Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/8 nk. 26-29
  • Boyekoli ya libota oyo ezali kopesa esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boyekoli ya libota oyo ezali kopesa esengo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo nini tosengeli koyekola?
  • Batelá ezalela ya kimya
  • Pesá bomoi na masoló ya Biblia
  • Salisá moto nyonso ete apesa biyano
  • Sololá​—Kosilikisa te!
  • Molende ezali ya mpamba te
  • Bóyekolaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe na libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Boyekolaka na kati ya libota?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Bolamu bozali kozwama na boyekoli
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Programɛ ya libota​—Boyekoli ya libota
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/8 nk. 26-29

Boyekoli ya libota oyo ezali kopesa esengo

Biblia elobi ete: “Na nzela na boyebi, biteni-na-ndako ikotonda na biloko na motuya malamu mpe na kitoko.” (Masese 24:4) Biloko yango ya motuya ezali bobele bozwi ya mosuni te kasi esangisi mpe bolingo ya solo, bobangi Nzambe, mpe kondima makasi. Ya solo, bizaleli motindo wana bisalaka ete bomoi ya libota ezala na makambo malamu mingi. (Masese 15:16, 17; 1 Petelo 1:7) Kasi, mpo na kozwa yango, tosengeli komema boyebi ya Nzambe kati na mabota na biso.

TATA ya libota azali na mokumba ya koteya basangani ya libota na ye boyebi yango. (Deteronome 6:6, 7; Baefese 5:25, 26; 6:4) Moko na myango mileki malamu ya kosala yango ezali bongo boyekoli ya libota pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Ya solo, soki boyekoli etambwisami na boye ete ekoka koteya mpe kosepelisa, ekopesa esengo epai ya basangani! Na yango, tiká ete tótalela mwa makambo mosusu ya ntina mpo na kotambwisa boyekoli malamu ya libota.a

Boyekoli ya libota ezalaka na litomba mingi soki ezali kosalema pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Soki ezali kosalema bobele na libaku to na likatami ya mbalakaka, na ntembe te ekolandana malamu te. Na yango osengeli ‘kosomba ntango’ mpo na boyekoli. (Baefese 5:15-​17) Kopona ntango oyo ebongi mpo na bato nyonso ekoki kozala mokakatano. Tata moko ya libota andimi ete: “Tozalaki na mokakatano ya kolanda kosala boyekoli ya libota pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Tomekaki kotya bantango ekeseni kino toyaki kozwa ngonga ya mpokwa oyo ebongaki mpo na biso banso. Sikawa boyekoli ya libota na biso esalemaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.”

Nsima ya kozwa ntango oyo ebongi, sɛnzɛlá ete makambo ya mpambampamba máboma te ntango ya koyekola. Marie,b oyo azali sikawa na mibu 33 azali komikundola ete “soki bapaya bayei kotala biso, Papa azalaki kosɛnga na bango ete bázela kino tokosilisa boyekoli. Mpe soki moto abéngi na telefone, azalaki koloba na ye ete ye moko akobénga na nsima mpo na koyanola.”

Nzokande, yango elingi koloba te ete tosengeli kozala na bokatikati te. Makambo mosusu oyo masɛngaka kosalema nokinoki to makambo makanami te makoki kobima, mpe mpo na yango, ekoki kosala ete boyekoli esalema te to esalema mokolo mosusu. (Mosakoli 9:11) Kasi kebá ete likambo yango ebebisa momesano na bino te.​—Bafilipi 3:16.

Boyekoli esengeli koumela ntango boni? Robert, oyo alóngaki kobɔkɔla mwana moko ya mwasi mpe mosusu ya mobali alobi ete: “Na momesano boyekoli na biso ezalaki koumela ngonga moko. Ntango bana bazalaki naino mike, tozalaki komeka kobatela likebi na bango na boumeli ya ngonga yango na kotaleláká makambo ndenge na ndenge, lokola mwa baparagrafe kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mikapo oyo toponi kati na Biblia, mpe biteni ya mikanda mosusu.” Marie azali komikundola ete: “Ntango ngai mpe bandeko na ngai mibale ya basi tozalaki bana mike mpenza, boyekoli na biso ezalaki koumela miniti soko 20 mpe tozalaki kosala yango mbala mibale to misato na pɔ́sɔ. Ntango tokólaki, boyekoli na biso ya libota ebandaki koumela ngonga moko to pene na ngonga moko.”

Makambo nini tosengeli koyekola?

Kotalela likambo yango wana bato nyonso basili kofanda mpo na boyekoli ekolɛmbisa mpe ekobungisa ntango ya ntina mpo na boyekoli. Soki esalami bongo, bana bakozala na likambo ya sikisiki te oyo bakotyela yango likebi mpe nokinoki bakobungisa bosepeli. Na bongo naino ntango ya boyekoli ekómi te, poná moko na mikanda ya la Société oyo bokoyekola.

“Moombo ya sembo mpe ya mayele” asili kopesa biso ebele ya mikanda oyo tokoki kopona. (Matai 24:45-​47) Mbala mosusu okoki kopona búku oyo libota bayekoli naino te. Mpe ekozala mpenza esengo na kotalela biteni ya búku Insight on the Scriptures oyo boponi yango liboso, soki búku yango ezali na lokótá na bino! Na ndakisa, bokoki kotalela lisoló na ntina na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo na bapɔ́sɔ oyo ezali liboso ya Ekaniseli. Mabota mingi basepelaka kobongisa boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na pɔ́sɔ wana. Kasi masoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo toyekolaka yango te na Ndako ya Bokonzi mazali na mateya kitoko mpo na boyekoli ya libota. Tata ya libota, oyo ayebi bamposa ya elimo ya libota na ye, abongi mpenza mpo na kopona mokanda oyo bakoyekola.

Marie azali komikundola ete: “Ntango nyonso tozalaki na mokanda oyo eponamaki liboso. Kasi na ntango motuna moko motunami to likambo moko libimi na eteyelo, mbala moko tokoluka makanisi mabongi.” Makambo ya sikisiki, lokola mikakatano ya bilenge na eteyelo, bokutani kati na bilenge mibali mpe basi, masano na eteyelo, mpe makambo mosusu ya lolenge yango, mazalaki kobima. Na ntango likambo motindo wana libimi, mbala moko luká masoló to mikanda oyo mizali kolobela yango. Soki omoni likambo ya sika kati na nimero euti kobima ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Lamuká! oyo okolinga ete bótalela yango nokinoki kati na libota, kokakatana te kozwa ebongiseli mpo na yango. Ya solo, ekozala malamu koyebisa basangani ya libota mbongwana yango liboso mpenza. Kasi salá nyonso ete bózonga na manáka na bino ya momesano nsima ya kosilisa likambo yango.

Batelá ezalela ya kimya

Boyekoli malamu esalemaka na kimya. (Yakobo 3:18) Na yango salá ete moto na moto amiyoka malamu, kasi limemya mpe ekoka kozala. Tata ya libota moko na États-Unis alobi ete: “Ezala ete tokoyekola na kati ya ndako to na mbalasani (veranda), tosalaka nyonso ete tófanda biso banso esika moko na esika ya kopanzana moto na moto na epai alingi kati na salon monene. Mpo na biso, yango epesaka esengo.” Mpe Marie azali komikundola na esengo mpenza ete: “Ngai na bandeko na ngai ya basi tozalaki kopona esika oyo tokosala boyekoli na biso pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Yango epesaki biso likoki ya komiyoka malamu.” Batelá na makanisi ete mwinda ya malamu, bisika ya kofanda oyo bibongisami malamu, esengo mpe ezingelo oyo ezali na molɔngɔ́, nyonso wana ekopesa nzela na kimya. Kolya mwa mikate to komela mwa coca na libota nsima ya boyekoli esalaka mpe ete mpokwa yango eleka na esengo.

Kútu ezali na mabota oyo baponaka kobyanga mabota mosusu na boyekoli na bango na mabaku mosusu, na lolenge yango babakisaki bosepeli mpe likoki ya koyoka bakomantere mosusu. Na ntango bato oyo bayei sika na solo babyangami kosangana na ebongiseli yango, bakoki kozwa litomba na kotaláká tata ya libota oyo ameseni lolenge azali kotambwisa boyekoli.

Pesá bomoi na masoló ya Biblia

Salá ete ntango ya boyekoli ezala na esengo mpo na bana, na bongo bakozela boyekoli ya mbala ya nsima na motema lúkulúku. Okoki kosala yango na kolendisáká bana mike ete báyema bililingi ya makambo malobelami na Biblia. Soki ebongi, bongisá lisano kati na yango bana bazali komonisa makambo ya Biblia. Mpo na bana mike, ekozala na ntina te kolanda mwango ya mituna mpe biyano. Kotánga to koloba masoló ya bato balobelami na Biblia ezali mwango ya esengo mpo na kokɔtisa mitindá ya Nzambe epai ya bana. Robert, oyo tolobelaki liboso, azali komikundola ete: “Mbala mosusu tozalaki kotánga biteni ya Biblia, moto na moto na ngala na ye, kotángáká na ‘mingongo’ mikeseni engebene moto oyo azali koloba kati na eteni oyo epesameli moto na moto.” Bana bakoki kopona moto oyo bakomonisa na ntango ya botángi.

Kosalela bakálati mpe bitanda ekosalisa bana ete bámona mikili mpe biloko ya mokili epai makambo malobelami masalemaki. Ezali solo ete soki tolukiluki mwa makanisi mozindo, tokoki kosala ete boyekoli ya libota ezala na bomoi mpe na makambo makeseni. Mpe na ndenge yango bana bakozala na mposa ya Liloba ya Nzambe.​—1 Petelo 2:2, 3.

Salisá moto nyonso ete apesa biyano

Mpo ete bana bákoka kosepela na boyekoli, basengeli mpe komiyoka ete likambo yango litali bango. Nzokande, kosala ete bana ya bambula ekeseni bákoka kopesa biyano bango nyonso ekoki kozala likambo ya mpasi. Kasi etindá moko ya Biblia elobi ete: “Oyo azali liboso, asala na etingya.” (Baloma 12:8) Kozala na mɔ́tɔ esalisaka, mpo ete mɔ́tɔ eyambenelaka.

Ronald akɔtisaki Dina, mwana na ye ya mwasi ya mbula mitano na lisoló na kotángisáká ye mitó ya makambo mike kati na lisoló oyo bazali koyekola mpe na kotunáká ye ete apesa komantere likoló na bililingi. Na mbula eleki, wana Ekaniseli ezalaki kobɛlɛma, atyaki likebi mingi na bililingi oyo bibongi kati na búku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.c Alobi ete: “Esalisaki ye ete akanga ntina ya molulu yango.”

Ronald asalaki likambo mosusu na Misha, mwana na ye ya mwasi ya mibu zomi. Alobi ete: “Misha akólaki kino koyeba bobele bililingi te kasi ndimbola na yango. Na yango ntango tozalaki kotalela búku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!,* totyaki likebi mingi na ndimbola ya bililingi, mpe yango esalisaki ye.”

Ntango bana bakómi na mbula ya bolenge, sɛngá na bango ete bámonisa ndenge ya kosalela makambo oyo bozali koyekola. Soki mituna mibimi na boumeli ya boyekoli, kabolelá moto na moto likambo oyo akosala na yango bolukiluki. Robert asalaki bongo ntango Paul, mwana mobali na ye ya mibu 12 oyo atunaki motuna na ntina na ebongiseli eutaki kosalema sika mpo na bokutani ya bilenge, kati na yango bazalaki kosala lisano libéngami Donjons et Dragons. Paul mpe basangani mosusu ya libota basalaki bolukiluki na kosaleláká Index ya mikanda ya la Société Watchtower mpe batalelaki likambo yango na boyekoli na bango ya libota. Robert alobi ete: “Mpo na yango, nokinoki Paul akangaki ntina ete lisano yango lizalaki mabe mpo na baklisto.”

Ntango mosusu Robert azalaki mpe kopesa devuare mpo na kosala bolukiluki. Nancy, mwasi na ye azali komikundola ete: “Ntango tosalaki bolukiluki likoló na bantoma ya Yesu, mokomoko kati na biso apesamelaki mokumba ya koluka ntoma moko na boumeli ya pɔ́sɔ. Ezalaki mpenza esengo na komona lolenge oyo bana bazalaki kopesa lapólo na bango na ntango ya boyekoli ya libota!” Kosala bolukiluki bango moko mpe kolakisa na libota mobimba makambo oyo bazwaki esalisaka bana ete ‘bákóla liboso na Yehova.’​—1 Samwele 2:20, 21.

Kotuna mituna​—ezala makanisi ya moto ye moko to mpe mituna mpo na komema moto na eyano​—yango mpe ezali mwango malamu ya kobenda bana ete básangana na boyekoli. Yesu, Moteyi Monene atunaki mituna ya kopusa moto ete abimisa makanisi na ye, lokola oyo, “Okanisi nini mpo na oyo?” (Matai 17:25) Marie azali komikundola ete: “Ntango moko na biso azalaki na motuna, baboti na biso bazalaki soko moke te koyanola mbala moko. Ntango nyonso bazalaki kotuna mituna ya komema biso na eyano, kosalisáká biso ete tókanisa likambo yango.”

Sololá​—Kosilikisa te!

Esengo ya boyekoli ya libota ekobakisama soki basangani nyonso bakoki komonisa makanisi na bango mpe mayoki na bango kozanga kobanga ete bátyolama. Kasi tata moko alobi ete “kosolola malamu na ntango ya boyekoli ya libota ekoki kosalema bobele soki basangani ya libota bazalaka na momesano ya kosolola na bantango mosusu. Okoki koloba te ete bosololaka malamu soki yango ezali kosalema bobele na ntango ya boyekoli.” Salá nyonso ete opɛngola bakomantere ya mabe oyo ekoki kozokisa basusu, lokola oyo: ‘Ezali bobele yango nde olingaki koloba? Nakanisaki ete ekozala likambo ya ntina’; ‘Wana ezali bozoba’; ‘Boye okoki mpenza kobimisa ata likambo moko ya malongá te? Ozali naino mwana moke.’ (Masese 12:18) Zalá na mawa mpe na ngɔlu epai ya bana na yo. (Nzembo 103:13; Malaki 3:17) Sepelá na bango, sungá bango wana bazali kosala milende ya kosalela makambo bazali koyekola.

Ezalela na ntango ya boyekoli ya libota esengeli kozala na motindo boye ete bɔɔngɔ́ ya mwana ezala pene ya koyoka malako. Moboti moko ya bana minei oyo alóngaki kobɔkɔla bango alimboli ete: “Ntango obandi kopamela bana, okómisi bayoki na yo na nkanda.” Na ezalela motindo wana, na ntembe te mateya makokɔta na bɔɔngɔ́ te. Na yango pɛngolá kokómisa ntango ya boyekoli mabaku ya kopamela mpe kopesa etumbu. Soki esengeli kopesa etumbu, salá yango nsima mpe bobele epai na ye oyo asali mbeba.

Molende ezali ya mpamba te

Kotonga libota oyo ezali makasi na elimo esɛngaka ntango mpe molende. Kasi mokomi na nzembo alobi: “Bana mibali bazali likabo na [Yehova], mpe mbuma na libumu ezali libonza.” (Nzembo 127:3) Mpe baboti bapesameli mokumba ya ‘kobɔkɔla [bana] na mateya mpe na mpamela na Nkolo.’ (Baefese 6:4) Na yango, kólisá makoki ya kotambwisa boyekoli ya libota oyo ezali malamu mpe ya esengo. Salá nyonso oyo ekoki mpo na kopesa “mabɛlɛ sembo [mauti na liloba, NW]” mpo ete bana na yo bákoka ‘kokóla kino lobiko.’​—1 Petelo 2:2; Yoane 17:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Atako makanisi mingi mapesami na lisoló oyo mazali mpo na kosalisa bana na boyekoli ya libota, makambo yango mabongi mpe na boyekoli ya libota oyo ezali na bana te.

b Bankombo mosusu ebongwamaki.

c Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto