Biso tozali kati na baoyo bazali na kondima
Bazali kosakola Bokonzi ya Nzambe na bisanga Fidji
MOKOLO mosusu, Yesu Klisto alobelaki banzela mibale. Nzela moko ezali monene mpe ememaka na liwa. Nzela mosusu ezali moke mpe ememaka na bomoi. (Matai 7:13, 14) Mpo na kosalisa bato bápona nzela ya malamu, Yehova Nzambe alingaki ete nsango malamu ya Bokonzi esakolama na mokili mobimba. (Matai 24:14) Yango wana, na bisika nyonso oyo bazali, bato bazali koyoka nsango ya Bokonzi; bamosusu bazali kopona nzela ya bomoi mpe bazali kokóma ‘baoyo bazali na kondima mpe bakobikisa milimo.’ (Baebele 10:39, NW ) Talá ndenge oyo bato mosusu na Fidji mpe bisanga mosusu oyo ezali pembeni na yango, na sudi ya Mbu ya Pasifike, baponaki bomoi.
Batyelaki Yehova motema
Mbala ya liboso oyo Mere ayokaki nsango ya Bokonzi ezalaki na 1964, na ntango wana azalaki naino na kelasi. Lokola azalaki kofanda na esanga moko oyo ezali mosika, azalaki mpenza kozwa libaku ya kokutana na Batatoli ya Yehova te. Kasi, nsukansuka azwaki libaku ya koyekola mpe kozwa boyebi ya solosolo ya Biblia. Na ntango yango, babalaki ye na moto moko oyo azalaki nkumu ya libota na mboka na bango. Lokola Mere alingaki kotosa mibeko ya Biblia na bomoi na ye, mobali na ye na bandeko na ye bakómaki konyokola ye, mpe bato mosusu ya mboka bazalaki kotyola ye. Atako bongo, na 1991, Mere azwaki batisimo.
Mwa moke na nsima, Josua, mobali ya Mere, akómaki na boboto; kutu akómaki kofanda mpo na koyoka masolo ya Biblia oyo Mere azalaki kosolola na bana na bango. Josua atikaki kokende ndakonzambe ya Lingomba ya Metodiste. Kasi, lokola azalaki nkumu ya libota, azalaki kotambwisa makita oyo bazalaki kosala pɔsɔ na pɔsɔ na bato ya mboka. Bato ya mboka bamonaki ete Josua azalaki lisusu sembo te, mpamba te Lingomba ya Metodiste ezalaki lokola lingomba ya bato nyonso ya mboka yango ya Fidji. Yango wana, pastɛrɛ asɛngaki Josua azonga na lingomba na ye ya kala.
Josua abangaki te mpe alobaki ete ye na libota na ye baponi kosambela Yehova Nzambe “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Na likita ya bato ya mboka oyo elandaki, mokonzi ya mboka akataki likambo mpe alobaki ete Josua na libota na ye bazali lisusu bato na bango te mpe babenganaki bango na mboka. Bapesaki bango mikolo nsambo mpo na kolongwa na esanga, bátika ndako na bango, mabele na bango, bilanga na bango; na mokuse, biloko na bango nyonso.
Bandeko ya elimo na esanga mosusu basalisaki Josua na libota na ye, bapesaki bango esika ya kofanda mpe mabele mpo na kosala bilanga. Lelo oyo, Josua na mwana na ye ya liboso bazali baklisto oyo bazwi batisimo, mpe mwana mosusu azali mosakoli ya nsango malamu oyo azwi naino batisimo te. Mere auti kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza (mosakoli ya ntango nyonso ya nsango malamu). Lokola baponaki kosalela Yehova, babungisaki biloko ya mokili mpe esika na bango, kasi lokola ntoma Paulo, bango mpe bazali komona yango biloko mpamba soki bakokanisi yango na oyo bango bazwi.—Bafilipi 3:8.
Aponaki kotosa lisosoli na ye
Mpo moto atosa lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia, esɛngaka kozala na kondima mpe kozala na mpiko. Yango nde likambo ekómelaki Suraang, elenge mwasi oyo auti kozwa batisimo mpe afandi na Tarawa, moko na bisanga ya Kiribati. Suraang azalaki lifulume na lopitalo moko; ezalaki na mosala moko oyo, lisosoli na ye emonaki mabe kosala yango, mpe asɛngaki ete bápesaka ye yango te. Bakonzi na ye baboyaki, kutu batindaki ye akende kosala na mwa lopitalo moko ya moke na esanga mosusu oyo ezalaki mosika; kuna mpe azalaki kaka ye moko Motatoli ya Yehova.
Na esanga yango, basɛngaka na moto nyonso oyo ayei sika apesa “elima” ya mboka yango mbeka. Bato ya esanga yango bakanisaka ete soki moto apesi mbeka te, akokufa. Lokola Suraang aboyaki básalela ye to baninga na ye losambo wana ya bikeko, bato ya mboka bakanisaki ete elima yango ekosilika mpe ekofina ye na nkingo mpe ekoboma ye. Lokola likambo moko ekómelaki Suraang to baninga na ye te, epesaki ye libaku ya koteya bato mingi.
Kasi, komekama ya Suraang esilaki naino te. Na esanga yango ezali na bilenge mibali oyo balukaka kozwa makango elenge mwasi nyonso oyo akómi sika na mboka na bango. Kasi, Suraang aboyaki mpe atikalaki sembo epai ya Nzambe. Kutu, azalaki kosala mosala ya Nzambe lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza, atako azalaki mpe kosala lokola lifulume mokolo mobimba.
Liboso básalela Suraang fɛti, ntango etikalaki moke azonga na ye, bankumu ya mboka balobaki ete azali moto ya liboso oyo akendaki kosala na mboka na bango lokola misionɛrɛ ya solosolo. Lokola abatelaki mibeko ya Biblia, bato mosusu na esanga yango bakómi kosepela na nsango ya Bokonzi.
Mikakatano na nzoto
Lokola bamboka mosusu ezali mosika mpenza, esɛngaka na basaleli ya Yehova básala milende mpenza mpo na kobima na mosala ya kosakola mpe koyangana na makita ya lisangá. Tozali na ndakisa ya Batatoli minei oyo bazwá batisimo: mobali moko na basi misato; mpo na kokende na makita, balekisaka ngonga mingi na kokende mpe na kozanga. Na nzela, basengeli kokatisa bibale misato, ezala na kokende to na kozonga. Na ntango ya mpela, ndeko ya mobali abɛtaka mai mpo na kokatisa liboso na nzungu moko monene oyo batyaka basakosi, mikanda mpe bilamba oyo bakolata na makita. Na nsima azongaka lisusu na ngámbo mpo na kosalisa bandeko basi bákatisa.
Bandeko mosusu oyo bakendaka makita na esanga Nonouti na Kiribati bazali na mikakatano ya ndenge mosusu. Mwa ndako oyo basalelaka makita ezali kaka na bisika mpo na bato nsambo to mwambe. Bato mosusu balandaka makita libándá nsima ya bifelo ya ndako yango, oyo esalemi na likandala (treillis) mpe bato ya mboka bamonaka bango ntango balekaka mpo na kokende to kouta na bandakonzambe na bango oyo etongama malamu. Kasi, Batatoli ya Yehova bayebi ete Nzambe asepelaka libosoliboso na bato, kasi na bandako te. (Hagai 2:7) Ndeko mwasi moko mobange oyo azwá batisimo afandaka na esanga yango, ye akokaka kotambola mosika te. Kasi, elenge mwasi moko oyo azali mosakoli kasi azwi naino batisimo te asalisaka ye na mosala ya kosakola, atindikaka ye na velo. Ya solo bandeko yango basepelaka mpenza na mateya ya solo ya Biblia!
Basakoli koleka 2 100 oyo bazali kosalela Nzambe na bisanga ya Fidji bazali na mokano ya kokende ntango nyonso liboso na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bazali mpe na elikya ete bato mosusu mingi bakokóma ‘baoyo bazali na kondima mpe bakobikisa milimo.’
[Karte na lokasa 8]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Australie
Fidji