Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/12 nk. 4-8
  • Kopesa lisungi kati na bisika bibebisami

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kopesa lisungi kati na bisika bibebisami
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Accra​—“Mpela ya mikolo ya Noa na etando moke”
  • San Angelo​—“ezalaki lokola nde mokili ekómi na nsuka na yango”
  • Kobe​—“Ekunde ya mabaya, ya simá mpe ya bibembe ya bato”
  • MOSIKA TE LISUNGI LIZANGI NSUKA!
  • Mosala ya kosunga bandeko
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Wana makámá mauti na biloko bizalisami mabimi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mosala ya kopesa lisungi na 2023​—“Tomoni mpenza bolingo ya Yehova”
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Misala ya kobikisa ya Yehova na mikolo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/12 nk. 4-8

Kopesa lisungi kati na bisika bibebisami

MILENDE oyo bato basalaka mpo na kopesa lisungi wana likámá lisalemi ebongi mpenza kokumisama. Bibongiseli mingi ya kopesa lisungi esili kosalisa na kotonga bandako oyo ebebaki, koyanganisa lisusu mabota esika moko, mpe, likambo ya ntina koleka, kobikisa bomoi.

Ntango likámá likwei, Batatoli ya Yehova basalelaka​—mpe bazali na botɔ́ndi mpo na yango​—myango nyonso oyo Letá abimisaka mpo na kosunga bato. Epai mosusu, basengeli kolanda etindá euti na Makomami, ete ‘básalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali bandimi.’ (Bagalatia 6:10) Ya solo, Batatoli bamiyokaka ete bazali mpenza bandeko; bamitalelaka bamoko na bamosusu ete bazali “libota.” Ezali na ntina wana nde babénganaka ete “ndeko mobali” mpe “ndeko mwasi.”​—Kokanisá na Malako 3:31-35; Filemona 1, 2.

Na yango ntango likámá lisalemi na etúká moko, bankulutu kati na Batatoli ya Yehova basalaka milende makasi mpo na koyeba ezalela mpe mposa ya mosangani mokomoko ya lisangá mpe bakamataka bibongiseli mpo na kopesa lisungi ebongi. Tótalela lolenge yango emonanaki na engumba Accra, na Ghana; na engumba San Angelo, na États-Unis; mpe na engumba Kobe, na Japon.

Accra​—“Mpela ya mikolo ya Noa na etando moke”

Mbula ebandaki kobɛta pene na ngonga ya 11 na butu, mpe elandanaki kozanga kokatana na boumeli ya ngonga mingi. John Twumasi, Motatoli ya Yehova moko na engumba Accra alobi ete: “Mbula ebɛtaki makasi na boye ete libota na ngai mobimba tokokaki kolala te.” Zulunalo Daily Graphic ebéngaki yango ete: “Mpela ya mikolo ya Noa na etando moke.” John abakisi ete: “Tomekaki kotya biloko mosusu ya motuya na ndako ya baninga na etaze ya likoló, kasi ntango tofungolaki ekuke ya ndako mpo na komata na eskalié, mai mabandaki kokɔta na ndako.”

Bakonzi basɛngaki na bato ete bákima, kasi mingi bakakatanaki, kobangáká ete soki bakotika ndako na bango mpamba​—atako etondi na mai​—yango ekopesa nzela na bapunzi ete bákɔta. Basusu bakokaki kobima te ata soki yango ezalaki mposa na bango. Elenge mwasi moko na nkombo Pauline alobi: “Mama na ngai mpe ngai moko tozalaki na likoki ya kofungola ekuke te. Mai mazalaki sé komata, bongo tótɛlɛmaki likoló na kɛ́si ya mabaya mpe tosimbaki makasi banzeté ya nsamba ya ndako. Nsukansuka, pene na ngonga ya mitano na ntɔ́ngɔ́, baninga na biso ya pembeni bayaki kosalisa biso.”

Nokinoki ntango likoki epesamaki, Batatoli ya Yehova babandaki mosala. Ndeko mwasi moko na nkombo Béatrice alobi: “Bankulutu ya lisangá bazalaki koluka biso, mpe bakutaki biso na ndako ya ndeko moko Motatoli, epai kuna tokendaki komibomba. Mikolo misato nsima ya mpela, bankulutu mpe bilenge ya lisangá bayaki epai na biso mpe bapɛtolaki ndako na kolongoláká pɔtɔpɔ́tɔ na kati mpe na libándá. La Société Watch Tower atindaki sabuni, nkisi ya kosukola ndako, lángi, bamatelá, babolangiti, milekani, mpe bilamba ya kolata mpo na bana. Bandeko batindelaki biso mpe bilei mpo na mikolo mingi. Yango esimbaki mpenza motema na ngai!”

John Twumasi, oyo totángaki maloba na ye liboso, alobi: “Nayebisaki bafándi ya ndako mosusu ete Lisangá na biso esilaki kotindela biso sabuni mpe nkisi ya kosukola ndako​—ekoká mpo na kosukola ndako nyonso kati na lopango. Pene na bafándi 40 ya pembeni bapesaki mabɔkɔ mpo na bopɛtoli. Napesaki ndambo mosusu ya sabuni epai na baninga ya pembeni, kati na bango mobali moko oyo azali pastɛ́rɛ ya lingomba moko ya esika wana. Baninga na ngai ya mosala bakanisaki liboso na libungá nyonso ete Batatoli ya Yehova bamonisaka bolingo bobele epai na bato na bango.”

Bandeko baklisto mibali mpe basi basepelaki mingi na lisungi litondi na bolingo oyo epesamelaki bango. Ndeko Twumasi asukisi boye: “Atako biloko nabungisaki kati na mpela bizalaki na motuya ya mosolo koleka oyo tozwaki na lisungi, ngai mpe libota na ngai tozali na mayoki ete tozwi mingi koleka oyo tobungisaki, na nzela ya lisungi ya kosimba motema oyo La Société atindelaki biso.”

San Angelo​—“ezalaki lokola nde mokili ekómi na nsuka na yango”

Mopɛpɛ makasi oyo ebɛtaki na San Angelo na mwa 28 Máí 1995, epikolaki banzeté, ebukaki makonzi masimbaka nsinga ya kurá, mpe ekweisaki bansinga ya kurá katikati na banzela. Mipɛpɛ mizalaki kotambola na lombangu ya kilomɛtɛlɛ 160 na ngonga moko, kobebisáká bandako mpe bisika ya ntina. Kurá ekatanaki na bandako koleka 20 000. Na nsima mbula ya matandala ebandaki. Biró ya meteoroloji ya mboka wana (Service national de la météorologie) eyebisaki kokwea ya “matandala na bonene ya sentimɛtɛlɛ 4,” na nsima “matandala na bonene ya sentimɛtɛlɛ 10,” mpe na nsuka, “matandala na bonene ya sentimɛtɛlɛ 12.” Makɛlɛlɛ ya mbula ya matandala ezalaki kokanga mpenza matoyi. Mofándi moko ya engumba yango alobaki ete: “Ezalaki lokola nde mokili ekómi na nsuka na yango.”

Kimya moko ya nsɔ́mɔ elandaki mbula wana ya mopɛpɛ makasi. Mokemoke bato babandaki kobima longwa na bandako na bango oyo ebebisamaki mpo na kotala lolenge libebi yango esalemaki. Banzeté oyo ezalaki naino ya kotɛlɛma esilaki kobungisa nkasa na yango nyonso. Bandako oyo ekweaki te ekómaki lokola nde bakwalataki yango. Na bisika mosusu, matandala ezipaki mabelé na bosándá ya koleka mɛtɛlɛ moko. Bankóto ya maninisa ya bandako mpe mituka ebebisamaki mpenza na mbula wana ya mopɛpɛ makasi, bongo biteni mikemike ya talátalá epanzani ezalaki kongɛnga kati na matandala oyo etondaki na mabelé. Mwasi moko alobaki: “Ntango nakómaki na ndako, natikalaki kati na motuka na balabála mpe nalelaki. Libebi ezalaki makasi na motindo boye ete ebulunganisaki ngai mingi mpenza.”

Bibongiseli ya kopesa lisungi mpe balopitalo esalaki nokinoki mpo na kopesa lisungi ya mosolo, ya biloko mpo na botongi ndako, ya nkisi, mpe batoli. Na lolenge lobongi mpenza kopesamela longonya, bato mingi oyo bakwelaki makámá ya mbula ya mopɛpɛ makasi wana basalaki oyo bakokaki mpo na kosunga basusu.

Masangá ya Batatoli ya Yehova bango mpe bakangaki mabɔkɔ te. Aubrey Conner, nkulutu na lisangá ya San Angelo, alobi ete: “Nokinoki ntango mbula esilaki, tobandaki kolukana na nzela ya telefone. Tosalisanaki biso na biso mpe baninga ya pembeni oyo bazali Batatoli te mpo na kozipa maninisa, kotya papyé ya plastiki likoló ya ndako, mpe kobongisa ndako mpo na kobatelama na moi to mpe na mbula na makoki oyo tozalaki na yango. Na yango tokomaki na liste nkombo ya moto nyonso ya lisangá oyo ndako na ye ebebisamaki. Ndako pene na monkámá esengelaki kobongisama, mpe bisaleli oyo biutaki na bibongiseli oyo bipesaka lisungi bikokaki te. Na yango tosombaki bisaleli mosusu mpe tobandaki mosala. Batatoli na motángo mobimba ya bato 1 000 bamipesaki na bolingo malamu mpo na kosala, elingi koloba pene na bato 250 wikende nyonso. Bautaki na bisika ndenge na ndenge kino na oyo ezwami mosika na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 740. Banso basalaki kozanga kolɛmba, mbala mingi na nsé ya molungé ya 40°C. Ata ndeko mwasi moko ya mibu 70 asalaki na biso elongo wikende nyonso longola bobele mbala moko, mpe yango ezalaki na wikende wana nde ndako na ye moko ezalaki kobongisama. Mpe na wikende yango azalaki likoló ya ndako na ye kopesáká lisungi na misala ya kobongisa!

“Mbala mingi toyokaki maloba ya baleki-nzela lokola oyo ete: ‘Elingaki kozala malamu soko mangomba nyonso mosusu bakokaki kosala boye mpo na basangani na bango, boye te?’ Bato ya kartyé na biso bakamwaki na komona etuluku ya basáli ya bolingo malamu 10 kino 12 (na bandeko basi) kokóma na Mwamitano na ntɔ́ngɔ́ na ndako ya ndeko na bango Motatoli, bamilɛngɛli mpo na kobongisa to mpe kotonga na mobimba nsamba ya ndako kozanga ete báfuta bango mosolo. Mbala mingi mosala ezalaki kosilisama na wikende moko. Ntango mosusu, ezalaki kosalema ete wana etuluku na biso tokómi na ndako moko, basáli ya kompanyi ya mokili bazalaki kobongisa nsamba ya ndako mosusu pembeni. Biso tozalaki kolongola nsamba ya ndako oyo ebebaki mpo na kotonga mosusu mpe kopɛtola libándá ya lopango liboso ete basáli ya kompanyi wana bákoka kosilisa oyo ya bango. Ntango mosusu bazalaki kotika mosala na bango mpo na kotalatala biso!”

Ndeko Conner asukisi ete: “Mosala na biso esili mpe biso banso tolingi sikawa kopanzana. Tosili koyebana bamoko na bamosusu na lolenge lokeseni na komonáká mpo kolakisáká bolingo mpo na bandeko lokola emonanaki naino liboso te. Tozali na mayoki ete oyo ezali bobele elakiseli ya oyo ekozala na mokili ya sika ya Nzambe, elongo na bandeko mibali mpe basi bazali kosalisana mpo ete balingi mpenza kosala bongo.”​—2 Petelo 3:13.

Kobe​—“Ekunde ya mabaya, ya simá mpe ya bibembe ya bato”

Ekanisamaki ete bafándi ya Kobe babongisamaki malamu. Ya solo, na mwa 1 Sɛtɛ́mbɛ nyonso ezalaka mokolo ya bokundoli Mokolo ya Komibatela na Likámá. Banakelasi bayekolaka myango ya komibatela na koningana ya mabelé, basodá bayekolaka mbala na mbala lolenge ya kosunga, na lisalisi ya hélicoptère, bato bazwi makámá mpe biro ya mosala ya kozimisa mɔ́tɔ ya makámá babimisaka masini na bango oyo esalaka lokola ete mabelé ezali koningana, epai kuna basáli ya bolingo malamu bazali kosala emekeli ya makoki na bango ya kobikisa bato bazwi likámá kati na esika oyo ezali na bonene ya ndako ya kolala oyo ezali koningana mpe kopumbwapumbwa lokola nde koningana ya mabelé ezali mpenza kosalama. Kasi ntango koningana ya solo ya mabelé esalamaki na mwa 17 Yanuáli 1995, bibongiseli nyonso oyo bakamataki emonanaki mpamba. Ebele ya nsamba ya ndako ilongwaki​—eloko oyo esalamaki te na bilakiseli oyo bazalaki kozongela. Bingbunduka elongwaki na nzela na yango; biteni ya banzela minene ebukanaki; batiyó ememaka mai mpe gaze ebukanaki; bandako ekweaki lokola maboke ya bakartó ya mpamba. Zulunalo Time elobaki ete esika oyo likámá lisalamaki ekómaki lokola “ekunde ya mabaya, ya simá, mpe ya bibembe ya bato.”

Na nsima mɔ́tɔ ebandaki kopela. Babuludingi epelaki wana babomi-mɔ́tɔ batondaki na mawa ya kozanga makoki ya kosala eloko, batɛlɛmaki mosika nsima ya molɔngɔ́ molai ya mituka mikangamaki na nzela. Baoyo bazwaki likoki ya kokóma bisika mɔ́tɔ ezalaki, mbala mingi bakutanaki na mokakatano ya kozwa mai mpamba te batiyó nyonso ememaka mai ebebaki. Mokonzi moko alobaki ete: “Mokolo ya liboso ezalaki nsɔ́mɔ, naino namiyoka te ete nazangi mpenza nguya motindo boye na bomoi na ngai, koyebáká ete ezalaki na bato bakangamaki na nsé ya bandako oyo ezalaki kozika. Mpe koyebáká ete nakoki kosala eloko te.”

Na mobimba, soko bato 5 000 bakufaki, mpe pene na buludingi 50 000 ekweaki. Engumba Kobe ezalaki bobele na ndambo ya misato ya bilei bisengelaki mpo na koleisa bato nyonso. Mpo na kozwa mai bamoko bapepaki mai ya mbindo oyo ezalaki na nsé ya batiyó oyo ekatanaki. Mingi kati na baoyo bazangaki bisika ya kolala bakimaki na bibombamelo, oyo kati na bamoko na yango mwa bilei ezalaki kokabolama, kopesáká na moto mokomoko mwa saani moke ya lɔsɔ mpo na mokolo mobimba. Mosika te kozanga bosepeli epalanganaki. Moto moko amilelaki ete: “Bakonzi basali eloko moko te, soko tokolanda kotya motema epai na bango tokokufa mpenza na nzala.”

Masangá ya Batatoli ya Yehova na Kobe mpe na bisika ya pembeni basalaki ebongiseli ya bango moko nokinoki. Mokumbi hélicoptère moko oyo amonaki mosala na bango na miso alobaki ete: “Nakendaki na esika ya likámá na mokolo oyo koningana ya mabelé esalamaki mpe nalekisaki pɔ́sɔ moko kuna. Ntango nakómaki na ebombamelo moko, nyonso ezalaki nsɔ́mɔ. Ata mosala moko te ya kosunga bato ezalaki kosalema. Bobele Batatoli ya Yehova nde bazalaki bango moko na esika yango, kosaláká misala ya ntina.”

Ya solo, ezalaki na misala mingi ya kosala. Bandako zomi ya Bokonzi ebebisamaki makasi, mpe Batatoli koleka 430 bazalaki na bandako lisusu te. Lisusu, bato 1 206 kati na bango bazalaki na bandako oyo esengelaki kobongisama. Longola wana, mabota ya Batatoli 15 oyo bakufaki na likámá yango mazalaki na mposa ya kobɔndisama.

Batatoli pene na 1 000 ya bisika ndenge na ndenge kati na mokili yango bapesaki ntango na bango na bolingo malamu mpo na kopesa lisungi na misala ya bobongisi. Ndeko mobali moko alobi ete: “Ntango tosalaki mosala na bandako ya bayekoli ya Biblia oyo bazwi naino batisimo te, bazalaki kotuna ntango nyonso ete: ‘Tosengeli kofuta ntalo boni mpo na mosala oyo?’ Ntango toyebisaki bango ete mosala nyonso wana mosalami na lisangá, batɔ́ndaki biso, kolobáká ete, ‘Oyo toyekolaki tomoni yango solo sikawa!’”

Mingi bakamwaki na mosala oyo Batatoli basalaki na lombangu mpe na motema na bango mobimba na ntango likámá wana lisalemaki. Mokumbi hélicoptère oyo totángaki maloba na ye liboso abakisi ete: “Nakamwaki mingi mpenza, bobénganaka ‘ndeko mwasi’ mpe ‘ndeko mobali.’ Nasili komona lolenge bosalisanaka bamoko na bamosusu; bozali mpenza libota ya solo.”

Batatoli bango moko bazwaki liteya moko ya ntina na koningana wana ya mabelé. Ndeko mwasi moko alobaki: “Nazalaki ntango nyonso kokanisa ete wana lisangá ezali koya monene, ekozala mpasi na komibanzabanza mpo na bamposa ya moto mokomoko.” Kasi komibanzabanza oyo bamoniselaki ye ebongolaki makanisi na ye. “Nayebi sikawa ete Yehova azali komibanzabanza mpo na biso bobele lokola lisangá te kasi mpe na mokomoko na biso.” Atako bongo lisungi lizangi nsuka mpo na makámá ezali mpo na mikolo mizali koya.

MOSIKA TE LISUNGI LIZANGI NSUKA!

Batatoli ya Yehova bazali kozela ntango oyo bomoi ya moto mpe makoki ya kobikela ekobebisama lisusu te. Na mokili ya sika ya Nzambe, bato bakoteyama lolenge ya kosalela ezingelo ya mabelé na lolenge lobongi. Lokola bato bakozala lisusu na misala ya moimi te, bakozwa te makámá mauti na biloko bizalisami.

Lisusu, Yehova Nzambe​—Mozalisi ya nguya ya biloko bizalisami​—akosala ete libota ya bato na ye mpe biloko bizalisami na mabelé bibebisama lisusu te na nguya ya biloko bizalisami. Ntango yango mabelé makokóma solo paladiso. (Yisaya 65:17, 21, 23; Luka 23:43) Esakweli ya Emoniseli 21:4 ekozwa kokokisama na yango ya nkembo: “Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”

[Elilingi na lokasa 5]

Beatrice Jones (na lobɔkɔ ya mwasi) azali kolakisa ndenge oyo ye mpe basusu basalaki molɔngɔ́ mpo na koleka katikati na mai ya mpela

[Elilingi na lokasa 5]

Mosala ya kopesa lisungi nsima ya mipɛpɛ makasi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto