ya mibu koleka zomi, tozalaki na bandako ya filiale na balabála Kartali na Athènes. Na 1979 filiale ya sika efungwamaki na Marousi, eteni moko ya engumba Athènes. Kasi uta 1991 tozali na bandako minene mpe ya sika ya filiale na Eleona, bakilomɛtɛlɛ 60 na nɔ́rdi ya engumba Athènes. Awa nazali lifulumɛ́ ya Betele, kobongisama oyo nazwaki kati na bolɔ́kɔ lokola mosungi ya monganga esili komonana mpenza na litomba mingi.
Na boumeli ya mibu koleka ntuku minei ya mosala na ngai ya ntango nyonso, lokola Yilimia, nasili kososola bosolo ya elaka oyo ya Yehova: “Bakobunana na yo nde bakoleka yo te zambi ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo. [Yehova] alobi bongo.” (Yilimia 1:19) Ee, ngai mpe Niki tosili kozwa kɔ́pɔ oyo etondi na mapamboli ya Yehova. Tozali ntango nyonso kosepela kati na komibanzabanza na ye oyo etondi na bolingo mpe na ngɔlu na ye.
Elendiseli na ngai epai na baoyo bazali bilenge kati na lisangá ya Yehova ezali ete báluka kosalela Nzambe na mosala ya ntango nyonso. Na lolenge yango bakondima libyangi ya Yehova ya komeka soki elaka na ye ya ‘kozipwela bango maninisa ya lola mpe kosopela bango lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango,’ ekomonana solo te. (Malaki 3:10) Na likambo oyo ngai moko nakutanaki na yango, nakoki kondimisa bilenge ete Yehova akopambola mpenza baoyo nyonso kati na bino bazali kotyela ye motema.
[Elilingi na lokasa 26]
Lambros Zoumbos mpe mwasi na ye, Niki