Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/4 lok. 27
  • Ozali Komikundola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali Komikundola?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Masolo mosusu
  • Akila na Pilisikila: Babalani oyo bazalaki ndakisa malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Sakolá mpo na kokómisa bato bayekoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mituna ya Batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Esika ya MIZIKI KATI NA LOSAMBO NA MIKOLO NA BISO
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/4 lok. 27

Ozali Komikundola?

Otalelaki na likebi nyonso banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo eutaki kobima? Na bongo okosepela komikundola makambo malandi:

◻ Lolenge nini babalani mingi na mikolo na biso basili kolanda ndakisa malamu oyo Akila mpe Pilisikila batikaki?

Akila mpe Pilisikila bapesaki lisungi kati na masangá mingi makeseni. Lokola bango, baklisto mingi na ntango na biso bazali pene ya kokende kosala esika oyo mposa ya basakoli ezali mingi. Bango mpe bazali kozwa esengo mpe bosepeli ya komona matomba ya Bokonzi kokóla mpe bazali kozwa makoki ya kokólisa boninga ya boklisto ya motuya.​—15/12, lokasa 24.

◻ Likanisi ya Biblia na ntina na masanga ezali nini?

Biblia ezali na likanisi ya bokatikati na ntina na masanga. Na ngámbo moko, Biblia elobi ete vinyo ezali likabo liuti na Nzambe. (Nzembo 104:1, 15) Na ngámbo mosusu, Biblia ezali kokweisa kolekisa ndelo na komela. (Luka 21:34; 1 Timoté 3:8; Tito 2:3; 1 Petelo 4:3)​—15/12, lokasa 27.

◻ Mokanda ya Biblia na nkombo Hagai ezali na likambo nini ya ntina mingi?

Atako mokanda ya Hagai ezali bobele na bavɛrsɛ́ 38, nkombo ya Nzambe esalelami mbala 35. Esakweli ya lolenge wana ekozala na nguya te soki ebéngeli “Nkolo” ekitani nkombo Yehova.​—1/1, lokasa 6.

◻ Liteya nini tokoki kozwa na masumu ya Davidi mpe ya Manase? Atako Yehova alimbisaki Davidi mpe Manase, mibali yango​—mpe Yisalaele mobimba​—bakokaki te kopɛngola matomba mabe ya etamboli na bango ya masumu. (2 Samwele 12:11, 12; Yilimia 15:3-5) Lolenge moko, atako Yehova alimbisaka basáli na mabe oyo babongoli motema, mbala mosusu matomba mabe ya etamboli na bango makoki kopɛngolama te.​—1/1, lokasa 27.

◻ Na ndimbola nini ‘makolo na bango bakosakolaka nsango malamu’ ya Bokonzi ya Nzambe mazali “kitoko”? (Yisaya 52:7)

Ezali makolo oyo mazali na momeseno ya kotambwisa moto ntango akendaka kosakola epai na basusu. Makolo wana mazali mpenza komonisa moto yango. Boye na miso ya bato mingi oyo bayokaka mpe bandimaka nsango malamu ya Bokonzi, makolo ya bamemi-nsango motindo wana mazali mpenza bonzenga.​—15/1, lokasa 13.

◻ Wapi makambo mibale makangisami na “kosakola nsango malamu”? (1 Bakolinti 9:16)

Ya liboso, tosengeli kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Likambo ya mibale na mosala yango ezali bongo koteya baoyo bazali koyanola malamu na kosakolama ya Bokonzi.​—15/1, lokasa 23.

◻ Matomba nini tokoki komizwela na koyemba nzembo ya Bokonzi na makita ya lisangá?

Koyemba epesaka biso libaku ya kobimisa mayoki oyo tozali na yango mpo na Mozalisi na biso. (Nzembo 149:1, 3) Koyemba kati na lisangá na kobimisáká mayoki na biso nyonso ekoki kotya biso kati na ezalela malamu ya elimo mpe ya motema mpo na kolanda malamu makita oyo makosalema na nsima na yango. Ekoki kopusa biso ete tósangana mingi koleka na losambo ya Yehova.​—1/2, lokasa 28.

◻ Ntango nini ekoki kolobama ete mokolo ya liwa eleki mokolo ya kobotama na malamu? (Mosakoli 7:1)

Mokolo ya liwa ekoki koleka mokolo oyo moto abotamaki soki moto amisaleli nkombo malamu na miso ya Yehova, oyo akoki kosekwisa basembwi oyo bazali kokufa. (Yoane 11:25)​—15/2, lokasa 12.

◻ Mpo na nini mokanda ya Mosakoli esengeli kosalisa mokomoko na biso?

Yango ekoki kosalisa mokomoko na biso ete asembola lolenge na ye ya kotalela bomoi mpe ayeba makambo oyo tosengeli komipesa na yango. (Mosakoli 7:2; 2 Timoté 3:16, 17)​—15/2, lokasa 16.

◻ Batatoli ya Yehova bazali batingami na bindimeli ya kala?

Te. Atako bazali na bindimeli makasi na makambo ya losambo, bazali batingami te na ndimbola oyo liloba yango ezali kosalelama. Basalelaka te myango lokola kotambola na balabála to mpe kosala mobulu mpo na komonisa mayoki na bango epai na baoyo bazali na bango na boyokani ya makanisi te. Bazali komekola Motambwisi na bango, Yesu Klisto.​—1/3, lokasa 6.

◻ Kozanga koyeba ntango ya sikisiki oyo Yesu akoya kokokisa nkanda ya Nzambe ezali na bopusi nini likoló na baklisto?

Yango ezali kosalisa baklisto ete bázala ntango nyonso na bokɛngi mpe ezali kopesa biso libaku ya komonisa mokolo na mokolo ete tozali kosalela Yehova na mikano mizangi moimi.​—1/3, lokasa 13.

◻ Tosengeli kotalela makambo nini liboso ya kofunda na esambiselo ndeko moko oyo asaleli biso bokosi?

Tosengeli kotalela bopusi oyo likambo yango ekoki kozala na yango likoló na biso moko, likoló na bato mosusu batalelami, likoló na lisangá, mpe likoló na bato ya libanda. (1 Bakolinti 6:7)​—15/3, lokasa 22.

◻ Bolamu ya solosolo ekoki kozwama ndenge nini?

Bolamu ya solosolo ezali ezalela ya motema, oyo etongami likoló na kondima ya solosolo mpe na boyokani malamu elongo na Yehova. (Matai 5:3)​—15/3, lokasa 23.

◻ Moklisto asengeli kosala nini soki abyangami mpo na kosala mosala ya mosambisi?

Moklisto mokomoko oyo abyangami mpo na kosala mosala ya mosambisi asengeli kozwa ekateli ye moko na lolenge akosala, ekateli oyo ekotongama likoló na boyebi na ye ya Biblia mpe lisosoli na ye. (Bagalatia 6:5)​—1/4, lokasa 29.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto