Mangomba mazali kotubela
“Pápa atye Lingomba na kosambisama.” “‘Inquisition’ mpe koyina Bayuda—Lingomba ezali kolɛngɛla kosala ‘Mea Culpa.’”a “‘Mea Culpa’ mpo na ebele ya bato oyo Banazi babomaki.” “Bametodiste basɛngi Baɛndyɛ́ ya Wɛ́sti ya États-Unis bolimbisi.”
OSILÁ kotánga mitó na makambo lolenge oyo na zulunalo? Emonani ete mbala na mbala mangomba mazali kondima mpamela mpe mazali kosɛnga bolimbisi mpo na makambo oyo basalaki na boumeli ya bikeke. Bipanzeli-nsango elobelaka yango mingi ntango nyonso oyo Pápa asali “mea culpa” ya sika.
Wana Pápa asɛngi bolimbisi
Kati na búku na ye oyo ezali na motó na likambo ete Quando il papa chiede perdono (Ntango Pápa asɛngi bolimbisi), Luigi Accattoli, mokomi na makambo ya Vatican alobi ete na eleko ebandi na 1980 kino 1996, Jean-Paul II ‘andimaki mabunga oyo Lingomba esalaki na boumeli ya lisolo ya bato to asɛngaki bolimbisi’ mbala soko 94. Engebene Accatoli, “kati na Lingomba ya Katolike, bobele Pápa nde abongi mpo na kosala mea culpa.” Mpe asili kosala yango mpo na makambo oyo bato basepelaka na yango te oyo Lingomba esalaki na boumeli ya lisolo na yango—bitumba ebéngami croisades, bitumba mosusu, kopesa mabɔkɔ na biyangeli mabe, bokabwani kati na mangomba, koyina Bayuda, inquisitions, la Mafia, mpe koponapona mposo. Na 1994, kati na nkomá oyo atindelaki bakardinale (nkomá oyo bamoko batalelaka yango ete ezali mokanda moleki ntina oyo eutaki na Pápa), Jean-Paul II abimisaki likanisi ya “kotubela masumu nyonso oyo esalemaki na boumeli ya mbula nkóto oyo eleki.”
Baepiskɔ́pɔ mingi basili kolanda ndakisa ya Pápa. Na Desɛ́mbɛ 1994, zulunalo Il Giornale, oyo ebimaka na ekólo Italie eyebisaki ete: “Baepiskɔ́pɔ mingi ya États-Unis balekaki na televizyó mpe basɛngaki bolimbisi liboso ya bato nyonso.” Mpo na likambo nini? Mpo na bopɔtu bamonisaki na likambo ya basángo oyo basangisaka nzoto na bana mike, nzokande likambo yango ebebisi ebele ya bilenge. Na Yanuáli 1995, zulunalo La Repubblica eyebisaki “likambo oyo esalemaki naino liboso te kati na lisolo ya Lingomba ya Katolike na mikolo na biso”—likambo ya Pápa Pius XII oyo alobaki eloko te na ntango ya libomi monene oyo Banazi basalaki. Na Yanuáli 1995, zulunalo yango eyebisaki ete baepiskɔ́pɔ ya ekólo Allemagne basɛngaki bolimbisi mpo na “mabe mingi” ya Lingomba ya Katolike ya Loma oyo epesaki mabɔkɔ na makambo ya nsɔ́mɔ oyo Banazi basalaki. Lisusu, bituluku ndenge na ndenge ya Lingomba ya Protestá ezali komituna mpo na misala na yango.
Mpo na nini kosɛnga bolimbisi?
Biblia ezali kolendisa biso ete tósɛngaka bolimbisi na ntango tosali mabe, mpe mingi bazali kokumisa mangomba na ntango mazali komituna mpo na misala na yango. (Yakobo 5:16) Kasi mpo na nini mangomba mazali kosala bongo? Likambo yango esengeli kozala na bopusi nini na lolenge oyo tozali kotalela mangomba?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Euti na Latin mpe elimboli “libunga na ngai.” Ezali kati na libondeli moko ya Lingomba ya Katolike (Confiteor to, “Natubeli”). Bandimi bazongelaka maloba yango ntango bazali kosala libondeli wana.