Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/05 lok. 5
  • Programɛ ya libota​—Boyekoli ya libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Programɛ ya libota​—Boyekoli ya libota
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Bóyekolaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe na libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Boyekoli ya libota oyo ezali kopesa esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Boyekolaka na kati ya libota?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Lolenge bato ya libota moko bakoki kopesana mabɔkɔ mpo na​—Boyekoli ya Biblia kati na libota
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 5/05 lok. 5

Programɛ ya libota​—Boyekoli ya libota

1 Likabo ya monene koleka oyo okoki kopesa bana na yo lokola ozali moklisto, ezali ya kosalisa bango bálinga Yehova ndenge yo olingaka ye. Ntango ya malamu koleka oyo okoki kosala yango ezali “wana ekofanda yo na ndako,” na boyekoli ya libota pɔsɔ na pɔsɔ. (Det. 6:​5-7) Ezala mobalani na yo azali Motatoli, to azali mondimi ya lingomba mosusu, to soki ozali kobɔkɔla bana yo moko, okoki kosalisa bana na yo bápusana penepene na yo mpe na Yehova, soki bozali kosala boyekoli ya libota pɔsɔ na pɔsɔ.

2 Kobanda koyekola na libota: Eloko ya liboso osengeli kosala ezali ya kosalisa libota mobimba bámesana na boyekoli ya libota. Soki ozali koyeba mpenza te mokolo nini bosengeli kosala boyekoli yango, mpo na nini te kolobela likambo yango libota mobimba? (Mas. 15:22) Soki ozali na bana ya mike, mbala mosusu okolinga bóyekolaka ndambondambo kasi mbala ebele na pɔsɔ moko. Luká koyeba programɛ oyo ekobonga mpenza na libota na yo. Komá ngonga oyo bokobanda kosala boyekoli yango na programɛ na bino ya libota, mpe bósala makasi bótosaka yango.

3 Makambo nini bokoki koyekola? Basusu babongisaka boyekoli ya mokanda to ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na libota. Basusu basepelaka koyekola masolo oyo ebongisami mpenzampenza mpo na bilenge. Tata moko oyo azali na mwana moko ya mobali ná mwana moko ya mwasi, alobi boye: “Na makambo nyonso oyo tosalaka na pɔsɔ, bana bamonaka ete boyekoli ya libota nde ezali na ntina mingi mpo tosalaka masano na makambo oyo tozwaka na Mokanda mpo na Masolo ya Biblia. Masano yango etikalaka na bɔɔngɔ na bango mpe esalisaka bango bákanga mpenza ntina ya makambo yango koleka ndenge toyekolaka baparagrafe.”

4 Koyekola pɔsɔ na pɔsɔ: Esengeli ete libota mobimba báyekolaka mbala na mbala mpe básanganaka bango nyonso na esengo mpenza na boyekoli yango. Ntango mosusu ekosɛnga bóyekola mokolo mosusu to na ngonga mosusu mpo likambo moko ebimi mbalakaka. Makambo mosusu mpe ekoki kosɛnga bósala lisolo moko oyo ezalaki na programɛ te. Nzokande, eloko moko te esengeli kotinda libota bábebisa mpo na ntango molai, programɛ oyo bamityelá mpo na koyekola na libota. Na libota moko, mwana moko ya mwasi alobi ete: “Soki ngonga ya boyekoli ebongwani, tata akomaka ntango nyonso ngonga mosusu na ekuke ya frigo mpo ete biso nyonso tóyeba ntango oyo yango ekosalema.” Ebongi mpenza kopesa longonya na baboti oyo basalaka milende ndenge wana mpo na koyekolaka pɔsɔ na pɔsɔ elongo na mabota na bango! Ntango ozali kokoba kobɔkɔla bana na yo “na disipilini mpe na makebisi ya Yehova,” ozali komonisa ete olingaka bango mpe olingaka Tata na biso ya likoló.​—⁠Ef. 6:⁠4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto