Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/11 nk. 19-22
  • Nasili komona “Oyo eleki moke” kokóma “Libota na makasi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasili komona “Oyo eleki moke” kokóma “Libota na makasi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosala ya mobongisi-nzela na Arizona
  • Eteyelo ya Gileadi mpe mosala ya sipesiale
  • Na Cuba mpe kino na Porto Rico
  • Epai na biso na République Dominicaine
  • Sikawa libota na makasi
  • Ndenge oyo nayokaki esengo ya kopesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Koluka Liboso Bokonzi​—⁠bomoi Ya Solosolo Mpe Ya Esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nandimaki na motema mobimba ete Yehova atambwisa ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/11 nk. 19-22

Nasili komona “Oyo eleki moke” kokóma “Libota na makasi”

LISOLÓ YA WILLIAM DINGMAN

Ezalaki na mobu 1936; na engumba Salem, mboka-mokonzi ya etúká ya Oregon, na États-Unis. Nayanganaki na likita moko ya Batatoli ya Yehova. Motuna etunamaki ete: “Ebele monene ezali wapi?” (Emoniseli 7:9, King James Version) Nazalaki bobele ngai moko moto ya sika kati na lisangá, na bongo bango nyonso balakisaki ngai mosapi mpe balobaki ete, “Azali awa!”

NA KATIKATI ya bambula ya 1930, ezalaki bobele na Batatoli ya Yehova moke oyo bazalaki na elikya euti na Biblia etali bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paladiso. (Nzembo 37:29; Luka 23:43) Makambo masili kobongwana na lolenge ya kokamwa uta ntango wana. Kasi tiká nayebisa makambo oyo matindaki ngai ete nayangana na likita wana na engumba Salem, mboka-mokonzi ya etúká Oregon.

Tata na ngai asalaki abonemá ya zulunalo L’Âge d’Or, nkombo ya kala ya zulunalo Lamuká! Ntango nazalaki elenge, nazalaki kosepela kotánga yango, mpe nandimisamaki ete yango ezalaki kolobela mateya ya solo na ntina na Biblia. Na bongo mokolo moko namonisaki mposa na ngai na kotindáká lokasa ya lisɛngi oyo ezalaka na lokasa ya nsuka ya Lamuká! Yango ezalaki kopesa motángi likabo ya mwa búku 20, mokanda moko, mpe nkombo ya lisangá ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki penepene. Nsima ya kozwa mikanda yango, nakendaki na mosala ya ndako na ndako mpe nakabolaki mwa babúku yango nyonso mpe mokanda.

Na eleko yango moto moko te ayekolisaki ngai Biblia. Kútu, nasololaki naino na Motatoli ya Yehova ata moko te. Kasi sikawa, lokola nazwaki adresi ya Ndako ya Bokonzi oyo ezalaki penepene, nakendeki na Salem na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 40, na Oregon, mpo na koyangana na likita. Ezali kuna nde batángaki ngai moko lokola “ebele monene,” ntango nazalaki bobele na mbula 18.

Atako nazwaki mpenza kobongisama te mpo na mosala ya kosakola, nabandaki kosakola elongo na lisangá ya Salem. Nalendisamaki na kokɔtisa makambo misato ya moboko kati na litatoli na ngai. Ya liboso, Yehova azali Nzambe; ya mibale, Yesu Klisto azali Mokonzi oyo ye aponi; mpe ya misato, Bokonzi ezali elikya bobele moko mpo na mokili. Nazalaki komeka kosalela nsango yango na bikuke nyonso.

Nsima ya kosangana na boumeli ya mbula mibale elongo na Batatoli ya Yehova na Salem, nazwaki batisimo na mokolo mwa 3 Apríli 1938. Baninga na ngai Batatoli na Salem bazalaki na esengo ya komona mingi kati na biso “ebele monene” kozwa batisimo. Na Febwáli ya mobu 1939, nakómaki mobongisi-nzela, to mosali ya ntango nyonso. Na Desɛ́mbɛ ya mobu yango, nandimaki libyangi ya kokende na etúká Arizona, epai kuna bosenga ya basakoli ya Bokonzi ezalaki makasi.

Mosala ya mobongisi-nzela na Arizona

Mosala ya Batatoli ya Yehova eutaki kobanda na Arizona, mpe bato bazalaki na makanisi mabe mingi mpo na biso, na bongo ntango États-Unis ekɔtaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, tokutanaki na monyoko makasi kuna. Na ndakisa, ntango nazalaki kosakola na engumba Stafford, na Arizona, na mobu 1942, etuluku moko ya Lingomba ya Mormon ekanelaki biso mpe elingaki kosala biso mabe. Elongo na baninga na ngai babongisi-nzela tokómaki kofanda penepene ya ndako ya episkɔpɔ ya Lingomba ya Mormon oyo azalaki kopesa biso limemya mpe oyo alobaki ete: “Soki bamisionere ya Mormon bazalaki kosala mosala lokola Batatoli ya Yehova, mbɛlɛ Lingomba ya Mormon ezali kokóla mingi.” Kati na ndakonzambe alobaki na mongongo makasi ete: “Nayoki ete bamoko bazali kokana kosala bilenge Batatoli ya Yehova mabe. Talá, nafandaka penepene na bilenge mibali wana Batatoli, mpe soki mobulu esalemi mpo na kotɛmɛla bango, mandoki makobɛta kino masasi makokatisa bifelo ya lopango na ngai mpe oyo ya bango. Mandoki yango makobɛta​—kasi mpo na kotɛmɛla Batatoli te. Yango ekobɛta mpo na kotɛmɛla baoyo bakosala mobulu. Na yango soki bolingi kosala mobulu, boyebi oyo bosengeli komizela na yango.” Mobulu esalemaki lisusu te.

Na boumeli ya mbula misato oyo nalekisaki na Arizona, bakangaki biso mpe batyaki biso na bolɔ́kɔ mbala mingi. Mbala moko nakangamaki na bolɔ́kɔ na boumeli ya mikolo 30. Mpo na kobundisa mitungisi oyo bapolisi bazalaki kolukela biso na mosala ya kosakola, ngai mpe baninga na ngai babongisi-nzela tosalaki oyo tozalaki kobénga yango ete “kombekombe.” Motatoli oyo azwaki mokumba ya kotambwisa mosala yango alobaki na biso ete: “Lolenge nkombo na biso ezali, lolenge mpe biso tozali. Tokobanda kokabola trakte to mwa búku na bikuke nyonso, na ngonga ya mitano to ya motoba na ntɔ́ngɔ́, mpe tokolongwa wana nokinoki.” Etuluku na biso ya “kombekombe” esalaki bobele mwa bisika moke na etúká ya Arizona. Nzokande, eyaki kosukisama mpamba te motindo yango ya kosakola epesaki biso nzela te mpo na kosunga baoyo bazalaki komonisa bosepeli.

Eteyelo ya Gileadi mpe mosala ya sipesiale

Na Desɛ́mbɛ ya mobu 1942, nazalaki moko na ebele ya babongisi-nzela ya Arizona oyo bazwaki mokanda ya libyangi mpo na eteyelo ya sika ya bamisionere oyo Batatoli ya Yehova bafungolaki. Eteyelo yango ebéngamaki liboso Watchtower Bible College of Gilead (Gileadi, Collège ya boyekoli Biblia ya la Société Watchtower). Na nsima nkombo ebóngwanaki na Watchtower Bible School of Gilead (Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower). Eteyelo yango ezalaki mosika na ntáká ya kilomɛtɛlɛ soko 4 800 pene na engumba ya Ithaca na nɔ́rdi mpenza ya engumba New York.

Nsima ya kolekisa mwa mikolo na Oregon, na Yanuáli ya mobu 1943, babongisi-nzela mingi kati na biso tokɔtaki na bisi ya kompanyi Greyhound mpe totikaki molungé ya mokili mokauki ya etúká Arizona. Nsima ya mikolo mingi tokómaki na esika ezalaki biso kokende mpe tokutaki eleko ya mpiɔ na nɔ́rdi ya engumba New York. Eteyelo ebandaki na mokolo mwa 1 Febwáli 1943, ntango prezidá na yango, Nathan H. Knorr, alobaki na lisukúlu na ye ya bofungoli, liboso na bayekoli nkámá moko ete: “Mokano ya eteyelo oyo ezali te ya kobongisa bino mpo ete bókóma baministre. Bozali uta kala baministre mpe bozali kosala mosala na molende uta bambula mingi. . . . Mateya ya eteyelo oyo ezali mpo na kobongisa bino ete bózala baministre ya makoki kati na bateritware epai wapi bokokende.”

Lokola natángaki kelasi molai te, na ebandeli namiyokaki ete nakokoka kelasi yango ya Gileadi te. Kasi balakisi bamoniselaki ngai boboto, mpe nakómaki kosepela mingi mpenza na boyekoli na ngai. Nsima ya kolanda mateya mingi na boumeli ya sanza mitano, tozwaki mapɔlɔ́mi na nsuka ya kelasi na biso. Na nsima, ndambo kati na biso totindamaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, New York, epai kuna tozwaki mateya mosusu mpo na kobongisa biso na mosala ya bakɛngɛli ya zongazonga. Natindamaki liboso na etúká ya Caroline du Nord mpe ya Caroline du Sud.

Na mikolo wana ya ebandeli, mokɛngɛli ya zongazonga azalaki ntango nyonso na mobembo. Tozalaki kofanda mokolo mobimba na lisangá moko to mikolo mibale soki ezalaki lisangá ya monene. Masangá mingi na ntango wana ezalaki mike. Nsima ya kolekisa mokolo mobimba, mpe mbala mingi koumela kino na midi ya butu kotaláká bandeko mpe koyanoláká na mituna, nazalaki kolamuka pene na ngonga ya mitano ya ntɔ́ngɔ́ mpo na kokende na lisangá mosusu. Nasalaki mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga pene na mbula mobimba, mpe na nsima nasalaki mosala ya mobongisi-nzela mpo na mwa ntango na engumba Tennessee mpe na New York.

Na Cuba mpe kino na Porto Rico

Na sanza ya Máí ya mobu 1945, elongo na bato mosusu mingi, mboka mopaya ya liboso natindamaki na mosala ya misionere ezalaki bongo ekólo Cuba! Na butu oyo tokómaki na La Havane, mboka-mokonzi ya ekólo Cuba, tobimaki na mosala ya kokabola bazulunalo. Tofandaki na engumba yango kino ntango tozwaki ndako ya kofutela na engumba Santa Clara. Mwa lipesi oyo tozalaki kozwa sanza na sanza ezalaki bobele dolare 25, kati na yango bilei mpe kofutela ndako. Tosalaki mbeto mpe bakiti ya mabaya mpe tozalaki kosalela bakɛ́si ya mabaya mpo na kobomba biloko mpe mikanda.

Na mbula oyo elandaki batindaki ngai na mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga. Na eleko yango ekólo Cuba mobimba ezalaki sé zongazonga moko. Lokola mokɛngɛli ya zongazonga oyo azalaki liboso na ngai azalaki na makolo milai mpe azalaki kotambola nokinoki, bandeko mibali mpe basi oyo mingimingi bazalaki mikuse basengelaki kokima mbango mpo na kotambola elongo na ye. Bakanisaki mpe ete ngai nakozala bongo, na yango babongisaki makambo nyonso mpo na koya na ngai. Babimaki bango nyonso te na mosala ya kosakola mokolo yango kasi batyamaki na bituluku oyo mokomoko esengelaki kosala elongo na ngai na ngala na yango. Mokolo ya liboso etuluku moko ememaki ngai na teritware moko ya mosika; mokolo molandaki etuluku mosusu ememaki ngai na teritware mosusu ya mosika, mpe bongo na bongo. Nalɛmbaki ntango nasukisaki kotala lisangá yango, kasi nasepelaki na yango. Nazali kokanisa lisusu bolingo oyo lisangá yango emonisaki.

Na mobu 1950 tokómaki na basakoli ya Bokonzi koleka 7 000 na ekólo Cuba, pene na motángo ya basakoli ya ekólo Mexique na mikolo yango. Na sanza ya Yulí ya mobu yango, nayanganaki na liyangani ya mikili mingi oyo ezalaki na motó na likambo ete Bokóli ya Teokrasi, oyo esalemaki na Yankee Stadium na engumba New York. Nsima na yango, nazwaki mokumba ya sika ya mosala ya misionere, na ekólo Porto Rico. Kati na bamisionere ya sika oyo bautaki na kelasi ya Gileadi ya 12 ezalaki na Estelle mpe Thelma Weakley, oyo basalaki mobembo elongo na ngai na mpɛpo kino na ekólo Porto Rico.

Mbula mwambe na nsima ngai na Estelle tobalanaki na molulu ezangaki mindɔndɔ oyo esalemaki na ebáelo na ntango ya bopemi na liyangangi ya zongazonga na engumba Bayamón, na ekólo Porto Rico. Liboso mpe nsima ya libala na biso, nasalaki mosala ya zongazonga. Na boumeli ya bambula koleka zomi na ekólo Porto Rico, ngai na Estelle tomonaki ndenge lisangá ezalaki kokóla​—longwa na basakoli na nsé ya 500 kino koleka 2 000. Tozwaki likoki ya kosunga ebele ya bato kino na komipesa mpe kozwa batisimo, mpe tosanganaki na kobotama ya masangá mingi ya sika.

Na sanza ya Desɛ́mbɛ ya mobu 1960, Milton Henschel autaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, New York, ayaki na ekólo Porto Rico mpe asololaki na bamisionere. Atunaki soki bamoko bakokaki komipesa bango moko mpo na kondima mikumba na bisika misusu bikeseni. Ngai na Estelle tozalaki kati na baoyo bandimaki.

Epai na biso na République Dominicaine

Esika ya sika oyo batindaki biso ezalaki République Dominicaine, mpe tosalaki mobembo kuna na mokolo mwa 1 Yúni 1961. Na mokolo mwa 30 Máí, babomaki mokonzi mabe ya République Dominicaine Rafael Trujillo, mpe bapekisaki ete mpɛpo ikita kuna. Mosika te, mpɛpo, ebandaki kokende, mpe tozwaki bongo likoki ya kokende na République Dominicaine na mokolo mwa 1 Yúni lokola yango etyamaki na manáka.

Mboka ezalaki na yikiyiki ntango tokómaki, mpe emonanaki mpenza ete basodá bazalaki kokɛngɛla mboka. Bato bazalaki kobanga botomboki oyo ekokaki kosalema, mpe basodá bazalaki kotɛlɛmisa moto nyonso na nzela. Batɛlɛmisaki biso na bisika mingi oyo bazalaki kotalatala, mpe na esika mokomoko bazalaki kofungola valísi mpe biloko na biso. Biloko nyonso oyo ezalaki kati na valísi bazalaki kobimisa yango libándá, ata biloko ya mikemike. Ezali na lolenge yango nde tokɔtaki na République Dominicaine.

Tofandaki na mboka-mokonzi, Saint-Domingue, na boumeli ya bapɔ́sɔ mingi liboso ya kokende na teritware na biso ya sika na engumba La Romana. Na boumeli ya boyangeli ya mokonzi mabe Trujillo, bayebisaki na bato ete Batatoli ya Yehova bazali Bakoministe mpe bazali bato mabe mpenza. Yango esalaki ete, Batatoli ya Yehova bányokwama makasi. Kasi mokemoke, toyaki kosukisa makanisi yango ya lokuta.

Nsima ya kosala mwa ntango moke na La Romana, tozongelaki mosala ya zongazonga. Nsima, na mobu 1964, totindamaki lokola bamisionere na engumba Santiago. Mbula oyo elandaki botomboki ebimaki na République Dominicaine, mpe mbala oyo lisusu mboka ezalaki kati na yikiyiki. Na boumeli ya mobulu yango batindaki biso na San Francisco de Macorís, engumba oyo eyebanaki mpo na komipesa na yango na politiki. Atako bongo, tozalaki koteya na bonsɔ́mi kozanga bipekiseli. Atako yikiyiki ezalaki ntango nyonso kosalema na makambo ya politiki, lisangá ya sika esalemaki. Na boumeli ya bambula oyo elandaki, batindaki biso kosala na bisika ndenge na ndenge liboso ya kotindama lisusu na esika na biso ya momeseno na Santiago.

Tosili komona solo lipamboli ya Yehova likoló na mosala awa na République Dominicaine. Ntango tokómaki na mobu 1961, Batatoli bazalaki soko 600 mpe masangá 20. Sikawa basakoli bazali soko 20 000 mpe masangá koleka 300 bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Tozali kolikya ete bokóli ekosalema na lolenge ya kokamwa na mikolo mizali koya, lokola yango emonisami na motángo ya bato 69 908 oyo bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto na mobu 1996. Motángo yango ezali koleka motángo ya basakoli mbala misato na ndambo!

Sikawa libota na makasi

Atako motindo na mokili oyo ezali sé kobongwana, nsango ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bazali kosakola ezali kobongwana te. (1 Bakolinti 7:31) Yehova azali Nzambe, Klisto azali Mokonzi, mpe Bokonzi ezali mpenzampenza elikya bobele moko mpo na mokili.

Kobanda na ntango yango, mbongwana monene esili kosalema kati na libota ya Yehova uta ntango nayanganaki na likita na engumba Salem, na etúká Oregon, esili koleka pene na mbula 60. Ebele monene, ekóli solo, na motángo koleka milió mitano. Ezali mpenza ndenge Yehova asakolaki mpo na libota na ye ete: “Oyo moke akokóma nkóto mpenza, oyo eleki moke akokóma libota na makasi. Ngai nazali Yehova; na ntango na yango, nakoyeisa yango mbango.”​—Yisaya 60:22.

Nsima ya mbula soko 60 kati na mosala ya ntango nyonso, nazali na esengo ya kokóba kosakola mpe koteya kati na mosala ya misionere. Oyo nde libaku monene ya kosangana na mosala yango mpe komóna “oyo eleki moke” kokóma “libota na makasi”!

[Elilingi na lokasa 21]

Elongo na mwasi na ngai, na République Dominicaine

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto