Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Janvier nk. 26-27
  • Lingomba ya Katolike mpe bato oyo babomamaki na Banazi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lingomba ya Katolike mpe bato oyo babomamaki na Banazi
  • Lamuká!—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koyina Lingomba ya Bayuda mpe koyina Bayuda
  • Pie XII akangaki monɔkɔ
  • Lisosoli ya malamu
  • Mangomba mazali kotubela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mpo na nini mangomba mazali kosɛnga bolimbisi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • ‘Lingomba ya solo’ ezali kaka moko?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Lamuká!—1999
g99 Janvier nk. 26-27

Lingomba ya Katolike mpe bato oyo babomamaki na Banazi

Euti na mokomani na biso na ekólo Italie

UTA ebandeli ya 1987, nungunungu ezalaki koyokana ete Lingomba ya Katolike elingi kobimisa mokanda moko mpo na kondima ngambo oyo ezali na yango mpo na bato oyo babomamaki na Banazi. Na yango, wana bato bazalaki kozela na motema likoló mpenza, na Marsi 1998, bamonisi ya Vatican oyo batalelaka boyokani ya Lingomba ya Katolike na Bayuda babimisaki mokanda moko oyo ezalaki na motó ya likambo ete Tozali komikundola: Tótalela Shoah.a

Atako bato mosusu basepelaki na mokanda yango, kasi mingi basepelaki na yango te. Mpo na nini? Makambo nini bamonaki mabe?

Koyina Lingomba ya Bayuda mpe koyina Bayuda

Mokanda yango ya Vatican ezali kosala bokeseni kati na likambo litali koyina Lingomba ya Bayuda mpe koyina Bayuda. Lingomba ya Katolike endimi ete ezali na ngambo na likambo litali koyina Lingomba ya Bayuda, kasi na likambo litali koyina Bayuda, ezali na ngambo te. Bato mingi basepelaki soko moke te na bokeseni yango mpe bandimbola oyo epesamaki. Ignatz Bubis, nganga-moteyi ya Bayuda na ekólo Allemagne alobaki ete: “Mpo na ngai, ezali komonana lokola Lingomba ya Katolike elingi koloba ete ezali foti na biso te; ezali foti ya moto mosusu.”

Atako Giorgio Vecchio, oyo azali moto ya Lingomba ya Katolike, mwanamboka Italie mpe mokomi ya lisolo ya bato andimi bokeseni kati na koyina Lingomba ya Bayuda mpe koyina Bayuda, kasi amonisi ete “likambo ezali nde ya koyeba lolenge nini koyina oyo Lingomba ya Katolike eyinaki Lingomba ya Bayuda epesi nzela ete ezalela ya koyina Bayuda ekóma makasi.” Tosengeli koyeba ete kati na nimero na yango ya 22-23 Novɛmbɛ 1895, L’Osservatore Romano, zulunalo ya Vatican, ebimisaki lisolo moko oyo elobaki ete: “Moto nyonso ya Lingomba ya Katolike oyo azali sembo ayinaka Bayuda. Banganga-nzambe bayinaka Bayuda mpo na mateya na bango mpe mosala na bango.”

Nzokande, eteni ya mokanda ya Vatican ezali kobimisa ntembe mingi ezali oyo ezali kolongisa makambo ya Pie XII, oyo aponamaki pápa mwa moke liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Pie XII azalaki ntoma ya pápa na Allemagne kobanda na 1917 kino 1929.

Pie XII akangaki monɔkɔ

Francesco Margiotta Broglio, moto ya mibeko na ekólo Italie alobi ete mokanda yango “ezali kopesa ata ndimbola moko te ya sika na likambo oyo ezali kobimisa ntembe mingi, ete pápa Pie XII ‘akangaki monɔkɔ,’ mpo na boyokani oyo azalaki na yango na Banazi liboso ete akóma pápa mpe nsima na yango.”

Bato mingi bazali kokanisa ete ata soki moto ataleli mokanda Tozali komikundola na lolenge nini, likambo “monene” ezali nde ya koluka koyeba ntina oyo bakonzi ya Lingomba ya Katolike bakangaki monɔkɔ ntango Banazi bazalaki koboma ebele ya bato na bakaa na bango ya monyoko. George Mosse, mokomi ya lisolo ya bato, mwanamboka États-Unis alobi ete, lokola Pie XII alobaki eloko te, “abikisaki lingomba kasi asalaki ete bato báyoka lisusu te nsango na yango oyo etali bizalela malamu. Pie XII amitambwisaki lokola mokonzi ya ekólo, kasi lokola Pápa te.” Bato oyo bayebi makambo ya Vatican malamumalamu balobi ete ntina oyo esalaki ete mokanda yango ebima noki te ezalaki mokakatano ya kotalela ngambo oyo Pie XII azalaki na yango mpo na bato oyo babomamaki na Banazi.

Mokanda yango epesaki bato mingi nkanda mpenza, mpamba te ekɔteli Pie XII. Arrigo Levi akomaki ete: “Lokola balobaki ‘eloko moko te mpo na ndenge Pápa akangaki monɔkɔ,’ yango esali ete mokanda yango esepelisa bato te.” Elie Wiesel, moto oyo azwaki prix Nobel ya kimya na 1986 alobi ete: “Koloba ete biso Bayuda tosengeli kozala na botɔndi epai na Pie XII, ezali komonana epai na ngai lokola nde lipɛngwi monene.”

Lisosoli ya malamu

Mokanda yango ezongeli bokeseni oyo banganga-mayele ya teoloji ya Katolike bazalaki kosala kala. Bokeseni yango elobi ete lingomba ezali mosantu mpe Nzambe azali kobatela yango na mabunga, kasi bandimi na yango bazali basumuki mpe bazali na ngambo mpo na mabe oyo esalemaka. Mokanda ya bamonisi ya Vatican ekomaki ete: “Tozalaki kolikya ete bayekoli ya Klisto bakotɛlɛma ngwi na elimo mpe bakomonisa yango na misala na bango, kasi yango emonanaki bongo te . . . [Bayekoli yango] bazalaki mpenza na mpiko te mpo na kotombola mingongo na bango mpe koboya. . . . Tozali koyoka mawa mpenza na mabunga ya bandimi yango ya lingomba.”

Yango wana, bato mingi bamoni ete kopesa foti na bandimi moke na esika ya komema yango, lingomba ezali kozonga nsima soki totaleli bolimbisi oyo bato mosusu basɛngaki na mikolo oyo euti koleka. Na ndakisa, Lingomba ya Katolike na ekólo France ebimisaki mokanda moko ya “ntubela” oyo kati na yango ezalaki kosɛnga Nzambe mpe Bayuda bolimbisi ndenge Lingomba ya Katolike “etiyolaki” minyoko oyo Bayuda bazwaki na ntango ya boyangeli ya Vichy. Na mokanda oyo Olivier de Berranger, episkɔpɔ-mokonzi atángaki, lingomba endimaki ete mpo na kobatela matomba na yango “etalelaki te lisɛngami ya Biblia ya kotosa ekelamu nyonso oyo esalemi na elilingi ya Nzambe.”

Mokanda yango elobaki ete: “Lingomba esengeli koyeba ete mpo na minyoko oyo Bayuda bazwaki mpe mingimingi meko ya mabe oyo boyangeli ya Vichy ezwaki mpo na bango, lityo oyo lingomba emonisaki elekaki ndelo. Kokanga monɔkɔ ezalaki lokola mobeko, kasi koloba mpo na kokɔtela Bayuda, ezalaki likambo oyo ezalaki koyokana te. . . . Lelo, tozali kondima ete kokanga monɔkɔ ezalaki libunga. Tondimi mpe ete Lingomba ya Katolike na France elongi te na mokumba na yango ya koteya lisosoli ya bato.”

Mbula koleka 50 nsima ya Shoah, to kobomama ya bato na Banazi, Lingomba ya Katolike ekoki naino te kondima makambo oyo yango moko esalaki​—oyo etondi mpenza na bongolabongola. Nzokande ezali na bato mosusu oyo basengelaki soko moke te kozwa etɛlɛmɛlo motindo wana. Batatoli ya Yehova, lingomba oyo ezali na bato mingi te, kasi enyokwamaki na Banazi, baboi kokanga monɔkɔ na likambo yango.

Lokola bato mingi bakómi koyeba yango, Batatoli ya Yehova, na bokeseni na bato ya mangomba mosusu, batɔndɔlaki minyoko ya Banazi. Yango esalemaki bobele na mwa bato moke te. Batindami na bango mpe mikanda na bango ezali komonisa yango. Christine King, mokomi ya lisolo ya bato mpe prezida-mokitani na Staffordshire University, na ekólo Angleterre, akomaki ete: “Batatoli ya Yehova batɔndɔlaki Banazi. Batɔndɔlaki bango uta ebandeli mpe basalaki yango na bomoko. Basalaki yango na mpiko mpe yango ezali mpenza liteya mpo na biso nyonso.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Shoah ezali nkombo ya Liebele mpo na kolimbola Bayuda, ba Tziganes, ba Polonais, ba Slaves, mpe bato mosusu oyo babomamaki na Banazi na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.

[Elilingi na lokasa 26]

Pápa Pie XII akangaki monɔkɔ na ntango Banazi bazalaki koboma bato

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto