Boyekolaka na kati ya libota?
1 Mobali moko moklisto alobaki na nkulutu moko boye: “Nasalaka nyonso mpo tóyekolaka mbala na mbala na kati ya libota, kasi ezali mpenza mpasi. Ntango mosusu ngai moko nde nasalaka ete boyekoli yango esalema te, ntango mosusu mwasi na ngai akoki koloba ete azali na mposa ya koyekola te to bana nde bazalaka na makambo mosusu ya kosala. Bapɔsɔ ezali koleka kozanga ete tósala mpenza makasi mpo na kobongisa lisusu programɛ na biso ya koyekola mbala na mbala na kati ya libota. Nayebi ete boyekoli ya libota ezali na ntina mingi mpo na biso mpe nakondima toli mpe makanisi oyo okopesa ngai.” Maloba oyo ezali kokundwela bino likambo moko? Ntango mosusu, mpamba te mabota mingi ezali na mokakatano yango ya koyekola Biblia mbala na mbala na kati ya libota.
2 Bókanisa mituna oyo: Mpo na nini koyekola mbala na mbala na kati ya libota ezali mpenza na ntina mpe ntina na yango ezali nini? Nani asengeli kotambwisa boyekoli yango? Tokoki kosalela mikanda nini? Ndenge nini tokoki kosala mpo boyekoli yango esepelisa moto nyonso mpe moto nyonso azala na esengo ya kopesa biyano, mingimingi mpenza soki bana ya bambula ekeseni bazali kosangana na boyekoli yango? Mpo na nini tosengeli kosala boyekoli yango mbala na mbala?
3 Mokumba ya baboti: Makomami emonisi polele nani asengeli kozala moto ya liboso mpo na koteya bana. “Bino batata . . . bóbɔkɔla bango na mateya mpe na mpamela ya [Yehova].” (Ef. 6:4) Batata basengeli kondima mokumba yango mpe kozala na mposa makasi ya kopesa bana na bango boyebi mpe toli yango. Soki tata azali mondimi te, mwasi moklisto asengeli kosala nyonso oyo ekoki na ye mpo na kotambwisa boyekoli ya libota mpe koteya bana. (2 Tim. 1:5) Ntango mosusu, esɛngaka ete ndeko mwasi ye moko akokisa mikumba nyonso oyo etali koteya bana. (Mas. 1:8) Kasi na kotalela ndenge makambo esengeli mpenza kozala, ezali tata, to mingimingi baboti, nde bazali na mokumba ya koteya, kobongisa mpe kobatela bana na bango.—Det. 6:6, 7; 1 Tim. 3:2, 4.
4 Ezala makasimakasi te, ezala mpe na mindɔndɔ te: Na boyekoli ya libota, tokoki kotya botángi ya Biblia mpe kopesana makanisi likoló na yango to mpe tokoki kotalela masolo ya sikisiki oyo tozwi na bazulunalo to na mikanda mosusu ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Esengeli kopona makambo ya koyekola na kotalela bamposa ya libota. Makambo etali bilenge, na ndakisa motungisi ya baninga na eteyelo, kokangamakangama na mwana mobali to na mwana mwasi kozanga ete ozala na likanisi ya kobalana na ye, kosangana na makambo mosusu oyo ebongisami na eteyelo, masano, ndenge ya kopona miziki, lolenge ya kosala monzɛlɛ mpe ndenge ya kokima makanisi ya pite; nyonso wana ezali makambo oyo bokoki kotalela na boyekoli ya libota. Kotalela makanisi ya Biblia na oyo etali makambo yango mpe kozongela yango mbala na mbala ekoki kozala na ntina, mingimingi mpo na kosalisa bilenge báyeba kolonga makama mpe komekama oyo makambo yango ekoki kobimisa na nsima.
5 Atako boyekoli ya libota ekoki kozala mpenza lokola likita ya lisangá te, kasi esengeli mpenza koteya. Bosengeli kosala ete ntango ya boyekoli ezala ntango moko ya esengo; kosalela libaku yango te mpo na kopamela bana. Bólendisa bana bápesaka biyano na maloba na bango moko, yango ekopesa bango nzela ete bákola noki na elimo. Ata soki bana oyo bazali naino mike bazali kokoka te kokanga ntina ya makambo nyonso oyo ezali kolobama to bazali kokoka te kosepela na yango, bosengeli komonisa ete bozali kosepela ndenge bazali na kati ya boyekoli ya libota mpe kosalisa bango ete bápesa biyano. Baboti ya mayele basengeli kotya likebi na bamposa ya bana na bango, na makoki na bango ya kokanga makambo, na makoki na bango ya kotya likebi mpe na makoki na bango ya koloba kozanga kokakatana. Mpo libota ezala na bomoko mpe na elimo ya makasi, yango ezali kotalela milende mpe bolingo na bino.
6 Bólɛmba te! Mpo na nini esengeli kolendendela mpo na oyo etali koyekola na kati ya libota? Mpo ezali na makambo mingi na bomoi oyo ekoki kolongola likebi na biso mpe kobebisa bibongiseli oyo tozwaki mpo na koyekola. Tópesa nzela te ete makambo yango oyo ezangi ntina ebebisa bibongiseli oyo tozwi na kati ya libota.
7 Koyekola Biblia mbala na mbala na kati ya libota ebongisaka bana na biso mpe epesaka bango makoki ya kolonga mikakatano ya bomoi. Baboti, ezali bino nde bokoki kosalisa bana na bino malamu soki bozali kokokisa mikumba oyo Nzambe apesi bino. Na ntembe te, Yehova akopambola bino soki bozali kosala nyonso mpo na koyekola Biblia mbala na mbala na libota.