Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Koluka ebombamelo na lisangá ya Teokrasi ya Yehova
KALAKALA mosakoli Yisaya apusamaki na koloba ete: ‘Na bisanga ya mai monene, solo bakokumisa Yehova.’ (Yisaya 24:15, NW) Batatoli ya Yehova batalelaka bisanga ya mai monene lokola eteni ya “mokili mobimba” epai kuna Yesu alobaki ete “nsango malamu ekosakolama.”—Matai 24:14; Malako 13:10.
Bisanga Marquises bizali na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 1 400 na nɔ́rdi-ɛ́sti ya ekólo Tahiti. Bisanga yango bizali eteni moko ya bituluku ya bisanga bizali mosika na Pasifike ya Súdi oyo bibéngami Polynésie française. Na klimá na yango ya mɔ́tɔ na mwa mpiɔ, mpe na mabelé na yango malamu oyo mazali na bitiká ya ba volcans, milóna mibotaka malamu na bisanga. Nzokande, bisanga ya Marquises bizali lisusu kobota mbuma ya lolenge mosusu. Tótalela ndakisa ya libota moko oyo lindimaki nsango ya Bokonzi na esanga ya Hiva Oa.
Jean na mwasi na ye, Nadine, bazalaki kosepela te na mimeseno ya bato ya Mpótó ya Wɛ́sti, mimeseno ya bato babéngami sivilizé. Na yango, bazwaki ekateli ya kotika lolenge wana ya bomoi ya yikiyiki mpe kokende kofanda na mwana na bango na bisanga Marquises. Ndako na bango ya sika, oyo etongamaki na babambu, ezalaki mosika mpe ebombama kati na lobwaku. Uta esika na bango, mpo na komona lisusu na bandako ya bato, basengelaki kotambola na makolo na mwa nzela moko ya ngombangomba na boumeli ya ngonga mibale. Mpo na kokóma na mboka epai monganga, eteyelo, mpe magazini monene ezali esengelaki kotambola na motuka na boumeli ya ngonga misato.
Jean na Nadine bazalaki kosepela na makambo ya losambo te. Nzokande, bazalaki kobɛta ntembe na ntina na eutelo ya bomoi. Mbala mingi, bazalaki kobimisa makanisi ndenge na ndenge mpe ya mindɔndɔ likoló na liteya ya evolisyó. Kasi ata moko na makanisi na bango epesaki bango eyano ya sikisiki te.
Nsima ya kofanda na bomoi ya komitangola na bato mosusu na boumeli ya mbula motoba, bakamwaki mokolo mosusu na komona Batatoli mibale ya Yehova bakendaki kotala bango. Batatoli ya Yehova bayebaki esika ya Jean na Nadine na bato ya mboka ya pembeni. Lokola tokoki kokanisa yango, lisoló na bango ememaki bango kino na liteya ya evolisyó. Likambo ya esengo mpo na babalani wana, Batatoli bamemaki búku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création?, ebimisami na Batatoli ya Yehova. Jean na Nadine basepelaki kozwa búku oyo elobelaki na mozindo lolenge oyo bomoi ebandaki.
Mwa moke na nsima, babandaki koyekola Biblia. Na boumeli ya mbula soko misato, Jean na Nadine basalaki bokóli mingi. Bamindimisaki ete mosika te mabelé mobimba makokóma paladiso. Nsima wana bakómaki na bana misato, kotambola na boumeli ya ngonga minei mpo na koyangana na makita ya boklisto na Ndako ya Bokonzi ekómaki likambo ya mpasi mpenza. Nzokande, yango epekisaki bango te ete bálanda koyangana. Na nsima, Jean na Nadine bamipesaki na Yehova na kozwáká batisimo ya mai. Yango ezalaki na liyangani oyo esalemaki na mboka monene, epai motuya ya nsuka ya bayangani ezalaki bongo bato 38!
Mpo na kosalisa mwa etuluku moke ya basakoli ya Bokonzi, libota yango ezwaki ekateli ya kotika ndako na bango oyo ezalaki mosika. Bakendaki kofanda na mboka moko oyo ezali na bato pene na nkóto moko, epai kuna Jean azali sikawa mosaleli ya misala kati na lisangá ya Batatoli ya Yehova na mboka yango. Libota yango, oyo kala ekendaki kofanda na bisanga mpo na kokima mimeseno ya Mpótó, ezali sikawa kotalela yango lokola libaku malamu ya komona ebombamelo bobele moko ya solo, lisangá ya Teokrasi ya Yehova.