Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/4 nk. 27-29
  • Mituna ya Batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya Batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Masolo mosusu
  • Ozali Komikundola?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tópesa na Kaisala biloko na Kaisala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Kosambisa moko ya mabe mpenza oyo esalemá naino te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele ezalaki sembo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/4 nk. 27-29

Mituna ya Batángi

Moklisto asengeli kosala nini soki abyangami ete azala mosambisi?

Na mikili mosusu, ebongiseli ya kosambisa esalelaka masangani ya basambisi oyo baponami kati na banamboka. Epai kuna ezali kosalelama, moklisto asɛngeli kozwa ekateli na lolenge akoyanola soki aponami mpo na kosala mosala ya mosambisi. Baklisto mingi bakómaki na bosukisi oyo, kozanga ete lisosoli na bango etungisama, ete mitindá ya Biblia mipekisi te kondima kosala yango, lolenge moko Sadalaka, Mesaka, mpe Abede-nego batosaki etindá ya guvernemá ya Babilone oyo esɛngaki ete bákende na mokili patátálú ya Dula mpe lolenge moko Yosefe na Malia bakendeki na Beteleme mpo na kotosa liséngami ya bakonzi ya Loma. (Danyele 3:1-12; Luka 2:1-4) Nzokande, ezali na makambo oyo baklisto ya sembo bakoki kotalela yango.

Koponama ya banamboka mpo na kosambisa moto esalemaka na mikili nyonso te. Na mikili mosusu, ezali nde zúzi moko to lisangani ya bazúzi oyo bazali banganga-mibeko nde basambisaka ezala mbeba mike oyo moto moko akoki kosalela moninga na ye to mpe mbeba minene ya kobuka mibeko. Bipai mosusu, bazali kosalela oyo ebéngami mibeko ya bonkɔkɔ (droit coutumier), mpe koponama ya banamboka mpo na kosambisa moto ezali kati na ebongiseli ya kosambisa. Atako bongo, bato mingi bazali bobele na likanisi ya likolólikoló na ntina na lolenge oyo masangani ya basambisi mazali koponama mpe mokumba na yango. Na bongo, kozwa likanisi ya mwa mozindo ekosunga yo mpo na kokamata ekateli soki obyangami mpo na mosala ya kosambisa.

Libota ya Nzambe endimaka ete Yehova nde azali Mosambisi oyo aleki basambisi nyonso. (Yisaya 33:22) Na Yisalaele ya kala, mibali ya makoki oyo bazalaki na bosembo mpe kozanga koponapona bazalaki kosala lokola basambisi mpo na kosilisa matáta mpe kokata makambo matalelaki mibeko. (Exode 18:13-​22; Levitike 19:15; Deteronome 21:18-​21) Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, mosala ya kosambisa esimbamaki na Sanedrina, esambiselo monene ya Bayuda. (Malako 15:1; Misala 5:27-34) Bazalaki na ebongiseli te ya kopona moyuda nyonso ete azala kati na lisangani ya basambisi mpo na kosilisa matáta kati na bato.

Na mikili mosusu bazalaki kosalela masangani ya basambisi oyo baponami kati na banamboka. Socrate asambisamaki na lisangani ya basambisi 501. Kosambisama na lisangani ya basambisi ezalaki mpe kosalelama na ekólo ya Loma, atako na nsima eyaki kolongolama na eleko ya boyangeli ya baamperɛrɛ. Na nsima, Henry III, Mokonzi ya Angleterre asalaki ebongiseli ete moto asambisama na bazalani na ye na esika afandi. Bakanisaki ete lokola bayebi malamu moto oyo afundami, ekateli na bango esengelaki kozala malamu koleka lolenge ya kosalela ya kala oyo esɛngaki ete moto andimisa ete azali na ekweli te na kolongáká etumba to mpe na kolongáká mamekani ya makámá. Nsima ya ntango, ebongiseli ya kosambisa ebongwanaki na koponama ya etuluku ya banamboka oyo basengelaki koyokamela likambo ya moto mpe kokata yango engebene bilembeteli ya ekweli. Zúzi moko oyo azali nganga-mibeko azalaki kosunga bango mpo na koyeba bilembeteli.

Ezali na mitindo ndenge na ndenge ya masangani ya basambisi, na motángo ya basangani, mpe masɛngami mpo na kokata likambo. Na ndakisa, na États-Unis, lisangani monene ya basambisi 12 kino 23 etalelaka soki bilembeteli bikoki mpo na koloba ete moto oyo afundami asali mbeba monene; lisangani yango ekataka te soki moto wana azali na ekweli to mpe na elónga. Lolenge moko, kati na lisangani ya basambisi mpo na koluka bilembeteli (lisangani ya basali ankɛtɛ), basambisi bakotala bilembeteli mpo na kokata soki mbeba monene esalemaki.

Na makanisi ya bato mingi, ntango bazali kolobela lisangani ya basambisi, bamonaka etuluku ya banamboka 12 na lisambisi moko​—ezala na mwa mokakatano moke kati na bato to mpo na mbeba monene ya kobuka mibeko​—oyo bazali koyoka litatoli mpo na kondimisa ekweli to mpe elónga. Wana ezali lisangani moke ya basambisi, na bokeseni na lisangani monene ya basambisi. Mbala mingi, esambiselo etindaka nkasa ya libyangi ya kokende kosala mosala ya mosambisi epai na bato oyo baponami na liste ya baoyo basalaka voti, bakumbi mituka, to mpe bato mosusu ya lolenge wana. Basusu bakoki mbala moko kolongolama na molɔngɔ́ ya baoyo bakoki koponama, na ndakisa baoyo bayebani ete bazali basáli minene ya mabe mpe baoyo bazali na makoki moke ya kokanisa. Engebene mibeko ya mboka, bato mosusu​—lokola minganga, bakonzi ya mangomba, baí-mibeko, to bato na mimbongo mikemike⁠—bakoki kosɛnga ete bálongolama na molɔngɔ́ ya baoyo bakoki koponama. (Basusu bakoki kolongolama mpo na bantina ya bango moko to mpe lisosoli na bango eyokani te na misala ya kosambisa.) Nzokande, bakonzi bazali sé kotya bipekiseli mpo na kokólisa te motángo ya baoyo bakoki kosɛnga kolongolama na boye ete ekóma lisɛngisami mpo na moto nyonso na kondima mosala ya mosambisi, ntango mosusu bakobyangama mbala mingi na boumeli ya bambula.

Ezali te baoyo nyonso babyangami na mosala ya mosambisi nde bafandaka na esambiselo lokola basambisi kati na likambo moko. Kati na etuluku ya bato oyo babyangami mpo na mosala ya kosambisa, bamoko bazali koponama kozanga kotalela masɛngami mosusu lokola basambisi na likambo moko. Na nsima zúzi akokabola na ngámbo mibale, epai moko bafundi, mpe epai mosusu bakɔteli mpe baavoká na bango mpe akolimbola motindo ya likambo yango. Ye mpe baavoká bakotalela mobyangami mokomoko kati na baoyo bakosalelama lokola basambisi. Ezali na ntango yango nde moto moko akoki koloba soki aboyi kosala lokola mosambisi na likambo wana na ntina na lisosoli na ye.

Etuluku wana esengeli kokutolama kino kozwa motángo ya basambisi oyo bakofanda mpenzampenza mpo na kosambisa likambo. Zúzi akolongola moto nyonso oyo bosembo na ye ekoki kotyelama ntembe mpo na litomba moko akoki kozala na yango kati na likambo lizali kosambisama. Lisusu, baavoká na ngámbo nyonso mibale bazali na lotómo ya koboya basambisi mosusu. Moto nyonso oyo alongolami na lisangani ya basambisi akozonga na etuluku ya babyangami mpo na kozela ete aponama na makambo mosusu makosambisama kozanga ete bátalela ye lisusu masɛngami mpo na kozala mosambisi. Baklisto mosusu oyo bazalaki na ezalela wana basalelaki ntango yango mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu. Nsima ya mwa mikolo, moto akokokisa mokumba na ye na mosala ya kosambisa, ata soki afandaki na molɔngɔ́ ya basambisi to te.

Baklisto basalaka makasi ete ‘bátalela makambo na bango mpenza,’ bamikɔtisa te na “makambo na bamosusu.” (1 Batesaloniki 4:11; 1 Petelo 4:15) Ntango Moyuda moko asɛngaki na Yesu ete akatela bango likambo ya libula, ayanolaki ete: “Mobali, nani aponi ngai mosambisi to mokaboli kati na bino?” (Luka 12:13, 14) Yesu ayaki mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi, kasi te mpo na kokata makambo ya mibeko. (Luka 4:18, 43) Ekoki kozala ete eyano ya Yesu etindaki moto wana na kosalela lolenge ya kosilisa makambo oyo elakisamaki na Mibeko ya Nzambe. (Deteronome 1:16, 17) Atako makambo wana mazali solo, koyanola na lisɛngami ya kokokisa mosala ya mosambisi ekeseni na komikɔtisa na makambo ya bato mosusu. Yango ekokani na ezalela oyo Danyele mpe baninga na ye misato bazalaki na yango. Boyangeli ya Babilone esɛngaki na bango ete bákenda na mokili patátálú ya Dula, mpe na ndenge batosaki yango babukaki soko moke te mobeko ya Nzambe. Makambo basalaki na nsima ezali likambo mosusu, lokola Biblia emonisi yango.​—Danyele 3:16-18.

Nsima wana basaleli ya Nzambe balongwaki na nsé ya Mibeko ya Mose, basengelaki kosamba liboso ya bisambiselo ya bato na bamboka ndenge na ndenge. Ntoma Paulo alendisaki “babulami” kati na Kolinti ete básilisa mikakatano kati na lisangá. Wana alobelaki boyengebene ya bisambiselo ya mokili na kobéngáká yango ete “bato na masumu,” Paulo alingaki koloba te ete yango ezali na lotómo te ya kosambisa makambo ya mokili oyo. (1 Bakolinti 6:1) Ye moko asambaki liboso ya esambiselo ya Loma, kútu asɛngaki ete likambo na ye limemama epai na Kaisala. Yango emonisi ete bisambiselo ya mokili bizali mpenza mabe te.​—Misala 24:10; 25:10, 11.

Bisambiselo ya mokili bizali mokumba ya “bakonzi bazali liboso.” ‘Bakonzi wana babongisami na Nzambe,’ mpe bazali kosala mibeko mpe kotosisa yango. Paulo akomaki ete: “Azali mosali na Nzambe mpo na malamu na yo. Nde soko okosala mabe, obanga. Zambi akomemaka mopanga mpamba te. Azali mosali na Nzambe mpo na kokómisa nkanda na ye epai na moto oyo akosalaka mabe.” Baklisto ‘batombokelaka bakonzi’ te wana bakonzi yango bazali kokokisa mikumba wana mitaleli mibeko, mpamba te balingi te ‘kotombokela bango’ mpe kozwa etumbu.​—Baloma 13:1-4; Tito 3:1.

Na bokatikati nyonso, baklisto basengeli kotalela malamu soki bakoki kotosa masɛngami mosusu ya Kaisala. Paulo apesaki toli ete: “Bófutela bango nyonso [bakonzi baleki liboso] nyongo na bango, mpako epai na baoyo bakoki kozwa mpako, lifuti epai na baoyo bakoki kozwa lifuti, nsɔ́mɔ epai na bango bakoki kobangama, lokumu epai na baoyo bakoki kozwa lokumu.” (Baloma 13:7) Yango ezali mpenza mpo na mpako ya mosolo. (Matai 22:17-21) Soki Kaisala alobi ete banamboka basengeli kopesa ntango mpe milende na bango mpo na kopɛtola banzela to mpe kosala misala mosusu oyo mizali kati na mikumba ya Kaisala, moklisto mokomoko akozwa ekateli soki akotosa.​—Matai 5:41.

Baklisto mosusu bazali kotalela kondima kosala mosala ya mosambisi lokola kopesa na Kaisala biloko na Kaisala. (Luka 20:25) Na likambo ya kosambisa, mokumba ezalaka ya koyoka bilembeteli mpe kopesa likanisi ya sembo likoló na makambo masalami to mpe likoló na mibeko. Na ndakisa, na lisangani monene ya basambisi, bango bakokata soki bilembeteli bindimisi kofundama ya moto na esambiselo; ezali mokumba na bango te kokata soki azali na ekweli to azali na ekweli te. Ezali boni mpo na lisambisi ya makambo masalemaka mbala na mbala? Na likambo ya mbeba moke oyo moto asaleli moninga na ye, basambisi bakoki kokatela moto oyo asali mabe lomande to ntálo ya mosolo mpo na kobongisa mbeba yango. Na likambo litali mbeba monene engebene mibeko, basengeli kokata soki bilembeteli bindimisi ekweli. Mbala mosusu bakopona etumbu oyo, engebene mibeko esengeli kopesama epai na moto oyo asali mbeba. Boye Letá akosalela bokonzi na ye “mpo na kokómisa nkanda na ye epai na moto oyo akosalaka mabe,” to “mpo na kopesaka bitumbu epai na bato na misala mabe.”​—1 Petelo 2:14.

Ezali boni soki moklisto moko akanisi ete lisosoli na ye lipesi ye nzela te ya kosangana na kosambisama ya likambo moko ya sikisiki? Biblia elobeli mosala ya kosambisa te, boye akoki koloba te ete, ‘Kosala mosala ya mosambisi eyokani te na bindimeli ya lingomba na ngai.’ Engebene likambo na likambo, akoki koloba ete kosala lokola mosambisi kati na likambo moko ya sikisiki eyokani te na lisosoli na ye moko. Yango ekoki kozala bongo soki yango ezali mbeba ya kosangisa nzoto, kosopa zemi, koboma moto, to makambo mosusu oyo kati na yango lolenge na ye ya kokanisa epusami na boyebi ya Biblia, kasi te bobele na mibeko ya mokili. Nzokande, mpo na koloba solo, ekoki kosalema ete lisambisi epai kuna ye aponami etalela makambo motindo wana te.

Moklisto oyo ateli na elimo akomanyola mpe likoló na mokumba na ye mpo na etumbu oyo ekokatama na bazúzi. (Kokanisá na Genese 39:17-20; 1 Timote 5:22.) Soki bakweisi moto moko na libunga mpe ete bakateli moto yango etumbu ya liwa, moklisto akokabola nyongo ya makila oyo ekotángama likoló ya lisangani ya basambisi? (Exode 22:2; Deteronome 21:8; Yilimia 2:34; Matai 23:35; Misala 18:6) Na ntango basambisaki Yesu, Pilata alingaki kozala “na likambo na makila na moto oyo te.” Na mposa nyonso Bayuda balobaki ete: “Makila na ye mazala likoló na motó na biso mpe likoló na bana na biso.”​—Matai 27:24, 25.

Soki moklisto abyangami na kosala mosala ya mosambisi, lokola esɛngisami na Letá, kasi na ntina na lisosoli na ye moko, aboyi kosala na lisambisi moko ya sikisiki atako zúzi asɛngisi ye yango na nguya nyonso, moklisto yango asengeli kozala pene na kondima mikakatano oyo yango ekomemela ye​—ezala lomande to mpe bolɔ́kɔ.​—1 Petelo 2:19.

Mpo na kosukisa, nsima ya kotalela makambo nyonso, moklisto mokomoko oyo atalelami na likambo ya kosala mosala ya mosambisi asengeli kozwa ekateli ye moko na lolenge akosala, ekateli oyo ekotongama likoló na boyebi na ye ya Biblia mpe lisosoli na ye moko. Baklisto mosusu basilaki kobyangama na mosala ya kosambisa mpe basalaki na masambisi mosusu. Basusu bamiyokaki ete basengelaki koboya ata soki yango ekokaki komemela bango etumbu. Moklisto mokomoko asengeli kozwa ekateli mpo na ye moko na ntina na oyo akosala, mpe basusu basengeli te kolobaloba mpo na ekateli na ye.​—Bagalatia 6:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto