Teletio—Mokomeli ya sembo mpo na Paulo
TELETIO azalaki na mokumba ya mpasi. Ntoma Paulo azwaki ye lokola mokomeli na ye mpo na kokoma mokanda molai oyo atindelaki baklisto ya Loma. Yango ezalaki mosala ya mpasi.
Mpo na nini ezalaki likambo ya mpasi kozala mokomeli na ekeke ya liboso T.B.? Mosala yango mozalaki kosalema ndenge nini? Bisaleli nini ya kokoma bizalaki na ntango wana?
Bakomeli na ntango ya kala
Na mokili ya Bagreke mpe Baloma ya kala, ezalaki na mitindo ndenge na ndenge ya bakomeli. Bamoko basalaki lokola bakomeli ya guvernemá—basáli kati na babiro ya bakonzi ya Letá. Ezalaki mpe na bakomeli ya bato banso oyo bazalaki kosala mpo na banamboka na bisika ya bato banso. Bakomeli ya bato (mbala mingi baombo) bazalaki kosala epai ya bato ya bozwi mingi. Lisusu, ezalaki na baninga ya bolingo malamu oyo basepelaki kokoma mikanda mpo na bato mosusu. Engebene nganga-mayele E. Randolph Richards, makoki ya bakomeli oyo bayebanaki na Letá te “ezalaki ndenge na ndenge, bamoko bazalaki sé na mwa boyebi ya lokótá mpe basusu bazalaki mpenza na makoki mingi ya kokoma na mabɔkɔ na lombangu mpe kobimisa nkomá ya sikisiki, ya pɛto mpe ya kitoko.”
Banani bazalaki na mposa ya bakomeli? Libosoliboso, baoyo bayebaki kotánga te mpe kokoma te. Mikanda mingi ya kala ya boyokani mpe ya mombongo mizalaki kosuka na maloba oyo mokomeli atatolaki ete ye nde moto akomaki yango mpamba te moto oyo apesaki ye mosala yango ayebaki kokoma te. Ntina ya mibale mpo na kosalela mokomeli emonisami na nkomá moko ya kala oyo ezwamaki na Thèbes, na Ezipito. Ekomamaki mpo na moto moko, nkombo na ye Asklepiades, na nsuka na yango elobami ete: “Eumelus, mwana ya Herma, akomelaki ye . . . mpo ete ye moko akomaka malɛmbɛmalɛmbɛ.”
Kasi, emonani ete koyeba kotánga mpe kokoma ezalaki bobele yango te oyo esengelaki mpo na kosalelama lokola mokomeli. Engebene molimboli ya Biblia John L. McKenzie, “mbala mosusu ezalaki ata likambo ya koyeba kokoma polele te, kasi kokoma na bonzenga, to mpe mbala mingi kokoma malamu mpe na bopɛto” epusaki bato na kosalela bakomeli. Ata mpo na baoyo bayekolaki mingi, kokoma mokanda ezalaki kolɛmbisa, mingimingi soki mokanda yango esengelaki kozala molai mpe esengeli kotyelama likebi. Nganga-mayele J. A. Eschlimann alobi ete moto nyonso oyo akokaki kozala na mokomeli “asepelaki ete mosala wana ya mpasi elongwa epai na ye, kopesáká yango na moombo oyo azalaki mokomeli.” Lisusu, ezali mpasi te kokanga ntina oyo bato bazalaki kosepela te kokoma mikanda bango moko soki totaleli bisaleli mpe lolenge mosala yango mozalaki kosalema na eleko wana.
Esaleli mpo na kokoma oyo esalelamaki mingi na ekeke ya liboso T.B. ezalaki bongo papirise. Bazalaki kozwa biteni mikemike ya kati ya mobimbi ya nzeté yango na kopasoláká yango na bolai. Bongo, bazalaki kokangisa yango mpo na kosala litɔkɔ. Litɔkɔ mosusu ekobakisama na mopanzi ya mobali ya oyo ya liboso. Nyonso mibale ezalaki kosangisama na konyatáká yango makasi, mpe na bongo bazalaki kobimisa “papyé.”
Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te kokoma likoló ya etanda yango. Ezalaki seliseli te mpe ezalaki nsingansinga. Engebene nganga-mayele Angelo Penna, “lolenge oyo nkasa ya papirise ezali lokola mosuni ezalaki kosala ete mai ya ekomeli mapalangana, mingimingi katikati na banzela mike oyo ezalaki kotikala na biteni mike.” Mokomeli akokaki kosala wana afandi na mabelé, azingi makolo na ye mpe asimbi na lobɔkɔ lokasa ya papirise oyo etyami likoló na libaya. Soki amesanaki te to soki bisaleli bizalaki malamu mpenza te, ekomeli na ye ya lonsálá to ya nkɛkɛlɛ, ekokaki kokangama na papirise, lokasa ekopasuka to mpe makomi makomonana malamu te.
Mai ya mokanda mazalaki kosalama na mputulu ya milinga oyo bapɔ́ti yango na makiki. Ezalaki kotekama lokola mwa maboke mpe esengelaki kolembisa yango na mai kati na kɔpɔ ya mai ya mokanda (encrier) liboso ya kokoma na yango. Kati na bisaleli mosusu oyo mokomeli lokola Teletio asengelaki mbala mosusu kozala na yango ezali bongo mbɛli mpo na koseba ekomeli na ye ya nkɛkɛlɛ mpe gɔmi mpo na koboma mabunga na ye. Likomi mokomoko lisengelaki kokomama na bokɛngi. Boye kokoma ezalaki kosalema malɛmbɛmalɛmbɛ mpe na mwa mikakatano.
‘Ngai Teletio, natindeli bino mbote’
Kati na bambote oyo ebakisamaki na nsuka ya mokanda epai ya Baloma ezali na oyo ya mokomeli ya Paulo, oyo akomaki ete: “Ngai Teletio, mokomi na mokanda oyo natindeli bino mbote kati na Nkolo.” (Baloma 16:22) Ezali libaku bobele moko kati na mikanda ya Paulo epai elobelami polele na ntina na moko na bakomeli na ye.
Toyebi makambo mingi te na ntina na Teletio. Uta na mbote na ye “kati na Nkolo,” tokoki koloba ete azalaki moklisto ya sembo. Mbala mosusu azalaki moko kati na bandeko ya lisangá ya Kolinti mpe ekoki kozala ete ayebaki baklisto mingi na Loma. Nganga-mayele ya Biblia Giuseppe Barbaglio abanzi ete Teletio azalaki moombo to moombo ya kala oyo asikwamaki. Mpo na nini? Ya liboso, mpamba te “bakomeli (scribes) mbala mingi bazalaki na etuluku wana; mpe, mpo ete nkombo na ye ya Latin . . . ezalaki epai ya baombo mingi mpe baombo ya kala oyo basikwamaki.” Barbaglio alobi ete “na yango, azalaki sé moto oyo azalaki kosala mosala ya mokomi mpamba te, azalaki mosalani oyo na nzela ya mosala na ye asalisaki Paulo na kosangisa mokanda na ye oyo moleki molai mpe ya maloba polele: mosala ya ntina, oyo mosalisaki Paulo na kosomba ntango mpe ete alɛmba te.”
Na ntembe te mosala oyo ya Teletio ezali ya ntina. Baluku asalaki mosala lolenge yango mpo na Yilimia, lolenge moko Silwano asalaki mpo na Petelo. (Yilimia 36:4; 1 Petelo 5:12) Oyo nde libaku malamu basalani wana bazalaki na yango!
Mokanda epai ya Baloma
Mokanda epai ya Baloma mokomamaki na ntango Paulo azalaki na ndako ya Gayo, mbala mosusu na Kolinti. Yango ezalaki pene na mobu 56 T.B., na boumeli ya mobembo ya misato ya ntoma lokola misionere. (Baloma 16:23) Atako toyebi na bosikisiki ete Paulo asalelaki Teletio lokola mokomeli mpo na kokoma mokanda na ye, toyebi te lolenge nini mpenza asalelaki ye. Ata soki asalelaki mwango nini, mosala yango mozalaki pɛtɛɛ te. Kasi tokoki kondimisama na likambo oyo: Lolenge moko na biteni mosusu ya Biblia, mokanda ya Paulo epai ya Baloma ‘mopemamaki na Nzambe.’—2 Timoté 3:16, 17.
Ntango mokanda yango mosilaki kokomama, Teletio mpe Paulo bakomaki bankóto ya maloba, kosaleláká bapapirise mingi. Nsima ya kokangisama moko na mosusu na mipanzi na yango, nkasa yango ekómaki rulo, mbala mosusu na bolai ya mɛtɛlɛ 3 to 4. Mokanda yango molingamaki malamumalamu mpe motyamaki elembo. Na nsima emonani ete Paulo apesaki yango na mabɔkɔ ya Foibe, ndeko mwasi oyo autaki na Kenkelea, oyo alingaki kosala mobembo kino na Loma.—Baloma 16:1, 2.
Banda ekeke ya liboso, myango ya bobimisi mikanda misili kobongwana mingi. Kasi na boumeli ya bikeke, Nzambe abatelaki mokanda epai ya baklisto ya Loma. Tokoki kozala na botɔ́ndi mpo na eteni oyo ya Liloba ya Yehova, oyo ekomamaki na lisalisi ya Teletio, mokomeli ya sembo oyo asalaki na molende!